Terjemahan makna Alquran Alkarim - Terjemahan Berbahasa Lingala * - Daftar isi terjemahan

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Terjemahan makna Surah: Surah Yāsīn   Ayah:

Yâsin

يسٓ
1. Yâ, Sín(1)
1 Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
Tafsir berbahasa Arab:
وَٱلۡقُرۡءَانِ ٱلۡحَكِيمِ
2. Na kurani oyo etonda bwanya.
Tafsir berbahasa Arab:
إِنَّكَ لَمِنَ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
3. Ya soló, ozali (Muhammad) kati ya batindami.
Tafsir berbahasa Arab:
عَلَىٰ صِرَٰطٖ مُّسۡتَقِيمٖ
4. O kati ya nzela ya semba.
Tafsir berbahasa Arab:
تَنزِيلَ ٱلۡعَزِيزِ ٱلرَّحِيمِ
5. Ekitisamaki kowuta na oyo azali na bokasi atonda ngolu.
Tafsir berbahasa Arab:
لِتُنذِرَ قَوۡمٗا مَّآ أُنذِرَ ءَابَآؤُهُمۡ فَهُمۡ غَٰفِلُونَ
6. Mpo ete okebisa bato oyo bankonko na bango bakebisamaki te, kasi bazalaki kokanisa te.
Tafsir berbahasa Arab:
لَقَدۡ حَقَّ ٱلۡقَوۡلُ عَلَىٰٓ أَكۡثَرِهِمۡ فَهُمۡ لَا يُؤۡمِنُونَ
7. Liloba lisilaki кокота likolo na bango ya sólo, kasi ebele bazali kondima te.
Tafsir berbahasa Arab:
إِنَّا جَعَلۡنَا فِيٓ أَعۡنَٰقِهِمۡ أَغۡلَٰلٗا فَهِيَ إِلَى ٱلۡأَذۡقَانِ فَهُم مُّقۡمَحُونَ
8. Ya solo, tokotiela bango basinga na bakingo mpe na minoko na bango, тре bakotambola na yango sé bongo.
Tafsir berbahasa Arab:
وَجَعَلۡنَا مِنۢ بَيۡنِ أَيۡدِيهِمۡ سَدّٗا وَمِنۡ خَلۡفِهِمۡ سَدّٗا فَأَغۡشَيۡنَٰهُمۡ فَهُمۡ لَا يُبۡصِرُونَ
9. Mpe tokangaki liboso na bango mpe sima na bango, mpe tozipaki bango (miso) ete bamona te.
Tafsir berbahasa Arab:
وَسَوَآءٌ عَلَيۡهِمۡ ءَأَنذَرۡتَهُمۡ أَمۡ لَمۡ تُنذِرۡهُمۡ لَا يُؤۡمِنُونَ
10. Mpe ezali sé ndenge moko, okebisa bango to okebisa te, bakondima te.
Tafsir berbahasa Arab:
إِنَّمَا تُنذِرُ مَنِ ٱتَّبَعَ ٱلذِّكۡرَ وَخَشِيَ ٱلرَّحۡمَٰنَ بِٱلۡغَيۡبِۖ فَبَشِّرۡهُ بِمَغۡفِرَةٖ وَأَجۡرٖ كَرِيمٍ
11. Ya soló, esengeli okebisa sé oyo azali kolanda maloba (kurani), mpe azali kobanga Ar-Rahmán(1) na kobombama, pesa ye sango ya bolimbisami mpe lifuta lilamu.
1 Ar-Rahmán: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.
Tafsir berbahasa Arab:
إِنَّا نَحۡنُ نُحۡيِ ٱلۡمَوۡتَىٰ وَنَكۡتُبُ مَا قَدَّمُواْ وَءَاثَٰرَهُمۡۚ وَكُلَّ شَيۡءٍ أَحۡصَيۡنَٰهُ فِيٓ إِمَامٖ مُّبِينٖ
12. Ya soló, biso nde tokosekwisaka bawei, mpe tokomeli bango maye basalaki ya malamu to ya mabe, mpe na mikoloto(1) na bango mpe eloko nyoso topesi motango na yango okati ya buku ya polele.
1 Mikoloto: Ezali: Misala oyo mutu atiki sima ya liwa naye, ezala ya malamu: (Lokola mwana ya malamu oyo ayebi nzambe mpe abondeli ye, mpe lisusu kotonga ba mosquee), Ezala to pe ya mabe: (Lokola kosangisa Allah nakati ya mabondeli).
Tafsir berbahasa Arab:
وَٱضۡرِبۡ لَهُم مَّثَلًا أَصۡحَٰبَ ٱلۡقَرۡيَةِ إِذۡ جَآءَهَا ٱلۡمُرۡسَلُونَ
13. Pesa bango ndakisa ya bato ya mboka tango batindami bayelaki bango.
Tafsir berbahasa Arab:
إِذۡ أَرۡسَلۡنَآ إِلَيۡهِمُ ٱثۡنَيۡنِ فَكَذَّبُوهُمَا فَعَزَّزۡنَا بِثَالِثٖ فَقَالُوٓاْ إِنَّآ إِلَيۡكُم مُّرۡسَلُونَ
14. Tango totindelaki bango batindami mibale, baboyaki kondimela bango, tobakiseli bango ya misato, balobi: Ya sólo, totindami epai na bino.
Tafsir berbahasa Arab:
قَالُواْ مَآ أَنتُمۡ إِلَّا بَشَرٞ مِّثۡلُنَا وَمَآ أَنزَلَ ٱلرَّحۡمَٰنُ مِن شَيۡءٍ إِنۡ أَنتُمۡ إِلَّا تَكۡذِبُونَ
15. Bayanolaki: Bozali bato lokola biso, Ar-Rahmán akitisi eloko тропа biso te, bino bozali sé kokosa.
Tafsir berbahasa Arab:
قَالُواْ رَبُّنَا يَعۡلَمُ إِنَّآ إِلَيۡكُمۡ لَمُرۡسَلُونَ
16. Balobi: Nkolo wa biso ayebi ya sólo ete: Tozali batindami epai na bino.
Tafsir berbahasa Arab:
وَمَا عَلَيۡنَآ إِلَّا ٱلۡبَلَٰغُ ٱلۡمُبِينُ
17. Mpe tozali sé тропа bokomisi sango bwa polele.
Tafsir berbahasa Arab:
قَالُوٓاْ إِنَّا تَطَيَّرۡنَا بِكُمۡۖ لَئِن لَّمۡ تَنتَهُواْ لَنَرۡجُمَنَّكُمۡ وَلَيَمَسَّنَّكُم مِّنَّا عَذَابٌ أَلِيمٞ
18. Balobi: Tozali kornona bino na makanisi mabe, soki botiki yango te, tokobwakela bino mabanga, mpe etumbu makasi kowuta epai na biso ekozua bino.
Tafsir berbahasa Arab:
قَالُواْ طَٰٓئِرُكُم مَّعَكُمۡ أَئِن ذُكِّرۡتُمۚ بَلۡ أَنتُمۡ قَوۡمٞ مُّسۡرِفُونَ
19. Balobi: Makanisi mabe ezali epai na bino moko, boye nde lolenge bozali kosala soki bopesami makundolami? Kasi bozali bato mabe balekisi ndelo.
Tafsir berbahasa Arab:
وَجَآءَ مِنۡ أَقۡصَا ٱلۡمَدِينَةِ رَجُلٞ يَسۡعَىٰ قَالَ يَٰقَوۡمِ ٱتَّبِعُواْ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
20. Mpe moto moko ayaki na suka ya mboka na lombango (na ebandeli ya mboka) mpe alobi: Oh bato na ngai! Bolanda batindami.
Tafsir berbahasa Arab:
ٱتَّبِعُواْ مَن لَّا يَسۡـَٔلُكُمۡ أَجۡرٗا وَهُم مُّهۡتَدُونَ
21. Bolanda baye bakotuna bino lifuta ata moko te, mpe bazali na liloba lia bokambami.
Tafsir berbahasa Arab:
وَمَالِيَ لَآ أَعۡبُدُ ٱلَّذِي فَطَرَنِي وَإِلَيۡهِ تُرۡجَعُونَ
22. Mpe тропа nini te nabondela ye oyo akeli ngai, mpe epai naye nde bokozongisama?
Tafsir berbahasa Arab:
ءَأَتَّخِذُ مِن دُونِهِۦٓ ءَالِهَةً إِن يُرِدۡنِ ٱلرَّحۡمَٰنُ بِضُرّٖ لَّا تُغۡنِ عَنِّي شَفَٰعَتُهُمۡ شَيۡـٔٗا وَلَا يُنقِذُونِ
23. Boye nazuela ye banzambe basusu? Soki Ar-Rahmân(1) alingeli ngai mabe, kosenga na bango ekosalisa ngai na eloko moko te, mpe bakobikisa ngai te.
1 Ar-Rahmán: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.
Tafsir berbahasa Arab:
إِنِّيٓ إِذٗا لَّفِي ضَلَٰلٖ مُّبِينٍ
24. Ya soló, nakozala na libungi lia polele.
Tafsir berbahasa Arab:
إِنِّيٓ ءَامَنتُ بِرَبِّكُمۡ فَٱسۡمَعُونِ
25. Ya solo, ngai nandimi na Nkolo wa bino, boyoka ngai.
Tafsir berbahasa Arab:
قِيلَ ٱدۡخُلِ ٱلۡجَنَّةَۖ قَالَ يَٰلَيۡتَ قَوۡمِي يَعۡلَمُونَ
26. (Na yango), elobamaki naye: Kota na lola. Alobi: Soki bato na ngai bayebaka.
Tafsir berbahasa Arab:
بِمَا غَفَرَ لِي رَبِّي وَجَعَلَنِي مِنَ ٱلۡمُكۡرَمِينَ
27. Mpo ete Nkolo na ngai alimbisi ngai mpe atie ngai o molongo ya bato ya lokumu.
Tafsir berbahasa Arab:
۞ وَمَآ أَنزَلۡنَا عَلَىٰ قَوۡمِهِۦ مِنۢ بَعۡدِهِۦ مِن جُندٖ مِّنَ ٱلسَّمَآءِ وَمَا كُنَّا مُنزِلِينَ
28. Мре sima naye tokitisaki mapinga ata moko te, mpe tolingaki kokitisa eloko moko te likolo ya bato naye.
Tafsir berbahasa Arab:
إِن كَانَتۡ إِلَّا صَيۡحَةٗ وَٰحِدَةٗ فَإِذَا هُمۡ خَٰمِدُونَ
29. Ezalaki sé bogangi moko (mongongo ewutaki na likolo) mpe etumbu ezuaki bango.
Tafsir berbahasa Arab:
يَٰحَسۡرَةً عَلَى ٱلۡعِبَادِۚ مَا يَأۡتِيهِم مِّن رَّسُولٍ إِلَّا كَانُواْ بِهِۦ يَسۡتَهۡزِءُونَ
30. Eh mabe ezali likolo ya bawumbu! Motindami atikala koyela bango te sé batióla ye.
Tafsir berbahasa Arab:
أَلَمۡ يَرَوۡاْ كَمۡ أَهۡلَكۡنَا قَبۡلَهُم مِّنَ ٱلۡقُرُونِ أَنَّهُمۡ إِلَيۡهِمۡ لَا يَرۡجِعُونَ
31. Bazali kornona te bato boni toboma liboso na bango, mpe bazongelaki bango te?
Tafsir berbahasa Arab:
وَإِن كُلّٞ لَّمَّا جَمِيعٞ لَّدَيۡنَا مُحۡضَرُونَ
32. Mpe (moto) nyoso, akotelema liboso na biso (тропа kosamba).
Tafsir berbahasa Arab:
وَءَايَةٞ لَّهُمُ ٱلۡأَرۡضُ ٱلۡمَيۡتَةُ أَحۡيَيۡنَٰهَا وَأَخۡرَجۡنَا مِنۡهَا حَبّٗا فَمِنۡهُ يَأۡكُلُونَ
33. Mpe elembo moko тропа bango ezali ete topesaka bomoyi na mabele maye makawuka, mpe tobimisaki kowuta na yango mbuma iye bazali kólia.
Tafsir berbahasa Arab:
وَجَعَلۡنَا فِيهَا جَنَّٰتٖ مِّن نَّخِيلٖ وَأَعۡنَٰبٖ وَفَجَّرۡنَا فِيهَا مِنَ ٱلۡعُيُونِ
34. Mpe totiaki okati na yango (mabele) bilanga ya naghil(1) mpe a’náb(2) mpe tobimiselaki yango maziba ya mayi,
1 Naghil: Bótala yango na Al-Baqarah: 266. Na suratu Al-An’ám: 99.
2 A’nab: Bótala yango na Al-Baqarah: 266. Na suratu Al-An’ám: 99.
Tafsir berbahasa Arab:
لِيَأۡكُلُواْ مِن ثَمَرِهِۦ وَمَا عَمِلَتۡهُ أَيۡدِيهِمۡۚ أَفَلَا يَشۡكُرُونَ
35. Mpo ete balia bambuma na yango, mpe na oyo maboko na bango masali. Boye bakozala na botondi te?
2 A’nab: Bótala yango na Al-Baqarah: 266. Na suratu Al-An’ám: 99.
Tafsir berbahasa Arab:
سُبۡحَٰنَ ٱلَّذِي خَلَقَ ٱلۡأَزۡوَٰجَ كُلَّهَا مِمَّا تُنۢبِتُ ٱلۡأَرۡضُ وَمِنۡ أَنفُسِهِمۡ وَمِمَّا لَا يَعۡلَمُونَ
36. Nkembo naye oyo akeli biloko na balolenge binso biye bibimaka na mabele, mpe na banzoto na bango mpe na maye bayebi te!
Tafsir berbahasa Arab:
وَءَايَةٞ لَّهُمُ ٱلَّيۡلُ نَسۡلَخُ مِنۡهُ ٱلنَّهَارَ فَإِذَا هُم مُّظۡلِمُونَ
37. Mpe elembo mosusu тропа bango ezali butu, oyo tolandisi yango mokolo, kasi bango bafandi o kati ya molili.
Tafsir berbahasa Arab:
وَٱلشَّمۡسُ تَجۡرِي لِمُسۡتَقَرّٖ لَّهَاۚ ذَٰلِكَ تَقۡدِيرُ ٱلۡعَزِيزِ ٱلۡعَلِيمِ
38. Mpe moyi mozali kotambola na botiami na yango. Wana ezali etiyeli ya oyo azali na bokasi atonda boyebi.
Tafsir berbahasa Arab:
وَٱلۡقَمَرَ قَدَّرۡنَٰهُ مَنَازِلَ حَتَّىٰ عَادَ كَٱلۡعُرۡجُونِ ٱلۡقَدِيمِ
39. Mpe sanza, totiaki yango na bitape kino ekokonda ekomi lokola lokasa ya mbila ya ко kawuka.
Tafsir berbahasa Arab:
لَا ٱلشَّمۡسُ يَنۢبَغِي لَهَآ أَن تُدۡرِكَ ٱلۡقَمَرَ وَلَا ٱلَّيۡلُ سَابِقُ ٱلنَّهَارِۚ وَكُلّٞ فِي فَلَكٖ يَسۡبَحُونَ
40. Moyi mokutaka sanza te, mpe butu elekaka mokolo te. Mpe nyoso ezali kotambola na nzela na yango.
Tafsir berbahasa Arab:
وَءَايَةٞ لَّهُمۡ أَنَّا حَمَلۡنَا ذُرِّيَّتَهُمۡ فِي ٱلۡفُلۡكِ ٱلۡمَشۡحُونِ
41. Mpe elembo mosusu тропа bango, ezali ete tomemaka bato na bango na masuwa oyo etondaka.
Tafsir berbahasa Arab:
وَخَلَقۡنَا لَهُم مِّن مِّثۡلِهِۦ مَا يَرۡكَبُونَ
42. Mpe tosaleli bango mosusu lokola oyo wana bazali komata na kati тропа kotambola.
Tafsir berbahasa Arab:
وَإِن نَّشَأۡ نُغۡرِقۡهُمۡ فَلَا صَرِيخَ لَهُمۡ وَلَا هُمۡ يُنقَذُونَ
43. Мре soki tolingaki nde tozindisaki bango, nde bazuaki mosungi te, mpe balingaki kozua libiki te.
Tafsir berbahasa Arab:
إِلَّا رَحۡمَةٗ مِّنَّا وَمَتَٰعًا إِلَىٰ حِينٖ
44. Ezali sé тропа mawa na biso, тре mpo bakoka kosepela na mwa tango токе.
Tafsir berbahasa Arab:
وَإِذَا قِيلَ لَهُمُ ٱتَّقُواْ مَا بَيۡنَ أَيۡدِيكُمۡ وَمَا خَلۡفَكُمۡ لَعَلَّكُمۡ تُرۡحَمُونَ
45. Мре soki bayebisi bango ete, bobanga oyo ezali liboso na bino mpe sima na bino mpo ete bozua ngolu!
Tafsir berbahasa Arab:
وَمَا تَأۡتِيهِم مِّنۡ ءَايَةٖ مِّنۡ ءَايَٰتِ رَبِّهِمۡ إِلَّا كَانُواْ عَنۡهَا مُعۡرِضِينَ
46. Mpe elembo moko te kati ya bilembo ya Nkolo na bango eyelaki bango bobele bapesa yango mokongo.
Tafsir berbahasa Arab:
وَإِذَا قِيلَ لَهُمۡ أَنفِقُواْ مِمَّا رَزَقَكُمُ ٱللَّهُ قَالَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ لِلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ أَنُطۡعِمُ مَن لَّوۡ يَشَآءُ ٱللَّهُ أَطۡعَمَهُۥٓ إِنۡ أَنتُمۡ إِلَّا فِي ضَلَٰلٖ مُّبِينٖ
47. Mpe soki bayebisi bango ete: Bobimisa na bozui oyo Allah apeși bino тропа kokaba, bapagano bakoloba na bandimi ete: Tokoleisa moto oyo soki Allah alingi akoleisa ye? Bino bozali sé na libunga ya polele.
Tafsir berbahasa Arab:
وَيَقُولُونَ مَتَىٰ هَٰذَا ٱلۡوَعۡدُ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
48. Mpe bazali koloba: Elaka ekokokaka tango nini soki bozali koloba bosóló?
Tafsir berbahasa Arab:
مَا يَنظُرُونَ إِلَّا صَيۡحَةٗ وَٰحِدَةٗ تَأۡخُذُهُمۡ وَهُمۡ يَخِصِّمُونَ
49. Bakoyoka sé lolaka moko ekozuaka bango na mbalakaka tango bazali kosuana.
Tafsir berbahasa Arab:
فَلَا يَسۡتَطِيعُونَ تَوۡصِيَةٗ وَلَآ إِلَىٰٓ أَهۡلِهِمۡ يَرۡجِعُونَ
50. Bakokoka (tango wana) kotikela libota na bango malako te mpe bakokoka lisusu kozongela bango te.
Tafsir berbahasa Arab:
وَنُفِخَ فِي ٱلصُّورِ فَإِذَا هُم مِّنَ ٱلۡأَجۡدَاثِ إِلَىٰ رَبِّهِمۡ يَنسِلُونَ
51. Мре bakofula kelelo, тре okomonaka bango babimi na malita bazali kokima mbangu epai ya Nkolo wa bango.
Tafsir berbahasa Arab:
قَالُواْ يَٰوَيۡلَنَا مَنۢ بَعَثَنَا مِن مَّرۡقَدِنَاۜۗ هَٰذَا مَا وَعَدَ ٱلرَّحۡمَٰنُ وَصَدَقَ ٱلۡمُرۡسَلُونَ
52. Bazali koloba: Eh mawa na biso! Nani asekwisi biso na esika oyo tozalaki kolala? Boye oyo nde elaka ya Ar-Rahmán(1) alakaki, mpe batindami balobaki bosóló.
1 Ar-Rahmán: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.
Tafsir berbahasa Arab:
إِن كَانَتۡ إِلَّا صَيۡحَةٗ وَٰحِدَةٗ فَإِذَا هُمۡ جَمِيعٞ لَّدَيۡنَا مُحۡضَرُونَ
53. Ekozalaka sé lolaka moko ya (makasi) okomona bango banso bazali liboso lia biso.
Tafsir berbahasa Arab:
فَٱلۡيَوۡمَ لَا تُظۡلَمُ نَفۡسٞ شَيۡـٔٗا وَلَا تُجۡزَوۡنَ إِلَّا مَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ
54. Mokolo wana, bakobuba ata molimo moko te, mpe bokofutamaka te sé na maye bozalaki kosala.
Tafsir berbahasa Arab:
إِنَّ أَصۡحَٰبَ ٱلۡجَنَّةِ ٱلۡيَوۡمَ فِي شُغُلٖ فَٰكِهُونَ
55. Ya soló, mokolo wana bato ya lola bakozalaka na misala ya bokokisi bolamu bwa bango,
Tafsir berbahasa Arab:
هُمۡ وَأَزۡوَٰجُهُمۡ فِي ظِلَٰلٍ عَلَى ٱلۡأَرَآئِكِ مُتَّكِـُٔونَ
56. Bango na balongani na bango bakozalaka na bisika bia тріо, bavandi likolo lia bakiti,
Tafsir berbahasa Arab:
لَهُمۡ فِيهَا فَٰكِهَةٞ وَلَهُم مَّا يَدَّعُونَ
57. Bakozalaka na bambuma (ya kolia) mpe bakozuaka nyoso oyo bakosengaka.
Tafsir berbahasa Arab:
سَلَٰمٞ قَوۡلٗا مِّن رَّبّٖ رَّحِيمٖ
58. (Salam) kimia, liloba likowutaka epai ya Nkolo oyo atonda mawa.
Tafsir berbahasa Arab:
وَٱمۡتَٰزُواْ ٱلۡيَوۡمَ أَيُّهَا ٱلۡمُجۡرِمُونَ
59. Kasi lelo, tika ete bozala mosika, eh bino bato mabe!
Tafsir berbahasa Arab:
۞ أَلَمۡ أَعۡهَدۡ إِلَيۡكُمۡ يَٰبَنِيٓ ءَادَمَ أَن لَّا تَعۡبُدُواْ ٱلشَّيۡطَٰنَۖ إِنَّهُۥ لَكُمۡ عَدُوّٞ مُّبِينٞ
60. Boye nalakaki bino te eh! Bana ya Adam! Ete bobondela satana te? Ya soló, azali monguna na bino ya polele,
Tafsir berbahasa Arab:
وَأَنِ ٱعۡبُدُونِيۚ هَٰذَا صِرَٰطٞ مُّسۡتَقِيمٞ
61. Mpe (nayebisaki bino te ete) bobondela ngai? Oyo nde nzela ya semba.
Tafsir berbahasa Arab:
وَلَقَدۡ أَضَلَّ مِنكُمۡ جِبِلّٗا كَثِيرًاۖ أَفَلَمۡ تَكُونُواْ تَعۡقِلُونَ
62. Mpe (satana) asilaki kobungisa ebele o kati na bino, boye bozali kokanisa te?
Tafsir berbahasa Arab:
هَٰذِهِۦ جَهَنَّمُ ٱلَّتِي كُنتُمۡ تُوعَدُونَ
63. Oyo nde lifelo oyo balakaki bino.
Tafsir berbahasa Arab:
ٱصۡلَوۡهَا ٱلۡيَوۡمَ بِمَا كُنتُمۡ تَكۡفُرُونَ
64. Lelo bokozikisama na yango, тропа maye bopengwaki na yango.
Tafsir berbahasa Arab:
ٱلۡيَوۡمَ نَخۡتِمُ عَلَىٰٓ أَفۡوَٰهِهِمۡ وَتُكَلِّمُنَآ أَيۡدِيهِمۡ وَتَشۡهَدُ أَرۡجُلُهُم بِمَا كَانُواْ يَكۡسِبُونَ
65. Mokolo mona tokokanga minoko mia bango, kasi maboko na bango makolobela biso, mpe makolo na bango makozala nzeneneke ya maye bazalaki kosala.
Tafsir berbahasa Arab:
وَلَوۡ نَشَآءُ لَطَمَسۡنَا عَلَىٰٓ أَعۡيُنِهِمۡ فَٱسۡتَبَقُواْ ٱلصِّرَٰطَ فَأَنَّىٰ يُبۡصِرُونَ
66. Mpe soki tolingi, tokolimwisaka miso na bango, mpe bakokimaka na nzela, kasi bakomonaka ndenge nini?
Tafsir berbahasa Arab:
وَلَوۡ نَشَآءُ لَمَسَخۡنَٰهُمۡ عَلَىٰ مَكَانَتِهِمۡ فَمَا ٱسۡتَطَٰعُواْ مُضِيّٗا وَلَا يَرۡجِعُونَ
67. Mpe soki tolingi, tokobalusa bango sé esika moko, bakokoka kokende liboso te, mpe kozonga sima te.
Tafsir berbahasa Arab:
وَمَن نُّعَمِّرۡهُ نُنَكِّسۡهُ فِي ٱلۡخَلۡقِۚ أَفَلَا يَعۡقِلُونَ
68. Na oyo tokopesaka ye bomoyi molayi, tokozongisa ye na lolenge ya bokelami naye (motawu na nzoto mpe na bongo naye). Boye bazali koyeba te?
Tafsir berbahasa Arab:
وَمَا عَلَّمۡنَٰهُ ٱلشِّعۡرَ وَمَا يَنۢبَغِي لَهُۥٓۚ إِنۡ هُوَ إِلَّا ذِكۡرٞ وَقُرۡءَانٞ مُّبِينٞ
69. Ezali ntôki ya mpamba mpamba te nde totangisaki ye (Muhammad), mpe esengeli naye te. Kaši ezali nde bokundoli, mpe kotanga kurani oyo ezali polele.
Tafsir berbahasa Arab:
لِّيُنذِرَ مَن كَانَ حَيّٗا وَيَحِقَّ ٱلۡقَوۡلُ عَلَى ٱلۡكَٰفِرِينَ
70. Mpo akebisa oyo akozala na bomoyi, mpe liloba lisila kokokisama тропа bapengwi.
Tafsir berbahasa Arab:
أَوَلَمۡ يَرَوۡاْ أَنَّا خَلَقۡنَا لَهُم مِّمَّا عَمِلَتۡ أَيۡدِينَآ أَنۡعَٰمٗا فَهُمۡ لَهَا مَٰلِكُونَ
71. Boye bazali kornona te ete kati ya maye maboko na biso masali, tokeli An‘âm(1) biye bazali kokonza?
1 An’âm: Bótala suratu Fâtwir mokapo: 28, Bótala na Imrân mekapo: 14.
Tafsir berbahasa Arab:
وَذَلَّلۡنَٰهَا لَهُمۡ فَمِنۡهَا رَكُوبُهُمۡ وَمِنۡهَا يَأۡكُلُونَ
72. Mpe tondimelaki bango bamatelaka misusu mpe misusu baliaka.
Tafsir berbahasa Arab:
وَلَهُمۡ فِيهَا مَنَٰفِعُ وَمَشَارِبُۚ أَفَلَا يَشۡكُرُونَ
73. Mpe bazali kobimisa kati na yango (biloko) oyo ezali kosalisa bango, mpe misusu ya komela kasi bazali kotondo te?
Tafsir berbahasa Arab:
وَٱتَّخَذُواْ مِن دُونِ ٱللَّهِ ءَالِهَةٗ لَّعَلَّهُمۡ يُنصَرُونَ
74. Mpe bazali kozua banzambe misusu batiki Allah, bazali kokanisa ete bakosalisa bango.
Tafsir berbahasa Arab:
لَا يَسۡتَطِيعُونَ نَصۡرَهُمۡ وَهُمۡ لَهُمۡ جُندٞ مُّحۡضَرُونَ
75. В aye wana bakokokaka kosalisa bango te, kasi bakokoma nde lipinga liye likotelemela bango.
Tafsir berbahasa Arab:
فَلَا يَحۡزُنكَ قَوۡلُهُمۡۘ إِنَّا نَعۡلَمُ مَا يُسِرُّونَ وَمَا يُعۡلِنُونَ
76. Maloba na bango mapesa yo mpasi te. Ya soló, biso toyebi maye bazali kobomba mpe maye bazali komonisa.
Tafsir berbahasa Arab:
أَوَلَمۡ يَرَ ٱلۡإِنسَٰنُ أَنَّا خَلَقۡنَٰهُ مِن نُّطۡفَةٖ فَإِذَا هُوَ خَصِيمٞ مُّبِينٞ
77. Boye moto ayebi te ete tokeli ye kowuta na mayi ya mokongo, na sima abaluki akomi monguna ya polele?
Tafsir berbahasa Arab:
وَضَرَبَ لَنَا مَثَلٗا وَنَسِيَ خَلۡقَهُۥۖ قَالَ مَن يُحۡيِ ٱلۡعِظَٰمَ وَهِيَ رَمِيمٞ
78. Azali kobetela biso ndakisa kasi abosani bokelami bwa ye moko, alobi: Nani akopesa bomoyi na mikuwa sima ya kokoma na yango putulu?
Tafsir berbahasa Arab:
قُلۡ يُحۡيِيهَا ٱلَّذِيٓ أَنشَأَهَآ أَوَّلَ مَرَّةٖۖ وَهُوَ بِكُلِّ خَلۡقٍ عَلِيمٌ
79. Loba: Oyó akopesa yango bomoyi nde oyo akelaka yango o mbala ya liboso, mpe ayebi malamu bokeli bwaye bonso.
Tafsir berbahasa Arab:
ٱلَّذِي جَعَلَ لَكُم مِّنَ ٱلشَّجَرِ ٱلۡأَخۡضَرِ نَارٗا فَإِذَآ أَنتُم مِّنۡهُ تُوقِدُونَ
80. Ye nde azalisaki тропа bino moto kowuta na nzete ya mobesu, yango nde bozali kopelisa.
Tafsir berbahasa Arab:
أَوَلَيۡسَ ٱلَّذِي خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ بِقَٰدِرٍ عَلَىٰٓ أَن يَخۡلُقَ مِثۡلَهُمۚ بَلَىٰ وَهُوَ ٱلۡخَلَّٰقُ ٱلۡعَلِيمُ
81. Boye oyo akeli mapata na mabele akoki te kokela basusu lokola bango? Iyo, ya soló azali mokeli monene koleka bango mpe azali moyebi.
Tafsir berbahasa Arab:
إِنَّمَآ أَمۡرُهُۥٓ إِذَآ أَرَادَ شَيۡـًٔا أَن يَقُولَ لَهُۥ كُن فَيَكُونُ
82. Ya sólo soki alingi (kosala) eloko akolobaka se, zala, mpe ezalisami.
Tafsir berbahasa Arab:
فَسُبۡحَٰنَ ٱلَّذِي بِيَدِهِۦ مَلَكُوتُ كُلِّ شَيۡءٖ وَإِلَيۡهِ تُرۡجَعُونَ
83. Nkembo na oyo azali na bokonzi bonso, na maboko naye, mpe epai naye nde bokozongisama.
Tafsir berbahasa Arab:
 
Terjemahan makna Surah: Surah Yāsīn
Daftar surah Nomor Halaman
 
Terjemahan makna Alquran Alkarim - Terjemahan Berbahasa Lingala - Daftar isi terjemahan

Terjemahan Makna Al-Qur`ān Al-Karīm ke bahasa Lingala oleh Zakaria Muhammad Blangogo

Tutup