Check out the new design

Terjemahan makna Alquran Alkarim - Terjemahan Berbahasa Lingala - Muhammad Balingongo * - Daftar isi terjemahan

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Terjemahan makna Surah: Ad-Dukhān   Ayah:
إِنَّ يَوۡمَ ٱلۡفَصۡلِ مِيقَٰتُهُمۡ أَجۡمَعِينَ
40. Ya sólo, o mokolo mwa bokati (makambo ya bato) nde ekozalaka elaka na bango banso.
Tafsir berbahasa Arab:
يَوۡمَ لَا يُغۡنِي مَوۡلًى عَن مَّوۡلٗى شَيۡـٔٗا وَلَا هُمۡ يُنصَرُونَ
41. Mokolo moye moninga to moto ya pene akosalisaka yo na eloko te, mpe bakosunganaka te.
Tafsir berbahasa Arab:
إِلَّا مَن رَّحِمَ ٱللَّهُۚ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ
42. Longola sé oyo Allah akoyokelaka mawa. Ya soló, ye azali wa bokasi atonda ngolu.
Tafsir berbahasa Arab:
إِنَّ شَجَرَتَ ٱلزَّقُّومِ
43. Ya soló nzete ya Zaqqúm.
Tafsir berbahasa Arab:
طَعَامُ ٱلۡأَثِيمِ
44. Ekozalaka bilei ya basumuki.
Tafsir berbahasa Arab:
كَٱلۡمُهۡلِ يَغۡلِي فِي ٱلۡبُطُونِ
45. Lokola mafuta ya mabe, ezali kotokisa libumu.
Tafsir berbahasa Arab:
كَغَلۡيِ ٱلۡحَمِيمِ
46. Lokola kotoko ya mayi ya moto ya makasi.
Tafsir berbahasa Arab:
خُذُوهُ فَٱعۡتِلُوهُ إِلَىٰ سَوَآءِ ٱلۡجَحِيمِ
47. Bozua ye mpe bomema ye o kati ya moto.
Tafsir berbahasa Arab:
ثُمَّ صُبُّواْ فَوۡقَ رَأۡسِهِۦ مِنۡ عَذَابِ ٱلۡحَمِيمِ
48. Sima bobwakela ye mayi ya moto na motu naye, lokola etumbu makasi.
Tafsir berbahasa Arab:
ذُقۡ إِنَّكَ أَنتَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡكَرِيمُ
49. Meka, ya sólo, yo (okanisaki ete) ozali na bokasi mpe lokumu!
Tafsir berbahasa Arab:
إِنَّ هَٰذَا مَا كُنتُم بِهِۦ تَمۡتَرُونَ
50. Wana nde maye bozalaki kotiya tembe mpe kobundisa.
Tafsir berbahasa Arab:
إِنَّ ٱلۡمُتَّقِينَ فِي مَقَامٍ أَمِينٖ
51. Ya sólo, babangi bakozalaka na bovandi bwa kitoko.
Tafsir berbahasa Arab:
فِي جَنَّٰتٖ وَعُيُونٖ
52. Kati na bilanga na mingala (mia lola)
Tafsir berbahasa Arab:
يَلۡبَسُونَ مِن سُندُسٖ وَإِسۡتَبۡرَقٖ مُّتَقَٰبِلِينَ
53. Bakolataka bilamba bia pepele ya pembe bitongama bazali kotalana.
Tafsir berbahasa Arab:
كَذَٰلِكَ وَزَوَّجۡنَٰهُم بِحُورٍ عِينٖ
54. Na yango, tokobalisa bango basi ya kitoko ya miso ya minene.
Tafsir berbahasa Arab:
يَدۡعُونَ فِيهَا بِكُلِّ فَٰكِهَةٍ ءَامِنِينَ
55. Mpe na kimia penza bakosengaka kati na yango bambuma kitoko ya lolenge nyoso.
Tafsir berbahasa Arab:
لَا يَذُوقُونَ فِيهَا ٱلۡمَوۡتَ إِلَّا ٱلۡمَوۡتَةَ ٱلۡأُولَىٰۖ وَوَقَىٰهُمۡ عَذَابَ ٱلۡجَحِيمِ
56. Liwa likozuaka bango te, sé oyo ya liboso mpe abateli (Allah) bango na etumbu ya lifelo.
Tafsir berbahasa Arab:
فَضۡلٗا مِّن رَّبِّكَۚ ذَٰلِكَ هُوَ ٱلۡفَوۡزُ ٱلۡعَظِيمُ
57. Bolamu ya Nkolo wayo. Wana nde elonga ya monene.
Tafsir berbahasa Arab:
فَإِنَّمَا يَسَّرۡنَٰهُ بِلِسَانِكَ لَعَلَّهُمۡ يَتَذَكَّرُونَ
58. Mpe ya soló, tokomisaki yango mpete na lolemu nayo mpo ete; basalisana na yango na bokundoli.
Tafsir berbahasa Arab:
فَٱرۡتَقِبۡ إِنَّهُم مُّرۡتَقِبُونَ
59. Zela moke, bango mpe bakozela.
1 Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
Tafsir berbahasa Arab:
 
Terjemahan makna Surah: Ad-Dukhān
Daftar surah Nomor Halaman
 
Terjemahan makna Alquran Alkarim - Terjemahan Berbahasa Lingala - Muhammad Balingongo - Daftar isi terjemahan

Diterjemahkan oleh Zakaria Muhammad Balingongo.

Tutup