Check out the new design

Traduzione dei Significati del Sacro Corano - Traduzione in lingala - Muhammed Bin Nguogo * - Indice Traduzioni

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Traduzione dei significati Sura: Hûd   Versetto:
قَالَ يَٰقَوۡمِ أَرَءَيۡتُمۡ إِن كُنتُ عَلَىٰ بَيِّنَةٖ مِّن رَّبِّي وَءَاتَىٰنِي مِنۡهُ رَحۡمَةٗ فَمَن يَنصُرُنِي مِنَ ٱللَّهِ إِنۡ عَصَيۡتُهُۥۖ فَمَا تَزِيدُونَنِي غَيۡرَ تَخۡسِيرٖ
Alobi: Oh bato bangai! Bomoni boni soki nazali na elembo kowuta epai ya Nkolo wa ngai mpe apeși ngai ngolu kowuta na yango? Nani oyo akosunga ngai epai ya Allah soki na zangi kotosa ye (Allah)? Noki bokobakisela ngai pasi likolo ya pasi.
Esegesi in lingua araba:
وَيَٰقَوۡمِ هَٰذِهِۦ نَاقَةُ ٱللَّهِ لَكُمۡ ءَايَةٗۖ فَذَرُوهَا تَأۡكُلۡ فِيٓ أَرۡضِ ٱللَّهِۖ وَلَا تَمَسُّوهَا بِسُوٓءٖ فَيَأۡخُذَكُمۡ عَذَابٞ قَرِيبٞ
Mpe Oh bino bato na ngai! Oyo ezali náqat ya Allah, atindeli bino lokola elembo. Botika ye aliya na mabele ya Allah, kasi bosala ye mabe moko te, noki etumbu ekozua bino na lombangu.
Esegesi in lingua araba:
فَعَقَرُوهَا فَقَالَ تَمَتَّعُواْ فِي دَارِكُمۡ ثَلَٰثَةَ أَيَّامٖۖ ذَٰلِكَ وَعۡدٌ غَيۡرُ مَكۡذُوبٖ
Kasi babomaki yango mpe basasi yango, mpe alobi na bango: Bokokangama kati na bandako na bino mikolo misato, wana ezali elaka ya tembe te.
Esegesi in lingua araba:
فَلَمَّا جَآءَ أَمۡرُنَا نَجَّيۡنَا صَٰلِحٗا وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ مَعَهُۥ بِرَحۡمَةٖ مِّنَّا وَمِنۡ خِزۡيِ يَوۡمِئِذٍۚ إِنَّ رَبَّكَ هُوَ ٱلۡقَوِيُّ ٱلۡعَزِيزُ
Mpe tango mitindo mia biso mikweyaki, tobikisaki Swálih na baye bandimaki elongo naye na mawa ma biso mokolo ya bozangi lokumu. Ya soló, Nkolo wayo azali na bokasi atonda nguya.
Esegesi in lingua araba:
وَأَخَذَ ٱلَّذِينَ ظَلَمُواْ ٱلصَّيۡحَةُ فَأَصۡبَحُواْ فِي دِيَٰرِهِمۡ جَٰثِمِينَ
Mpe bogangi bwa etumbu bozuaki babubi, mpe bakomaki bibembe o kati ya ba ndako bia bango.
Esegesi in lingua araba:
كَأَن لَّمۡ يَغۡنَوۡاْ فِيهَآۗ أَلَآ إِنَّ ثَمُودَاْ كَفَرُواْ رَبَّهُمۡۗ أَلَا بُعۡدٗا لِّثَمُودَ
Lokola bazalaki na nkembo liboso te okati na yango. Ya soló, bato ya Thamúd bapengwaki na Nkolo wa bango kasi bato ya Thamûd babebisamaki.
Esegesi in lingua araba:
وَلَقَدۡ جَآءَتۡ رُسُلُنَآ إِبۡرَٰهِيمَ بِٱلۡبُشۡرَىٰ قَالُواْ سَلَٰمٗاۖ قَالَ سَلَٰمٞۖ فَمَا لَبِثَ أَن جَآءَ بِعِجۡلٍ حَنِيذٖ
Мре ya soló, batindami[1] na biso bamemelaki Ibrâhîm sango elamu[2], tango bakutanaki naye balobi: Kimia[3] ezala nayo! Alobaki été: Kimia na bino mpe lokola! Mpe ewumelaki te abonzelaki bango libonza lia nyama. (ngombe) ya kotumba.
[1] Batindami: Ba anzelu.
[2] Sango elamu: Mbotama ya Is’háq.
[3] Kimia: Mbote ya bamizilima.
Esegesi in lingua araba:
فَلَمَّا رَءَآ أَيۡدِيَهُمۡ لَا تَصِلُ إِلَيۡهِ نَكِرَهُمۡ وَأَوۡجَسَ مِنۡهُمۡ خِيفَةٗۚ قَالُواْ لَا تَخَفۡ إِنَّآ أُرۡسِلۡنَآ إِلَىٰ قَوۡمِ لُوطٖ
Mpe tango amoni ete bazali kozua te, abangi, balobi: Kobanga te. Ya sólo, totindami epai ya bato ba Loth.
Esegesi in lingua araba:
وَٱمۡرَأَتُهُۥ قَآئِمَةٞ فَضَحِكَتۡ فَبَشَّرۡنَٰهَا بِإِسۡحَٰقَ وَمِن وَرَآءِ إِسۡحَٰقَ يَعۡقُوبَ
Mwasi waye azalaki ya kotelema, (sarah) mpe aseki, mpe topesaki ye sango elamu ya kobotama ya Is’háq mpe sima naye Ya’qüb.
Esegesi in lingua araba:
 
Traduzione dei significati Sura: Hûd
Indice delle Sure Numero di pagina
 
Traduzione dei Significati del Sacro Corano - Traduzione in lingala - Muhammed Bin Nguogo - Indice Traduzioni

Traduzione di Zakariya Muhammad Banangogo.

Chiudi