Check out the new design

Traduzione dei Significati del Sacro Corano - Traduzione in lingala - Muhammed Bin Nguogo * - Indice Traduzioni

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Traduzione dei significati Sura: Al-Baqarah   Versetto:
وَإِذۡ نَجَّيۡنَٰكُم مِّنۡ ءَالِ فِرۡعَوۡنَ يَسُومُونَكُمۡ سُوٓءَ ٱلۡعَذَابِ يُذَبِّحُونَ أَبۡنَآءَكُمۡ وَيَسۡتَحۡيُونَ نِسَآءَكُمۡۚ وَفِي ذَٰلِكُم بَلَآءٞ مِّن رَّبِّكُمۡ عَظِيمٞ
49. Mpe ntango tobikisaki bino epai ya bato ya falo, bazalaki konyokola bino na bitumbu binene, bazalaki kokata bakingo ya bana na bino mpe bazalaki kotika basi na bino na bomoyi mpe bozalaki na mimekano minene kowuta epai ya Nkolo wa bino.
Esegesi in lingua araba:
وَإِذۡ فَرَقۡنَا بِكُمُ ٱلۡبَحۡرَ فَأَنجَيۡنَٰكُمۡ وَأَغۡرَقۡنَآ ءَالَ فِرۡعَوۡنَ وَأَنتُمۡ تَنظُرُونَ
50. Mpe tango tokabolaki ebale mpo na bino (bokatisa ngambo esusu), mpe ya sôló tobikisaki bino mpe tozindisaki bato ya falo okati ya mayi, na bino bozalaki komona.
Esegesi in lingua araba:
وَإِذۡ وَٰعَدۡنَا مُوسَىٰٓ أَرۡبَعِينَ لَيۡلَةٗ ثُمَّ ٱتَّخَذۡتُمُ ٱلۡعِجۡلَ مِنۢ بَعۡدِهِۦ وَأَنتُمۡ ظَٰلِمُونَ
51. Mpe tango topesaki elaka epai ya Mûssa babutu ntuku minei, mpe bobondelaki mwana ngombe sima naye, mpe bozalaki babubi.
Esegesi in lingua araba:
ثُمَّ عَفَوۡنَا عَنكُم مِّنۢ بَعۡدِ ذَٰلِكَ لَعَلَّكُمۡ تَشۡكُرُونَ
52. Sima, tolimbisaki bino na yango, mpo ete bokoka kotondo.
Esegesi in lingua araba:
وَإِذۡ ءَاتَيۡنَا مُوسَى ٱلۡكِتَٰبَ وَٱلۡفُرۡقَانَ لَعَلَّكُمۡ تَهۡتَدُونَ
53. Mpe tango topesaki Mûssa buku mpe bososoli mpo ete bino bokambama.
Esegesi in lingua araba:
وَإِذۡ قَالَ مُوسَىٰ لِقَوۡمِهِۦ يَٰقَوۡمِ إِنَّكُمۡ ظَلَمۡتُمۡ أَنفُسَكُم بِٱتِّخَاذِكُمُ ٱلۡعِجۡلَ فَتُوبُوٓاْ إِلَىٰ بَارِئِكُمۡ فَٱقۡتُلُوٓاْ أَنفُسَكُمۡ ذَٰلِكُمۡ خَيۡرٞ لَّكُمۡ عِندَ بَارِئِكُمۡ فَتَابَ عَلَيۡكُمۡۚ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلتَّوَّابُ ٱلرَّحِيمُ
54. Mpe tango Mûssa alobaki na bato naye: Eh bino bato na ngai! ya sôló bino bomibubaki bino moko mpona kobondela mwana ngombe mpe botubela epai na Nkolo na bino, bomiboma kati kati na bino, wana nde ezali malamu epai ya Nkolo na bino. Mpe ayambi tubela na bino, ya sôló ye nde molimbisi atonda ngolu.
Esegesi in lingua araba:
وَإِذۡ قُلۡتُمۡ يَٰمُوسَىٰ لَن نُّؤۡمِنَ لَكَ حَتَّىٰ نَرَى ٱللَّهَ جَهۡرَةٗ فَأَخَذَتۡكُمُ ٱلصَّٰعِقَةُ وَأَنتُمۡ تَنظُرُونَ
55. Mpe tango bolobaki: Eh Mûssa! Tokoki kondimela yo te kino tomona Allah polele, lokito ya nkake ebetaki bino, mpe bino bozalaki kotala.
Esegesi in lingua araba:
ثُمَّ بَعَثۡنَٰكُم مِّنۢ بَعۡدِ مَوۡتِكُمۡ لَعَلَّكُمۡ تَشۡكُرُونَ
56. Sima, tosekwisaki bino sima ya bino kokufa mpo ete bokoka kotondo.
Esegesi in lingua araba:
وَظَلَّلۡنَا عَلَيۡكُمُ ٱلۡغَمَامَ وَأَنزَلۡنَا عَلَيۡكُمُ ٱلۡمَنَّ وَٱلسَّلۡوَىٰۖ كُلُواْ مِن طَيِّبَٰتِ مَا رَزَقۡنَٰكُمۡۚ وَمَا ظَلَمُونَا وَلَٰكِن كَانُوٓاْ أَنفُسَهُمۡ يَظۡلِمُونَ
57. Mpe tobombaki bino okati ya elili ya londende, mpe tokitiselaki bino manna(1) mpe salwa,(2) bolia bilei ya malamu biye bipesamaki mpona bino, mpe babubaki biso te kasi bango moko bamibubaki.
1 Manna: Ezali: Masanga ya sukali oyo ezali lokola mafuta ya nzoyi.
2 Salwa: Ezali: Ndeke ya moke oyo ezali na mosuni ya elengi.
Esegesi in lingua araba:
 
Traduzione dei significati Sura: Al-Baqarah
Indice delle Sure Numero di pagina
 
Traduzione dei Significati del Sacro Corano - Traduzione in lingala - Muhammed Bin Nguogo - Indice Traduzioni

Traduzione di Zakariya Muhammad Banangogo.

Chiudi