Check out the new design

Traduzione dei Significati del Sacro Corano - Traduzione in lingala - Muhammed Bin Nguogo * - Indice Traduzioni

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Traduzione dei significati Sura: Tâ-Hâ   Versetto:
وَأَنَا ٱخۡتَرۡتُكَ فَٱسۡتَمِعۡ لِمَا يُوحَىٰٓ
13. Mpe naponi yo, yoka maye bakoyebisa yo.
Esegesi in lingua araba:
إِنَّنِيٓ أَنَا ٱللَّهُ لَآ إِلَٰهَ إِلَّآ أَنَا۠ فَٱعۡبُدۡنِي وَأَقِمِ ٱلصَّلَوٰةَ لِذِكۡرِيٓ
14. Ya sólo penza, ngai nde Allah nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te sé ngai, bondela ngai mpe telemisa losambo тропа kokanisa ngai.
Esegesi in lingua araba:
إِنَّ ٱلسَّاعَةَ ءَاتِيَةٌ أَكَادُ أُخۡفِيهَا لِتُجۡزَىٰ كُلُّ نَفۡسِۭ بِمَا تَسۡعَىٰ
15. Ya soló, ntango ya suka ekoya, na bombi yango mpo ete molimo na molimo afutama na mpiko naye.
Esegesi in lingua araba:
فَلَا يَصُدَّنَّكَ عَنۡهَا مَن لَّا يُؤۡمِنُ بِهَا وَٱتَّبَعَ هَوَىٰهُ فَتَرۡدَىٰ
16. Kasi oyo andimi na yango te mpe alandi sé mposa naye, abungisa yo te noki te okobebisama.
Esegesi in lingua araba:
وَمَا تِلۡكَ بِيَمِينِكَ يَٰمُوسَىٰ
17. Mpe nini boye ezali na loboko nayo ya mobali oh Mûssa?
Esegesi in lingua araba:
قَالَ هِيَ عَصَايَ أَتَوَكَّؤُاْ عَلَيۡهَا وَأَهُشُّ بِهَا عَلَىٰ غَنَمِي وَلِيَ فِيهَا مَـَٔارِبُ أُخۡرَىٰ
18. Alobi: Ezali nde lingenda lia ngai, nayekemelaka yango,(1) mpe esalisaka ngai na bobuki bakasa ya banzete тропа koleisa banyama na ngai, mpe esalisaka ngai na makambo mosusu.
1 Komisimba na yango tango ya bopemi.
Esegesi in lingua araba:
قَالَ أَلۡقِهَا يَٰمُوسَىٰ
19. (Allah ayebisi ye): Bwaka yango oh Mûssa!
Esegesi in lingua araba:
فَأَلۡقَىٰهَا فَإِذَا هِيَ حَيَّةٞ تَسۡعَىٰ
20. Мре abwaki yango, mpe ebongwani nyoka ebandi kotambola.
Esegesi in lingua araba:
قَالَ خُذۡهَا وَلَا تَخَفۡۖ سَنُعِيدُهَا سِيرَتَهَا ٱلۡأُولَىٰ
21. (Allah) alobi: Zua yango, kaši kobanga te, tokozongisa yango na lolenge ezalaki liboso.
Esegesi in lingua araba:
وَٱضۡمُمۡ يَدَكَ إِلَىٰ جَنَاحِكَ تَخۡرُجۡ بَيۡضَآءَ مِنۡ غَيۡرِ سُوٓءٍ ءَايَةً أُخۡرَىٰ
22. Mpe kanga loboko nayo na nsé ya lipeka, ekobima na bongengi ya mpembe makasi mpe ekosala mpasi te. Wana elembo mosusu (bikamwa).
Esegesi in lingua araba:
لِنُرِيَكَ مِنۡ ءَايَٰتِنَا ٱلۡكُبۡرَى
23. Mpo tolakisa yo makamwisi ma biso ya minene.
Esegesi in lingua araba:
ٱذۡهَبۡ إِلَىٰ فِرۡعَوۡنَ إِنَّهُۥ طَغَىٰ
24. Kende epai ya falo, ya soló ye asili kolekisa ndelo,
Esegesi in lingua araba:
قَالَ رَبِّ ٱشۡرَحۡ لِي صَدۡرِي
25. (Mûssa) alobi: Nkolo wa ngai, fungóla ntolo na ngai,(1)
1 Fungóla ntolo na ngai: Elakisi: Tia motema na nga eyamba emoniseli
Esegesi in lingua araba:
وَيَسِّرۡ لِيٓ أَمۡرِي
26. Mpe etinda na ngai oyo, tia yango ezala mpete,
Esegesi in lingua araba:
وَٱحۡلُلۡ عُقۡدَةٗ مِّن لِّسَانِي
27. Mpe bongisa elobeli na ngai.
Esegesi in lingua araba:
يَفۡقَهُواْ قَوۡلِي
28. Mpo bakoka kososola maloba na ngai.
Esegesi in lingua araba:
وَٱجۡعَل لِّي وَزِيرٗا مِّنۡ أَهۡلِي
29. Mpe pesa ngai mosalisi awuta na libota lia ngai.
Esegesi in lingua araba:
هَٰرُونَ أَخِي
30. Hâruna ndeko wa ngai,
Esegesi in lingua araba:
ٱشۡدُدۡ بِهِۦٓ أَزۡرِي
31. Тіа ye azala oyo akobakisela ngai nguya,
Esegesi in lingua araba:
وَأَشۡرِكۡهُ فِيٓ أَمۡرِي
32. Kotisa ye na makambo na ngai (tokoma mibale),
Esegesi in lingua araba:
كَيۡ نُسَبِّحَكَ كَثِيرٗا
33. Mpo tokumisa yo koleka,
Esegesi in lingua araba:
وَنَذۡكُرَكَ كَثِيرًا
34. Mpe tokanisa yo mingi,
Esegesi in lingua araba:
إِنَّكَ كُنتَ بِنَا بَصِيرٗا
35. Ya soló, ozali kornona biso.
Esegesi in lingua araba:
قَالَ قَدۡ أُوتِيتَ سُؤۡلَكَ يَٰمُوسَىٰ
36. (Allah) alobi: Oh Müssa bosenga nayo esili kokokisama.
Esegesi in lingua araba:
وَلَقَدۡ مَنَنَّا عَلَيۡكَ مَرَّةً أُخۡرَىٰٓ
37. Mpe tosilaka kosalisa yo mbala ya yambo.
Esegesi in lingua araba:
 
Traduzione dei significati Sura: Tâ-Hâ
Indice delle Sure Numero di pagina
 
Traduzione dei Significati del Sacro Corano - Traduzione in lingala - Muhammed Bin Nguogo - Indice Traduzioni

Traduzione di Zakariya Muhammad Banangogo.

Chiudi