Check out the new design

ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ * - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: យូសុហ្វ   អាយ៉ាត់:
وَٱتَّبَعۡتُ مِلَّةَ ءَابَآءِيٓ إِبۡرَٰهِيمَ وَإِسۡحَٰقَ وَيَعۡقُوبَۚ مَا كَانَ لَنَآ أَن نُّشۡرِكَ بِٱللَّهِ مِن شَيۡءٖۚ ذَٰلِكَ مِن فَضۡلِ ٱللَّهِ عَلَيۡنَا وَعَلَى ٱلنَّاسِ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يَشۡكُرُونَ
38. Mpe nalandi lingomba lia baboti na ngai, Ibrâhîm na Is’hâq na Ya’qüb. Esengeli na biso te tosangisa Allah na eloko mosusu. Wana nde bolamu bwa Allah epai na biso na epai ya bato banso, kasi ebele ya bato bazali kotondo te.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
يَٰصَٰحِبَيِ ٱلسِّجۡنِ ءَأَرۡبَابٞ مُّتَفَرِّقُونَ خَيۡرٌ أَمِ ٱللَّهُ ٱلۡوَٰحِدُ ٱلۡقَهَّارُ
39. Oh! Bato ba ngai ba boloko! Boye binzambe nzambe bazali malamu koleka to Allah wa bomoko mpe wa bokoki?
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
مَا تَعۡبُدُونَ مِن دُونِهِۦٓ إِلَّآ أَسۡمَآءٗ سَمَّيۡتُمُوهَآ أَنتُمۡ وَءَابَآؤُكُم مَّآ أَنزَلَ ٱللَّهُ بِهَا مِن سُلۡطَٰنٍۚ إِنِ ٱلۡحُكۡمُ إِلَّا لِلَّهِ أَمَرَ أَلَّا تَعۡبُدُوٓاْ إِلَّآ إِيَّاهُۚ ذَٰلِكَ ٱلدِّينُ ٱلۡقَيِّمُ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يَعۡلَمُونَ
40. Bozali kobondela basusu botiki ye, bazali sé bankombo oyo bopesi bino moko na bankoko na bino biye Allah akitisaki elembetele te. Kasi mobeko ezali sé ya Allah atindaka sé bobondela ye moko. Wana nde lingomba lia semba, kasi ebele ya bato bazali koyeba te.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
يَٰصَٰحِبَيِ ٱلسِّجۡنِ أَمَّآ أَحَدُكُمَا فَيَسۡقِي رَبَّهُۥ خَمۡرٗاۖ وَأَمَّا ٱلۡأٓخَرُ فَيُصۡلَبُ فَتَأۡكُلُ ٱلطَّيۡرُ مِن رَّأۡسِهِۦۚ قُضِيَ ٱلۡأَمۡرُ ٱلَّذِي فِيهِ تَسۡتَفۡتِيَانِ
41. Oh bato ba ngai ba boloko! Mpona ndoto na bino, moko kati na bino akomelisa mokonzi naye masanga, mpe mosusu bakobaka ye, mpe bandeke bakolia motu naye. Likambo liye botunaki ngai lisili kokatama.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَقَالَ لِلَّذِي ظَنَّ أَنَّهُۥ نَاجٖ مِّنۡهُمَا ٱذۡكُرۡنِي عِندَ رَبِّكَ فَأَنسَىٰهُ ٱلشَّيۡطَٰنُ ذِكۡرَ رَبِّهِۦ فَلَبِثَ فِي ٱلسِّجۡنِ بِضۡعَ سِنِينَ
42. Mpe (Yûsuf) alobi na oyo abimaki na boloko: Lobela ngai epai ya mokonzi nayo. Kasi satana abosanisi ye bokundoli bwa Nkolo naye, yango awumelaki na boloko pene na mibu ebele.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَقَالَ ٱلۡمَلِكُ إِنِّيٓ أَرَىٰ سَبۡعَ بَقَرَٰتٖ سِمَانٖ يَأۡكُلُهُنَّ سَبۡعٌ عِجَافٞ وَسَبۡعَ سُنۢبُلَٰتٍ خُضۡرٖ وَأُخَرَ يَابِسَٰتٖۖ يَٰٓأَيُّهَا ٱلۡمَلَأُ أَفۡتُونِي فِي رُءۡيَٰيَ إِن كُنتُمۡ لِلرُّءۡيَا تَعۡبُرُونَ
43. Mpe mokonzi alobi: Ya sôló namoni na ndoto, bangombe sambo ya nzoto kolongonu bizali koliama na bangombe sambo ya kokondo, mpe bambuma sambo ya mayi mapondu mpe misusu ya kokauka. Eh bankumu! Bopesa ngai ndimbola ya ndoto ya ngai, soki boyebi kolimbola ndoto.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
 
ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: យូសុហ្វ
សន្ទស្សន៍នៃជំពូក លេខ​ទំព័រ
 
ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

ការបកប្រែដោយហ្សាការីយ៉ា ម៉ូហាំម៉ាត់ជាភាសា Ngogo.

បិទ