Check out the new design

ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ * - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់កះហ្វុី   អាយ៉ាត់:
إِنَّا مَكَّنَّا لَهُۥ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَءَاتَيۡنَٰهُ مِن كُلِّ شَيۡءٖ سَبَبٗا
Ya soló, tolendisaki bokasi bwa ye awa na nsé, mpe topesaki ye nzela likolo ya biloko binso.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
فَأَتۡبَعَ سَبَبًا
Mpe alandaki nzela,
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
حَتَّىٰٓ إِذَا بَلَغَ مَغۡرِبَ ٱلشَّمۡسِ وَجَدَهَا تَغۡرُبُ فِي عَيۡنٍ حَمِئَةٖ وَوَجَدَ عِندَهَا قَوۡمٗاۖ قُلۡنَا يَٰذَا ٱلۡقَرۡنَيۡنِ إِمَّآ أَن تُعَذِّبَ وَإِمَّآ أَن تَتَّخِذَ فِيهِمۡ حُسۡنٗا
Kino tango moyi mokokita, akuti yango ekiti na moluka mwa mayi ma moto pene na yango akuti bato, tolobaki: Oh Dzu-al- Qarnaïn! Opesa bango etumbu to osalela bango bolamu.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
قَالَ أَمَّا مَن ظَلَمَ فَسَوۡفَ نُعَذِّبُهُۥ ثُمَّ يُرَدُّ إِلَىٰ رَبِّهِۦ فَيُعَذِّبُهُۥ عَذَابٗا نُّكۡرٗا
Alobi: Oyó abubaki, tokopesa ye etumbu, sima tokomema ye epai ya Nkolo waye apesa ye etumbu ya somo koleka.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَأَمَّا مَنۡ ءَامَنَ وَعَمِلَ صَٰلِحٗا فَلَهُۥ جَزَآءً ٱلۡحُسۡنَىٰۖ وَسَنَقُولُ لَهُۥ مِنۡ أَمۡرِنَا يُسۡرٗا
Mpe oyo andimaki mpe asalaki mosala ya malamu, ye akozua lifuta lilamu mpe tokoloba naye, (na bopesi) mibeko mia biso mizali pete.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
ثُمَّ أَتۡبَعَ سَبَبًا
Sima alandaki nzela,
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
حَتَّىٰٓ إِذَا بَلَغَ مَطۡلِعَ ٱلشَّمۡسِ وَجَدَهَا تَطۡلُعُ عَلَىٰ قَوۡمٖ لَّمۡ نَجۡعَل لَّهُم مِّن دُونِهَا سِتۡرٗا
Kino akomaki na ebimeli ya moyi akutaki (moyi) ezali koleka likolo na bato moko boye topesaki bango eloko te ya komizipa na moyi.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
كَذَٰلِكَۖ وَقَدۡ أَحَطۡنَا بِمَا لَدَيۡهِ خُبۡرٗا
Ndenge wana nde ndenge tozipaki boyebi bwa biso na oyo azalaki na yango.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
ثُمَّ أَتۡبَعَ سَبَبًا
Sima alandaki nzela,
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
حَتَّىٰٓ إِذَا بَلَغَ بَيۡنَ ٱلسَّدَّيۡنِ وَجَدَ مِن دُونِهِمَا قَوۡمٗا لَّا يَكَادُونَ يَفۡقَهُونَ قَوۡلٗا
Kino tango akomaki kati ya ndelo ezwami na kati ya ngomba mibale akuti sima na yango bato baye bazali kososola maloba ya bato misusu te.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
قَالُواْ يَٰذَا ٱلۡقَرۡنَيۡنِ إِنَّ يَأۡجُوجَ وَمَأۡجُوجَ مُفۡسِدُونَ فِي ٱلۡأَرۡضِ فَهَلۡ نَجۡعَلُ لَكَ خَرۡجًا عَلَىٰٓ أَن تَجۡعَلَ بَيۡنَنَا وَبَيۡنَهُمۡ سَدّٗا
Balobi: Oh Dzu-al-Qarnaïn! Ya soló, ba ya’djûdj na ba ma’djûdj[1] bazali babebisi na mokili, tokoki te kotiela yo makoki ete opika ndelo kati na biso na bango?
[1] Ya’djûdj na Ma’djûdj: Ezalaki bikolo mibale bazalaki koyokana te babengi bango na lokota francais: (gog na magog).
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
قَالَ مَا مَكَّنِّي فِيهِ رَبِّي خَيۡرٞ فَأَعِينُونِي بِقُوَّةٍ أَجۡعَلۡ بَيۡنَكُمۡ وَبَيۡنَهُمۡ رَدۡمًا
Alobi: Oyo Nkolo wa ngai apeși ngai ezali malamu (koleka oyo ya bino) bosalisa ngai na bokasi bwa bino mpe natia ndelo kati na bino na bango, (mpo bakatisa te)
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
ءَاتُونِي زُبَرَ ٱلۡحَدِيدِۖ حَتَّىٰٓ إِذَا سَاوَىٰ بَيۡنَ ٱلصَّدَفَيۡنِ قَالَ ٱنفُخُواْۖ حَتَّىٰٓ إِذَا جَعَلَهُۥ نَارٗا قَالَ ءَاتُونِيٓ أُفۡرِغۡ عَلَيۡهِ قِطۡرٗا
В óyela ngai liboke ya übende, mpe tango asilisi kotondisa taka kati na bangomba mibale, alobi na bango ete: Bofula, kino ezuaki moto, alobi na bango ete: Boyela ngai mayi ya übende wana eyanguami nasopa yango likolo.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
فَمَا ٱسۡطَٰعُوٓاْ أَن يَظۡهَرُوهُ وَمَا ٱسۡتَطَٰعُواْ لَهُۥ نَقۡبٗا
Bakokaki komonisa bokasi te na komata na yango.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
 
ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់កះហ្វុី
សន្ទស្សន៍នៃជំពូក លេខ​ទំព័រ
 
ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

ការបកប្រែដោយហ្សាការីយ៉ា ម៉ូហាំម៉ាត់ជាភាសា Ngogo.

បិទ