Check out the new design

ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ * - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាន់ណាំល៍   អាយ៉ាត់:
وَلَقَدۡ أَرۡسَلۡنَآ إِلَىٰ ثَمُودَ أَخَاهُمۡ صَٰلِحًا أَنِ ٱعۡبُدُواْ ٱللَّهَ فَإِذَا هُمۡ فَرِيقَانِ يَخۡتَصِمُونَ
45. Mpe ya solo, totindaki epai ya Thamûd, ndeko wa bango Swâlih ete (ayebisa bango): Bobondela Allah, kasi bakabwanaki na biteni mibale na kosuana.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
قَالَ يَٰقَوۡمِ لِمَ تَسۡتَعۡجِلُونَ بِٱلسَّيِّئَةِ قَبۡلَ ٱلۡحَسَنَةِۖ لَوۡلَا تَسۡتَغۡفِرُونَ ٱللَّهَ لَعَلَّكُمۡ تُرۡحَمُونَ
46. Alobi: Oh bato na ngai! Mpona nini bozali kowelisa kosala mabe mpe botiki kosala bolamu? Soki ata bosengaki bolimbisi epai ya Allah, tango mosusu bokoyambema na ngolu naye?
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
قَالُواْ ٱطَّيَّرۡنَا بِكَ وَبِمَن مَّعَكَۚ قَالَ طَٰٓئِرُكُمۡ عِندَ ٱللَّهِۖ بَلۡ أَنتُمۡ قَوۡمٞ تُفۡتَنُونَ
47. Balobi ete: Tozali kornona mpona baye bazali nayo mabe mpona biso, azongiseli bango ete: Likambo na bino litali sé Allah. Kasi bino bokwei nde okati ya komekama.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَكَانَ فِي ٱلۡمَدِينَةِ تِسۡعَةُ رَهۡطٖ يُفۡسِدُونَ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَلَا يُصۡلِحُونَ
48. Mpe okati ya mboka ezalaki na lisanga ya bato libua bazalaki kotia mobulu likolo ya mabele, bazalaki kosala bolamu ata шоке te.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
قَالُواْ تَقَاسَمُواْ بِٱللَّهِ لَنُبَيِّتَنَّهُۥ وَأَهۡلَهُۥ ثُمَّ لَنَقُولَنَّ لِوَلِيِّهِۦ مَا شَهِدۡنَا مَهۡلِكَ أَهۡلِهِۦ وَإِنَّا لَصَٰدِقُونَ
49. Balobaki ete: Tolapa na Allah ete tokosala ye na libota naye mabe na butu, na sima tokoloba na moto oyo atelemi тропа kosenga makila naye ete: Biso toyebi moto abomi libota naye te. Mpe ya soló, tozali bosembo.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَمَكَرُواْ مَكۡرٗا وَمَكَرۡنَا مَكۡرٗا وَهُمۡ لَا يَشۡعُرُونَ
50. Mpe basali likita ya mabe, mpe tosalelaki bango lokola, kasi bazalaki koyeba te.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
فَٱنظُرۡ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ مَكۡرِهِمۡ أَنَّا دَمَّرۡنَٰهُمۡ وَقَوۡمَهُمۡ أَجۡمَعِينَ
51. Tala lifuta ya mwango na bango basalaki mpe tobomaki bango na baye banso bazalaki elongo na bango.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
فَتِلۡكَ بُيُوتُهُمۡ خَاوِيَةَۢ بِمَا ظَلَمُوٓاْۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةٗ لِّقَوۡمٖ يَعۡلَمُونَ
52. Mpe tala bandako na bango, bitikali polele тропа bobubi bwa bango. Wana ezali sólo elembo mpo bato bakoka koyeba.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَأَنجَيۡنَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَكَانُواْ يَتَّقُونَ
53. Mpe tolongisaki baye bandimaki mpe bazalaki kobanga.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَلُوطًا إِذۡ قَالَ لِقَوۡمِهِۦٓ أَتَأۡتُونَ ٱلۡفَٰحِشَةَ وَأَنتُمۡ تُبۡصِرُونَ
54. Mpe Loth tango ayebisaki na bato naye ete: Bozali kosala mabe (kokutana mibali na mibali na nzela ya sima) mpe bozali kornona?
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
أَئِنَّكُمۡ لَتَأۡتُونَ ٱلرِّجَالَ شَهۡوَةٗ مِّن دُونِ ٱلنِّسَآءِۚ بَلۡ أَنتُمۡ قَوۡمٞ تَجۡهَلُونَ
55. Ya soló, bino bozali koyela mibali na sima, botiki basi baye bakokokisela bino mposa. Kasi bozali na boyebi te.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
 
ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាន់ណាំល៍
សន្ទស្សន៍នៃជំពូក លេខ​ទំព័រ
 
ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

ការបកប្រែដោយហ្សាការីយ៉ា ម៉ូហាំម៉ាត់ជាភាសា Ngogo.

បិទ