ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ

លេខ​ទំព័រ:close

external-link copy
26 : 40

وَقَالَ فِرۡعَوۡنُ ذَرُونِيٓ أَقۡتُلۡ مُوسَىٰ وَلۡيَدۡعُ رَبَّهُۥٓۖ إِنِّيٓ أَخَافُ أَن يُبَدِّلَ دِينَكُمۡ أَوۡ أَن يُظۡهِرَ فِي ٱلۡأَرۡضِ ٱلۡفَسَادَ

Mpe falo alobaki: Botika ngai na boma Mûssa, mpe abenga Nkolo waye. Ya soló, nazali kobanga noki akobongola lingomba lia bino to noki akosala mbeba kati na mokili. info
التفاسير:

external-link copy
27 : 40

وَقَالَ مُوسَىٰٓ إِنِّي عُذۡتُ بِرَبِّي وَرَبِّكُم مِّن كُلِّ مُتَكَبِّرٖ لَّا يُؤۡمِنُ بِيَوۡمِ ٱلۡحِسَابِ

Mpe Mûssa alobi: Nazali koluka libateli epai ya Nkolo wa ngai na ya bino тропа baye bazali kosala lolendo baye balingi kondima na mokolo mwa suka te. info
التفاسير:

external-link copy
28 : 40

وَقَالَ رَجُلٞ مُّؤۡمِنٞ مِّنۡ ءَالِ فِرۡعَوۡنَ يَكۡتُمُ إِيمَٰنَهُۥٓ أَتَقۡتُلُونَ رَجُلًا أَن يَقُولَ رَبِّيَ ٱللَّهُ وَقَدۡ جَآءَكُم بِٱلۡبَيِّنَٰتِ مِن رَّبِّكُمۡۖ وَإِن يَكُ كَٰذِبٗا فَعَلَيۡهِ كَذِبُهُۥۖ وَإِن يَكُ صَادِقٗا يُصِبۡكُم بَعۡضُ ٱلَّذِي يَعِدُكُمۡۖ إِنَّ ٱللَّهَ لَا يَهۡدِي مَنۡ هُوَ مُسۡرِفٞ كَذَّابٞ

Mpe mobali moko ya mondimi kati ya bato ya falo abombaka bondimi bwa ye alobi: Boye bozali koboma moto mpo alobi: Nkolo na ngai Allah? Mpe asili koyela bino bilembo binene kowuta epai ya Nkolo wa bino? Soki solo azali na lokuta, lokuta wana ekozongela sé ye moko, mpe soki azali koloba bosembo, ndambu ya masumu ya maye azali kokebisa bino ekozua bino. Ya soló, Allah akambaka moto ya mabe mpe ya lokuta te. info
التفاسير:

external-link copy
29 : 40

يَٰقَوۡمِ لَكُمُ ٱلۡمُلۡكُ ٱلۡيَوۡمَ ظَٰهِرِينَ فِي ٱلۡأَرۡضِ فَمَن يَنصُرُنَا مِنۢ بَأۡسِ ٱللَّهِ إِن جَآءَنَاۚ قَالَ فِرۡعَوۡنُ مَآ أُرِيكُمۡ إِلَّا مَآ أَرَىٰ وَمَآ أَهۡدِيكُمۡ إِلَّا سَبِيلَ ٱلرَّشَادِ

Eh bato ba ngai! Bozali na bokonzi lelo kati na mabele, nani akosungaka biso na etumbu ya Allah tango ekoyelaka biso? Falo alobi: Nakolakisa bino sé oyo nazali kornona, mpe nakokamba bino te sé na nzela ya semba. info
التفاسير:

external-link copy
30 : 40

وَقَالَ ٱلَّذِيٓ ءَامَنَ يَٰقَوۡمِ إِنِّيٓ أَخَافُ عَلَيۡكُم مِّثۡلَ يَوۡمِ ٱلۡأَحۡزَابِ

Mpe oyo azalaki na bondimi alobi: Eh bato na ngai! Nazali kobangela bino noki ekozalela bino lokola o mokolo ya lisanga ya mapinga. info
التفاسير:

external-link copy
31 : 40

مِثۡلَ دَأۡبِ قَوۡمِ نُوحٖ وَعَادٖ وَثَمُودَ وَٱلَّذِينَ مِنۢ بَعۡدِهِمۡۚ وَمَا ٱللَّهُ يُرِيدُ ظُلۡمٗا لِّلۡعِبَادِ

Ndenge moko lokola bato ya Núh mpe bato ya Aad na Thamúd, mpe bato basusu bayaki sima na bango. Kasi Allah alingeli bawumbu naye libubi te. info
التفاسير:

external-link copy
32 : 40

وَيَٰقَوۡمِ إِنِّيٓ أَخَافُ عَلَيۡكُمۡ يَوۡمَ ٱلتَّنَادِ

Eh bato na ngai! Nazali kobangela bino тропа mokolo ya bobengami. info
التفاسير:

external-link copy
33 : 40

يَوۡمَ تُوَلُّونَ مُدۡبِرِينَ مَا لَكُم مِّنَ ٱللَّهِ مِنۡ عَاصِمٖۗ وَمَن يُضۡلِلِ ٱللَّهُ فَمَا لَهُۥ مِنۡ هَادٖ

Mokolo moye bokopesaka mikongo na bokimi, moko te akobatela bino liboso ya Allah mpe oyo Allah akobungisa, akozuaka mokambi te. info
التفاسير: