ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ

លេខ​ទំព័រ:close

external-link copy
21 : 41

وَقَالُواْ لِجُلُودِهِمۡ لِمَ شَهِدتُّمۡ عَلَيۡنَاۖ قَالُوٓاْ أَنطَقَنَا ٱللَّهُ ٱلَّذِيٓ أَنطَقَ كُلَّ شَيۡءٖۚ وَهُوَ خَلَقَكُمۡ أَوَّلَ مَرَّةٖ وَإِلَيۡهِ تُرۡجَعُونَ

Мре bakoloba na baloposo na bango ete: Mpona nini bozali kolobela mabe na biso? Baloposo bikozongisa eyano ete: Allah oyo alobisaka biloko binso ye nde alobisi biso. Мре ye nde akelaki bino mpona mbala ya liboso mpe epai naye nde bokozongisama. info
التفاسير:

external-link copy
22 : 41

وَمَا كُنتُمۡ تَسۡتَتِرُونَ أَن يَشۡهَدَ عَلَيۡكُمۡ سَمۡعُكُمۡ وَلَآ أَبۡصَٰرُكُمۡ وَلَا جُلُودُكُمۡ وَلَٰكِن ظَنَنتُمۡ أَنَّ ٱللَّهَ لَا يَعۡلَمُ كَثِيرٗا مِّمَّا تَعۡمَلُونَ

Mpe bokokaki te komibomba na matoyi mpe miso mpe loposo na bino ete balobela mabe na bino te, kasi bokanisaki nde ete: Allah ayebi te ebele ya maye bozalaki kosala. info
التفاسير:

external-link copy
23 : 41

وَذَٰلِكُمۡ ظَنُّكُمُ ٱلَّذِي ظَنَنتُم بِرَبِّكُمۡ أَرۡدَىٰكُمۡ فَأَصۡبَحۡتُم مِّنَ ٱلۡخَٰسِرِينَ

Makanisi та bino maye bokanisaki mpona Nkolo wa bino ebomisi bino, yango ekotisi bino na molongo ya bazangi. info
التفاسير:

external-link copy
24 : 41

فَإِن يَصۡبِرُواْ فَٱلنَّارُ مَثۡوٗى لَّهُمۡۖ وَإِن يَسۡتَعۡتِبُواْ فَمَا هُم مِّنَ ٱلۡمُعۡتَبِينَ

Ata soki bakangi motema, sé bobele moto nde ekozala efandelo na bango, mpe soki baluki kosenga bolimbisi ekondimama te. info
التفاسير:

external-link copy
25 : 41

۞ وَقَيَّضۡنَا لَهُمۡ قُرَنَآءَ فَزَيَّنُواْ لَهُم مَّا بَيۡنَ أَيۡدِيهِمۡ وَمَا خَلۡفَهُمۡ وَحَقَّ عَلَيۡهِمُ ٱلۡقَوۡلُ فِيٓ أُمَمٖ قَدۡ خَلَتۡ مِن قَبۡلِهِم مِّنَ ٱلۡجِنِّ وَٱلۡإِنسِۖ إِنَّهُمۡ كَانُواْ خَٰسِرِينَ

Мре topesaki bango baninga ya (bilima) baye bakokabwana na bango te, mpe babongiseli bango makambo maye mazali liboso mpe sima na bango mpe liloba ekokisamaki likolo na bango ndenge esalamaki na baye baleka liboso na bango kati na bilima mpe bato. Ya soló, bazalaki bazangi. info
التفاسير:

external-link copy
26 : 41

وَقَالَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ لَا تَسۡمَعُواْ لِهَٰذَا ٱلۡقُرۡءَانِ وَٱلۡغَوۡاْ فِيهِ لَعَلَّكُمۡ تَغۡلِبُونَ

Mpe bapengwi balobi: Boyoka kurani eye te, bosalela yango makelele (tango ezali kotangama) mpo bolonga yango. info
التفاسير:

external-link copy
27 : 41

فَلَنُذِيقَنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ عَذَابٗا شَدِيدٗا وَلَنَجۡزِيَنَّهُمۡ أَسۡوَأَ ٱلَّذِي كَانُواْ يَعۡمَلُونَ

Ya sólo, tokomekisaka bapengwi etumbu ya makasi, mpe tokofutaka bango mabe koleka тропа maye bazalaki kosala. info
التفاسير:

external-link copy
28 : 41

ذَٰلِكَ جَزَآءُ أَعۡدَآءِ ٱللَّهِ ٱلنَّارُۖ لَهُمۡ فِيهَا دَارُ ٱلۡخُلۡدِ جَزَآءَۢ بِمَا كَانُواْ بِـَٔايَٰتِنَا يَجۡحَدُونَ

Wana nde lifuta ya banguna ya Allah ekozalaka moto, bakovandaka kati na yango libela, lifuta lia etumbu тропа ndenge baboyaki kondima na mikapo mia biso. info
التفاسير:

external-link copy
29 : 41

وَقَالَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ رَبَّنَآ أَرِنَا ٱلَّذَيۡنِ أَضَلَّانَا مِنَ ٱلۡجِنِّ وَٱلۡإِنسِ نَجۡعَلۡهُمَا تَحۡتَ أَقۡدَامِنَا لِيَكُونَا مِنَ ٱلۡأَسۡفَلِينَ

Mpe bapengwi bakolobaka: Nkolo; lakisa biso baye babungisaki biso kati ya bilima na bato, mpo totia bango na nsé ya makolo na biso, mpo bazala bato ya nsé na biso koleka. (okati ya moto) info
التفاسير: