Check out the new design

ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ * - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់ហ្វាត់ហ៍   អាយ៉ាត់:

Al-Fath

إِنَّا فَتَحۡنَا لَكَ فَتۡحٗا مُّبِينٗا
1. Ya soló, topesaki yo elonga moko ya monene.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
لِّيَغۡفِرَ لَكَ ٱللَّهُ مَا تَقَدَّمَ مِن ذَنۢبِكَ وَمَا تَأَخَّرَ وَيُتِمَّ نِعۡمَتَهُۥ عَلَيۡكَ وَيَهۡدِيَكَ صِرَٰطٗا مُّسۡتَقِيمٗا
2. Mpo Allah alimbisa masumu nayo oyo eleka na oyo ekoya sima, mpe mpo akokisela yo bolamu mpe akamba yo о nzela ya semba.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَيَنصُرَكَ ٱللَّهُ نَصۡرًا عَزِيزًا
3. Mpo ete Allah apesa yo lisungi ya makasi.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
هُوَ ٱلَّذِيٓ أَنزَلَ ٱلسَّكِينَةَ فِي قُلُوبِ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ لِيَزۡدَادُوٓاْ إِيمَٰنٗا مَّعَ إِيمَٰنِهِمۡۗ وَلِلَّهِ جُنُودُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۚ وَكَانَ ٱللَّهُ عَلِيمًا حَكِيمٗا
4. Ye nde akitisaka kimia о mitema mia bandimi mpo ebakisela bango kondima likolo ya kondima na bango, mpe mapinga ya likolo na ya nsé mazali ya Allah, mpe Allah azali moyebi atonda bwanya.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
لِّيُدۡخِلَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ وَٱلۡمُؤۡمِنَٰتِ جَنَّٰتٖ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُ خَٰلِدِينَ فِيهَا وَيُكَفِّرَ عَنۡهُمۡ سَيِّـَٔاتِهِمۡۚ وَكَانَ ذَٰلِكَ عِندَ ٱللَّهِ فَوۡزًا عَظِيمٗا
5. Mpo akotisa bandimi ya mibali na ya basi okati ya Iola oyo ezali koleka na nsé na yango míngala, bakozalaka libela kati na yango, mpe bakozimisa masumu na bango. Mpe wana ekozala elonga monene epai ya Allah.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَيُعَذِّبَ ٱلۡمُنَٰفِقِينَ وَٱلۡمُنَٰفِقَٰتِ وَٱلۡمُشۡرِكِينَ وَٱلۡمُشۡرِكَٰتِ ٱلظَّآنِّينَ بِٱللَّهِ ظَنَّ ٱلسَّوۡءِۚ عَلَيۡهِمۡ دَآئِرَةُ ٱلسَّوۡءِۖ وَغَضِبَ ٱللَّهُ عَلَيۡهِمۡ وَلَعَنَهُمۡ وَأَعَدَّ لَهُمۡ جَهَنَّمَۖ وَسَآءَتۡ مَصِيرٗا
6. Мре apesa etumbu na bato ya bilongi mibale ya mibali mpe ya basi baye bazali kosalela Allah mabe, ndenge moko mpe lokola basangisi Allah ya mibali mpe ya basi bazali kokanisela Allah mabe, makanisi yango ya mabe ekokwela bango, mpe Allah asilikeli bango, mpe alakeli bango botutu, mpe alengeleli bango lifelo. Mpe oyo bozongi ya mabe.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَلِلَّهِ جُنُودُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۚ وَكَانَ ٱللَّهُ عَزِيزًا حَكِيمًا
7. Mpe mapinga ya likolo na ya nsé mazali ya Allah, mpe Allah azali na nguya atonda bwanya.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
إِنَّآ أَرۡسَلۡنَٰكَ شَٰهِدٗا وَمُبَشِّرٗا وَنَذِيرٗا
8. Ya soló totindaki yo ozala nzeneneke mpe mopesi sango malamu mpe mokebisi.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
لِّتُؤۡمِنُواْ بِٱللَّهِ وَرَسُولِهِۦ وَتُعَزِّرُوهُ وَتُوَقِّرُوهُۚ وَتُسَبِّحُوهُ بُكۡرَةٗ وَأَصِيلًا
9. Mpo ete bondimela Allah na motindami wa ye, mpe bopesa ye lisungi mpe bopesa ye lokumu (Muhammad), mpe bosanzola ye (Allah) tongo mpe mpokwa.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
 
ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់ហ្វាត់ហ៍
សន្ទស្សន៍នៃជំពូក លេខ​ទំព័រ
 
ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

ការបកប្រែដោយហ្សាការីយ៉ា ម៉ូហាំម៉ាត់ជាភាសា Ngogo.

បិទ