Check out the new design

ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ * - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់ម៉ាអ៊ីដះ   អាយ៉ាត់:
وَإِذَا نَادَيۡتُمۡ إِلَى ٱلصَّلَوٰةِ ٱتَّخَذُوهَا هُزُوٗا وَلَعِبٗاۚ ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمۡ قَوۡمٞ لَّا يَعۡقِلُونَ
Mpe soki bobeleli mpona losambo, bazali koseka mpe kosalela yango litio. Mpamba te mpo ete bazanga mayele.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
قُلۡ يَٰٓأَهۡلَ ٱلۡكِتَٰبِ هَلۡ تَنقِمُونَ مِنَّآ إِلَّآ أَنۡ ءَامَنَّا بِٱللَّهِ وَمَآ أُنزِلَ إِلَيۡنَا وَمَآ أُنزِلَ مِن قَبۡلُ وَأَنَّ أَكۡثَرَكُمۡ فَٰسِقُونَ
Loba: Eh bino baye bozua buku liboso na biso! Bozali koyina biso sé mpo ete tondimi na Allah mpe na maye makiti epai na biso mpe na maye makitaki liboso? Ya sôló ebele kati na bino bozali babebisi.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
قُلۡ هَلۡ أُنَبِّئُكُم بِشَرّٖ مِّن ذَٰلِكَ مَثُوبَةً عِندَ ٱللَّهِۚ مَن لَّعَنَهُ ٱللَّهُ وَغَضِبَ عَلَيۡهِ وَجَعَلَ مِنۡهُمُ ٱلۡقِرَدَةَ وَٱلۡخَنَازِيرَ وَعَبَدَ ٱلطَّٰغُوتَۚ أُوْلَٰٓئِكَ شَرّٞ مَّكَانٗا وَأَضَلُّ عَن سَوَآءِ ٱلسَّبِيلِ
Loba: Bolingi nayebisa bino lifuta na yango ya mabe koleka epai na Allah? Ezali oyo Allah alakeli botutu mpe asilikeli ye, mpe abalolaki basusu kati na bango ba makako na ba ngulu, mpe babondelaki tarut[1]. Ba oyo wana nde bazali na esika ya mabe mpe babungi nzela.
[1] Bótala suratu Al-Baqarah mikapo 256, 257, Mpe suratu An-Nisä mikapo 51, 60, 76.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَإِذَا جَآءُوكُمۡ قَالُوٓاْ ءَامَنَّا وَقَد دَّخَلُواْ بِٱلۡكُفۡرِ وَهُمۡ قَدۡ خَرَجُواْ بِهِۦۚ وَٱللَّهُ أَعۡلَمُ بِمَا كَانُواْ يَكۡتُمُونَ
Mpe soki bayei epai na bino, balobi: Tondimi, nzoka nde bakotaki epai na bino na bopagano, mpe babimi sé na yango, mpe Allah ayebi mpenza maye bazali kobomba.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَتَرَىٰ كَثِيرٗا مِّنۡهُمۡ يُسَٰرِعُونَ فِي ٱلۡإِثۡمِ وَٱلۡعُدۡوَٰنِ وَأَكۡلِهِمُ ٱلسُّحۡتَۚ لَبِئۡسَ مَا كَانُواْ يَعۡمَلُونَ
Mpe okomona ebele na bango bazali kosala na lombango mpo na kosala mbeba mpe bonguna na kolia misolo ya mabe, wana ezali mabe na maye bazali kosala.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
لَوۡلَا يَنۡهَىٰهُمُ ٱلرَّبَّٰنِيُّونَ وَٱلۡأَحۡبَارُ عَن قَوۡلِهِمُ ٱلۡإِثۡمَ وَأَكۡلِهِمُ ٱلسُّحۡتَۚ لَبِئۡسَ مَا كَانُواْ يَصۡنَعُونَ
Soki bankumu na banganga nzambe na bango bazali kopekisa bango te maloba ya lokuta mpe kolia mbongo ya masumu! Ezali mpenza mabe oyo bazalaki kosala!
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَقَالَتِ ٱلۡيَهُودُ يَدُ ٱللَّهِ مَغۡلُولَةٌۚ غُلَّتۡ أَيۡدِيهِمۡ وَلُعِنُواْ بِمَا قَالُواْۘ بَلۡ يَدَاهُ مَبۡسُوطَتَانِ يُنفِقُ كَيۡفَ يَشَآءُۚ وَلَيَزِيدَنَّ كَثِيرٗا مِّنۡهُم مَّآ أُنزِلَ إِلَيۡكَ مِن رَّبِّكَ طُغۡيَٰنٗا وَكُفۡرٗاۚ وَأَلۡقَيۡنَا بَيۡنَهُمُ ٱلۡعَدَٰوَةَ وَٱلۡبَغۡضَآءَ إِلَىٰ يَوۡمِ ٱلۡقِيَٰمَةِۚ كُلَّمَآ أَوۡقَدُواْ نَارٗا لِّلۡحَرۡبِ أَطۡفَأَهَا ٱللَّهُۚ وَيَسۡعَوۡنَ فِي ٱلۡأَرۡضِ فَسَادٗاۚ وَٱللَّهُ لَا يُحِبُّ ٱلۡمُفۡسِدِينَ
Mpe bayuda balobi ete: Loboko ya Allah ezali ya kokangama. Tika maboko na bango nde makangama, mpe bazali na elakeli mabe na ntina ya liloba na bango oyo. Nzoka nde maboko naye (Allah) mazali ya kofungwama. Akabaka bozui naye ndenge alingi. Ebele kati na bango bazali kokola sé kokola na botomboki. Mpe bopagano na ntina ya oyo ekiteli yo kowuta epai na Nkolo nayo. Mpe totiaki kati na bango koyinana mpe na kosuana kino mokolo ya suka. Tango nyoso bazali kopelisa moto mpona bitumba, Allah azali koboma yango. Mpe bazali kotia bobebisi awa na mokili, kasi Allah alingaka babebisi te.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
 
ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់ម៉ាអ៊ីដះ
សន្ទស្សន៍នៃជំពូក លេខ​ទំព័រ
 
ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

ការបកប្រែដោយហ្សាការីយ៉ា ម៉ូហាំម៉ាត់ជាភាសា Ngogo.

បិទ