ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ

Al-Ghâshiyah

external-link copy
1 : 88

هَلۡ أَتَىٰكَ حَدِيثُ ٱلۡغَٰشِيَةِ

Ekomeli yo sango ya oyo ekozipa?. info
التفاسير:

external-link copy
2 : 88

وُجُوهٞ يَوۡمَئِذٍ خَٰشِعَةٌ

Mokolo wana bilongi bikobanga, info
التفاسير:

external-link copy
3 : 88

عَامِلَةٞ نَّاصِبَةٞ

Makambo maleki bango bakomi na bolembu, info
التفاسير:

external-link copy
4 : 88

تَصۡلَىٰ نَارًا حَامِيَةٗ

Bakozikisama o’kati ya moto ya makasi. info
التفاسير:

external-link copy
5 : 88

تُسۡقَىٰ مِنۡ عَيۡنٍ ءَانِيَةٖ

Mpe bakomelisa bango mayi ya moto. info
التفاسير:

external-link copy
6 : 88

لَّيۡسَ لَهُمۡ طَعَامٌ إِلَّا مِن ضَرِيعٖ

Bakozala na bilei te sé matiti ya nzube, info
التفاسير:

external-link copy
7 : 88

لَّا يُسۡمِنُ وَلَا يُغۡنِي مِن جُوعٖ

Ekosilisa bango nzala te mpe ekopesa bango nzoto Nkolongono te. info
التفاسير:

external-link copy
8 : 88

وُجُوهٞ يَوۡمَئِذٖ نَّاعِمَةٞ

Mokolo wana bilongi misusu bikozala na esengo. info
التفاسير:

external-link copy
9 : 88

لِّسَعۡيِهَا رَاضِيَةٞ

Bikosepela pona maye basalaki, info
التفاسير:

external-link copy
10 : 88

فِي جَنَّةٍ عَالِيَةٖ

Okati ya lola ya likolo, info
التفاسير:

external-link copy
11 : 88

لَّا تَسۡمَعُ فِيهَا لَٰغِيَةٗ

Okati na yango okoyoka te makambo ya pamba pamba, info
التفاسير:

external-link copy
12 : 88

فِيهَا عَيۡنٞ جَارِيَةٞ

Okati na yango maziba mazali kotiola, info
التفاسير:

external-link copy
13 : 88

فِيهَا سُرُرٞ مَّرۡفُوعَةٞ

Okati na yango bambeto ya kotombwama, info
التفاسير:

external-link copy
14 : 88

وَأَكۡوَابٞ مَّوۡضُوعَةٞ

Mpe bakopo bitiami, info
التفاسير:

external-link copy
15 : 88

وَنَمَارِقُ مَصۡفُوفَةٞ

Mpe bikáta bitandami, info
التفاسير:

external-link copy
16 : 88

وَزَرَابِيُّ مَبۡثُوثَةٌ

Mpe bankwala bizali ya kotandama, info
التفاسير:

external-link copy
17 : 88

أَفَلَا يَنظُرُونَ إِلَى ٱلۡإِبِلِ كَيۡفَ خُلِقَتۡ

Bazali kot ala te ba ibil[1] ndenge ekelama? info

[1] Ba ibil: Ezali kombo ya banyama oyo babengi kamela.

التفاسير:

external-link copy
18 : 88

وَإِلَى ٱلسَّمَآءِ كَيۡفَ رُفِعَتۡ

Mapata lolenge etombwama, info
التفاسير:

external-link copy
19 : 88

وَإِلَى ٱلۡجِبَالِ كَيۡفَ نُصِبَتۡ

Mpe bangomba lolenge epikama, info
التفاسير:

external-link copy
20 : 88

وَإِلَى ٱلۡأَرۡضِ كَيۡفَ سُطِحَتۡ

Mpe mabele lolenge etandama? info
التفاسير:

external-link copy
21 : 88

فَذَكِّرۡ إِنَّمَآ أَنتَ مُذَكِّرٞ

Kundola, pamba te yo ozali sé mokundoli. info
التفاسير:

external-link copy
22 : 88

لَّسۡتَ عَلَيۡهِم بِمُصَيۡطِرٍ

Kasi ozali mokengeli likolo na bango te. info
التفاسير:

external-link copy
23 : 88

إِلَّا مَن تَوَلَّىٰ وَكَفَرَ

Longola sé oyo apesi mokongo mpe aboyi kondima, info
التفاسير:

external-link copy
24 : 88

فَيُعَذِّبُهُ ٱللَّهُ ٱلۡعَذَابَ ٱلۡأَكۡبَرَ

Allah akopesa ye etumbu ya monene. info
التفاسير:

external-link copy
25 : 88

إِنَّ إِلَيۡنَآ إِيَابَهُمۡ

Ya soló, epai na biso nde bozongi na bango, info
التفاسير:

external-link copy
26 : 88

ثُمَّ إِنَّ عَلَيۡنَا حِسَابَهُم

Mpe ya sólo lifuta lia bango ezali omaboko na biso info
التفاسير: