Check out the new design

ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ * - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាត់តាវហ្ពះ   អាយ៉ាត់:
ٱسۡتَغۡفِرۡ لَهُمۡ أَوۡ لَا تَسۡتَغۡفِرۡ لَهُمۡ إِن تَسۡتَغۡفِرۡ لَهُمۡ سَبۡعِينَ مَرَّةٗ فَلَن يَغۡفِرَ ٱللَّهُ لَهُمۡۚ ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمۡ كَفَرُواْ بِٱللَّهِ وَرَسُولِهِۦۗ وَٱللَّهُ لَا يَهۡدِي ٱلۡقَوۡمَ ٱلۡفَٰسِقِينَ
80. Osengela bango bolimbisi to te, ata soki osengeli bango bolimbisi mbala ntuku sambo, Allah akolimbisa bango te, mpo bapengwi na Allah na motindami waye. Mpe Allah akambaka babebisi te.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
فَرِحَ ٱلۡمُخَلَّفُونَ بِمَقۡعَدِهِمۡ خِلَٰفَ رَسُولِ ٱللَّهِ وَكَرِهُوٓاْ أَن يُجَٰهِدُواْ بِأَمۡوَٰلِهِمۡ وَأَنفُسِهِمۡ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ وَقَالُواْ لَا تَنفِرُواْ فِي ٱلۡحَرِّۗ قُلۡ نَارُ جَهَنَّمَ أَشَدُّ حَرّٗاۚ لَّوۡ كَانُواْ يَفۡقَهُونَ
81. Baye batikalaki sima, basepeli mpo batikali epai na bango, sima ya motindami wa Allah, baboyi kobunda na misolo mia bango na milimo mia bango o nzela ya Allah. Мре balobi: Bökende kobunda te na molunge oyo. Loba: Moto ya lifelo moleki molunge, soki bazali koyeba.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
فَلۡيَضۡحَكُواْ قَلِيلٗا وَلۡيَبۡكُواْ كَثِيرٗا جَزَآءَۢ بِمَا كَانُواْ يَكۡسِبُونَ
82. Baseka[1] moke mpe balela[2] mingi, lifuta lia maye bazalaki kosala.
[1] Awa na mokili.
[2] O kati ya etumbu ya mokolo ya suka.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
فَإِن رَّجَعَكَ ٱللَّهُ إِلَىٰ طَآئِفَةٖ مِّنۡهُمۡ فَٱسۡتَـٔۡذَنُوكَ لِلۡخُرُوجِ فَقُل لَّن تَخۡرُجُواْ مَعِيَ أَبَدٗا وَلَن تُقَٰتِلُواْ مَعِيَ عَدُوًّاۖ إِنَّكُمۡ رَضِيتُم بِٱلۡقُعُودِ أَوَّلَ مَرَّةٖ فَٱقۡعُدُواْ مَعَ ٱلۡخَٰلِفِينَ
83. Soki Allah azongisi yo o ngambu ya (bato bana) mpe soki batuni yo ndingisa тропа kokende kobunda, loba: Bokobimaka na ngai te, mpe bokobundisaka banguna elongo na ngai te. Bosepelaki kotikala mbala ya yambo epai na bino, bovanda esika moko na batikali.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَلَا تُصَلِّ عَلَىٰٓ أَحَدٖ مِّنۡهُم مَّاتَ أَبَدٗا وَلَا تَقُمۡ عَلَىٰ قَبۡرِهِۦٓۖ إِنَّهُمۡ كَفَرُواْ بِٱللَّهِ وَرَسُولِهِۦ وَمَاتُواْ وَهُمۡ فَٰسِقُونَ
84. Mpe kosambelela te тропа bango soki moko wa bango akufi, mpe kotelema na lilita lia ye te. Mpo ya soló, bango basili kopengwa na Allah na motindami waye, mpe bakufaki bazali babebisi.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَلَا تُعۡجِبۡكَ أَمۡوَٰلُهُمۡ وَأَوۡلَٰدُهُمۡۚ إِنَّمَا يُرِيدُ ٱللَّهُ أَن يُعَذِّبَهُم بِهَا فِي ٱلدُّنۡيَا وَتَزۡهَقَ أَنفُسُهُمۡ وَهُمۡ كَٰفِرُونَ
85. Bana na misolo mia bango mikamwisa yo te. Mpo ya sólo, Allah alingi nde kopesa bango etumbu тропа yango awa na mokili, mpe azua milimo mia bango bazali na bopengwi.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَإِذَآ أُنزِلَتۡ سُورَةٌ أَنۡ ءَامِنُواْ بِٱللَّهِ وَجَٰهِدُواْ مَعَ رَسُولِهِ ٱسۡتَـٔۡذَنَكَ أُوْلُواْ ٱلطَّوۡلِ مِنۡهُمۡ وَقَالُواْ ذَرۡنَا نَكُن مَّعَ ٱلۡقَٰعِدِينَ
86. Мре soki mokapo moko ekiti kowuta epai ya Allah été bandima na Allah mpe babunda elongo na motindami waye, okomona baye bazali na makoki nyoso ya kobunda bazali kosenga yo nzela mpo batikala elongo na baye batikali.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
 
ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាត់តាវហ្ពះ
សន្ទស្សន៍នៃជំពូក លេខ​ទំព័រ
 
ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

ការបកប្រែដោយហ្សាការីយ៉ា ម៉ូហាំម៉ាត់ជាភាសា Ngogo.

បិទ