Check out the new design

വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ * - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: യൂനുസ്   ആയത്ത്:
قُلۡ هَلۡ مِن شُرَكَآئِكُم مَّن يَبۡدَؤُاْ ٱلۡخَلۡقَ ثُمَّ يُعِيدُهُۥۚ قُلِ ٱللَّهُ يَبۡدَؤُاْ ٱلۡخَلۡقَ ثُمَّ يُعِيدُهُۥۖ فَأَنَّىٰ تُؤۡفَكُونَ
34. Loba: Nalingi koyeba banzambe na bino, basusu kati na bango bakelaka mpe bazongisaka ekelamu na bomoyi (o sima ya liwa?) loba: Allah ye mei nde abandaki ekelamu mpe akozongisa ye, тропа nini bolingi komitiya mosika na kokumisa ye?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قُلۡ هَلۡ مِن شُرَكَآئِكُم مَّن يَهۡدِيٓ إِلَى ٱلۡحَقِّۚ قُلِ ٱللَّهُ يَهۡدِي لِلۡحَقِّۗ أَفَمَن يَهۡدِيٓ إِلَى ٱلۡحَقِّ أَحَقُّ أَن يُتَّبَعَ أَمَّن لَّا يَهِدِّيٓ إِلَّآ أَن يُهۡدَىٰۖ فَمَا لَكُمۡ كَيۡفَ تَحۡكُمُونَ
35. Loba: Boye okati ya banzambe na bino, ezali na moko oyo azali kokamba na nzela ya bosembo? Loba: Allah nde akambaka na bosoló, boye oyo akambaka na nzela ya bosóló nde akoki ete balanda to oyo akambaka sé soki akambami? Ndenge nini bozali kokata likambo na motindo oyo?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَمَا يَتَّبِعُ أَكۡثَرُهُمۡ إِلَّا ظَنًّاۚ إِنَّ ٱلظَّنَّ لَا يُغۡنِي مِنَ ٱلۡحَقِّ شَيۡـًٔاۚ إِنَّ ٱللَّهَ عَلِيمُۢ بِمَا يَفۡعَلُونَ
36. Mpe ebele kati na bango bazali kolanda sé makanisi, kasi makanisi ekosala bosembo eloko moko te, ya soló Allah ayebi malamu maye bazali kosala.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَمَا كَانَ هَٰذَا ٱلۡقُرۡءَانُ أَن يُفۡتَرَىٰ مِن دُونِ ٱللَّهِ وَلَٰكِن تَصۡدِيقَ ٱلَّذِي بَيۡنَ يَدَيۡهِ وَتَفۡصِيلَ ٱلۡكِتَٰبِ لَا رَيۡبَ فِيهِ مِن رَّبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
37. Kurani oyo ekoki kokelama te mpe bakoki kopesa yango na moto mosusu te na esika ya Allah, kasi; eyei тропа kondima na oyo ekitaki liboso na yango, mpe ezali ndimbola ya buku, tembe ezali te kati na yango, ewuti epai ya Nkolo ya molongo.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
أَمۡ يَقُولُونَ ٱفۡتَرَىٰهُۖ قُلۡ فَأۡتُواْ بِسُورَةٖ مِّثۡلِهِۦ وَٱدۡعُواْ مَنِ ٱسۡتَطَعۡتُم مِّن دُونِ ٱللَّهِ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
38. To bazali koloba ete: (Muhammad) nde asalaki yango na ndenge naye, loba: Boya na suratu lokola oyo, mpe bobenga baye banso bakoki kosalisa bino na botiki Allah soki bozali bato ya bosembo.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
بَلۡ كَذَّبُواْ بِمَا لَمۡ يُحِيطُواْ بِعِلۡمِهِۦ وَلَمَّا يَأۡتِهِمۡ تَأۡوِيلُهُۥۚ كَذَٰلِكَ كَذَّبَ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡۖ فَٱنظُرۡ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلظَّٰلِمِينَ
39. Kasi baboyaki kondima na eloko ya motuya oyo bazali na boyebi na yango te mpe bososoli na yango ekomelaki mpe bango te, lolenge moko na baye balekaki liboso na bango babukaki lokuta. Mpe tala ndenge nini bato mabe basukaki.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَمِنۡهُم مَّن يُؤۡمِنُ بِهِۦ وَمِنۡهُم مَّن لَّا يُؤۡمِنُ بِهِۦۚ وَرَبُّكَ أَعۡلَمُ بِٱلۡمُفۡسِدِينَ
40. O kati na bango, basusu bazali kondima na yango, mpe basusu bazali kondima na yango te. Kasi Nkolo wayo ayebi malamu babebisi koleka.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَإِن كَذَّبُوكَ فَقُل لِّي عَمَلِي وَلَكُمۡ عَمَلُكُمۡۖ أَنتُم بَرِيٓـُٔونَ مِمَّآ أَعۡمَلُ وَأَنَا۠ بَرِيٓءٞ مِّمَّا تَعۡمَلُونَ
41. Mpe soki baboyi kondimela yo, loba: Nazali na mosala mwa ngai, mpe bozali na mosala mia bino. Bino bozali kowangana maye nazali kosala, ngai mpe nawangani maye bozali kosala.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَمِنۡهُم مَّن يَسۡتَمِعُونَ إِلَيۡكَۚ أَفَأَنتَ تُسۡمِعُ ٱلصُّمَّ وَلَوۡ كَانُواْ لَا يَعۡقِلُونَ
42. Mpe kati na bango ezali na baye bazali koyokela yo. Boye yo nde okoyokisa bakufi matoyi, ata soki bazali koyeba te?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
 
പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: യൂനുസ്
സൂറത്തുകളുടെ സൂചിക പേജ് നമ്പർ
 
വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

വിവർത്തനം ചെയ്തത് സക്കറിയ മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ.

അടക്കുക