Check out the new design

വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ * - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: ന്നഹ്ൽ   ആയത്ത്:
وَأَلۡقَىٰ فِي ٱلۡأَرۡضِ رَوَٰسِيَ أَن تَمِيدَ بِكُمۡ وَأَنۡهَٰرٗا وَسُبُلٗا لَّعَلَّكُمۡ تَهۡتَدُونَ
15. Mpe apika bangomba o kati na mabele тропа boningani na yango esala bino mabe te, mpe mingala na banzela, mpo bokoka kokambama.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَعَلَٰمَٰتٖۚ وَبِٱلنَّجۡمِ هُمۡ يَهۡتَدُونَ
16. Mpe na bilembo bisusu (bizali kolakisa bino nzela), ndenge moko minzoto mpo ete babunga te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
أَفَمَن يَخۡلُقُ كَمَن لَّا يَخۡلُقُۚ أَفَلَا تَذَكَّرُونَ
17. Boye, oyo akelaka azali lokola oyo akelaka te? Boye bozali kokanisa te?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَإِن تَعُدُّواْ نِعۡمَةَ ٱللَّهِ لَا تُحۡصُوهَآۗ إِنَّ ٱللَّهَ لَغَفُورٞ رَّحِيمٞ
18. Mpe soki bolingi kotanga bolamu bwa Allah, bokokoka koyeba motango mwa yango te, ya solo Allah azali molimbisi atonda ngolu.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَٱللَّهُ يَعۡلَمُ مَا تُسِرُّونَ وَمَا تُعۡلِنُونَ
19. Mpe Allah ayebi maye bozali kobomba na maye bozali komonisa polele.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَٱلَّذِينَ يَدۡعُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ لَا يَخۡلُقُونَ شَيۡـٔٗا وَهُمۡ يُخۡلَقُونَ
20. Na baye wana bazali kobondela basusu mpe kotika Allah bakela eloko te, mpe bango bakelama.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
أَمۡوَٰتٌ غَيۡرُ أَحۡيَآءٖۖ وَمَا يَشۡعُرُونَ أَيَّانَ يُبۡعَثُونَ
21. Bazali bakufi kasi bazali na bomoyi te, mpe bayebi te mokolo nini bakosekwisama.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
إِلَٰهُكُمۡ إِلَٰهٞ وَٰحِدٞۚ فَٱلَّذِينَ لَا يُؤۡمِنُونَ بِٱلۡأٓخِرَةِ قُلُوبُهُم مُّنكِرَةٞ وَهُم مُّسۡتَكۡبِرُونَ
22. Nzambe wa bino (Allah) azali Nzambe sé moko ya kobondela na bosôló, mpe baye bazali kondima na mokolo mwa suka te, mitema mia bango miboya bomoko bwa Allah, mpe batondi na lolendo.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
لَا جَرَمَ أَنَّ ٱللَّهَ يَعۡلَمُ مَا يُسِرُّونَ وَمَا يُعۡلِنُونَۚ إِنَّهُۥ لَا يُحِبُّ ٱلۡمُسۡتَكۡبِرِينَ
23. Ezali na tembe te ete Allah ayebi maye bazali kobomba na maye bazali komonisa polele, ya soló ye alingaka bato ya lolendo te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَإِذَا قِيلَ لَهُم مَّاذَآ أَنزَلَ رَبُّكُمۡ قَالُوٓاْ أَسَٰطِيرُ ٱلۡأَوَّلِينَ
24. Mpe soki batuni bango, nini Nkolo wa bino akitisa? Bakolobaka: Ezali masapo makala.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
لِيَحۡمِلُوٓاْ أَوۡزَارَهُمۡ كَامِلَةٗ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ وَمِنۡ أَوۡزَارِ ٱلَّذِينَ يُضِلُّونَهُم بِغَيۡرِ عِلۡمٍۗ أَلَا سَآءَ مَا يَزِرُونَ
25. Mpo été mokolo mwa suka bamema mikumba mia bango mibimba, na mikumba ya baye bango babungisaki na kozanga mayele. Boye ezali mabe te mikumba ya motindo oyo!
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قَدۡ مَكَرَ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡ فَأَتَى ٱللَّهُ بُنۡيَٰنَهُم مِّنَ ٱلۡقَوَاعِدِ فَخَرَّ عَلَيۡهِمُ ٱلسَّقۡفُ مِن فَوۡقِهِمۡ وَأَتَىٰهُمُ ٱلۡعَذَابُ مِنۡ حَيۡثُ لَا يَشۡعُرُونَ
26. Baye balekaki liboso na bango basilaka kosala likita ya mabe, mpe Allah abetaki na nsé ya misisa ya ndako na bango mpe likolo na yango ekwelaki bango mpe etumbu ezuaki bango o esika bazalaki kokanisa te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
 
പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: ന്നഹ്ൽ
സൂറത്തുകളുടെ സൂചിക പേജ് നമ്പർ
 
വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

വിവർത്തനം ചെയ്തത് സക്കറിയ മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ.

അടക്കുക