Check out the new design

വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ * - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: ബഖറഃ   ആയത്ത്:
ٱلَّذِينَ يَأۡكُلُونَ ٱلرِّبَوٰاْ لَا يَقُومُونَ إِلَّا كَمَا يَقُومُ ٱلَّذِي يَتَخَبَّطُهُ ٱلشَّيۡطَٰنُ مِنَ ٱلۡمَسِّۚ ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمۡ قَالُوٓاْ إِنَّمَا ٱلۡبَيۡعُ مِثۡلُ ٱلرِّبَوٰاْۗ وَأَحَلَّ ٱللَّهُ ٱلۡبَيۡعَ وَحَرَّمَ ٱلرِّبَوٰاْۚ فَمَن جَآءَهُۥ مَوۡعِظَةٞ مِّن رَّبِّهِۦ فَٱنتَهَىٰ فَلَهُۥ مَا سَلَفَ وَأَمۡرُهُۥٓ إِلَى ٱللَّهِۖ وَمَنۡ عَادَ فَأُوْلَٰٓئِكَ أَصۡحَٰبُ ٱلنَّارِۖ هُمۡ فِيهَا خَٰلِدُونَ
275. Baye bazali kolia mbongo ya ekotama, bakotelema te (kowuta na lisekwa na malita na bango), sé lokola kotelema ya moto oyo zabulu asimbi ye na liboma. Mpo ete bango balobaki ete: Ekotama ezali sé lokola mombongo. Kasi Allah apesi ndingisa ya kosala mombongo, mpe apekisi ekotama. Mpe oyo okati na bino malendisi ya Nkolo naye ekomeli ye mpe atiki ekotama azali na masumu te na maye maleka liboso, mpe likambo naye ezali epai na Allah. Kasi baye bakozongela yango, bango wana nde bazali bato ya móto bakozala na kati seko na seko.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
يَمۡحَقُ ٱللَّهُ ٱلرِّبَوٰاْ وَيُرۡبِي ٱلصَّدَقَٰتِۗ وَٱللَّهُ لَا يُحِبُّ كُلَّ كَفَّارٍ أَثِيمٍ
276. Allah azali kobebisa ekotama mpe azali kopambola mbongo ya makabo. Mpe Allah alingaka bapengwi te basumuki.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
إِنَّ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ وَأَقَامُواْ ٱلصَّلَوٰةَ وَءَاتَوُاْ ٱلزَّكَوٰةَ لَهُمۡ أَجۡرُهُمۡ عِندَ رَبِّهِمۡ وَلَا خَوۡفٌ عَلَيۡهِمۡ وَلَا هُمۡ يَحۡزَنُونَ
277. Ya sôló baye bandimi na Allah, mpe bazali kosala misala ya malamu, mpe bazali kotelemisa losambo mpe bazali kobimisa zakat,(1) lifuta lia bango lizali epai ya Nkolo wa bango. Bakozalaka na bobangi te mpe bakozala na mpasi te.
2 Allah.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ ٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَذَرُواْ مَا بَقِيَ مِنَ ٱلرِّبَوٰٓاْ إِن كُنتُم مُّؤۡمِنِينَ
278. Eh bino bandimi! Bobanga Allah, mpe botika kozua ndambu ya mosolo ya ekotama, soki ya sôló bozali bandimi.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَإِن لَّمۡ تَفۡعَلُواْ فَأۡذَنُواْ بِحَرۡبٖ مِّنَ ٱللَّهِ وَرَسُولِهِۦۖ وَإِن تُبۡتُمۡ فَلَكُمۡ رُءُوسُ أَمۡوَٰلِكُمۡ لَا تَظۡلِمُونَ وَلَا تُظۡلَمُونَ
279. Mpe soki bosaleli yango te, bozua elaka ya etumba kowuta epayi ya Allah mpe na motindami naye. Mpe soki botubeli, bokozala na mitu ya misolo mia bino, bobuba bato te bino mpe bobubama te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَإِن كَانَ ذُو عُسۡرَةٖ فَنَظِرَةٌ إِلَىٰ مَيۡسَرَةٖۚ وَأَن تَصَدَّقُواْ خَيۡرٞ لَّكُمۡ إِن كُنتُمۡ تَعۡلَمُونَ
280. Mpe soki moto azali na nyongo na bino azali na kpokoso mpona kofuta yango, bokozelisa ye kino azua yango. Mpe soki botiki yango likabo, ezali malamu mpona bino soki boyebaki.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَٱتَّقُواْ يَوۡمٗا تُرۡجَعُونَ فِيهِ إِلَى ٱللَّهِۖ ثُمَّ تُوَفَّىٰ كُلُّ نَفۡسٖ مَّا كَسَبَتۡ وَهُمۡ لَا يُظۡلَمُونَ
281. Mpe bobanga mokolo moye bokozonga epai ya Allah, sima molimo nyoso mokofutama na manso asalaki, mpe bakobubamaka te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
 
പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: ബഖറഃ
സൂറത്തുകളുടെ സൂചിക പേജ് നമ്പർ
 
വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

വിവർത്തനം ചെയ്തത് സക്കറിയ മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ.

അടക്കുക