Check out the new design

വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ * - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: ത്വാഹാ   ആയത്ത്:
قَالَ عِلۡمُهَا عِندَ رَبِّي فِي كِتَٰبٖۖ لَّا يَضِلُّ رَبِّي وَلَا يَنسَى
(Mûssa) alobi: Oyo ayebi makambo na bango ezali nde Nkolo wa ngai, ekomama o kati ya buku, Nkolo wa ngai abungaka te, mpe abosanaka te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
ٱلَّذِي جَعَلَ لَكُمُ ٱلۡأَرۡضَ مَهۡدٗا وَسَلَكَ لَكُمۡ فِيهَا سُبُلٗا وَأَنزَلَ مِنَ ٱلسَّمَآءِ مَآءٗ فَأَخۡرَجۡنَا بِهِۦٓ أَزۡوَٰجٗا مِّن نَّبَاتٖ شَتَّىٰ
Oyo asalelaki bino mabele ezala lokola mbeto mpe atiela bino banzela okati na yango, mpe azali kokitisela bino mayi kowuta o likolo, mpe na yango tobimisaka milona ndenge na ndenge,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
كُلُواْ وَٱرۡعَوۡاْ أَنۡعَٰمَكُمۡۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتٖ لِّأُوْلِي ٱلنُّهَىٰ
Boliya mpe boleyisa bibwele na bino. Ya soló, wana nde bilembo тропа baye bazali kokanisa (bazali na mayele)
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
۞ مِنۡهَا خَلَقۡنَٰكُمۡ وَفِيهَا نُعِيدُكُمۡ وَمِنۡهَا نُخۡرِجُكُمۡ تَارَةً أُخۡرَىٰ
Tokelaki bino kowuta na yango (mabele) mpe kati na yango nde tokozongisa bino, mpe tokobimisa bino lisusu okati na yango mbala mosusu.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَلَقَدۡ أَرَيۡنَٰهُ ءَايَٰتِنَا كُلَّهَا فَكَذَّبَ وَأَبَىٰ
Mpe tosilaki kolakisa ye bilembo bia biso nyoso, kasi aboyaki kondima.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قَالَ أَجِئۡتَنَا لِتُخۡرِجَنَا مِنۡ أَرۡضِنَا بِسِحۡرِكَ يَٰمُوسَىٰ
(Falo) alobi: Oh Mûssa! Boye oyeli biso bonganga bwa yo mpo obimisa biso na mabele na biso?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَلَنَأۡتِيَنَّكَ بِسِحۡرٖ مِّثۡلِهِۦ فَٱجۡعَلۡ بَيۡنَنَا وَبَيۡنَكَ مَوۡعِدٗا لَّا نُخۡلِفُهُۥ نَحۡنُ وَلَآ أَنتَ مَكَانٗا سُوٗى
Kasi tokoyela yo bonganga lokola yango, tiela biso elaka mpo moko kati na biso azanga te, ezala na esika ya malamu.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قَالَ مَوۡعِدُكُمۡ يَوۡمُ ٱلزِّينَةِ وَأَن يُحۡشَرَ ٱلنَّاسُ ضُحٗى
(Mûssa) alobi: Elaka na biso ekozala o mokolo mwa eyenga, mpe bato basangana na tongo.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَتَوَلَّىٰ فِرۡعَوۡنُ فَجَمَعَ كَيۡدَهُۥ ثُمَّ أَتَىٰ
Falo akei mpe asangisi bato naye na kibondoki na bango, sima bayei koyanola na elaka.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قَالَ لَهُم مُّوسَىٰ وَيۡلَكُمۡ لَا تَفۡتَرُواْ عَلَى ٱللَّهِ كَذِبٗا فَيُسۡحِتَكُم بِعَذَابٖۖ وَقَدۡ خَابَ مَنِ ٱفۡتَرَىٰ
Mûssa ayebisi bango: Mabe ezala na bino, bobukela Allah lokuta te, noki te etumbu ekozua bino. Na oyo akobukela Allah lokuta, asili kobungisama.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَتَنَٰزَعُوٓاْ أَمۡرَهُم بَيۡنَهُمۡ وَأَسَرُّواْ ٱلنَّجۡوَىٰ
Nasima bakomaki kolobana bango na bango nasekele.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قَالُوٓاْ إِنۡ هَٰذَٰنِ لَسَٰحِرَٰنِ يُرِيدَانِ أَن يُخۡرِجَاكُم مِّنۡ أَرۡضِكُم بِسِحۡرِهِمَا وَيَذۡهَبَا بِطَرِيقَتِكُمُ ٱلۡمُثۡلَىٰ
Balobi: Ba oyo bazali banganga mibale, balingi kobimisa bino na mabele na bino na bonganga na bango, mpe botika nzela ya malamu oyo bozali na yango.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَأَجۡمِعُواْ كَيۡدَكُمۡ ثُمَّ ٱئۡتُواْ صَفّٗاۚ وَقَدۡ أَفۡلَحَ ٱلۡيَوۡمَ مَنِ ٱسۡتَعۡلَىٰ
Bosangisa bonganga na bino nyoso, mpe bosala molongo. Mpe oyo akozala likolo asili kolonga.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
 
പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: ത്വാഹാ
സൂറത്തുകളുടെ സൂചിക പേജ് നമ്പർ
 
വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

വിവർത്തനം ചെയ്തത് സക്കറിയ മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ.

അടക്കുക