Check out the new design

വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ * - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: ശ്ശുഅറാഅ്   ആയത്ത്:
لَعَلَّنَا نَتَّبِعُ ٱلسَّحَرَةَ إِن كَانُواْ هُمُ ٱلۡغَٰلِبِينَ
40. Mpo tolanda banganga soki bango balongi?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَلَمَّا جَآءَ ٱلسَّحَرَةُ قَالُواْ لِفِرۡعَوۡنَ أَئِنَّ لَنَا لَأَجۡرًا إِن كُنَّا نَحۡنُ ٱلۡغَٰلِبِينَ
41. Mpe tango banganga bakomi epai ya falo balobi naye été: Boye tozali na lifuta soki tolongi?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قَالَ نَعَمۡ وَإِنَّكُمۡ إِذٗا لَّمِنَ ٱلۡمُقَرَّبِينَ
42. (Falo) alobi: Iyo, ya soló, nakotiya bino pembeni na ngai.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قَالَ لَهُم مُّوسَىٰٓ أَلۡقُواْ مَآ أَنتُم مُّلۡقُونَ
43. Mûssa ayebisi bango: Bobwaka oyo bolingi kobwaka.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَأَلۡقَوۡاْ حِبَالَهُمۡ وَعِصِيَّهُمۡ وَقَالُواْ بِعِزَّةِ فِرۡعَوۡنَ إِنَّا لَنَحۡنُ ٱلۡغَٰلِبُونَ
44. Mpe babwaki basinga na bamangenda na bango, (mpe balobi): Na nguya ya falo ya sólo, tokolonga!
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَأَلۡقَىٰ مُوسَىٰ عَصَاهُ فَإِذَا هِيَ تَلۡقَفُ مَا يَأۡفِكُونَ
45. Mpe Mûssa abwaki lingenda lia ye, mpe tala emeli nyoso oyo basalaki.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَأُلۡقِيَ ٱلسَّحَرَةُ سَٰجِدِينَ
46. Mpe banganga nyoso bakweyaki na kofukama.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قَالُوٓاْ ءَامَنَّا بِرَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
47. Balobi: Tondimi na Nkolo wa molongo,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
رَبِّ مُوسَىٰ وَهَٰرُونَ
48. Nkolo ya Mûssa na Hânına.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قَالَ ءَامَنتُمۡ لَهُۥ قَبۡلَ أَنۡ ءَاذَنَ لَكُمۡۖ إِنَّهُۥ لَكَبِيرُكُمُ ٱلَّذِي عَلَّمَكُمُ ٱلسِّحۡرَ فَلَسَوۡفَ تَعۡلَمُونَۚ لَأُقَطِّعَنَّ أَيۡدِيَكُمۡ وَأَرۡجُلَكُم مِّنۡ خِلَٰفٖ وَلَأُصَلِّبَنَّكُمۡ أَجۡمَعِينَ
49. (Falo) alobi: Bondimi naye yambo ete napesa bino ndingisa! Ya sólo, ye nde mokonzi ya bino oyo alakisaki bino bonganga, bokoyeba kala te. Nakokata bino maboko na makolo na lolenge ya bokeseni, mpe nakobaka bino banso na nzete!
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قَالُواْ لَا ضَيۡرَۖ إِنَّآ إِلَىٰ رَبِّنَا مُنقَلِبُونَ
50. Banganga balobi: Mabe ezali te, pamba te, mpo tokozongaka ya soló epai ya Nkolo wa biso!
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
إِنَّا نَطۡمَعُ أَن يَغۡفِرَ لَنَا رَبُّنَا خَطَٰيَٰنَآ أَن كُنَّآ أَوَّلَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
51. Ya soló, posa na biso ezali ete Nkolo wa biso alimbisa biso, mpo tozali bato ya yambo тропа kondima (ye Allah).
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
۞ وَأَوۡحَيۡنَآ إِلَىٰ مُوسَىٰٓ أَنۡ أَسۡرِ بِعِبَادِيٓ إِنَّكُم مُّتَّبَعُونَ
52. Mpe toyebisaki na Mûssa ete: Akende na butu elongo na bawumbu na ngai, mpo ya soló bakolanda bino.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَأَرۡسَلَ فِرۡعَوۡنُ فِي ٱلۡمَدَآئِنِ حَٰشِرِينَ
53. Мре falo atindi été basangisa bato ya mboka.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
إِنَّ هَٰٓؤُلَآءِ لَشِرۡذِمَةٞ قَلِيلُونَ
54. Ete: Ya sólo, bato oyo bazali токе.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَإِنَّهُمۡ لَنَا لَغَآئِظُونَ
55. Мре ya sólo, balongi biso.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَإِنَّا لَجَمِيعٌ حَٰذِرُونَ
56. Kasi biso banso tozali na bokebi.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَأَخۡرَجۡنَٰهُم مِّن جَنَّٰتٖ وَعُيُونٖ
57. Mpe tobimisaki bango na bilanga mpe mingala.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَكُنُوزٖ وَمَقَامٖ كَرِيمٖ
58. Bamaziba ya bomengo mpe bisika ya lokumu.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
كَذَٰلِكَۖ وَأَوۡرَثۡنَٰهَا بَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ
59. Lolenge moko topesaki bokitani na bana ya isalayele.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَأَتۡبَعُوهُم مُّشۡرِقِينَ
60. Mpe balandaki bango na ntongo makasi.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
 
പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: ശ്ശുഅറാഅ്
സൂറത്തുകളുടെ സൂചിക പേജ് നമ്പർ
 
വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

വിവർത്തനം ചെയ്തത് സക്കറിയ മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ.

അടക്കുക