വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - الترجمة اللينغالا * - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: സൂറത്തു റൂം   ആയത്ത്:

Ar-Rrûm (BALOMA)

الٓمٓ
1. Alif, lâm, mîm.(1)
1 Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
غُلِبَتِ ٱلرُّومُ
2. Bato ya loma balongaki te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فِيٓ أَدۡنَى ٱلۡأَرۡضِ وَهُم مِّنۢ بَعۡدِ غَلَبِهِمۡ سَيَغۡلِبُونَ
3. Mpe sima ya kokweya na bango, bakozala balongi okati ya mboka oyo ezali pembeni na bango.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فِي بِضۡعِ سِنِينَۗ لِلَّهِ ٱلۡأَمۡرُ مِن قَبۡلُ وَمِنۢ بَعۡدُۚ وَيَوۡمَئِذٖ يَفۡرَحُ ٱلۡمُؤۡمِنُونَ
4. O kati ya ndambu ya mibu mitindo mizali mia Allah na ebandeli mpe suka, mpe bandimi bakosepelaka mokolo wana,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
بِنَصۡرِ ٱللَّهِۚ يَنصُرُ مَن يَشَآءُۖ وَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ
5. Na elonga bwa Allah. Alongisaka oyo alingi, mpe azali na nguya atonda ngolu.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَعۡدَ ٱللَّهِۖ لَا يُخۡلِفُ ٱللَّهُ وَعۡدَهُۥ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يَعۡلَمُونَ
6. Wana nde elaka ya Allah, Allah azangisaka elaka naye te. Kasi ebele ya bato bazali koyeba te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
يَعۡلَمُونَ ظَٰهِرٗا مِّنَ ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا وَهُمۡ عَنِ ٱلۡأٓخِرَةِ هُمۡ غَٰفِلُونَ
7. Bazali sé koyeba bomoyi ya mokili mpe babosani oyo ya mokolo mwa suka.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
أَوَلَمۡ يَتَفَكَّرُواْ فِيٓ أَنفُسِهِمۗ مَّا خَلَقَ ٱللَّهُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ وَمَا بَيۡنَهُمَآ إِلَّا بِٱلۡحَقِّ وَأَجَلٖ مُّسَمّٗىۗ وَإِنَّ كَثِيرٗا مِّنَ ٱلنَّاسِ بِلِقَآيِٕ رَبِّهِمۡ لَكَٰفِرُونَ
8. Bakanisaka тропа bango moko te?! Allah akelaki te likolo na mabele na nyoso oyo ezali kati na yango mibale mpe akokisaki yango sé na bosôló тре тропа mikolo miyebani. Мре ya soló, bato ebele bazali kondima na bokutani na Nkolo wa bango te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
أَوَلَمۡ يَسِيرُواْ فِي ٱلۡأَرۡضِ فَيَنظُرُواْ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡۚ كَانُوٓاْ أَشَدَّ مِنۡهُمۡ قُوَّةٗ وَأَثَارُواْ ٱلۡأَرۡضَ وَعَمَرُوهَآ أَكۡثَرَ مِمَّا عَمَرُوهَا وَجَآءَتۡهُمۡ رُسُلُهُم بِٱلۡبَيِّنَٰتِۖ فَمَا كَانَ ٱللَّهُ لِيَظۡلِمَهُمۡ وَلَٰكِن كَانُوٓاْ أَنفُسَهُمۡ يَظۡلِمُونَ
9. Boye bazali kotambola na mokili te, batala lolenge basalaki na bato ya liboso na bango? Bazalaki na bokasi mingi koleka bango, тре basalelaki mabele mingi na kolona mpe kotonga, batindami na bango bayelaki bango bilembo? Allah abubaki bango te, kasi bango moko nde bamibubaki.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
ثُمَّ كَانَ عَٰقِبَةَ ٱلَّذِينَ أَسَٰٓـُٔواْ ٱلسُّوٓأَىٰٓ أَن كَذَّبُواْ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ وَكَانُواْ بِهَا يَسۡتَهۡزِءُونَ
10. Na yango suka ya mabe ekozongela baye basalaki mabe, na koboya mikapo mia Allah, mpe bazalaki kozua yango na liseki.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
ٱللَّهُ يَبۡدَؤُاْ ٱلۡخَلۡقَ ثُمَّ يُعِيدُهُۥ ثُمَّ إِلَيۡهِ تُرۡجَعُونَ
11. Allah nde abandaka bokeli mpe sima azongeli yango, mpe epai naye nde bokozongisama.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَيَوۡمَ تَقُومُ ٱلسَّاعَةُ يُبۡلِسُ ٱلۡمُجۡرِمُونَ
12. Mpe mokolo moye ngonga ekokokaka, batomboki bakozangaka elikia.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَلَمۡ يَكُن لَّهُم مِّن شُرَكَآئِهِمۡ شُفَعَٰٓؤُاْ وَكَانُواْ بِشُرَكَآئِهِمۡ كَٰفِرِينَ
13. Mpe bakozuaka baye bakosalisaka bango te okati ya basangisi ba bango, mpe bakoyebaka banzambe na bango lisusu te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَيَوۡمَ تَقُومُ ٱلسَّاعَةُ يَوۡمَئِذٖ يَتَفَرَّقُونَ
14. Mpe mokolo moye ngonga ekokokaka, bakokabwanaka. (bango na bango).
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَأَمَّا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ فَهُمۡ فِي رَوۡضَةٖ يُحۡبَرُونَ
15. Kasi тропа baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, bakozalaka na bosepeli o kati na lola.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَأَمَّا ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ وَكَذَّبُواْ بِـَٔايَٰتِنَا وَلِقَآيِٕ ٱلۡأٓخِرَةِ فَأُوْلَٰٓئِكَ فِي ٱلۡعَذَابِ مُحۡضَرُونَ
16. Mpe тропа baye bapengwaki, тре baboyaki kondima na bilembo bia biso mpe kondima na mokolo ya suka bakomemama okati ya etumbu.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَسُبۡحَٰنَ ٱللَّهِ حِينَ تُمۡسُونَ وَحِينَ تُصۡبِحُونَ
17. Bokumisa Allah tongo mpe pokwa.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَلَهُ ٱلۡحَمۡدُ فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَعَشِيّٗا وَحِينَ تُظۡهِرُونَ
18. Mpe matondo nyoso ya likolo mpe ya nsé ezali ya ye, na nzanga mpe sima ya nzanga.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
يُخۡرِجُ ٱلۡحَيَّ مِنَ ٱلۡمَيِّتِ وَيُخۡرِجُ ٱلۡمَيِّتَ مِنَ ٱلۡحَيِّ وَيُحۡيِ ٱلۡأَرۡضَ بَعۡدَ مَوۡتِهَاۚ وَكَذَٰلِكَ تُخۡرَجُونَ
19. Azali kobimisa moto ya bomoyi kowuta na liwa, mpe moto ya liwa kowuta na bomoyi, mpe azali kosekwisa mabele sima ya kokufa na yango. Na lolenge wana nde bokosekwaka.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَمِنۡ ءَايَٰتِهِۦٓ أَنۡ خَلَقَكُم مِّن تُرَابٖ ثُمَّ إِذَآ أَنتُم بَشَرٞ تَنتَشِرُونَ
20. Mpe o kati ya bilembo bia ye, akela bino kowuta na mabele, sima bokomi bato bozali kotambola na mokili.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَمِنۡ ءَايَٰتِهِۦٓ أَنۡ خَلَقَ لَكُم مِّنۡ أَنفُسِكُمۡ أَزۡوَٰجٗا لِّتَسۡكُنُوٓاْ إِلَيۡهَا وَجَعَلَ بَيۡنَكُم مَّوَدَّةٗ وَرَحۡمَةًۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتٖ لِّقَوۡمٖ يَتَفَكَّرُونَ
21. Mpe kati ya bilembo bia ye, akela basi kowuta na bino moko, mpo ete bovanda na kimia epai na bango, mpe atie kati na bino bolingo na ngolu (mawa). Ya soló wana ezali bilembo mpo bokoka kokanisa.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَمِنۡ ءَايَٰتِهِۦ خَلۡقُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَٱخۡتِلَٰفُ أَلۡسِنَتِكُمۡ وَأَلۡوَٰنِكُمۡۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتٖ لِّلۡعَٰلِمِينَ
22. Mpe kati ya bilembo bia ye, akela likolo na mabele mpe akesenisi bino loposo na balokota wana ezali elembo тропа bayebi.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَمِنۡ ءَايَٰتِهِۦ مَنَامُكُم بِٱلَّيۡلِ وَٱلنَّهَارِ وَٱبۡتِغَآؤُكُم مِّن فَضۡلِهِۦٓۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتٖ لِّقَوۡمٖ يَسۡمَعُونَ
23. Mpe kati ya bilembo bia ye, bapongi na bino na butu mpe moyi, mpe koluka bolamu naye. Ya soló, wana ezali bilembo тропа bato oyo bayokaka.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَمِنۡ ءَايَٰتِهِۦ يُرِيكُمُ ٱلۡبَرۡقَ خَوۡفٗا وَطَمَعٗا وَيُنَزِّلُ مِنَ ٱلسَّمَآءِ مَآءٗ فَيُحۡيِۦ بِهِ ٱلۡأَرۡضَ بَعۡدَ مَوۡتِهَآۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتٖ لِّقَوۡمٖ يَعۡقِلُونَ
24. Mpe kati ya bilembo bia ye azali komonisa bino bongengi (bwa nkake) na kobangisa na elikia ya kobetisa mbula kowuta na likolo тропа kopesa bomoyi na mabele sima ya kokufa na yango. Wana ezali bilembo тропа baye bazali kososolo.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَمِنۡ ءَايَٰتِهِۦٓ أَن تَقُومَ ٱلسَّمَآءُ وَٱلۡأَرۡضُ بِأَمۡرِهِۦۚ ثُمَّ إِذَا دَعَاكُمۡ دَعۡوَةٗ مِّنَ ٱلۡأَرۡضِ إِذَآ أَنتُمۡ تَخۡرُجُونَ
25. Mpe kati ya bilembo naye, likolo na mabele ezali ya kotelema na mobeko mia ye. Sima akobengaka bino mbela moko bokobima kati na mabele.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَلَهُۥ مَن فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۖ كُلّٞ لَّهُۥ قَٰنِتُونَ
26. Maye manso mazali okati na likolo na mabele, mazali ya ye mpe mazali kotosa ye.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَهُوَ ٱلَّذِي يَبۡدَؤُاْ ٱلۡخَلۡقَ ثُمَّ يُعِيدُهُۥ وَهُوَ أَهۡوَنُ عَلَيۡهِۚ وَلَهُ ٱلۡمَثَلُ ٱلۡأَعۡلَىٰ فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۚ وَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡحَكِيمُ
27. Mpe ye nde abandaka kokela mpe akozongisa yango, (ya bokeli sima azongisi yango,) mpe wana ezali pete тропа ye, mpe epai naye ezuami ndakisa ya koleka kuna na likolo mpe na nsé. Mpe azali na bokasi atonda bwanya.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
ضَرَبَ لَكُم مَّثَلٗا مِّنۡ أَنفُسِكُمۡۖ هَل لَّكُم مِّن مَّا مَلَكَتۡ أَيۡمَٰنُكُم مِّن شُرَكَآءَ فِي مَا رَزَقۡنَٰكُمۡ فَأَنتُمۡ فِيهِ سَوَآءٞ تَخَافُونَهُمۡ كَخِيفَتِكُمۡ أَنفُسَكُمۡۚ كَذَٰلِكَ نُفَصِّلُ ٱلۡأٓيَٰتِ لِقَوۡمٖ يَعۡقِلُونَ
28. Azali kopesa bino másese na banzoto na bino moko, boye bosangisi bawumbu na bino na maye topesi bino na bozui mpo ete bokokana? Bozali kobanga bango ndenge bomibanganaka bino na bino? Na boye nde tozali kolimbola bilembo bia biso mpo na baye basosolaka.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
بَلِ ٱتَّبَعَ ٱلَّذِينَ ظَلَمُوٓاْ أَهۡوَآءَهُم بِغَيۡرِ عِلۡمٖۖ فَمَن يَهۡدِي مَنۡ أَضَلَّ ٱللَّهُۖ وَمَا لَهُم مِّن نَّٰصِرِينَ
29. В abubi balandaki baposa na bango, na bozangi boyebi. Nani akokamba oyo Allah abungisi mpe bakozalaka na mosungi te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَأَقِمۡ وَجۡهَكَ لِلدِّينِ حَنِيفٗاۚ فِطۡرَتَ ٱللَّهِ ٱلَّتِي فَطَرَ ٱلنَّاسَ عَلَيۡهَاۚ لَا تَبۡدِيلَ لِخَلۡقِ ٱللَّهِۚ ذَٰلِكَ ٱلدِّينُ ٱلۡقَيِّمُ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يَعۡلَمُونَ
30. Balóla elongi nayo mobimba тропа lingomba ya bomoko bwa Allah. Yango nde lolenge Allah akelaki bato na yango, mbongwama ezali te kati ya bokeli ya Allah, oyo nde lingomba ya semba, kasi ebele ya bato bazali koyeba te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
۞ مُنِيبِينَ إِلَيۡهِ وَٱتَّقُوهُ وَأَقِيمُواْ ٱلصَّلَوٰةَ وَلَا تَكُونُواْ مِنَ ٱلۡمُشۡرِكِينَ
31. Bozonga epai naye (na botubeli), mpe bobanga ye, mpe botelemisa losambo mpe bozala o kati ya basangisi te,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
مِنَ ٱلَّذِينَ فَرَّقُواْ دِينَهُمۡ وَكَانُواْ شِيَعٗاۖ كُلُّ حِزۡبِۭ بِمَا لَدَيۡهِمۡ فَرِحُونَ
32. O kati ya baye bakaboli lingomba lia bango mpe bakomisi yango binzambe nzambe, eteni na eteni ezali kosepela na oyo ya ye.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَإِذَا مَسَّ ٱلنَّاسَ ضُرّٞ دَعَوۡاْ رَبَّهُم مُّنِيبِينَ إِلَيۡهِ ثُمَّ إِذَآ أَذَاقَهُم مِّنۡهُ رَحۡمَةً إِذَا فَرِيقٞ مِّنۡهُم بِرَبِّهِمۡ يُشۡرِكُونَ
33. Mpe tango mabe ekoyelaka bato, babeleli Nkolo wa bango mpe bamizongisi epai naye na botubeli bonso, sima soki amekisi bango ndambu ya ngolu kowuta epai naye, okomona ndambu kati na bango babandi kosangisa Nkolo wa bango.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
لِيَكۡفُرُواْ بِمَآ ءَاتَيۡنَٰهُمۡۚ فَتَمَتَّعُواْ فَسَوۡفَ تَعۡلَمُونَ
34. Bapengwa na maye topesi bango. Mpe bosepela moke, kasi bokoyeba kala mingi te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
أَمۡ أَنزَلۡنَا عَلَيۡهِمۡ سُلۡطَٰنٗا فَهُوَ يَتَكَلَّمُ بِمَا كَانُواْ بِهِۦ يُشۡرِكُونَ
35. To mpe tokitiselaki bango bokonzi (buku) azali kolobela bango тропа maye bazalaki kosangisa ye na yango?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَإِذَآ أَذَقۡنَا ٱلنَّاسَ رَحۡمَةٗ فَرِحُواْ بِهَاۖ وَإِن تُصِبۡهُمۡ سَيِّئَةُۢ بِمَا قَدَّمَتۡ أَيۡدِيهِمۡ إِذَا هُمۡ يَقۡنَطُونَ
36. Mpe tango tomekisaka bato ndambu ya mawa (na biso), bazali kosepela na yango. Mpe tango mabe ezui bango na oyo bango moko basali, okomona bango bazangi kolikia.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
أَوَلَمۡ يَرَوۡاْ أَنَّ ٱللَّهَ يَبۡسُطُ ٱلرِّزۡقَ لِمَن يَشَآءُ وَيَقۡدِرُۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتٖ لِّقَوۡمٖ يُؤۡمِنُونَ
37. Boye bazali kornona te ete Allah apesaka bozui na oyo alingi mpe abotoloko? Ya soló wana ezali elembo mpo bato bakoka kondima.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَـَٔاتِ ذَا ٱلۡقُرۡبَىٰ حَقَّهُۥ وَٱلۡمِسۡكِينَ وَٱبۡنَ ٱلسَّبِيلِۚ ذَٰلِكَ خَيۡرٞ لِّلَّذِينَ يُرِيدُونَ وَجۡهَ ٱللَّهِۖ وَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡمُفۡلِحُونَ
38. Mpe pesa moto ya libota nayo oyo esengeli тропа kopesa ye, mpe mobola, mpe moleki nzela oyo esengeli ya bango, wana ezali malamu тропа baye bazali koluka elongi ya Allah, mpe bango wana nde balongi.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَمَآ ءَاتَيۡتُم مِّن رِّبٗا لِّيَرۡبُوَاْ فِيٓ أَمۡوَٰلِ ٱلنَّاسِ فَلَا يَرۡبُواْ عِندَ ٱللَّهِۖ وَمَآ ءَاتَيۡتُم مِّن زَكَوٰةٖ تُرِيدُونَ وَجۡهَ ٱللَّهِ فَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡمُضۡعِفُونَ
39. Mpe maye manso bozali kobimisa ewuti na ekotama тропа kokolisa misolo mia bino likolo ya baninga, ekokolisama te epai ya Allah, kasi oyo bobimisi kowuta na zakat(1), тропа koluka elongi ya Allah, baye wana bakozua (lifuta) na bango ya kobakisama.
1 Zakat: Bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 45
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
ٱللَّهُ ٱلَّذِي خَلَقَكُمۡ ثُمَّ رَزَقَكُمۡ ثُمَّ يُمِيتُكُمۡ ثُمَّ يُحۡيِيكُمۡۖ هَلۡ مِن شُرَكَآئِكُم مَّن يَفۡعَلُ مِن ذَٰلِكُم مِّن شَيۡءٖۚ سُبۡحَٰنَهُۥ وَتَعَٰلَىٰ عَمَّا يُشۡرِكُونَ
40. Allah nde akeli bino, тре apeși bino bozui, тре akoboma bino, тре sima akosekwisa bino. Na yango, moko kati ya baye bozali kosangisa ye na yango boye akoki kosalela bino eloko moko na oyo Allah asaleli bino? Nkembo naye oyo aleki na likolo na maye manso bazali kosangisa ye na yango.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
ظَهَرَ ٱلۡفَسَادُ فِي ٱلۡبَرِّ وَٱلۡبَحۡرِ بِمَا كَسَبَتۡ أَيۡدِي ٱلنَّاسِ لِيُذِيقَهُم بَعۡضَ ٱلَّذِي عَمِلُواْ لَعَلَّهُمۡ يَرۡجِعُونَ
41. Mabe esili котопапа polele likolo ya mabele mpe likolo ya mayi (ebale) kowuta na maye bato bazali kosala, na yango, Allah apeși bango ndambu ya etumbu ya maye basali, mpo bakanisa kozonga.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قُلۡ سِيرُواْ فِي ٱلۡأَرۡضِ فَٱنظُرُواْ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلُۚ كَانَ أَكۡثَرُهُم مُّشۡرِكِينَ
42. Loba: Botambola na mokili bótala lolenge kani basalaki baye balekaki liboso na bino, kasi ebele na bango bazalaki basangisi.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَأَقِمۡ وَجۡهَكَ لِلدِّينِ ٱلۡقَيِّمِ مِن قَبۡلِ أَن يَأۡتِيَ يَوۡمٞ لَّا مَرَدَّ لَهُۥ مِنَ ٱللَّهِۖ يَوۡمَئِذٖ يَصَّدَّعُونَ
43. Tiya elongi nayo na lingomba lia (bosóló mpe lia botosi), yambo ete eya kowuta na Allah mokolo oyo bokokokaka kopuşa yango te, mpe mokolo wana (bato) bakokabwanaka.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
مَن كَفَرَ فَعَلَيۡهِ كُفۡرُهُۥۖ وَمَنۡ عَمِلَ صَٰلِحٗا فَلِأَنفُسِهِمۡ يَمۡهَدُونَ
44. Oyo akopengwa, akozua lifuta ya bopengwi naye, mpe oyo akosala bolamu, ezali тропа bolamu ya bango moko ya lobi nde bazali kolengele.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
لِيَجۡزِيَ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ مِن فَضۡلِهِۦٓۚ إِنَّهُۥ لَا يُحِبُّ ٱلۡكَٰفِرِينَ
45. Mpo Allah afuta bandimi baye basalaki misala milamu тропа bolamu bwa ye. Ya soló, ye alingaka bapengwi te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَمِنۡ ءَايَٰتِهِۦٓ أَن يُرۡسِلَ ٱلرِّيَاحَ مُبَشِّرَٰتٖ وَلِيُذِيقَكُم مِّن رَّحۡمَتِهِۦ وَلِتَجۡرِيَ ٱلۡفُلۡكُ بِأَمۡرِهِۦ وَلِتَبۡتَغُواْ مِن فَضۡلِهِۦ وَلَعَلَّكُمۡ تَشۡكُرُونَ
46. Mpe o kati ya bilembo bia ye, azali kotinda mopepe lokola sango elamu mpe тропа komekisa bino ngolu naye, mpo ete bwato (masuwa) etambola na mokano naye, mpo ete boluka litomba na bolamu naye, mpo bokoka kotondo ye na yango.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَلَقَدۡ أَرۡسَلۡنَا مِن قَبۡلِكَ رُسُلًا إِلَىٰ قَوۡمِهِمۡ فَجَآءُوهُم بِٱلۡبَيِّنَٰتِ فَٱنتَقَمۡنَا مِنَ ٱلَّذِينَ أَجۡرَمُواْۖ وَكَانَ حَقًّا عَلَيۡنَا نَصۡرُ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
47. Mpe ya solo, tosilaki kotinda batindami liboso nayo epai ya bato na bango, bayelaki bango bilembo ya polele mpe bikamwiseli, na sima tokangaki baye basalaki mabe mpe ezalaki lotomo epai na biso ete tosunga bandimi.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
ٱللَّهُ ٱلَّذِي يُرۡسِلُ ٱلرِّيَٰحَ فَتُثِيرُ سَحَابٗا فَيَبۡسُطُهُۥ فِي ٱلسَّمَآءِ كَيۡفَ يَشَآءُ وَيَجۡعَلُهُۥ كِسَفٗا فَتَرَى ٱلۡوَدۡقَ يَخۡرُجُ مِنۡ خِلَٰلِهِۦۖ فَإِذَآ أَصَابَ بِهِۦ مَن يَشَآءُ مِنۡ عِبَادِهِۦٓ إِذَا هُمۡ يَسۡتَبۡشِرُونَ
48. Allah nde azali kotinda mopepe oyo ezali kotombola londende, mpe apanzaka yango na mapata ndenge alingi, na sima akaboli yango na biteni, na sima okomona mbula ezali kobima nakati na yango mpe soki asopi yango epai ya ba oyo alingi o kati ya bawumbu naye tala ndenge bakomi na esengo.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَإِن كَانُواْ مِن قَبۡلِ أَن يُنَزَّلَ عَلَيۡهِم مِّن قَبۡلِهِۦ لَمُبۡلِسِينَ
49. Nzoka nde bango liboso basilaki kozanga elikia.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَٱنظُرۡ إِلَىٰٓ ءَاثَٰرِ رَحۡمَتِ ٱللَّهِ كَيۡفَ يُحۡيِ ٱلۡأَرۡضَ بَعۡدَ مَوۡتِهَآۚ إِنَّ ذَٰلِكَ لَمُحۡيِ ٱلۡمَوۡتَىٰۖ وَهُوَ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٞ
50. Tala bilembo bia ngolu ya Allah ndenge azali kopesa bomoyi na mabele sima ya kokauka na yango. Ya soló, ye nde akopesaka bomoyi na baye bakufa, mpe azali na bokoki na biloko binso.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَلَئِنۡ أَرۡسَلۡنَا رِيحٗا فَرَأَوۡهُ مُصۡفَرّٗا لَّظَلُّواْ مِنۢ بَعۡدِهِۦ يَكۡفُرُونَ
51. Mpe soki sima na yango totindi mopepe ya makasi ebebisi milona na bango mpe bamoni yango na langi ya mayi ya mosaka bakomi kozanga botondi.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَإِنَّكَ لَا تُسۡمِعُ ٱلۡمَوۡتَىٰ وَلَا تُسۡمِعُ ٱلصُّمَّ ٱلدُّعَآءَ إِذَا وَلَّوۡاْ مُدۡبِرِينَ
52. Ya solo, okoki koyokisa bawei te, mpe okoki koyokisa bakufi matoyi te, soki obengi bango tango bapesaka mokongo.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَمَآ أَنتَ بِهَٰدِ ٱلۡعُمۡيِ عَن ضَلَٰلَتِهِمۡۖ إِن تُسۡمِعُ إِلَّا مَن يُؤۡمِنُ بِـَٔايَٰتِنَا فَهُم مُّسۡلِمُونَ
53. Mpe ezali yo te nde okoki kokamba baye bakufa miso na bobungi bwa bango, okoyokisa nde baye bandimi na mikapo mia biso mpe bazali komisokia.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
۞ ٱللَّهُ ٱلَّذِي خَلَقَكُم مِّن ضَعۡفٖ ثُمَّ جَعَلَ مِنۢ بَعۡدِ ضَعۡفٖ قُوَّةٗ ثُمَّ جَعَلَ مِنۢ بَعۡدِ قُوَّةٖ ضَعۡفٗا وَشَيۡبَةٗۚ يَخۡلُقُ مَا يَشَآءُۚ وَهُوَ ٱلۡعَلِيمُ ٱلۡقَدِيرُ
54. Allah nde akeli bino ya kolemba, sima apesi bino makasi, sima ya bokasi apesi bino bolembu na bopaka. Akelaka oyo alingi mpe azali moyebi akoka.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَيَوۡمَ تَقُومُ ٱلسَّاعَةُ يُقۡسِمُ ٱلۡمُجۡرِمُونَ مَا لَبِثُواْ غَيۡرَ سَاعَةٖۚ كَذَٰلِكَ كَانُواْ يُؤۡفَكُونَ
55. Mpe tango mokolo ya suka ekotelema bato mabe bakolapaka ete bawumelaki na mokili sé ngonga moko ya mpamba, ndenge wana nde bazalaka kokosa.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَقَالَ ٱلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡعِلۡمَ وَٱلۡإِيمَٰنَ لَقَدۡ لَبِثۡتُمۡ فِي كِتَٰبِ ٱللَّهِ إِلَىٰ يَوۡمِ ٱلۡبَعۡثِۖ فَهَٰذَا يَوۡمُ ٱلۡبَعۡثِ وَلَٰكِنَّكُمۡ كُنتُمۡ لَا تَعۡلَمُونَ
56. Mpe baye bapesamaki boyebi na bondimi bakolobaka: Bosilaki kovanda na eleko eye engebene na mokano ya Allah kino o mokolo mwa bosekwisami. Oyo nde mokolo yango, kasi bozalaki koyeba te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَيَوۡمَئِذٖ لَّا يَنفَعُ ٱلَّذِينَ ظَلَمُواْ مَعۡذِرَتُهُمۡ وَلَا هُمۡ يُسۡتَعۡتَبُونَ
57. Mokolo mona bolimbisi ekosunga te тропа babubi, mpe bakosenga bango te ete bazonga.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَلَقَدۡ ضَرَبۡنَا لِلنَّاسِ فِي هَٰذَا ٱلۡقُرۡءَانِ مِن كُلِّ مَثَلٖۚ وَلَئِن جِئۡتَهُم بِـَٔايَةٖ لَّيَقُولَنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ إِنۡ أَنتُمۡ إِلَّا مُبۡطِلُونَ
58. Ya soló, tosili kobetela bato bandakisa ya lolenge nyoso kati na kurani eye. Mpe soki oyeli bango ekamwiseli, baye bapengwa bakomi koloba ete; bozali sé babungisi.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
كَذَٰلِكَ يَطۡبَعُ ٱللَّهُ عَلَىٰ قُلُوبِ ٱلَّذِينَ لَا يَعۡلَمُونَ
59. Lolenge wana nde Allah akangaka mitema mia bato oyo bayebi te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَٱصۡبِرۡ إِنَّ وَعۡدَ ٱللَّهِ حَقّٞۖ وَلَا يَسۡتَخِفَّنَّكَ ٱلَّذِينَ لَا يُوقِنُونَ
60. Kanga motema na kozela. Ya solo, elaka ya Nkolo nayo ezali ya sólo mpenza, kasi baye bazangi kondima babungisa yo te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
 
പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: സൂറത്തു റൂം
സൂറത്തുകളുടെ സൂചിക പേജ് നമ്പർ
 
വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - الترجمة اللينغالا - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

ترجمة معاني القرآن الكريم الى اللغة اللينغالا، ترجمها زكريا محمد بالنغوغو.

അടക്കുക