വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - الترجمة اللينغالا * - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: സൂറത്തുൽ ഹുജുറാത്ത്   ആയത്ത്:

Al-Hujrât (BA NDAKO YA KOFANDA)

يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لَا تُقَدِّمُواْ بَيۡنَ يَدَيِ ٱللَّهِ وَرَسُولِهِۦۖ وَٱتَّقُواْ ٱللَّهَۚ إِنَّ ٱللَّهَ سَمِيعٌ عَلِيمٞ
1. Oh bino bandimi! Boleka Allah na motindami naye te (nakozua mikano) bobanga Allah, ya soló azali moyoki atonda boyebi.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لَا تَرۡفَعُوٓاْ أَصۡوَٰتَكُمۡ فَوۡقَ صَوۡتِ ٱلنَّبِيِّ وَلَا تَجۡهَرُواْ لَهُۥ بِٱلۡقَوۡلِ كَجَهۡرِ بَعۡضِكُمۡ لِبَعۡضٍ أَن تَحۡبَطَ أَعۡمَٰلُكُمۡ وَأَنتُمۡ لَا تَشۡعُرُونَ
2. Oh bino bandimi! Botombola mingongo na bino te likolo ya ntoma, mpe bolobela ye na koganga te, ndenge bosalaka bino na bino, noki te misala mia bino mikobeba mpe bokoyeba te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
إِنَّ ٱلَّذِينَ يَغُضُّونَ أَصۡوَٰتَهُمۡ عِندَ رَسُولِ ٱللَّهِ أُوْلَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ ٱمۡتَحَنَ ٱللَّهُ قُلُوبَهُمۡ لِلتَّقۡوَىٰۚ لَهُم مَّغۡفِرَةٞ وَأَجۡرٌ عَظِيمٌ
3. Ya soló, baye bazali kokitisa mingongo mia bango pene na motindimi, baye wana Allah amekisi mitema mia bango bobangi. Bakozua bolimbisi na lifuta linene.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
إِنَّ ٱلَّذِينَ يُنَادُونَكَ مِن وَرَآءِ ٱلۡحُجُرَٰتِ أَكۡثَرُهُمۡ لَا يَعۡقِلُونَ
4. Ya soló, baye bazali kobenga yo libanda sima ya bandako, ebele na bango bazali na mayele te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَلَوۡ أَنَّهُمۡ صَبَرُواْ حَتَّىٰ تَخۡرُجَ إِلَيۡهِمۡ لَكَانَ خَيۡرٗا لَّهُمۡۚ وَٱللَّهُ غَفُورٞ رَّحِيمٞ
5. Soki bazelaka kino okobima epai na bango wana ezali malamu тропа bango. Mpe Allah azali molimbisi atonda ngolu.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ إِن جَآءَكُمۡ فَاسِقُۢ بِنَبَإٖ فَتَبَيَّنُوٓاْ أَن تُصِيبُواْ قَوۡمَۢا بِجَهَٰلَةٖ فَتُصۡبِحُواْ عَلَىٰ مَا فَعَلۡتُمۡ نَٰدِمِينَ
6. Oh bino bandimi! Soki moto ya kilikili ayeli bino sango boluka koyeba yango malamu, noki te bosala bato mabe na bozangi boyebi sima bokomi kolelalela тропа maye bosalaki.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَٱعۡلَمُوٓاْ أَنَّ فِيكُمۡ رَسُولَ ٱللَّهِۚ لَوۡ يُطِيعُكُمۡ فِي كَثِيرٖ مِّنَ ٱلۡأَمۡرِ لَعَنِتُّمۡ وَلَٰكِنَّ ٱللَّهَ حَبَّبَ إِلَيۡكُمُ ٱلۡإِيمَٰنَ وَزَيَّنَهُۥ فِي قُلُوبِكُمۡ وَكَرَّهَ إِلَيۡكُمُ ٱلۡكُفۡرَ وَٱلۡفُسُوقَ وَٱلۡعِصۡيَانَۚ أُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلرَّٰشِدُونَ
7. Mpe boyeba ete motindami ya Allah azali kati na bino, soki atosaki bino na makambo ebele, nde bokweyaki na kpokoso, kasi Allah alingeli bino bondimi mpe abongisi yango o mitema mia bino, mpe aboyeli bino bopengwi na kilikili mpe kozanga botosi. Ba oyo wana nde bakambami malamu.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَضۡلٗا مِّنَ ٱللَّهِ وَنِعۡمَةٗۚ وَٱللَّهُ عَلِيمٌ حَكِيمٞ
8. Wana ezali bolamu ewuti epai ya Allah, mpe Allah azali moyebi atonda bwanya.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَإِن طَآئِفَتَانِ مِنَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ ٱقۡتَتَلُواْ فَأَصۡلِحُواْ بَيۡنَهُمَاۖ فَإِنۢ بَغَتۡ إِحۡدَىٰهُمَا عَلَى ٱلۡأُخۡرَىٰ فَقَٰتِلُواْ ٱلَّتِي تَبۡغِي حَتَّىٰ تَفِيٓءَ إِلَىٰٓ أَمۡرِ ٱللَّهِۚ فَإِن فَآءَتۡ فَأَصۡلِحُواْ بَيۡنَهُمَا بِٱلۡعَدۡلِ وَأَقۡسِطُوٓاْۖ إِنَّ ٱللَّهَ يُحِبُّ ٱلۡمُقۡسِطِينَ
9. Mpe soki lisanga ya bandimi mibale bazali kobunda, bobongisa kati na bango, mpe soki mosusu aboyi koyoka, bosangana тропа kobundisa ye kino akozonga na mobeko ya Allah. Mpe soki ayoki, bobongisa kati na bango na bosembo, mpe bosembola. Mpamba te Allah alingaka baye bazali kosembola.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
إِنَّمَا ٱلۡمُؤۡمِنُونَ إِخۡوَةٞ فَأَصۡلِحُواْ بَيۡنَ أَخَوَيۡكُمۡۚ وَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ لَعَلَّكُمۡ تُرۡحَمُونَ
10. Ya soló, bandimi bazali bandeko, mpe bobongisa bondeko kati na bino. Mpe bobanga Allah mpo ete bozua ngolu naye.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لَا يَسۡخَرۡ قَوۡمٞ مِّن قَوۡمٍ عَسَىٰٓ أَن يَكُونُواْ خَيۡرٗا مِّنۡهُمۡ وَلَا نِسَآءٞ مِّن نِّسَآءٍ عَسَىٰٓ أَن يَكُنَّ خَيۡرٗا مِّنۡهُنَّۖ وَلَا تَلۡمِزُوٓاْ أَنفُسَكُمۡ وَلَا تَنَابَزُواْ بِٱلۡأَلۡقَٰبِۖ بِئۡسَ ٱلِٱسۡمُ ٱلۡفُسُوقُ بَعۡدَ ٱلۡإِيمَٰنِۚ وَمَن لَّمۡ يَتُبۡ فَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلظَّٰلِمُونَ
11. Oh bino bandimi! Lisanga moko te kati na bino etiola baninga,tango mosusu bazali malamu koleka bino, basi mpe batióla baninga te tango mosusu bazali malamu koleka bango. Bomibebisana lokumu te, mpe bomipesana bankombo ya mabe te, wana ezali ebengeli ya mabe sima ya bondimi. Mpe oyo akotubela te, bango wana nde bazali babubi.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ ٱجۡتَنِبُواْ كَثِيرٗا مِّنَ ٱلظَّنِّ إِنَّ بَعۡضَ ٱلظَّنِّ إِثۡمٞۖ وَلَا تَجَسَّسُواْ وَلَا يَغۡتَب بَّعۡضُكُم بَعۡضًاۚ أَيُحِبُّ أَحَدُكُمۡ أَن يَأۡكُلَ لَحۡمَ أَخِيهِ مَيۡتٗا فَكَرِهۡتُمُوهُۚ وَٱتَّقُواْ ٱللَّهَۚ إِنَّ ٱللَّهَ تَوَّابٞ رَّحِيمٞ
12. Oh bino bandimi! Tika ete bomitia mingi penza mosika ya kokanisela, mpamba te kokanisela mosusu makanisi ezali masumu, bomilandana te na koyeba basekele ya baninga, mpe botongana te, moko kati na bino akolinga kolia mosuni ya ndeko naye akufa? Bokosepela na yango te, kasi bobanga Allah. Ya soló, Allah ayambaka tubela atonda ngolu.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّاسُ إِنَّا خَلَقۡنَٰكُم مِّن ذَكَرٖ وَأُنثَىٰ وَجَعَلۡنَٰكُمۡ شُعُوبٗا وَقَبَآئِلَ لِتَعَارَفُوٓاْۚ إِنَّ أَكۡرَمَكُمۡ عِندَ ٱللَّهِ أَتۡقَىٰكُمۡۚ إِنَّ ٱللَّهَ عَلِيمٌ خَبِيرٞ
13. Oh bino bato! Ya sólo, tokelaki bino kowuta na mobali mpe mwasi, mpe tokesenisi bino bamboka mpe bikolo mpo ete boyebana. Ya sólo, moto ya lokumu koleka kati na bino azali oyo azali kobanga Allah. Ya sólo, Allah azali moyebi atonda basango.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
۞ قَالَتِ ٱلۡأَعۡرَابُ ءَامَنَّاۖ قُل لَّمۡ تُؤۡمِنُواْ وَلَٰكِن قُولُوٓاْ أَسۡلَمۡنَا وَلَمَّا يَدۡخُلِ ٱلۡإِيمَٰنُ فِي قُلُوبِكُمۡۖ وَإِن تُطِيعُواْ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥ لَا يَلِتۡكُم مِّنۡ أَعۡمَٰلِكُمۡ شَيۡـًٔاۚ إِنَّ ٱللَّهَ غَفُورٞ رَّحِيمٌ
14. Bato baye bafandaka na bamboka balobi: Tondimi, loba ete: Naino bondimi te, kasi boloba ete: Tobongoli mitema, mpamba te, naino bondimi bofandeli bino na mitema te, mpe soki botosi Allah na motindami waye, akokutola eloko moko te na misala na bino. Ya soló, Allah azali molimbisi atonda ngolu.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
إِنَّمَا ٱلۡمُؤۡمِنُونَ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ بِٱللَّهِ وَرَسُولِهِۦ ثُمَّ لَمۡ يَرۡتَابُواْ وَجَٰهَدُواْ بِأَمۡوَٰلِهِمۡ وَأَنفُسِهِمۡ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِۚ أُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلصَّٰدِقُونَ
15. Ya soló, bandimi nde baye bandimi na Allah na motindami naye, sima bazali kotia tembe te, mpe bazali kobunda na misolo mia bango na milimo mia bango o nzela ya Allah. Bango nde (bato) ya bosembo.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قُلۡ أَتُعَلِّمُونَ ٱللَّهَ بِدِينِكُمۡ وَٱللَّهُ يَعۡلَمُ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَا فِي ٱلۡأَرۡضِۚ وَٱللَّهُ بِكُلِّ شَيۡءٍ عَلِيمٞ
16. Loba: Boye nde bokotangisa Allah lingomba lia bino mpe Allah ayebi maye mazali o likolo mpe o nsé? Mpe Allah azali na boyebi ya biloko binso.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
يَمُنُّونَ عَلَيۡكَ أَنۡ أَسۡلَمُواْۖ قُل لَّا تَمُنُّواْ عَلَيَّ إِسۡلَٰمَكُمۖ بَلِ ٱللَّهُ يَمُنُّ عَلَيۡكُمۡ أَنۡ هَدَىٰكُمۡ لِلۡإِيمَٰنِ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
17. Bazali kolobela yo mpo na islamu na bango ete babongoli mitema, loba: Bolobela ngai islamu na bino te, kasi Allah nde akolobela islam na bino na ndenge akambi bino na bondimi, soki ya soló bozali na bosembo.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
إِنَّ ٱللَّهَ يَعۡلَمُ غَيۡبَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۚ وَٱللَّهُ بَصِيرُۢ بِمَا تَعۡمَلُونَ
18. Ya soló, Allah ayebi manso maye mabombami na likolo mpe na nsé, mpe Allah azali kornona oyo bozali kosala.
1 Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 1
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
 
പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: സൂറത്തുൽ ഹുജുറാത്ത്
സൂറത്തുകളുടെ സൂചിക പേജ് നമ്പർ
 
വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - الترجمة اللينغالا - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

ترجمة معاني القرآن الكريم الى اللغة اللينغالا، ترجمها زكريا محمد بالنغوغو.

അടക്കുക