11. Mpe na bosóló tosilaki kokela bino, sima topesi bino lolenge, mpe sima toyebisaki na ba anzelu ete: Bogumbamela Adam, тре bagumbamaki, longola sé ibilisa(1) azalaki te o kati ya bagumbami.
12. Alobi (Allah): Eloko nini epekisaki yo kogumbama tango napesaki yo mitindo? Alobi (Lusufelo): Ngai nazali malamu mingi koleka ye, pamba te okelaki ngai na moto mpe okelaki ye kowuta na poto poto.
18. Alobi (Allah): Віта kati na yango! Ozali mabe mpe mobenganami. Oyo akolanda yo kati na bango, ya solo, nakotondisa lifelo na baye banso bakolanda yo.
19. Mpe Eh Adam! Vanda yo na mwasi wayo o kati ya Iola, mpe boliya binso bolingi, kasi bopusana te pene na nzete eye noki bokozala kati na babubi. (yo na mwasi wayo)
20. Mpe satana akotisi bango na komekama mpo na kotalisa bango bolumbu na bango, mpe alobi na bango: Nkolo na bino apekisaki bino kólia nzete oyo mpo ete bokoma ba anzelu to mpe bozala kati ya baye bokotikala libela.
22. Мре akweisi bango na bokosi bwa ye, tango bameki koliya nzete, bolumbu bwa bango bomonani polele mpe bazwaki lokasa ya lola babandi komizipika na yango, mpe Nkolo wa bango abeleli bango ete: Napekisaki bino te na nzete eye? Mpe nalobaki na bino te ete zabulu azali ya sólo, monguna wa bino wa polele?
26. Eh bino bana ya Adam! Ya soló, tosilaki kokitisela bino elamba тропа kozipa bolumbu bwa bino mpe тропа bonzenga. Kaši elamba ya bobangi nde ezali malamu mingi. Wana ezali moko kati na bilembo bia Allah mpo été bakanisa.
27. Eh bana ya Adam! Satana abungisa bino te lolenge abimisaki baboti ba bino o kati na lola, alongolaki bango bilamba mpo amonisa bolumbu bwa bango. Ya soló, ye (satana) azali kornona bino ye na bato baye o esika eye bino bozali. Kasi bozali kornona bango te, ya solo, totiyaki ba satana bazala Basungi ya baye baboyi kondima.
28. Mpe soki basali mbeba, bakolobaka: Tokutaki yango epai ya bankoko ba biso, mpe Allah atindi biso na yango. Loba: Ya solo, Allah atindaka na mbeba te, bozali koloba na Allah maye bozali na boyebi na yango te?
29. Loba: Nkolo wa ngai atindi bosembo. Mpe bosembolisa bilongi bia bino na bisika binso ya mabondeli, mpe bobondela ye na bomoko nyoso na botosi ye. Ndenge akelaki bino bokozongaka sé bongo.
31. Eh bana ya Adam! Bozua bonzenga na bino (bolata bilamba bia kitoko bia bino) na tangoya sambela nyoso, boliya mpe bomela, kasi bolekisa ndelo te. Ya soló, ye alingaka balekisi ndelo te.
32. Loba: (Muhammad) nani oyo apekisa bonzenga ya Allah mpe bozui naye ya kitoko oyo abimiseli bawumbu naye? Loba: Yango ezali тропа baye bazali na bondimi na bomoyi ya mokili oyo, na baye bazali na elikia тропа mokolo mwa suka, ndenge wana nde tozali kolimbola mikapo polele mpo Na bato oyo Bayebi.
33. Loba: Ya sólo, Nkolo wa ngai apekisi mbeba kosala yango polele to тре na kobatama, mpe na lisumu, na kosala kibonguna na esika esengeli te, na bosangisi Allah na maye manso akitiseli yango liloba te. (mokapo to elembo) mpe boloba te na Allah maye bozali na boyebi na yango te.
35. Eh bana ya Adam! Soki batindami bayeli bino тропа kolimbolela bino bilembo bia ngai, mpe baye bakobanga ngai mpe babongisi, bakozalaka na bobangi te mpe bakozala na mawa te.
38. Akolobaka (Allah): Bokota na moto elongo na bilima mpe bato ya lisanga ya baye balekaki liboso lia bino, tango nyoso umma(1) soki ekoti, lizali kosengela mosusu botutu. Kino bakokutanaka bango banso kati na yango, lisanga lyoko likolobaka na basusu: Eh Nkolo wa biso! В a oyo nde babungisa biso. Bakisela bango etumbu o kati ya moto, akolobaka: Na lisanga nyoso etumbu ekobakisama, kasi bozali koyeba te.
40. Ya soló, baye baboyaki kondima na mikapo mia biso mpe basaleli yango lolendo, bakofungolelaka bango bizibeli bia likolo te, mpe bakokotoko na lola te, kino djamal(1) akota na lidusu lia tonga, mpe ndenge wana nde tokofutaka batomboki.
43. Mpe tokolongolela bango likunya o kati ya mitema mia bango, o nsé na bango, mingala mikotiolaka, mpe bakolobaka: Matondo na Allah oyo akambi biso na maye tozalaki na bokoki te. Soki Allah akambaki biso te nde tokambamaki te. Batindami ba Nkolo wa biso bayaki nabosôló. Мре bakobengamaka na oyo nde lola na bino eye bapesi bino, engebene na maye bozalaki kosala.
44. Mpe bato ya lola bakobengaka bato ya lifelo; ya soló, tozui maye Nkolo wa biso alakaki biso na bosembo, boye bino mpe bozui maye Nkolo wa bino alakaki bino na bosembo? Bakolobaka; iyo; mpe mobeleli akobelelaka kati na bango ete; botutu bwa Allah bozala o likolo lia babubi.
46. Mpe okati ya bango babale ekozala na ndelo (efelo), mpe likolo lia A’ráf,(1) ezali na mibali bakoyebaka bato banso na bilembo bia bango, mpe bakobenga bato ba lola ete; kimiya ya (Allah) ezala likolo lia bino, mpe bakoti yango na’íno te na bango bazali na posa ya kokota.
48. Мре bato ya A’râf bakobengaka mibali misusu baye bayebaki bango na bilembo bia bango. Bakolobaka: Maye bobombaka mia misolo na maye bozalaki kosala lolendo esungi bino na eloko te.
50. Mpe bato ya moto bakobenga bato ya lola, bopesa biso mwa mayi to mpe maye oyo Allah apesi bino. Bakolobaka: Ya soló Allah apekisi yango nyoso mabale тропа bapengwi.
53. Boye bazali kozela sé etumbu naye? Mokolo moye etumbu naye ekoyaka, baye babosanaki liboso bakolobaka: Batindami ya Nkolo wa biso bayaki na bosôló, boye na mokolo mwa lelo tozali na basungi baye bakosungaka biso? To, tozongisama na mokili tosala maye tozalaki kosala liboso te! Basilaki komizangisa bango moko, mpe maye bazalaki kosala ya mabe ebungisaki bango.
54. Ya soló, Nkolo wa bino nde Allah oyo akelaki likolo na mabele na mikolo motoba sima atombuami likolo na ngwende. Azali kozipa butu na mokolo. Azali kolandisa yango mpe ezali kotelema te, (akeli) moyi na sanza, na minzoto, minso mizali kotambola na botosi mitindo mia ye. Boye, bokeli na mibeko minso mizali mia ye te? Nkembo na Allah Nkolo wa molongo.
56. Mpe bobebisa te kati na mokili o sima ya kobongisama na yango. Bobenga ye na bobangi mpe na elikya, ya sólo, ngolu ya Allah ezali pene pene тропа babongisi.
57. Mpe ye nde azali kotinda mopepe na sango elamu eye ezali epai naye kino mopepe ekomi londende ya kilo, tozali kosopa yango na mboka eye ekawuka (makufa) mpe tozali kokitisela yango mayi mpe tozali kobimisa na yango bambuma ya lolenge inso. Ndenge wana nde tokobimisaka bawei, mpo bokoka kokanisa.
59. Mpe tosilaki kotinda Nûh epai ya bato naye mpe alobaki: Eh bato ba ngai! Bobondela Allah, bozali na nzambe mosusu te sé ye, ya soló nazali kobangela bino etumbu о mokolo mwa somo enene.
63. Boye ezali kokamwisa bino soki liteya liwuti epai na Nkolo na bino, na moto moko kati na bino mpo akebisa bino, mpe mpo ete bokoka kobanga, mpo été bozala o nsé ya ngolu naye?
64. Mpe baboyaki kondimela ye. Mpe tobikisaki ye na baye bazalaki elongo naye o kati ya masuwa, mpe tozindisaki baye bazangaki kondimela bilembo bia biso. Ya soló, bazalaki bato baye bazalaki kornona te.
65. Mpe totindelaki bato ya aad, ndeko wa bango Hûd. Alobaki: Eh bato na ngai! Bobondela Allah, bozali na nzambe mosusu te sé ye. Boye bozali kobanga te?
66. Bankumu ya bato naye baye bapengwaki balobi: Ya sólo, tozali kornona yo ozali na bozoba, mpe ya sólo, tozali kokanisa ete ozali kati na babuki lokuta.
69. Boye ezali kokamwisa bino soki liteya liwuti epai ya Nkolo wa bino eyei na moto moko o kati na bino mpo akebisa bino? Bokanisa tango akitanisaki bino osima ya bato ya Nûh mpe abakiselaki bino bokasi na nzoto na bokeli. Bokanisa bolamu bwa Allah mpo bokoka kolonga!
70. Balobi: Oyeli biso mpo tobondela Allah na bomoko bwa ye, mpe totika maye bankoko ba biso bazalaki kobondela? Yela biso maye ozali kolaka biso (etumbu) soki ozali koloba bosôló.
71. Alobi. Etumbu mpe nkanda esili kokwela bino uta epai ya Nkolo wa bino. Bozali kosuanisa ngai тропа bankombo iye bino na ba tata ba bino (bankoko) bopesa yango oyo Allah akitiselaki yango elembo te? Mpe bozela (etumbu) ya soló, nazali kozela elongo na bino.
72. Mpe tobikisaki ye na baye azalaki elongo na bango na mawa та biso. Mpe tosilisaki baye baboyaki kondima na bilembo bia biso mpe bazalaki bandimi te.
73. Mpe totindaki epai ya bato ya thamúd, ndeko wa bango Swálih, alobi: Eh bato na ngai! Bobondela Allah, bozali na nzambe mosusu te sé ye. Elembo esilaki koyela bino kowuta epai ya Nkolo wa bino. Oyo nâqah(1) ya Allah ezali elembo epai na bino, botika ye aliya na mabele ya Allah, kasi bosala ye mabe te noki te etumbu makasi ekozua bino.
74. Мре bokanisa tango totiyaki bino bakitani o sima ya bato ya aad mpe tovandisi bino na mabele, mpe botongaki bandako na lolenge ya pete, mpe botongi bisusu o kati ya bangomba. Kasi bokanisa bolamu bwa Allah boye asaleli bino, kasi bovanda na mabele na ndenge ya kobebisa te.
75. Bankumu baye basalaki lolendo kati na bato baye balobaki na baye bazalaki na bokoki te baye bandimaki: Boye bozali koyeba ya soló penza, Swâlih azali motindami kowuta epai ya Nkolo wa ye? Balobaki: ya soló, tondimi na maye atindamaki na yango.
77. Mpe babomaki nâqah(1) mpe basalaki lolendo na mibeko mia Nkolo wa bango, mpe balobi: Eh! Swâlih! Yela biso maye ozali kolaka biso soki ozali solo kati ya batindami.
85. Мре (totindaki epai ya bato) ya mad’yan, ndeko wa bango Shuaîb, alobi: Eh! Bato ba ngai! Bobondela Allah, bozali na nzambe mosusu te sé ye, elembo esilaki koyela bino kowuta epai ya Nkolo wa bino. Мре bokokisa emekelo, mpe kilo, kasi bobuba bato biloko bia bango te. Mpe bobebisa o kati ya mokili te o sima ya kobongisama na yango. Wana nde ezali malamu тропа bino soki bozali kondima.
87. Mpe soki basusu kati na bino bandimaka na maye natindami na yango, mpe basusu bandimaka te, bozela kino Allah akokata kati kati na biso, mpe azali zuzi malamu.
88. Mpe bankumu baye basalaki lolendo o kati ya bato naye balobi: Tokobimisa yo na baye bandimi elongo nayo yâ Shuaîb na mboka na biso to bozonga na lingomba lia biso, alobi: (bomanyola) ata soki toyini yango?
89. Soki solo tosali bongo, tosili kobukela Allah lokuta osima ya kobikisa biso na yango. Esengeli na biso te kozongela yango, sé na bolingi bwa Allah Nkolo wa biso, Nkolo wa biso azali na boyebi na biloko binso, tomipesi na Allah. Oh Nkolo wa biso! Kata okati na biso na bosôló, mpo yo nde ozali mokati malamu wa bazuzi.
93. Mpe apesaki bango mokongo mpe alobi: Oh bato ba ngai! Ya soló, nakomiselaki bino maloba mwa Nkolo wa ngai. Mpe napesaki bino toli, ndenge nini nakoyokela bapengwi mawa?
95. Mpe sima tobongolaki makambo ya mabe na bango na oyo ya malamu, kino bomengo na bango ekomaki ebele mpe balobi: Ya soló, pasi na mikakatano mizuaki bankoko ba biso, mpe tosimbaki bango mbalakaka kasi bazalaki koyeba te.
101. Mpe tozali kobetela yo masapo ma mboka ena. Ya solo, batindami na bango bayelaki bango bilembo bia polele, kasi bandimela te na maye basilaka kozua yango lokuta. Ndenge wana nde Allah akangaka mitema mia bapengwi.
103. Sima na bango, totindaki Mûssa na makamwisi ma biso epai ya falo na bankumu (bato) naye. Kasi bazangaki bosembo na bilembo bia biso, tala ndenge lifuta lia babebisi ezalaki.
123. Falo alobi: Bondimi naye (Mûssa) yambo ete napesa bino ndingisa! Oyó nde mwango bosali kati na mboka mpo bobimisa bato na yango, bokoyeba kala te!
127. Мре bankumu ya bato ya falo balobi: Boye ozali kotika Mûssa na bato naye mpo babebisa o kati ya mokili Mpe ye moko atika yo na banzambe nayo? Alobi: Tokoboma bana na bango ya mibali mpe tokotika basi na bango na bomoyi mpamba te ya soló, biso tozali na bokonzi likolo lia bango.
128. Mûssa alobi na bato baye: Bosenga lisungi epai ya Allah mpe bokanga motema. Ya sólo, mabele mazali ya Allah, akitanisaka yango na baye alingi kati ya bawumbu baye; mpe mbano ya malamu ekozala nde тропа babangi.
129. Balobi: Banyokolaki biso yambo ya boyei bwa yo тре sima ya bokomi bwa yo. Alobi: Boye Nkolo wa bino akoboma monguna wa bino mpe akitanisi bino na mabele, mpe akotalela bino ndenge nini bokosala.
133. Мре totindelaki bango pela ya mbula ya makasi, na mabanki na basili na magbololo mpe na makila, lokola bilembo bia polele. Kasi basalaki lolendo mpe bazalaki batomboki.
134. Mpe tango etumbu ekwelaki bango, balobi: Oh Mûssa! Sengela biso epai ya Nkolo wayo na maye apesaki yo elaka, soki alongoleli biso etumbu eye, tokondimela yo, mpe tokotikela yo bana na isalayele bökende elongo.
137. Mpe tokitanisaki bato oyo bazalaki na bolembu moniele ya mabele na eloli na yango miye topambolaki mpe elaka elamu ya Nkolo wayo ekokakiтропа bana ya isalayele тропа maye bakangaki mitema. Mpe tobebisaki maye falo na bato naye bazalaki kosala, mpe kotonga.
141. (Bokanisa) tango tobikisaki bino na etumbu ya falo, bazalaki koboma bana na bino ya mibali mpe bazali kotika basi ba bino. Mpe wana ezali momekano monene kowuta epai ya Nkolo wa bino.
142. Mpe topesaki elaka na Mûssa ya butu ntuku misato mpe tobakisaki zomi, mpo ete akutana na Nkolo waye na butu ntuku minei. Mpe Mûssa alobi na ndeko waye Hâruna:(1) kitanela ngai na bato ba ngai, mpe zala na bango malamu mpe kolanda nzela ya babebisi te.
144. Alobi: Oh Mûssa! Ya soló, naponi yo likolo ya bato banso, тропа bitinda bia ngai. Mpe na maloba та ngai, zúa maye napesi yo mpe zala elongo na batondi.
145. Mpe tokomelaki ye likolo ya mabaya makomi mpe malendisi ya makambo nyoso, mpe ndimbola ya biloko binso, simba yango makasi mpe tinda batonayo basalela ya malamu oyo ezuami otei na yango. Kala te nakolakisa bino esika ya babebisi.
147. Mpe baye baboyaki kondima na bilembo bia biso na kozanga elikia ya mokolo mwa suka, babebisi misala mia bango, boye bakofutamaka te sé na maye basalaki?
148. Mpe sima bato ya Mûssa balandaki (ekeko) ya nyama. Basali yango na lolenge ya mwa ngombe ezali kobimisa lolaka. Boye, bazali kornona te ete solo akolobisa bango te, mpe ezali kokamba bango ata na nzela ya semba te? Bakamataki yango(1) na yango bamibubaki.
149. Mpe ntango bamonaki ete basili kosala mabe, mpe bamimonaki ete basili kobunga, mpe balobaki: Soki Nkolo wa biso ayokeli biso mawa te mpe alimbisi biso te, tokozala solo o kati ya bazangi.
150. Mpe tango Mûssa azongaki epai ya bato naye, na nkanda mpe na kolemba, alobaki été: Bosali mabe ya monene sima na ngai! Boye bolingi bowelisa mokano ya Nkolo wa bino? Mpe abwakaki mabaya ya bikomeli mpe abendi mutu ya ndeko waye epai naye. Alobi: Oh mwana wa mama wa ngai! Basilisaki ngai makasi mpe balingaki koboma ngai. Kozua ngai monguna te, mpe kotiya ngai o kati ya babubi te.
152. Ya soló, baye bazali kozua mwa ngombe lokola nzambe na bango, kala te kanda kowuta epai ya Nkolo wa bango ekozua bango. Mpe bakozala mpamba o kati ya mokili, mpe ndenge wana nde tokofutaka bato mabe.
157. Baye bazali kolanda motindami, ntoma wa boyinga oyo bakokuta ye akomami na torah epai na bango mpe na indjil. Azali kotinda bango na bolamu, mpe akopekisa bango mabe, mpe akopesa bango dingisa ya maye ya malamu, mpe akopekisa bango maye ya mbindo. Mpe akitiselaki bango kilo oyo bazalaki na yango na mibeko ya makasi oyo ezalaki likolo na bango. Na yango, baye bandimelaki ye mpe bapesaki ye lokumu mpe bapesaki ye lisungi, na bobongisi, mpe balandaki mwinda oyo ekitaki elongo naye, bango nde balongi.
158. Loba: Oh bino bato! Ya soló, nazali motindami wa Allah epai ya bino banso. Oyo azali Nkolo wa bokonzi bwa likolo na mabele, nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te kaka sé ye (Allah). Apesaka bomoyi mpe apesaka liwa, bondima na Allah na motindami wa ye, ntoma wa boyinga oyo azali kondima na Allah na maloba maye. Mpe bolanda ye mpo bokoka kokambama.
160. Mpe totiyaki bango na mabota zomi na mibale bitonga na motango na bango. Мре toyebisaki па Mûssa: Tango bato naye basengaki ye mayi ya komela, beta lingenda lia yo na libanga. Mpe ebimisaki maziba zomi na mibale, mpe libota na libota liyebaki liziba lia bango ya bomeli. Mpe tozipaki bango na mapata ya molili mpe tokitiselaki bango mana na salwa(1)boliya ya malamu biye topesi bino. Mpe basali biso mabe te kasi bango moko bamisalaki mabe.
161. Mpe tango bayebisaki bango été: Bokota mpe bovanda na mboka oyo, mpe boliya maye bokolinga (ya malamu) mpe boloba hitwa(1) mpe bokoto na ekuke na kogumbama, tolimbisa masumu ma bino mpe tokobakiselaka babongisi. (bolamu okati na bango)
1 Hitwa: Elakisi: Bolimbisi na masumu na biso na mikumba mia biso.
162. Mpe babubi o kati na bango babongoli liloba(1) na lolenge mosusu batiki oyo bayebisaki bango. Mpe totindelaki bango etumbu kowuta o likolo тропа maye bazalaki kobuba.
1 Balobaki: “Hintwa” na o esika ya koloba “Hitwa” ndenge batindaki bango.
163. Mpe tuna bango тропа mboka eye ezalaki pene na ebale. Tango bazalaki kokende о mokolo mwa mposo, bambisi bazalaki koyela bango polele kowuta na mayi, mokolo ya mposo na bango тре о mokolo mosusu ezali koyela bango te, ndenge wana nde tomekaki bango тропа maye bazalaki kobebisa.
164. Мре tango umma(1) o kati па bango balobaki: Mpona nini bazali koteya bato baye Allah akoboma to akopesa bango etumbu ya makasi? Balobaki: Mpo tolongola mokumba mwa biso liboso ya nkolo wa bino, mpe mpo bakoka kobanga.
168. Мре tokabolaki bango o kati na mokili bato na bato, kati na bango ya malamu, mpe kati na bango basusu ya mabe. Mpe tomekaki bango na bolamu mpe mabe mpo bakoka kozonga. (o nzela ya semba)
171. Mpe tango totombolaki ngomba o likolo lia bango, lokola elilingi. Kasi bakanisaki ete ekokwela bango. Bosimba makasi maye topesaki bino mpe bokanisa maye mazali na kati, mpo bakoka kobanga.
172. Mpe tango Nkolo nayo abimisaki bakitani na mikongo ya bana Adam mpe amonisaki bango moko, mpe alobaki na bango été: Nazali Nkolo na bino te? Bazongisaki été: Iyo: Tot atoli. Mpo bowangana yango te o mokolo mwa suka na bolobi été: Ya soló, tosalaki angele na yango te.
176. Kasi soki tolingaka, mbele totombola ye na yango, kasi ye alingaki mokili mpe alandaki bisengo na bamposa na yango, ndakisa naye ezali lokola mbua oyo soki obengani ye abimisi lolemu azali kopema makasi, soki mpe otiki ye azali sé ndenge moko. Wana nde ndakisa ya baye baboyaki kondima na mikapo mia biso, betela bango masapo mpo tango mosusu bakokanisa.
180. Mpe Allah nde azali na ba nkombo kitoko. Bobenga ye na yango. Kasi botika baye bazali kosakana na ba nkombo naye, bako futama na maye bazalaki kosala.
185. Bazali kornona te bokonzi bwa likolo na ya nsé na biloko binso Allah akela? Ntango mosusu elaka na bango esili kokoma pene? Liloba mosusu nini bandima na yango nsima ya oyo?
187. Bazali kotuna yo тропа mokolo ya nsuka ekokokisama ntango nini? Loba: Boyebi na yango ezali epai na Nkolo na ngai, sé ye moko nde akolakisa yango. Ezali likambo ya kilo kuna na likolo mpe na nsé ekoyela bino mbalakaka, bazali kotuna lokola osilaki koyeba yango loba: Ya soló, boyebi na yango ezali epai na Allah kasi ebele ya bato bazali koyeba yango te.
188. Loba: Nakoki te komizuela bolamu mpe nakoki te komilongola mpasi sé na bolingi bwa Allah. Mpe soki na yebaki mabombami mbele na mizuelaki bolamu ebele nde mabe moko ezuaki ngai te. Ngai nazali sé mokebisi mpe mopesi nsango malamu тропа bato ya kondima.
189. Ye nde akela bino kowuta na moto moko mpe kati naye abimisaki mwasi naye mpo été azua kimia epai naye (mwasi). Mpe ntango bakutanaki azuaki mokumba ya токе (zemi) azalaki kotambola na yango na libumu naye kino ekomaki kilo. Babelelaki Nkolo na bango (Adam na eva): Soki opesi biso mwana ya malamu tokozala kati ya baye bazali kopesa yo matondi.
190. Mpe ntango (Allah) apeși bango (mwana) ya malamu basangisi ye (Allah) na ba nzambe na likabo na oyo apesi bango. Lokumu na Allah ya likolo koleka na maye bazali kosangisa ye na yango.
195. Boye; bazali na makolo mpo na kotambola na yango? To bazali na maboko bazali kosimba na yango? To bazali na miso тропа kornona? То bazali na matoyi bazali koyoka na yango? Loba: Bobenga banzambe na bino sima bosala ngai likita mpe bozelisa ngai te.
203. Mpe soki oyeli bango bikamwiseli te, bakoloba: Mpona nini okosala yango na ndenge nayo te? Loba: Ngai na zali kolanda sé maye makiteli ngai epai na Nkolo wa ngai. Oyo (mikapo mia kurani) mizali bilembetele (bilembo) biwuti epai na Nkolo na bino, bokambi mpe ngolu mpo na bandimi.
205. Мре kundola nkombo ya Nkolo nayo na kati nayo na kobanga mpe na komikitisa na mongongo ya katikati ntongo mpe mpokua. Kasi kozala te elongo na baye bazangi makanisi.
Contents of the translations can be downloaded and re-published, with the following terms and conditions:
1. No modification, addition, or deletion of the content.
2. Clearly referring to the publisher and the source (QuranEnc.com).
3. Mentioning the version number when re-publishing the translation.
4. Keeping the transcript information inside the document.
5. Notifying the source (QuranEnc.com) of any note on the translation.
6. Updating the translation according to the latest version issued from the source (QuranEnc.com).
7. Inappropriate advertisements must not be included when displaying translations of the meanings of the Noble Quran.
തിരയൽ ഫലങ്ങൾ:
API specs
Endpoints:
Sura translation
GET / https://quranenc.com/api/v1/translation/sura/{translation_key}/{sura_number} description: get the specified translation (by its translation_key) for the speicified sura (by its number)
Parameters: translation_key: (the key of the currently selected translation) sura_number: [1-114] (Sura number in the mosshaf which should be between 1 and 114)
Returns:
json object containing array of objects, each object contains the "sura", "aya", "translation" and "footnotes".
GET / https://quranenc.com/api/v1/translation/aya/{translation_key}/{sura_number}/{aya_number} description: get the specified translation (by its translation_key) for the speicified aya (by its number sura_number and aya_number)
Parameters: translation_key: (the key of the currently selected translation) sura_number: [1-114] (Sura number in the mosshaf which should be between 1 and 114) aya_number: [1-...] (Aya number in the sura)
Returns:
json object containing the "sura", "aya", "translation" and "footnotes".