Check out the new design

Vertaling van de betekenissen Edele Qur'an - Lingala-vertaling - Mohammed Balengogo * - Index van vertaling

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Vertaling van de betekenissen Surah: Al-Moeminoen   Vers:
۞ وَلَوۡ رَحِمۡنَٰهُمۡ وَكَشَفۡنَا مَا بِهِم مِّن ضُرّٖ لَّلَجُّواْ فِي طُغۡيَٰنِهِمۡ يَعۡمَهُونَ
75. Mpe soki topesaki bango ngolu na biso, mpe tolongola bango mpasi oyo bazalaki na yango, balingaki kotikala sé na masumu na bango mpe bakozinda mpenza kati na botomboki na bango.
Arabische uitleg van de Qur'an:
وَلَقَدۡ أَخَذۡنَٰهُم بِٱلۡعَذَابِ فَمَا ٱسۡتَكَانُواْ لِرَبِّهِمۡ وَمَا يَتَضَرَّعُونَ
76. Mpe tosilaki kopesa bango etumbu, kasi batosaki Nkolo wa bango te, mpe bamilelaki epai naye te (epai na Allah), тропа kosenga,
Arabische uitleg van de Qur'an:
حَتَّىٰٓ إِذَا فَتَحۡنَا عَلَيۡهِم بَابٗا ذَا عَذَابٖ شَدِيدٍ إِذَا هُمۡ فِيهِ مُبۡلِسُونَ
77. Kino tokofungolela bango ezibeli ya etumbu ya makasi, mpe bakozanga elikia (тропа bolamu ya Allah).
Arabische uitleg van de Qur'an:
وَهُوَ ٱلَّذِيٓ أَنشَأَ لَكُمُ ٱلسَّمۡعَ وَٱلۡأَبۡصَٰرَ وَٱلۡأَفۡـِٔدَةَۚ قَلِيلٗا مَّا تَشۡكُرُونَ
78. Mpe ye nde akela тропа bino, bomoni na boyoki na mitema, kasi bozali kotondo ye sé токе.
Arabische uitleg van de Qur'an:
وَهُوَ ٱلَّذِي ذَرَأَكُمۡ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَإِلَيۡهِ تُحۡشَرُونَ
79. Ye nde akela bino mpe ati bino o mabele, bokosangisama epai naye.
Arabische uitleg van de Qur'an:
وَهُوَ ٱلَّذِي يُحۡيِۦ وَيُمِيتُ وَلَهُ ٱخۡتِلَٰفُ ٱلَّيۡلِ وَٱلنَّهَارِۚ أَفَلَا تَعۡقِلُونَ
80. Ye nde mopesi bomoyi mpe mopesi liwa, mpe ye nde mokesenisi butu na mokolo, boye bozali kokanisa te?
Arabische uitleg van de Qur'an:
بَلۡ قَالُواْ مِثۡلَ مَا قَالَ ٱلۡأَوَّلُونَ
81. Kasi balobaki se maye bato wa yambo balobaka.
Arabische uitleg van de Qur'an:
قَالُوٓاْ أَءِذَا مِتۡنَا وَكُنَّا تُرَابٗا وَعِظَٰمًا أَءِنَّا لَمَبۡعُوثُونَ
82. Balobi: Tango tokokufaka, tokokomaka putulu mpe mikuwa. Ya soló, boye tokosekwisamaka lisusu?
Arabische uitleg van de Qur'an:
لَقَدۡ وُعِدۡنَا نَحۡنُ وَءَابَآؤُنَا هَٰذَا مِن قَبۡلُ إِنۡ هَٰذَآ إِلَّآ أَسَٰطِيرُ ٱلۡأَوَّلِينَ
83. Basila kolaka biso na batata na biso liboso тропа oyo, yango ezali sé masapo ya kala.
Arabische uitleg van de Qur'an:
قُل لِّمَنِ ٱلۡأَرۡضُ وَمَن فِيهَآ إِن كُنتُمۡ تَعۡلَمُونَ
84. Loba: Mabele na oyo ezali okati na yango ezali ya nani? Soki soló bozali koyeba.
Arabische uitleg van de Qur'an:
سَيَقُولُونَ لِلَّهِۚ قُلۡ أَفَلَا تَذَكَّرُونَ
85. Bakolobaka: Ezali ya Allah. Loba: Boye bozali kokanisa te?
Arabische uitleg van de Qur'an:
قُلۡ مَن رَّبُّ ٱلسَّمَٰوَٰتِ ٱلسَّبۡعِ وَرَبُّ ٱلۡعَرۡشِ ٱلۡعَظِيمِ
86. Loba: Mapata sambo ezali ya nani, тре nani Nkolo ngwende ya monene?
Arabische uitleg van de Qur'an:
سَيَقُولُونَ لِلَّهِۚ قُلۡ أَفَلَا تَتَّقُونَ
87. Bakolobaka: Ezali ya Allah. Loba: Boye bokobanga te?
Arabische uitleg van de Qur'an:
قُلۡ مَنۢ بِيَدِهِۦ مَلَكُوتُ كُلِّ شَيۡءٖ وَهُوَ يُجِيرُ وَلَا يُجَارُ عَلَيۡهِ إِن كُنتُمۡ تَعۡلَمُونَ
88. Loba: Bokonzi bonso bosimbami na maboko ya nani? Azali kobatela, kasi babatelaka ye te, soki ya soló bozali koyeba?
Arabische uitleg van de Qur'an:
سَيَقُولُونَ لِلَّهِۚ قُلۡ فَأَنَّىٰ تُسۡحَرُونَ
89. Bakolobaka: Ezali ya Allah. Loba: Kasi тропа nini bozali lokola balokami? (тропа kozanga na bango kondima na bomoko ya nzambe).
Arabische uitleg van de Qur'an:
 
Vertaling van de betekenissen Surah: Al-Moeminoen
Surah's Index Pagina nummer
 
Vertaling van de betekenissen Edele Qur'an - Lingala-vertaling - Mohammed Balengogo - Index van vertaling

Vertaald door Zakaria Mohammed Balengogo.

Sluit