Check out the new design

Vertaling van de betekenissen Edele Qur'an - Lingala-vertaling - Mohammed Balengogo * - Index van vertaling

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Vertaling van de betekenissen Surah: An-nisa   Vers:
وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ سَنُدۡخِلُهُمۡ جَنَّٰتٖ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُ خَٰلِدِينَ فِيهَآ أَبَدٗاۖ وَعۡدَ ٱللَّهِ حَقّٗاۚ وَمَنۡ أَصۡدَقُ مِنَ ٱللَّهِ قِيلٗا
Kasi ba oyo bandimi mpe basali misala ya malamu, tokokotisa bango na kati ya paradizu, wapi epai mingala mizali kotiola. Na kati bakozala seko na seko. Elaka ya Allah ezali ya sôló. Nani yango akoloba bosembo koleka Allah?!
Arabische uitleg van de Qur'an:
لَّيۡسَ بِأَمَانِيِّكُمۡ وَلَآ أَمَانِيِّ أَهۡلِ ٱلۡكِتَٰبِۗ مَن يَعۡمَلۡ سُوٓءٗا يُجۡزَ بِهِۦ وَلَا يَجِدۡ لَهُۥ مِن دُونِ ٱللَّهِ وَلِيّٗا وَلَا نَصِيرٗا
Oyo ezali kowuta na mposa na bino te ezali mpe kowuta na mposa ya baye bazua buku liboso na bino te. Oyo akosala mosala ya mabe akofutama na yango, mpe akozua mobateli te na botiki Allah, mpe akozua mosalisi te.
Arabische uitleg van de Qur'an:
وَمَن يَعۡمَلۡ مِنَ ٱلصَّٰلِحَٰتِ مِن ذَكَرٍ أَوۡ أُنثَىٰ وَهُوَ مُؤۡمِنٞ فَأُوْلَٰٓئِكَ يَدۡخُلُونَ ٱلۡجَنَّةَ وَلَا يُظۡلَمُونَ نَقِيرٗا
Oyo akosala misala ya malamu, azala mondimi ya mobali to ya mwasi, bango wana nde bakokota na kati ya lola, mpe bakobubama ata moke te.
Arabische uitleg van de Qur'an:
وَمَنۡ أَحۡسَنُ دِينٗا مِّمَّنۡ أَسۡلَمَ وَجۡهَهُۥ لِلَّهِ وَهُوَ مُحۡسِنٞ وَٱتَّبَعَ مِلَّةَ إِبۡرَٰهِيمَ حَنِيفٗاۗ وَٱتَّخَذَ ٱللَّهُ إِبۡرَٰهِيمَ خَلِيلٗا
Nani azali na lingomba ya kitoko koleka moto oyo amisoki mpe apesi elongi naye epai ya Allah, mpe ye azali moto malamu, mpe alandi lingomba ya Ibrâhîm ya bomoko ya Allah, kasi Allah azuaki Ibrâhîm moninga naye.
Arabische uitleg van de Qur'an:
وَلِلَّهِ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَا فِي ٱلۡأَرۡضِۚ وَكَانَ ٱللَّهُ بِكُلِّ شَيۡءٖ مُّحِيطٗا
Mpe maye manso mazuami o’likolo mpe o’nse mazali ya Allah, mpe Allah azali mozingi ya biloko binso.
Arabische uitleg van de Qur'an:
وَيَسۡتَفۡتُونَكَ فِي ٱلنِّسَآءِۖ قُلِ ٱللَّهُ يُفۡتِيكُمۡ فِيهِنَّ وَمَا يُتۡلَىٰ عَلَيۡكُمۡ فِي ٱلۡكِتَٰبِ فِي يَتَٰمَى ٱلنِّسَآءِ ٱلَّٰتِي لَا تُؤۡتُونَهُنَّ مَا كُتِبَ لَهُنَّ وَتَرۡغَبُونَ أَن تَنكِحُوهُنَّ وَٱلۡمُسۡتَضۡعَفِينَ مِنَ ٱلۡوِلۡدَٰنِ وَأَن تَقُومُواْ لِلۡيَتَٰمَىٰ بِٱلۡقِسۡطِۚ وَمَا تَفۡعَلُواْ مِنۡ خَيۡرٖ فَإِنَّ ٱللَّهَ كَانَ بِهِۦ عَلِيمٗا
Bakotunaka yo[1] mpo ete olimbola bango likambo litali basi, loba: Allah atie mobeko na likolo na yango, mpe na maye masilaki kotangema okati ya buku likambo ya bitike ya basi bozali kopesa bango te maye ekomami mpo na bango. Mpe bozali kolikia ete bobala bango, mpe lisusu bana mike baye bakomi naino makasi te. Esengeli na bino kozala semba kati kati na bana bitike. Kasi maye manso ya malamu, bozali kosala Allah ayebi, mpe azali komona yango.
[1] Muhammad: Kimia mpe losambo ya Allah ezala likolo naye.
Arabische uitleg van de Qur'an:
 
Vertaling van de betekenissen Surah: An-nisa
Surah's Index Pagina nummer
 
Vertaling van de betekenissen Edele Qur'an - Lingala-vertaling - Mohammed Balengogo - Index van vertaling

Vertaald door Zakaria Mohammed Balengogo.

Sluit