Check out the new design

ߞߎ߬ߙߣߊ߬ ߞߟߊߒߞߋ ߞߘߐ ߟߎ߬ ߘߟߊߡߌߘߊ - ߟߌ߲ߜ߭ߟߊߞߊ߲ ߘߟߊߡߌߘߊ - ߡߎ߬ߤ߭ߊߡߡߊߘߎ߫ ߓߊ߯ߟߊ߲ߜ߭ߏߜߏ߫ * - ߘߟߊߡߌߘߊ ߟߎ߫ ߦߌ߬ߘߊ߬ߥߟߊ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ߞߘߐ ߟߎ߬ ߘߟߊߡߌ߬ߘߊ߬ߟߌ ߝߐߘߊ ߘߏ߫: ߌߡߎ߬ߙߊ߲߬ ߞߐߙߍ   ߟߝߊߙߌ ߘߏ߫:
يَٰٓأَهۡلَ ٱلۡكِتَٰبِ لِمَ تَلۡبِسُونَ ٱلۡحَقَّ بِٱلۡبَٰطِلِ وَتَكۡتُمُونَ ٱلۡحَقَّ وَأَنتُمۡ تَعۡلَمُونَ
71. Eh bino baye bozua buku! Mpona nini bozali kosangisa mabe na bosôló, mpe bozali kobomba bosôló mpe bozali na kati ya koyeba?
ߊߙߊߓߎߞߊ߲ߡߊ ߞߘߐߦߌߘߊ ߟߎ߬:
وَقَالَت طَّآئِفَةٞ مِّنۡ أَهۡلِ ٱلۡكِتَٰبِ ءَامِنُواْ بِٱلَّذِيٓ أُنزِلَ عَلَى ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَجۡهَ ٱلنَّهَارِ وَٱكۡفُرُوٓاْ ءَاخِرَهُۥ لَعَلَّهُمۡ يَرۡجِعُونَ
72. Mpe lisanga ya bato kati na baye bazua buku, balobi na bato na bango ete: Bondima na maye ekitisama epai ya bandimi(1) na ebandeli ya mokolo, mpe soki ekomi na mpokwa bopengwa na yango, mpo ete bango bazonga.
1 Bandimi: Bazali baye bamisoki na Allah (bamizilima).
ߊߙߊߓߎߞߊ߲ߡߊ ߞߘߐߦߌߘߊ ߟߎ߬:
وَلَا تُؤۡمِنُوٓاْ إِلَّا لِمَن تَبِعَ دِينَكُمۡ قُلۡ إِنَّ ٱلۡهُدَىٰ هُدَى ٱللَّهِ أَن يُؤۡتَىٰٓ أَحَدٞ مِّثۡلَ مَآ أُوتِيتُمۡ أَوۡ يُحَآجُّوكُمۡ عِندَ رَبِّكُمۡۗ قُلۡ إِنَّ ٱلۡفَضۡلَ بِيَدِ ٱللَّهِ يُؤۡتِيهِ مَن يَشَآءُۗ وَٱللَّهُ وَٰسِعٌ عَلِيمٞ
73. Bondima na bato mosusu te sé na oyo alandi lingomba na bino. Loba: Ya sôló, lisungi na nzela ya semba ezali oyo ya Allah. Mpo ete moko te azua mpe lokola bino, to atelemela bino na yango epai ya Nkolo na bino? Loba: Ya sôló bolamu ezali na maboko ya Allah, apesaka yango na oyo ye alingi, mpe Allah atonda bomengo azali na boyebi koleka.
ߊߙߊߓߎߞߊ߲ߡߊ ߞߘߐߦߌߘߊ ߟߎ߬:
يَخۡتَصُّ بِرَحۡمَتِهِۦ مَن يَشَآءُۗ وَٱللَّهُ ذُو ٱلۡفَضۡلِ ٱلۡعَظِيمِ
74. (Allah) apesaka ngolu naye na nani alingi. Mpe Allah nde atonda bolamu koleka.
ߊߙߊߓߎߞߊ߲ߡߊ ߞߘߐߦߌߘߊ ߟߎ߬:
۞ وَمِنۡ أَهۡلِ ٱلۡكِتَٰبِ مَنۡ إِن تَأۡمَنۡهُ بِقِنطَارٖ يُؤَدِّهِۦٓ إِلَيۡكَ وَمِنۡهُم مَّنۡ إِن تَأۡمَنۡهُ بِدِينَارٖ لَّا يُؤَدِّهِۦٓ إِلَيۡكَ إِلَّا مَا دُمۡتَ عَلَيۡهِ قَآئِمٗاۗ ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمۡ قَالُواْ لَيۡسَ عَلَيۡنَا فِي ٱلۡأُمِّيِّـۧنَ سَبِيلٞ وَيَقُولُونَ عَلَى ٱللَّهِ ٱلۡكَذِبَ وَهُمۡ يَعۡلَمُونَ
75. Mpe ezali okati ya baye bazua buku, soki obombi eloko epai naye, akobatela yango kino okoya kozua. Mpe ezali na basusu, soki obombi mwa lopata epai naye, akozongisa yango te kino okolemba na kotelema mpe kotambola epai naye, mpamba te bango balobaka ete: Baye batanga te bakosala biso eloko te. Mpe bazali kobukela Allah lokuta mpe bango bazali kati na koyeba.
ߊߙߊߓߎߞߊ߲ߡߊ ߞߘߐߦߌߘߊ ߟߎ߬:
بَلَىٰۚ مَنۡ أَوۡفَىٰ بِعَهۡدِهِۦ وَٱتَّقَىٰ فَإِنَّ ٱللَّهَ يُحِبُّ ٱلۡمُتَّقِينَ
76. Ya sôló, oyo akokokisa elaka naye mpe abangi,(1) ya sôló Allah alingaka babangi.
1 Allah.
ߊߙߊߓߎߞߊ߲ߡߊ ߞߘߐߦߌߘߊ ߟߎ߬:
إِنَّ ٱلَّذِينَ يَشۡتَرُونَ بِعَهۡدِ ٱللَّهِ وَأَيۡمَٰنِهِمۡ ثَمَنٗا قَلِيلًا أُوْلَٰٓئِكَ لَا خَلَٰقَ لَهُمۡ فِي ٱلۡأٓخِرَةِ وَلَا يُكَلِّمُهُمُ ٱللَّهُ وَلَا يَنظُرُ إِلَيۡهِمۡ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ وَلَا يُزَكِّيهِمۡ وَلَهُمۡ عَذَابٌ أَلِيمٞ
77. Ya sôló, baye bazali koteka elaka oyo bazwaki na Allah na ntalo moke, mpe bazali kolapa ndayi (ya lokuta), bango wana nde bakozala na eloko te na mokolo ya suka. Mpe Allah akolobisa bango te, mpe akotala bango te mokolo ya suka. Mpe akopetola bango te. Mpe bakozala na etumbu ya makasi.
ߊߙߊߓߎߞߊ߲ߡߊ ߞߘߐߦߌߘߊ ߟߎ߬:
 
ߞߘߐ ߟߎ߬ ߘߟߊߡߌ߬ߘߊ߬ߟߌ ߝߐߘߊ ߘߏ߫: ߌߡߎ߬ߙߊ߲߬ ߞߐߙߍ
ߝߐߘߊ ߟߎ߫ ߦߌ߬ߘߊ߬ߥߟߊ ߞߐߜߍ ߝߙߍߕߍ
 
ߞߎ߬ߙߣߊ߬ ߞߟߊߒߞߋ ߞߘߐ ߟߎ߬ ߘߟߊߡߌߘߊ - ߟߌ߲ߜ߭ߟߊߞߊ߲ ߘߟߊߡߌߘߊ - ߡߎ߬ߤ߭ߊߡߡߊߘߎ߫ ߓߊ߯ߟߊ߲ߜ߭ߏߜߏ߫ - ߘߟߊߡߌߘߊ ߟߎ߫ ߦߌ߬ߘߊ߬ߥߟߊ

ߗ߭ߞߊߙߌߦߊ߫ ߡߎ߬ߤߊߡߡߊߘߎ߫ ߓߊ߯ߟߊ߲ߜ߭ߏߜߏ߫ ߟߊ߫ ߘߟߊߡߌߘߊ ߟߋ߬.

ߘߊߕߎ߲߯ߠߌ߲