Check out the new design

ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ * - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាលីអុិមរ៉ន   អាយ៉ាត់:
يَٰٓأَهۡلَ ٱلۡكِتَٰبِ لِمَ تَلۡبِسُونَ ٱلۡحَقَّ بِٱلۡبَٰطِلِ وَتَكۡتُمُونَ ٱلۡحَقَّ وَأَنتُمۡ تَعۡلَمُونَ
Eh bino baye bozua buku! Mpona nini bozali kosangisa mabe na bosôló, mpe bozali kobomba bosôló mpe bozali na kati ya koyeba?
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَقَالَت طَّآئِفَةٞ مِّنۡ أَهۡلِ ٱلۡكِتَٰبِ ءَامِنُواْ بِٱلَّذِيٓ أُنزِلَ عَلَى ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَجۡهَ ٱلنَّهَارِ وَٱكۡفُرُوٓاْ ءَاخِرَهُۥ لَعَلَّهُمۡ يَرۡجِعُونَ
Mpe lisanga ya bato kati na baye bazua buku, balobi na bato na bango ete: Bondima na maye ekitisama epai ya bandimi[1] na ebandeli ya mokolo, mpe soki ekomi na mpokwa bopengwa na yango, mpo ete bango bazonga.
[1] Bandimi: Bazali baye bamisoki na Allah (bamizilima).
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَلَا تُؤۡمِنُوٓاْ إِلَّا لِمَن تَبِعَ دِينَكُمۡ قُلۡ إِنَّ ٱلۡهُدَىٰ هُدَى ٱللَّهِ أَن يُؤۡتَىٰٓ أَحَدٞ مِّثۡلَ مَآ أُوتِيتُمۡ أَوۡ يُحَآجُّوكُمۡ عِندَ رَبِّكُمۡۗ قُلۡ إِنَّ ٱلۡفَضۡلَ بِيَدِ ٱللَّهِ يُؤۡتِيهِ مَن يَشَآءُۗ وَٱللَّهُ وَٰسِعٌ عَلِيمٞ
Bondima na bato mosusu te sé na oyo alandi lingomba na bino. Loba: Ya sôló, lisungi na nzela ya semba ezali oyo ya Allah. Mpo ete moko te azua mpe lokola bino, to atelemela bino na yango epai ya Nkolo na bino? Loba: Ya sôló bolamu ezali na maboko ya Allah, apesaka yango na oyo ye alingi, mpe Allah atonda bomengo azali na boyebi koleka.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
يَخۡتَصُّ بِرَحۡمَتِهِۦ مَن يَشَآءُۗ وَٱللَّهُ ذُو ٱلۡفَضۡلِ ٱلۡعَظِيمِ
(Allah) apesaka ngolu naye na nani alingi. Mpe Allah nde atonda bolamu koleka.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
۞ وَمِنۡ أَهۡلِ ٱلۡكِتَٰبِ مَنۡ إِن تَأۡمَنۡهُ بِقِنطَارٖ يُؤَدِّهِۦٓ إِلَيۡكَ وَمِنۡهُم مَّنۡ إِن تَأۡمَنۡهُ بِدِينَارٖ لَّا يُؤَدِّهِۦٓ إِلَيۡكَ إِلَّا مَا دُمۡتَ عَلَيۡهِ قَآئِمٗاۗ ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمۡ قَالُواْ لَيۡسَ عَلَيۡنَا فِي ٱلۡأُمِّيِّـۧنَ سَبِيلٞ وَيَقُولُونَ عَلَى ٱللَّهِ ٱلۡكَذِبَ وَهُمۡ يَعۡلَمُونَ
Mpe ezali okati ya baye bazua buku, soki obombi eloko epai naye, akobatela yango kino okoya kozua. Mpe ezali na basusu, soki obombi mwa lopata epai naye, akozongisa yango te kino okolemba na kotelema mpe kotambola epai naye, mpamba te bango balobaka ete: Baye batanga te bakosala biso eloko te. Mpe bazali kobukela Allah lokuta mpe bango bazali kati na koyeba.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
بَلَىٰۚ مَنۡ أَوۡفَىٰ بِعَهۡدِهِۦ وَٱتَّقَىٰ فَإِنَّ ٱللَّهَ يُحِبُّ ٱلۡمُتَّقِينَ
Ya sôló, oyo akokokisa elaka naye mpe abangi,[1] ya sôló Allah alingaka babangi.
[1] Allah.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
إِنَّ ٱلَّذِينَ يَشۡتَرُونَ بِعَهۡدِ ٱللَّهِ وَأَيۡمَٰنِهِمۡ ثَمَنٗا قَلِيلًا أُوْلَٰٓئِكَ لَا خَلَٰقَ لَهُمۡ فِي ٱلۡأٓخِرَةِ وَلَا يُكَلِّمُهُمُ ٱللَّهُ وَلَا يَنظُرُ إِلَيۡهِمۡ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ وَلَا يُزَكِّيهِمۡ وَلَهُمۡ عَذَابٌ أَلِيمٞ
Ya sôló, baye bazali koteka elaka oyo bazwaki na Allah na ntalo moke, mpe bazali kolapa ndayi (ya lokuta), bango wana nde bakozala na eloko te na mokolo ya suka. Mpe Allah akolobisa bango te, mpe akotala bango te mokolo ya suka. Mpe akopetola bango te. Mpe bakozala na etumbu ya makasi.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
 
ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាលីអុិមរ៉ន
សន្ទស្សន៍នៃជំពូក លេខ​ទំព័រ
 
ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

ការបកប្រែដោយហ្សាការីយ៉ា ម៉ូហាំម៉ាត់ជាភាសា Ngogo.

បិទ