Check out the new design

ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ * - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាលីអុិមរ៉ន   អាយ៉ាត់:
وَلِيُمَحِّصَ ٱللَّهُ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَيَمۡحَقَ ٱلۡكَٰفِرِينَ
Mpe mpo ete Allah apetola bandimi mpe alimwisa bapagano.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
أَمۡ حَسِبۡتُمۡ أَن تَدۡخُلُواْ ٱلۡجَنَّةَ وَلَمَّا يَعۡلَمِ ٱللَّهُ ٱلَّذِينَ جَٰهَدُواْ مِنكُمۡ وَيَعۡلَمَ ٱلصَّٰبِرِينَ
Bozali kolikia kokota na lola mpe naino Allah ameki te ba nani kati na bino babundaki, mpe banani bakangi mitema?
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَلَقَدۡ كُنتُمۡ تَمَنَّوۡنَ ٱلۡمَوۡتَ مِن قَبۡلِ أَن تَلۡقَوۡهُ فَقَدۡ رَأَيۡتُمُوهُ وَأَنتُمۡ تَنظُرُونَ
Mpe bozalaki kolikia liwa yambo ete eyela bino. Kasi bosilaki komona yango, mpe bozali kotala.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَمَا مُحَمَّدٌ إِلَّا رَسُولٞ قَدۡ خَلَتۡ مِن قَبۡلِهِ ٱلرُّسُلُۚ أَفَإِيْن مَّاتَ أَوۡ قُتِلَ ٱنقَلَبۡتُمۡ عَلَىٰٓ أَعۡقَٰبِكُمۡۚ وَمَن يَنقَلِبۡ عَلَىٰ عَقِبَيۡهِ فَلَن يَضُرَّ ٱللَّهَ شَيۡـٔٗاۚ وَسَيَجۡزِي ٱللَّهُ ٱلشَّٰكِرِينَ
Mpe Muhammad azali sé motindami. Mpe batindami ebele balekaki liboso[1] naye. Soki akufi to babomi ye na bitumba, bokozonga lisusu na bopagano? Oyo kati na bino akozonga na bopagano, ekotungisa Allah na eloko moko te, mpe Allah akofuta baye bazali kotondo ye botondi.
[1] “Ebele balekaki liboso naye”: Elakisi: Na kati ya batindami, ezali na baye bakufa mpe ezali na baye Allah atombola o likolo.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَمَا كَانَ لِنَفۡسٍ أَن تَمُوتَ إِلَّا بِإِذۡنِ ٱللَّهِ كِتَٰبٗا مُّؤَجَّلٗاۗ وَمَن يُرِدۡ ثَوَابَ ٱلدُّنۡيَا نُؤۡتِهِۦ مِنۡهَا وَمَن يُرِدۡ ثَوَابَ ٱلۡأٓخِرَةِ نُؤۡتِهِۦ مِنۡهَاۚ وَسَنَجۡزِي ٱلشَّٰكِرِينَ
Mpe moko te akoki kokufa sé ezala na mokano ya Allah mpe elaka eye asilaki kotiela ye. Mpe oyo akolinga lifuta lia mokili, tokopesa ye yango Mpe oyo akolinga lifuta lia mokolo ya suka tokopesa ye yango, mpe tokofutaka baye bazali kotondo Allah botondi.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَكَأَيِّن مِّن نَّبِيّٖ قَٰتَلَ مَعَهُۥ رِبِّيُّونَ كَثِيرٞ فَمَا وَهَنُواْ لِمَآ أَصَابَهُمۡ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ وَمَا ضَعُفُواْ وَمَا ٱسۡتَكَانُواْۗ وَٱللَّهُ يُحِبُّ ٱلصَّٰبِرِينَ
Mpe ebele kati ya bantoma babundaki elongo na balandi ye, ebele ya banganga Nzambe, babangaki te na oyo ezuaki bango o kati ya nzela ya Allah, mpe balembaki te mpe batikaki ntaka te, mpe Allah alingaka bakangi mitema.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَمَا كَانَ قَوۡلَهُمۡ إِلَّآ أَن قَالُواْ رَبَّنَا ٱغۡفِرۡ لَنَا ذُنُوبَنَا وَإِسۡرَافَنَا فِيٓ أَمۡرِنَا وَثَبِّتۡ أَقۡدَامَنَا وَٱنصُرۡنَا عَلَى ٱلۡقَوۡمِ ٱلۡكَٰفِرِينَ
Liloba na bango ezalaki sé ete: Eh Nkolo! Limbisa biso masumu na biso mpe maye tolutisi ndelo na yango, mpe lendisa matambi na biso mpe pesa biso elonga likolo na baye bapengwi.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
فَـَٔاتَىٰهُمُ ٱللَّهُ ثَوَابَ ٱلدُّنۡيَا وَحُسۡنَ ثَوَابِ ٱلۡأٓخِرَةِۗ وَٱللَّهُ يُحِبُّ ٱلۡمُحۡسِنِينَ
Mpe Allah apesaki bango mbano ya malamu awa na nsé mpe ya kitoko koleka o mokolo ya suka. Mpe Allah alingi bato ya malamu.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
 
ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាលីអុិមរ៉ន
សន្ទស្សន៍នៃជំពូក លេខ​ទំព័រ
 
ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

ការបកប្រែដោយហ្សាការីយ៉ា ម៉ូហាំម៉ាត់ជាភាសា Ngogo.

បិទ