د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: يوسف   آیت:

Yûsuf (ZOZEFU)

الٓرۚ تِلۡكَ ءَايَٰتُ ٱلۡكِتَٰبِ ٱلۡمُبِينِ
1. Alif, lâm, râ(1). Wana ezali mikapo mia buku ya polele.
1 Bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
عربي تفسیرونه:
إِنَّآ أَنزَلۡنَٰهُ قُرۡءَٰنًا عَرَبِيّٗا لَّعَلَّكُمۡ تَعۡقِلُونَ
2. Ya soló, tokitisaki yango kurani na lokota ya arabo mpo ete bososola.
عربي تفسیرونه:
نَحۡنُ نَقُصُّ عَلَيۡكَ أَحۡسَنَ ٱلۡقَصَصِ بِمَآ أَوۡحَيۡنَآ إِلَيۡكَ هَٰذَا ٱلۡقُرۡءَانَ وَإِن كُنتَ مِن قَبۡلِهِۦ لَمِنَ ٱلۡغَٰفِلِينَ
3. Tozali koyebisa yo masolo ma kitoko maye tokitisaki kurani eye epai nayo, mpe ata soki ozalaka liboso na yango o kati ya baye bazangaki bokebi.
عربي تفسیرونه:
إِذۡ قَالَ يُوسُفُ لِأَبِيهِ يَٰٓأَبَتِ إِنِّي رَأَيۡتُ أَحَدَ عَشَرَ كَوۡكَبٗا وَٱلشَّمۡسَ وَٱلۡقَمَرَ رَأَيۡتُهُمۡ لِي سَٰجِدِينَ
4. Tango Yûsuf alobaki na tata waye: Oh tata na ngai! Ya solo, ngai namoni na ndoto minzoto zomi na moko, mpe mwese na sanza, mizali kogumbamela ngai.
عربي تفسیرونه:
قَالَ يَٰبُنَيَّ لَا تَقۡصُصۡ رُءۡيَاكَ عَلَىٰٓ إِخۡوَتِكَ فَيَكِيدُواْ لَكَ كَيۡدًاۖ إِنَّ ٱلشَّيۡطَٰنَ لِلۡإِنسَٰنِ عَدُوّٞ مُّبِينٞ
5. Alobaki: Oh mwana wa ngai! Kobetela bandeko bayo ndoto nayo eye te, mpo bakoki kosalela yo likita ya mabe. Ya solo satana azali monguna ya polele тропа moto.
عربي تفسیرونه:
وَكَذَٰلِكَ يَجۡتَبِيكَ رَبُّكَ وَيُعَلِّمُكَ مِن تَأۡوِيلِ ٱلۡأَحَادِيثِ وَيُتِمُّ نِعۡمَتَهُۥ عَلَيۡكَ وَعَلَىٰٓ ءَالِ يَعۡقُوبَ كَمَآ أَتَمَّهَا عَلَىٰٓ أَبَوَيۡكَ مِن قَبۡلُ إِبۡرَٰهِيمَ وَإِسۡحَٰقَۚ إِنَّ رَبَّكَ عَلِيمٌ حَكِيمٞ
6. Mpe ndenge wana nde Nkolo wayo akopona yo, mpe akolakisa yo ndimbola ya bandoto mpe akokokisa bolamu bwa ye likolo nayo, mpe likolo lia bana ba Ya’qúb, lolenge akokisaki yango liboso epai ya baboti nayo mibale, Ibrâhîm na Is’háq. Ya soló Nkolo wayo azali moyebi atonda bwanya.
عربي تفسیرونه:
۞ لَّقَدۡ كَانَ فِي يُوسُفَ وَإِخۡوَتِهِۦٓ ءَايَٰتٞ لِّلسَّآئِلِينَ
7. Ezalaki ya sólo, epai ya Yûsuf na bandeko baye bilembo тропа batuni mituna.
عربي تفسیرونه:
إِذۡ قَالُواْ لَيُوسُفُ وَأَخُوهُ أَحَبُّ إِلَىٰٓ أَبِينَا مِنَّا وَنَحۡنُ عُصۡبَةٌ إِنَّ أَبَانَا لَفِي ضَلَٰلٖ مُّبِينٍ
8. Tango balobaki ete: Yûsuf na ndeko waye balingami epai ya tata wa biso koleka, mpe biso tozali lisanga lia makasi. Ya sólo, tata wa biso azali na libunga lia polele.
عربي تفسیرونه:
ٱقۡتُلُواْ يُوسُفَ أَوِ ٱطۡرَحُوهُ أَرۡضٗا يَخۡلُ لَكُمۡ وَجۡهُ أَبِيكُمۡ وَتَكُونُواْ مِنۢ بَعۡدِهِۦ قَوۡمٗا صَٰلِحِينَ
9. Boboma Yûsuf to botinda ye o mboka nyoso ya mosika. Wana nde elongi ya tata wa bino ekotala bino mbala moko, mpe bokozala sima na yango bato balamu.
عربي تفسیرونه:
قَالَ قَآئِلٞ مِّنۡهُمۡ لَا تَقۡتُلُواْ يُوسُفَ وَأَلۡقُوهُ فِي غَيَٰبَتِ ٱلۡجُبِّ يَلۡتَقِطۡهُ بَعۡضُ ٱلسَّيَّارَةِ إِن كُنتُمۡ فَٰعِلِينَ
10. Moko kati na bango alobi: Boboma Yûsuf te, kasi bobwaka ye o kati ya libulu lia mayi ya mozindo, bakozua ye na baleki nzela, soki bokosala.
عربي تفسیرونه:
قَالُواْ يَٰٓأَبَانَا مَا لَكَ لَا تَأۡمَ۬نَّا عَلَىٰ يُوسُفَ وَإِنَّا لَهُۥ لَنَٰصِحُونَ
11. Balobaki: Eh tata wa biso! Mpona nini te ozali kondimela biso mpona Yûsuf mpe tozali na makanisi malamu epai naye mpe biso tokopesa ye toli?
عربي تفسیرونه:
أَرۡسِلۡهُ مَعَنَا غَدٗا يَرۡتَعۡ وَيَلۡعَبۡ وَإِنَّا لَهُۥ لَحَٰفِظُونَ
12. Tinda ye akende elongo na biso lobi kotambola mpe kosakana, kaši ya soló tokobatela ye.
عربي تفسیرونه:
قَالَ إِنِّي لَيَحۡزُنُنِيٓ أَن تَذۡهَبُواْ بِهِۦ وَأَخَافُ أَن يَأۡكُلَهُ ٱلذِّئۡبُ وَأَنتُمۡ عَنۡهُ غَٰفِلُونَ
13. Alobaki: Solo, ezali kopesa ngai mawa ete bökende naye mpe nazali kobanga ete mbwa ya zamba eliya ye. O tango eye bokozala na bokebi naye te.
عربي تفسیرونه:
قَالُواْ لَئِنۡ أَكَلَهُ ٱلذِّئۡبُ وَنَحۡنُ عُصۡبَةٌ إِنَّآ إِذٗا لَّخَٰسِرُونَ
14. Balobaki: Soki mbwa ya zamba elei ye na biso tozali ebele, wana nde tozali bazangi.
عربي تفسیرونه:
فَلَمَّا ذَهَبُواْ بِهِۦ وَأَجۡمَعُوٓاْ أَن يَجۡعَلُوهُ فِي غَيَٰبَتِ ٱلۡجُبِّۚ وَأَوۡحَيۡنَآ إِلَيۡهِ لَتُنَبِّئَنَّهُم بِأَمۡرِهِمۡ هَٰذَا وَهُمۡ لَا يَشۡعُرُونَ
15. Mpe tango bakendeki naye, bayokani ete ba bwaka ye na libulu lia mayi ya mozindo liye bakoki kornona ye te, mpe tomonisa naye ete: Okoyebisa bango likambo lia bango liye, mpe bakoyeba te.
عربي تفسیرونه:
وَجَآءُوٓ أَبَاهُمۡ عِشَآءٗ يَبۡكُونَ
16. Mpe bazongi epai ya tata wa bango na pokwa bazali kolela,
عربي تفسیرونه:
قَالُواْ يَٰٓأَبَانَآ إِنَّا ذَهَبۡنَا نَسۡتَبِقُ وَتَرَكۡنَا يُوسُفَ عِندَ مَتَٰعِنَا فَأَكَلَهُ ٱلذِّئۡبُۖ وَمَآ أَنتَ بِمُؤۡمِنٖ لَّنَا وَلَوۡ كُنَّا صَٰدِقِينَ
17. Balobi: Eh tata wa biso! Ya soló, tokendeki komekana тропа kobwaka makonga na mokili, тре totikaki Yûsuf pene na biloko bia biso mpe mbwa ya zamba alei ye. Mpe yo okoki kondimela biso te ata soki tolobi bosembo.
عربي تفسیرونه:
وَجَآءُو عَلَىٰ قَمِيصِهِۦ بِدَمٖ كَذِبٖۚ قَالَ بَلۡ سَوَّلَتۡ لَكُمۡ أَنفُسُكُمۡ أَمۡرٗاۖ فَصَبۡرٞ جَمِيلٞۖ وَٱللَّهُ ٱلۡمُسۡتَعَانُ عَلَىٰ مَا تَصِفُونَ
18. Mpe bamemi simisi naye, bapakolo yango makila ya lokuta. Alobi: Milimo mia bino mitindaki na likambo moko boye, kasi kokanga motema ezali malamu. Allah akosalisa ngai na maye bosali.
عربي تفسیرونه:
وَجَآءَتۡ سَيَّارَةٞ فَأَرۡسَلُواْ وَارِدَهُمۡ فَأَدۡلَىٰ دَلۡوَهُۥۖ قَالَ يَٰبُشۡرَىٰ هَٰذَا غُلَٰمٞۚ وَأَسَرُّوهُ بِضَٰعَةٗۚ وَٱللَّهُ عَلِيمُۢ بِمَا يَعۡمَلُونَ
19. Мре baleki nzela bato ya mombongo batindi moko wa bango mpo akende kotoka mayi тропа bango, tango akitisi katini naye mpo atoka mayi, alobi: Sango elamu, oyo elenge mobali! Mpe batiaki ye na mikumba mpo bateka ye. Kasi Allah nde moyebi na oyo bakosala.
عربي تفسیرونه:
وَشَرَوۡهُ بِثَمَنِۭ بَخۡسٖ دَرَٰهِمَ مَعۡدُودَةٖ وَكَانُواْ فِيهِ مِنَ ٱلزَّٰهِدِينَ
20. Mpe bateki ye na talo ya токе, na ndambu ya misolo mia dirhams mia kotanga, bazuaki ye na motuya te.
عربي تفسیرونه:
وَقَالَ ٱلَّذِي ٱشۡتَرَىٰهُ مِن مِّصۡرَ لِٱمۡرَأَتِهِۦٓ أَكۡرِمِي مَثۡوَىٰهُ عَسَىٰٓ أَن يَنفَعَنَآ أَوۡ نَتَّخِذَهُۥ وَلَدٗاۚ وَكَذَٰلِكَ مَكَّنَّا لِيُوسُفَ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَلِنُعَلِّمَهُۥ مِن تَأۡوِيلِ ٱلۡأَحَادِيثِۚ وَٱللَّهُ غَالِبٌ عَلَىٰٓ أَمۡرِهِۦ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يَعۡلَمُونَ
21. Mpe oyo asombaki ye azalaki moto ya ezipito, mpe alobaki na mwasi naye: Zúa ye mpe bokolo ye malamu, mpo tango mosusu akosalisa biso to mpe tozua ye mwana na biso. Mpe ndenge wana nde tosalaki na Yûsuf o kati na mokili, mpe totangisaki ye ndimbola ya bandoto. Mpe Allah azali ye moko mokonzi ya makambo naye kasi ebele ya bato bazali koyeba te.
عربي تفسیرونه:
وَلَمَّا بَلَغَ أَشُدَّهُۥٓ ءَاتَيۡنَٰهُ حُكۡمٗا وَعِلۡمٗاۚ وَكَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلۡمُحۡسِنِينَ
22. Mpe tango akoli, topesaki ye bwanya mpe boyebi. Mpe ndenge wana nde tofutaka babongisi.
عربي تفسیرونه:
وَرَٰوَدَتۡهُ ٱلَّتِي هُوَ فِي بَيۡتِهَا عَن نَّفۡسِهِۦ وَغَلَّقَتِ ٱلۡأَبۡوَٰبَ وَقَالَتۡ هَيۡتَ لَكَۚ قَالَ مَعَاذَ ٱللَّهِۖ إِنَّهُۥ رَبِّيٓ أَحۡسَنَ مَثۡوَايَۖ إِنَّهُۥ لَا يُفۡلِحُ ٱلظَّٰلِمُونَ
23. Mpe kasi (mwasi wa mokonzi) oyo ayambaki ye o ndako naye amekaki mpo akweisa ye na ekobo, mpe akangelaki ye bizibeli bia ndako mpe alobi: Yaka; na sili kobongama тропа yo, alobi ete: (Yûsuf) Allah abatela ngai. Ya soló azali Nkolo wa ngai, apesi ngai libateli ya malamu, ya solo bato mabe bakolongaka te.
عربي تفسیرونه:
وَلَقَدۡ هَمَّتۡ بِهِۦۖ وَهَمَّ بِهَا لَوۡلَآ أَن رَّءَا بُرۡهَٰنَ رَبِّهِۦۚ كَذَٰلِكَ لِنَصۡرِفَ عَنۡهُ ٱلسُّوٓءَ وَٱلۡفَحۡشَآءَۚ إِنَّهُۥ مِنۡ عِبَادِنَا ٱلۡمُخۡلَصِينَ
24. Mpe asilaki kolula ye. Ye (Yûsuf) mpe lokola, alulaki ye (mwasi ya mokonzi) soki amonaki elembo ya Nkolo waye te, na boye nde totiyaki ye mosika na mabe mpe mosika ya ekobo, ya sólo ye azalaki moko ya bawumbu na biso ya malamu.
عربي تفسیرونه:
وَٱسۡتَبَقَا ٱلۡبَابَ وَقَدَّتۡ قَمِيصَهُۥ مِن دُبُرٖ وَأَلۡفَيَا سَيِّدَهَا لَدَا ٱلۡبَابِۚ قَالَتۡ مَا جَزَآءُ مَنۡ أَرَادَ بِأَهۡلِكَ سُوٓءًا إِلَّآ أَن يُسۡجَنَ أَوۡ عَذَابٌ أَلِيمٞ
25. Mpe bango banso babale balandanaki mbangu о ngambu ya bizibeli bia ndako mpe apasolaki simisi naye apasoli simisi ya Yûsuf osima ya mokongo mpe bakutani na mobali (wa mwasi ona) na ezibeli ya ndako. Alobi: Lifuta nini okopesa na oyo alingaki kosala mwasi wayo mabe sé ezala boloko to etumbu ekasi?
عربي تفسیرونه:
قَالَ هِيَ رَٰوَدَتۡنِي عَن نَّفۡسِيۚ وَشَهِدَ شَاهِدٞ مِّنۡ أَهۡلِهَآ إِن كَانَ قَمِيصُهُۥ قُدَّ مِن قُبُلٖ فَصَدَقَتۡ وَهُوَ مِنَ ٱلۡكَٰذِبِينَ
26. Alobi (Yûsuf): Ezali ye nde alingaki kokweya na ngai, mpe nzeneneke moko o kati ya libota lia ye alobi: Soki simisi naye epasuki liboso, wana alobi(1) bosoló, mpe ye(2) azali kati ya babuki lokuta.
1 Alobi bosôló, awa ezali mwasi.
2 Ye: Ezali: Yûsuf.
عربي تفسیرونه:
وَإِن كَانَ قَمِيصُهُۥ قُدَّ مِن دُبُرٖ فَكَذَبَتۡ وَهُوَ مِنَ ٱلصَّٰدِقِينَ
27. (Kasi) soki simisi naye epasuki na sima, akosi, mpe ye (Yûsuf) azali kati ya balobi bosôló.
2 Ye: Ezali: Yûsuf.
عربي تفسیرونه:
فَلَمَّا رَءَا قَمِيصَهُۥ قُدَّ مِن دُبُرٖ قَالَ إِنَّهُۥ مِن كَيۡدِكُنَّۖ إِنَّ كَيۡدَكُنَّ عَظِيمٞ
28. Мре tango (mobali) amoni simisi epasuki na sima alobi: Ya soló, ezali motambo ya bino (basi) ya mabe, ya soló motambo na bino (basi) ezali monene koleka.
عربي تفسیرونه:
يُوسُفُ أَعۡرِضۡ عَنۡ هَٰذَاۚ وَٱسۡتَغۡفِرِي لِذَنۢبِكِۖ إِنَّكِ كُنتِ مِنَ ٱلۡخَاطِـِٔينَ
29. Yûsuf, kokanisa lisusu na oyo te, mpe yo (mwasi) senga bolimbisi тропа lisumu lia yo, mpo ozalaki o kati ya basali mbeba.
عربي تفسیرونه:
۞ وَقَالَ نِسۡوَةٞ فِي ٱلۡمَدِينَةِ ٱمۡرَأَتُ ٱلۡعَزِيزِ تُرَٰوِدُ فَتَىٰهَا عَن نَّفۡسِهِۦۖ قَدۡ شَغَفَهَا حُبًّاۖ إِنَّا لَنَرَىٰهَا فِي ضَلَٰلٖ مُّبِينٖ
30. Mpe tango basi okati ya mboka balobi ete: Mwasi ya mokonzi alingaki kokweisa elenge mobali naye ye moko! Ya sólo penza, asili kolangwa ye bolingo, ya sólo biso tomoni été asili kobunga nzela penza.
عربي تفسیرونه:
فَلَمَّا سَمِعَتۡ بِمَكۡرِهِنَّ أَرۡسَلَتۡ إِلَيۡهِنَّ وَأَعۡتَدَتۡ لَهُنَّ مُتَّكَـٔٗا وَءَاتَتۡ كُلَّ وَٰحِدَةٖ مِّنۡهُنَّ سِكِّينٗا وَقَالَتِ ٱخۡرُجۡ عَلَيۡهِنَّۖ فَلَمَّا رَأَيۡنَهُۥٓ أَكۡبَرۡنَهُۥ وَقَطَّعۡنَ أَيۡدِيَهُنَّ وَقُلۡنَ حَٰشَ لِلَّهِ مَا هَٰذَا بَشَرًا إِنۡ هَٰذَآ إِلَّا مَلَكٞ كَرِيمٞ
31. Mpe tango ayoki biloba loba bia bango, abengi bango тре alengeleli bango lipati тре akaboleli bango ba mbeli, sima alobi: Віта liboso lia bango. Tango bamoni ye basepeli naye mpe bamikati bapota na maboko та bango na bolobi: Ah Allah! Abongisa ye, oyo azali moto te, akoki kozala anzelu wa lokumu!
عربي تفسیرونه:
قَالَتۡ فَذَٰلِكُنَّ ٱلَّذِي لُمۡتُنَّنِي فِيهِۖ وَلَقَدۡ رَٰوَدتُّهُۥ عَن نَّفۡسِهِۦ فَٱسۡتَعۡصَمَۖ وَلَئِن لَّمۡ يَفۡعَلۡ مَآ ءَامُرُهُۥ لَيُسۡجَنَنَّ وَلَيَكُونٗا مِّنَ ٱلصَّٰغِرِينَ
32. Alobaki na bango été: Wana nde oyo bozalaki koloba тропа ngai. Ya sólo ngai nalukaki kokweisa ye kasi ye amibatelaki. Na yango soki asali te oyo na lingi, akokoto boloko mpe akokitisama na kosila lokumu.
عربي تفسیرونه:
قَالَ رَبِّ ٱلسِّجۡنُ أَحَبُّ إِلَيَّ مِمَّا يَدۡعُونَنِيٓ إِلَيۡهِۖ وَإِلَّا تَصۡرِفۡ عَنِّي كَيۡدَهُنَّ أَصۡبُ إِلَيۡهِنَّ وَأَكُن مِّنَ ٱلۡجَٰهِلِينَ
33. Alobi: Oh Nkolo wa ngai! Boloko ezali malamu тропа ngai koleka oyo bazali kobenga ngai na yango. Mpe soki obateli ngai te na likita na bango, nakokweya na bango, mpe nakozala o kati ya bazoba.
عربي تفسیرونه:
فَٱسۡتَجَابَ لَهُۥ رَبُّهُۥ فَصَرَفَ عَنۡهُ كَيۡدَهُنَّۚ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلسَّمِيعُ ٱلۡعَلِيمُ
34. Nkolo waye andimelaki ye, atiye mosika na mayele та bango mabe: Ya soló, ye azali moyoki atonda boyebi.
عربي تفسیرونه:
ثُمَّ بَدَا لَهُم مِّنۢ بَعۡدِ مَا رَأَوُاْ ٱلۡأٓيَٰتِ لَيَسۡجُنُنَّهُۥ حَتَّىٰ حِينٖ
35. Sima emonanaki polele na liboso na bango été (Yûsuf) asali eloko te, bamonaki été esengeli kokotisa ye na boloko kino tango oyo esengeli.
عربي تفسیرونه:
وَدَخَلَ مَعَهُ ٱلسِّجۡنَ فَتَيَانِۖ قَالَ أَحَدُهُمَآ إِنِّيٓ أَرَىٰنِيٓ أَعۡصِرُ خَمۡرٗاۖ وَقَالَ ٱلۡأٓخَرُ إِنِّيٓ أَرَىٰنِيٓ أَحۡمِلُ فَوۡقَ رَأۡسِي خُبۡزٗا تَأۡكُلُ ٱلطَّيۡرُ مِنۡهُۖ نَبِّئۡنَا بِتَأۡوِيلِهِۦٓۖ إِنَّا نَرَىٰكَ مِنَ ٱلۡمُحۡسِنِينَ
36. Mpe akotaki boloko elongo na bilenge mibali mibale. Moko wa bango alobi na Yûsuf: Ya soló, namoni na ndoto été nazali kosala masanga. Mpe mosusu alobi: Ngai namoni namemi mapa na mutu na ngai bandeke bazali kólia yango. Limbola biso ntina na yango nyoso, mpo ya soló tozali kornona yo moto ya malamu.
عربي تفسیرونه:
قَالَ لَا يَأۡتِيكُمَا طَعَامٞ تُرۡزَقَانِهِۦٓ إِلَّا نَبَّأۡتُكُمَا بِتَأۡوِيلِهِۦ قَبۡلَ أَن يَأۡتِيَكُمَاۚ ذَٰلِكُمَا مِمَّا عَلَّمَنِي رَبِّيٓۚ إِنِّي تَرَكۡتُ مِلَّةَ قَوۡمٖ لَّا يُؤۡمِنُونَ بِٱللَّهِ وَهُم بِٱلۡأٓخِرَةِ هُمۡ كَٰفِرُونَ
37. Alobaki bileyi oyo bitiyami тропа bino bikoki koyela bino te, sé kaka nayebisa bino ndimbola na yango yambo eyela bino. Ezali тропа bino, ndenge Nkolo wa ngai atangisi ngai. Ya soló, natikaki lingomba lia bato baye bandimaka na Allah te, mpe bazali kondima na mokolo ya suka te,
عربي تفسیرونه:
وَٱتَّبَعۡتُ مِلَّةَ ءَابَآءِيٓ إِبۡرَٰهِيمَ وَإِسۡحَٰقَ وَيَعۡقُوبَۚ مَا كَانَ لَنَآ أَن نُّشۡرِكَ بِٱللَّهِ مِن شَيۡءٖۚ ذَٰلِكَ مِن فَضۡلِ ٱللَّهِ عَلَيۡنَا وَعَلَى ٱلنَّاسِ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يَشۡكُرُونَ
38. Mpe nalandi lingomba lia baboti na ngai, Ibrâhîm na Is’hâq na Ya’qüb. Esengeli na biso te tosangisa Allah na eloko mosusu. Wana nde bolamu bwa Allah epai na biso na epai ya bato banso, kasi ebele ya bato bazali kotondo te.
عربي تفسیرونه:
يَٰصَٰحِبَيِ ٱلسِّجۡنِ ءَأَرۡبَابٞ مُّتَفَرِّقُونَ خَيۡرٌ أَمِ ٱللَّهُ ٱلۡوَٰحِدُ ٱلۡقَهَّارُ
39. Oh! Bato ba ngai ba boloko! Boye binzambe nzambe bazali malamu koleka to Allah wa bomoko mpe wa bokoki?
عربي تفسیرونه:
مَا تَعۡبُدُونَ مِن دُونِهِۦٓ إِلَّآ أَسۡمَآءٗ سَمَّيۡتُمُوهَآ أَنتُمۡ وَءَابَآؤُكُم مَّآ أَنزَلَ ٱللَّهُ بِهَا مِن سُلۡطَٰنٍۚ إِنِ ٱلۡحُكۡمُ إِلَّا لِلَّهِ أَمَرَ أَلَّا تَعۡبُدُوٓاْ إِلَّآ إِيَّاهُۚ ذَٰلِكَ ٱلدِّينُ ٱلۡقَيِّمُ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يَعۡلَمُونَ
40. Bozali kobondela basusu botiki ye, bazali sé bankombo oyo bopesi bino moko na bankoko na bino biye Allah akitisaki elembetele te. Kasi mobeko ezali sé ya Allah atindaka sé bobondela ye moko. Wana nde lingomba lia semba, kasi ebele ya bato bazali koyeba te.
عربي تفسیرونه:
يَٰصَٰحِبَيِ ٱلسِّجۡنِ أَمَّآ أَحَدُكُمَا فَيَسۡقِي رَبَّهُۥ خَمۡرٗاۖ وَأَمَّا ٱلۡأٓخَرُ فَيُصۡلَبُ فَتَأۡكُلُ ٱلطَّيۡرُ مِن رَّأۡسِهِۦۚ قُضِيَ ٱلۡأَمۡرُ ٱلَّذِي فِيهِ تَسۡتَفۡتِيَانِ
41. Oh bato ba ngai ba boloko! Mpona ndoto na bino, moko kati na bino akomelisa mokonzi naye masanga, mpe mosusu bakobaka ye, mpe bandeke bakolia motu naye. Likambo liye botunaki ngai lisili kokatama.
عربي تفسیرونه:
وَقَالَ لِلَّذِي ظَنَّ أَنَّهُۥ نَاجٖ مِّنۡهُمَا ٱذۡكُرۡنِي عِندَ رَبِّكَ فَأَنسَىٰهُ ٱلشَّيۡطَٰنُ ذِكۡرَ رَبِّهِۦ فَلَبِثَ فِي ٱلسِّجۡنِ بِضۡعَ سِنِينَ
42. Mpe (Yûsuf) alobi na oyo abimaki na boloko: Lobela ngai epai ya mokonzi nayo. Kasi satana abosanisi ye bokundoli bwa Nkolo naye, yango awumelaki na boloko pene na mibu ebele.
عربي تفسیرونه:
وَقَالَ ٱلۡمَلِكُ إِنِّيٓ أَرَىٰ سَبۡعَ بَقَرَٰتٖ سِمَانٖ يَأۡكُلُهُنَّ سَبۡعٌ عِجَافٞ وَسَبۡعَ سُنۢبُلَٰتٍ خُضۡرٖ وَأُخَرَ يَابِسَٰتٖۖ يَٰٓأَيُّهَا ٱلۡمَلَأُ أَفۡتُونِي فِي رُءۡيَٰيَ إِن كُنتُمۡ لِلرُّءۡيَا تَعۡبُرُونَ
43. Mpe mokonzi alobi: Ya sôló namoni na ndoto, bangombe sambo ya nzoto kolongonu bizali koliama na bangombe sambo ya kokondo, mpe bambuma sambo ya mayi mapondu mpe misusu ya kokauka. Eh bankumu! Bopesa ngai ndimbola ya ndoto ya ngai, soki boyebi kolimbola ndoto.
عربي تفسیرونه:
قَالُوٓاْ أَضۡغَٰثُ أَحۡلَٰمٖۖ وَمَا نَحۡنُ بِتَأۡوِيلِ ٱلۡأَحۡلَٰمِ بِعَٰلِمِينَ
44. Balobaki: Bandoto bizali ya kosangana mpe bizali mabe, mpe biso toyebi kolimbola ndoto yango te.
عربي تفسیرونه:
وَقَالَ ٱلَّذِي نَجَا مِنۡهُمَا وَٱدَّكَرَ بَعۡدَ أُمَّةٍ أَنَا۠ أُنَبِّئُكُم بِتَأۡوِيلِهِۦ فَأَرۡسِلُونِ
45. Kasi oyo abimaka na boloko, akanisi mpe alobi: Ngai nakolimbola bino ndoto yango, botinda ngai.
عربي تفسیرونه:
يُوسُفُ أَيُّهَا ٱلصِّدِّيقُ أَفۡتِنَا فِي سَبۡعِ بَقَرَٰتٖ سِمَانٖ يَأۡكُلُهُنَّ سَبۡعٌ عِجَافٞ وَسَبۡعِ سُنۢبُلَٰتٍ خُضۡرٖ وَأُخَرَ يَابِسَٰتٖ لَّعَلِّيٓ أَرۡجِعُ إِلَى ٱلنَّاسِ لَعَلَّهُمۡ يَعۡلَمُونَ
46. Oh Yûsuf moto wa bosôló! Yebisa biso тропа likambo lia ngombe sambo ya nzoto kolongonu bizali koliama na bangombe sambo ya kokonda, mpe mbuma sambo lia malamu, mpe bisusu lia kokauka mpo nakende koyebisa bato tango nakozonga, mpo bakoka koyeba.
عربي تفسیرونه:
قَالَ تَزۡرَعُونَ سَبۡعَ سِنِينَ دَأَبٗا فَمَا حَصَدتُّمۡ فَذَرُوهُ فِي سُنۢبُلِهِۦٓ إِلَّا قَلِيلٗا مِّمَّا تَأۡكُلُونَ
47. Alobi (Yûsuf): Bokolona milona mibu sambo ya kolandana. Мре botika yango na banzete na yango, longola sé moke ya kólia nde bokobuka.
عربي تفسیرونه:
ثُمَّ يَأۡتِي مِنۢ بَعۡدِ ذَٰلِكَ سَبۡعٞ شِدَادٞ يَأۡكُلۡنَ مَا قَدَّمۡتُمۡ لَهُنَّ إِلَّا قَلِيلٗا مِّمَّا تُحۡصِنُونَ
48. Sima na yango, mibu sambo mikolanda mikozala mia paši, bato na yango bakolia biye bobombaki longola sé moke ya biye bokolona.
عربي تفسیرونه:
ثُمَّ يَأۡتِي مِنۢ بَعۡدِ ذَٰلِكَ عَامٞ فِيهِ يُغَاثُ ٱلنَّاسُ وَفِيهِ يَعۡصِرُونَ
49. Sima mobu moko mokoya, mbula ekonoka тропа kosalisa bato, тре nakati na yango (mobu) bakokamola (bambuma).
عربي تفسیرونه:
وَقَالَ ٱلۡمَلِكُ ٱئۡتُونِي بِهِۦۖ فَلَمَّا جَآءَهُ ٱلرَّسُولُ قَالَ ٱرۡجِعۡ إِلَىٰ رَبِّكَ فَسۡـَٔلۡهُ مَا بَالُ ٱلنِّسۡوَةِ ٱلَّٰتِي قَطَّعۡنَ أَيۡدِيَهُنَّۚ إِنَّ رَبِّي بِكَيۡدِهِنَّ عَلِيمٞ
50. Мре mokonzi alobi: Bomemela ngai ye, tango motindami ayei kopesa ye (Yûsuf) sango ena, (Yûsuf) alobi: Zonga epai ya mokonzi wayo, tuna ye boni sango ya basi baye bamizokisaki maboko? Ya soló, Nkolo wa ngai ayebi likita ya mabe na bango.
عربي تفسیرونه:
قَالَ مَا خَطۡبُكُنَّ إِذۡ رَٰوَدتُّنَّ يُوسُفَ عَن نَّفۡسِهِۦۚ قُلۡنَ حَٰشَ لِلَّهِ مَا عَلِمۡنَا عَلَيۡهِ مِن سُوٓءٖۚ قَالَتِ ٱمۡرَأَتُ ٱلۡعَزِيزِ ٱلۡـَٰٔنَ حَصۡحَصَ ٱلۡحَقُّ أَنَا۠ رَٰوَدتُّهُۥ عَن نَّفۡسِهِۦ وَإِنَّهُۥ لَمِنَ ٱلصَّٰدِقِينَ
51. (Mokonzi alobi na bango): Eloko nini etindaki bino bokweyela Yûsuf? Bayanoli: Na Allah nde mosepelisi, toyebi ye na eloko ya mabe te. Mpe mwasi wa mokonzi alobi: Sikoyo nde bosóló boyebani. Ezalaki nde ngai nalingaki komikweisa epai naye, mpe ye azalaki o kati ya balobi bosôló.
عربي تفسیرونه:
ذَٰلِكَ لِيَعۡلَمَ أَنِّي لَمۡ أَخُنۡهُ بِٱلۡغَيۡبِ وَأَنَّ ٱللَّهَ لَا يَهۡدِي كَيۡدَ ٱلۡخَآئِنِينَ
52. Wana nde mpo ayeba ete nasalaki ye mabe te tango azalaki te, mpe ya soló, Allah akambaka likita ya bato ya mabe te.
عربي تفسیرونه:
۞ وَمَآ أُبَرِّئُ نَفۡسِيٓۚ إِنَّ ٱلنَّفۡسَ لَأَمَّارَةُۢ بِٱلسُّوٓءِ إِلَّا مَا رَحِمَ رَبِّيٓۚ إِنَّ رَبِّي غَفُورٞ رَّحِيمٞ
53. Mpe nakoki komilongola te. Ya sólo, molimo motindaka na mabe, longola sé oyo Nkolo wa ngai akoyokela ye mawa. Ya solo, Nkolo wa ngai azali molimbisi atonda mawa.
عربي تفسیرونه:
وَقَالَ ٱلۡمَلِكُ ٱئۡتُونِي بِهِۦٓ أَسۡتَخۡلِصۡهُ لِنَفۡسِيۖ فَلَمَّا كَلَّمَهُۥ قَالَ إِنَّكَ ٱلۡيَوۡمَ لَدَيۡنَا مَكِينٌ أَمِينٞ
54. Mpe mokonzi alobi été: Boyela ngai ye azala ya ngai moko. Mpe tango asololi na mokonzi, alobaki été: Banda lelo okomi moto wa bosembo mpe ya lokumu epai na biso.
عربي تفسیرونه:
قَالَ ٱجۡعَلۡنِي عَلَىٰ خَزَآئِنِ ٱلۡأَرۡضِۖ إِنِّي حَفِيظٌ عَلِيمٞ
55. Alobi (Yûsuf): Tiya ngai nazala mobateli ya sanduku ya mboka, ya solo, ngai nayebi kobatela.
عربي تفسیرونه:
وَكَذَٰلِكَ مَكَّنَّا لِيُوسُفَ فِي ٱلۡأَرۡضِ يَتَبَوَّأُ مِنۡهَا حَيۡثُ يَشَآءُۚ نُصِيبُ بِرَحۡمَتِنَا مَن نَّشَآءُۖ وَلَا نُضِيعُ أَجۡرَ ٱلۡمُحۡسِنِينَ
56. Mpe lolenge wana nde topesaki Yûsuf bokonzi na mboka wana, asalaki manso maye alingaki kosala. Topesaka ngolu na biso na nani tolingi, mpe tokobungisaka lifuta lia bato malamu te.
عربي تفسیرونه:
وَلَأَجۡرُ ٱلۡأٓخِرَةِ خَيۡرٞ لِّلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَكَانُواْ يَتَّقُونَ
57. Mpe lifuta lia mokolo ya suka lileka kitoko тропа bandimi, mpo bazalaki kobanga.
عربي تفسیرونه:
وَجَآءَ إِخۡوَةُ يُوسُفَ فَدَخَلُواْ عَلَيۡهِ فَعَرَفَهُمۡ وَهُمۡ لَهُۥ مُنكِرُونَ
58. Mpe bandeko ba Yûsuf bayei bakoti epai naye, ayebi bango kasi bango bayebi ye te.
عربي تفسیرونه:
وَلَمَّا جَهَّزَهُم بِجَهَازِهِمۡ قَالَ ٱئۡتُونِي بِأَخٖ لَّكُم مِّنۡ أَبِيكُمۡۚ أَلَا تَرَوۡنَ أَنِّيٓ أُوفِي ٱلۡكَيۡلَ وَأَنَا۠ خَيۡرُ ٱلۡمُنزِلِينَ
59. Mpe tango apesi bango biloko biye alengeleki тропа bango, alobi: В óyela ngai ndeko wa bino, oyo atikalaki epai ya tata wa bino. Boye bozali kornona te ete nazali kokokisa emekeli (kilo) bwa ngai Mpe nazali malamu koleka?
عربي تفسیرونه:
فَإِن لَّمۡ تَأۡتُونِي بِهِۦ فَلَا كَيۡلَ لَكُمۡ عِندِي وَلَا تَقۡرَبُونِ
60. Kasi soki boyeli ngai ye te, bokozua biloko te epai na ngai, mpe bopusana pene na ngai te.
عربي تفسیرونه:
قَالُواْ سَنُرَٰوِدُ عَنۡهُ أَبَاهُ وَإِنَّا لَفَٰعِلُونَ
61. Mpe balobi: Tokomeka koyebisa tata waye. Mpe ya soló, tokomeka kosala yango.
عربي تفسیرونه:
وَقَالَ لِفِتۡيَٰنِهِ ٱجۡعَلُواْ بِضَٰعَتَهُمۡ فِي رِحَالِهِمۡ لَعَلَّهُمۡ يَعۡرِفُونَهَآ إِذَا ٱنقَلَبُوٓاْ إِلَىٰٓ أَهۡلِهِمۡ لَعَلَّهُمۡ يَرۡجِعُونَ
62. Mpe alobi na basali baye: Botiya biloko bia bango na basaki bia bango. Mpo bakoka koyeba yango tango bakozonga kowuta na libota lia bango, mpe mpo bakoka kozonga.
عربي تفسیرونه:
فَلَمَّا رَجَعُوٓاْ إِلَىٰٓ أَبِيهِمۡ قَالُواْ يَٰٓأَبَانَا مُنِعَ مِنَّا ٱلۡكَيۡلُ فَأَرۡسِلۡ مَعَنَآ أَخَانَا نَكۡتَلۡ وَإِنَّا لَهُۥ لَحَٰفِظُونَ
63. Mpe tango bazongeli tata wa bango, balobi: Oh tata wa biso! Baboyi kopesa biso biloko. Pesa biso ndeko wa biso mpo tokoka kozua biloko, mpe ya sólo, biso tokobatela ye.
عربي تفسیرونه:
قَالَ هَلۡ ءَامَنُكُمۡ عَلَيۡهِ إِلَّا كَمَآ أَمِنتُكُمۡ عَلَىٰٓ أَخِيهِ مِن قَبۡلُ فَٱللَّهُ خَيۡرٌ حَٰفِظٗاۖ وَهُوَ أَرۡحَمُ ٱلرَّٰحِمِينَ
64. Alobaki na bango été: Bokanisi été nakopesa bino ye lokola ezalaki na ndeko naye liboso? Kasi Allah azali mobateli malamu aleka mawa.
عربي تفسیرونه:
وَلَمَّا فَتَحُواْ مَتَٰعَهُمۡ وَجَدُواْ بِضَٰعَتَهُمۡ رُدَّتۡ إِلَيۡهِمۡۖ قَالُواْ يَٰٓأَبَانَا مَا نَبۡغِيۖ هَٰذِهِۦ بِضَٰعَتُنَا رُدَّتۡ إِلَيۡنَاۖ وَنَمِيرُ أَهۡلَنَا وَنَحۡفَظُ أَخَانَا وَنَزۡدَادُ كَيۡلَ بَعِيرٖۖ ذَٰلِكَ كَيۡلٞ يَسِيرٞ
65. Мре tango bafungoli mikumba mia bango, bakuti biloko oyo batiyelaki bango bizali. Balobi: Oh tata wa biso! Tokolinga nini lisusu, bazongiseli biso biloko na biso nyoso. Mpe tokoleisa libota lia biso, mpe tokobatela ndeko wa biso, тре tokobakisa mokumba ya mpunda moko mpe wana ezali pasi te.
عربي تفسیرونه:
قَالَ لَنۡ أُرۡسِلَهُۥ مَعَكُمۡ حَتَّىٰ تُؤۡتُونِ مَوۡثِقٗا مِّنَ ٱللَّهِ لَتَأۡتُنَّنِي بِهِۦٓ إِلَّآ أَن يُحَاطَ بِكُمۡۖ فَلَمَّآ ءَاتَوۡهُ مَوۡثِقَهُمۡ قَالَ ٱللَّهُ عَلَىٰ مَا نَقُولُ وَكِيلٞ
66. Mpe alobi été: Nakotinda ye na bino te. Kino bosalela ngai malako epai ya Allah ete bokoyela ngai ye, longola sé bokufa bino banso. Tango bayeli ye yango, alobi: Allah nde mobateli wa manso na maye tolobi!
عربي تفسیرونه:
وَقَالَ يَٰبَنِيَّ لَا تَدۡخُلُواْ مِنۢ بَابٖ وَٰحِدٖ وَٱدۡخُلُواْ مِنۡ أَبۡوَٰبٖ مُّتَفَرِّقَةٖۖ وَمَآ أُغۡنِي عَنكُم مِّنَ ٱللَّهِ مِن شَيۡءٍۖ إِنِ ٱلۡحُكۡمُ إِلَّا لِلَّهِۖ عَلَيۡهِ تَوَكَّلۡتُۖ وَعَلَيۡهِ فَلۡيَتَوَكَّلِ ٱلۡمُتَوَكِّلُونَ
67. Mpe alobi été: Oh bana na ngai! Bokota na ekoteli moko te, (bino banso), kasi bokota bipai na bipai. Nakoki kosalisa bino koleka Allah te, mobeko ezali sé ya Allah, mpe natiye elikya na ngai epai naye, mpe tika ete baye bamipesaka ba mipesa sé epai naye.
عربي تفسیرونه:
وَلَمَّا دَخَلُواْ مِنۡ حَيۡثُ أَمَرَهُمۡ أَبُوهُم مَّا كَانَ يُغۡنِي عَنۡهُم مِّنَ ٱللَّهِ مِن شَيۡءٍ إِلَّا حَاجَةٗ فِي نَفۡسِ يَعۡقُوبَ قَضَىٰهَاۚ وَإِنَّهُۥ لَذُو عِلۡمٖ لِّمَا عَلَّمۡنَٰهُ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يَعۡلَمُونَ
68. Mpe tango bakoti na bisika biye balakisaki bango na tata wa bango, esalisaki bango na eloko te koleka mibeko mia Allah, ezalaki sé makanisi та Ya’qúb maye atiyaki. Kasi azalaki na boyebi mingi na maye tolakisaki ye, kasi ebele ya bato bazali koyeba te.
عربي تفسیرونه:
وَلَمَّا دَخَلُواْ عَلَىٰ يُوسُفَ ءَاوَىٰٓ إِلَيۡهِ أَخَاهُۖ قَالَ إِنِّيٓ أَنَا۠ أَخُوكَ فَلَا تَبۡتَئِسۡ بِمَا كَانُواْ يَعۡمَلُونَ
69. Mpe tango bakotaki epai ya Yûsuf, batikeli ye ndeko waye, alobi: Ya soló, ngai nazali ndeko wayo, koyoka pasi te na maye bazalaki kosala.
عربي تفسیرونه:
فَلَمَّا جَهَّزَهُم بِجَهَازِهِمۡ جَعَلَ ٱلسِّقَايَةَ فِي رَحۡلِ أَخِيهِ ثُمَّ أَذَّنَ مُؤَذِّنٌ أَيَّتُهَا ٱلۡعِيرُ إِنَّكُمۡ لَسَٰرِقُونَ
70. Mpe tango abongiseli bango mikumba ya bilei, atiye wolo ya emekeli na mokumba ya ndeko naye sima mobeleli abeleli bango ete: Eh bino bapaya bozali soló bayibi.
عربي تفسیرونه:
قَالُواْ وَأَقۡبَلُواْ عَلَيۡهِم مَّاذَا تَفۡقِدُونَ
71. Babaluki mpe balobi: Nini bobungisi?
عربي تفسیرونه:
قَالُواْ نَفۡقِدُ صُوَاعَ ٱلۡمَلِكِ وَلِمَن جَآءَ بِهِۦ حِمۡلُ بَعِيرٖ وَأَنَا۠ بِهِۦ زَعِيمٞ
72. Balobi: Tobungisi nkeni ya walo ya mokonzi. Tozali koluka yango na mikumba, soki nani oyo azui yango, mpe ngai nazali moyangeli.
عربي تفسیرونه:
قَالُواْ تَٱللَّهِ لَقَدۡ عَلِمۡتُم مَّا جِئۡنَا لِنُفۡسِدَ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَمَا كُنَّا سَٰرِقِينَ
73. Balobi: Na Allah, boyebi malamu penza ete biso toyaki te mpo tobebisa na mboka eye, tozali mpe bayibi te.
عربي تفسیرونه:
قَالُواْ فَمَا جَزَٰٓؤُهُۥٓ إِن كُنتُمۡ كَٰذِبِينَ
74. Balobi: Etumbu ekozala nini soki bozali kokosa?
عربي تفسیرونه:
قَالُواْ جَزَٰٓؤُهُۥ مَن وُجِدَ فِي رَحۡلِهِۦ فَهُوَ جَزَٰٓؤُهُۥۚ كَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلظَّٰلِمِينَ
75. Balobi: Etumbu ekozala sé epai ya oyo bokokuta eloko ena (bozali koluka) na mokumba naye, wana nde lifuta lia babubi.
عربي تفسیرونه:
فَبَدَأَ بِأَوۡعِيَتِهِمۡ قَبۡلَ وِعَآءِ أَخِيهِ ثُمَّ ٱسۡتَخۡرَجَهَا مِن وِعَآءِ أَخِيهِۚ كَذَٰلِكَ كِدۡنَا لِيُوسُفَۖ مَا كَانَ لِيَأۡخُذَ أَخَاهُ فِي دِينِ ٱلۡمَلِكِ إِلَّآ أَن يَشَآءَ ٱللَّهُۚ نَرۡفَعُ دَرَجَٰتٖ مَّن نَّشَآءُۗ وَفَوۡقَ كُلِّ ذِي عِلۡمٍ عَلِيمٞ
76. Mpe abandaki na mikumba na bango liboso, na sima abandi na oyo ya ndeko naye mpe akutaki yango na mokumba ya ndeko naye. Ndenge wana nde tosalaki na Yûsuf, kasi alingaki kokanga ndeko waye te, engebene na mobeko mwa mokonzi, longola sé maye Allah alingaki. Totombolaka bisika bia baye tolingi, mpe likolo lia moto nyoso topesi ye boyebi, okokuta oyo aleki ye na boyebi.
عربي تفسیرونه:
۞ قَالُوٓاْ إِن يَسۡرِقۡ فَقَدۡ سَرَقَ أَخٞ لَّهُۥ مِن قَبۡلُۚ فَأَسَرَّهَا يُوسُفُ فِي نَفۡسِهِۦ وَلَمۡ يُبۡدِهَا لَهُمۡۚ قَالَ أَنتُمۡ شَرّٞ مَّكَانٗاۖ وَٱللَّهُ أَعۡلَمُ بِمَا تَصِفُونَ
77. Balobi: Soki ayibi, (alandi) sé ndeko naye asilaki mpe koyiba liboso. Mpe Yûsuf, ayokaki yango mpasi na motema, kasi amonisaki bango yango te, mpe alobi na motema ete: Mabe na bino oyo eleki, mpe Allah ayebi maye bozali koloba.
عربي تفسیرونه:
قَالُواْ يَٰٓأَيُّهَا ٱلۡعَزِيزُ إِنَّ لَهُۥٓ أَبٗا شَيۡخٗا كَبِيرٗا فَخُذۡ أَحَدَنَا مَكَانَهُۥٓۖ إِنَّا نَرَىٰكَ مِنَ ٱلۡمُحۡسِنِينَ
78. Balobi: Eh mokonzi! Tata waye azali mobange wa kala. Zua moko o kati na biso na esika naye. Ya soló, tozali kornona yo o kati ya babongisi.
عربي تفسیرونه:
قَالَ مَعَاذَ ٱللَّهِ أَن نَّأۡخُذَ إِلَّا مَن وَجَدۡنَا مَتَٰعَنَا عِندَهُۥٓ إِنَّآ إِذٗا لَّظَٰلِمُونَ
79. Alobi: Allah Abátela ngai! Tokozua sé oyo tokuti ye na biloko bia biso, ya sólo soki te, tokozala o kati ya babubi.
عربي تفسیرونه:
فَلَمَّا ٱسۡتَيۡـَٔسُواْ مِنۡهُ خَلَصُواْ نَجِيّٗاۖ قَالَ كَبِيرُهُمۡ أَلَمۡ تَعۡلَمُوٓاْ أَنَّ أَبَاكُمۡ قَدۡ أَخَذَ عَلَيۡكُم مَّوۡثِقٗا مِّنَ ٱللَّهِ وَمِن قَبۡلُ مَا فَرَّطتُمۡ فِي يُوسُفَۖ فَلَنۡ أَبۡرَحَ ٱلۡأَرۡضَ حَتَّىٰ يَأۡذَنَ لِيٓ أَبِيٓ أَوۡ يَحۡكُمَ ٱللَّهُ لِيۖ وَهُوَ خَيۡرُ ٱلۡحَٰكِمِينَ
80. Mpe tango elikya ya komema ye esili bango, basololi na bobombami. Mpe yaya wa bango alobi: Boye boyebi ete tata wa bino asilaki kozua elaka na bino epai ya Allah liboso тропа Yûsuf? Kasi bozangaki kokokisa yango, nakolongwa awa te kino tata wa ngai akopesa ngai ndingisa, to Allah alongisa ngai na likambo liye, mpe (ye) azali mokati malamu. (ya likambo)
عربي تفسیرونه:
ٱرۡجِعُوٓاْ إِلَىٰٓ أَبِيكُمۡ فَقُولُواْ يَٰٓأَبَانَآ إِنَّ ٱبۡنَكَ سَرَقَ وَمَا شَهِدۡنَآ إِلَّا بِمَا عَلِمۡنَا وَمَا كُنَّا لِلۡغَيۡبِ حَٰفِظِينَ
81. Bozonga epai ya tata wa bino, mpe boloba; Oh tata wa biso! Ya soló, mwana wayo ayibi. Mpe tokotatola sé oyo toyebi, kasi, toyebi mabombami te.
عربي تفسیرونه:
وَسۡـَٔلِ ٱلۡقَرۡيَةَ ٱلَّتِي كُنَّا فِيهَا وَٱلۡعِيرَ ٱلَّتِيٓ أَقۡبَلۡنَا فِيهَاۖ وَإِنَّا لَصَٰدِقُونَ
82. Mpe tuna mboka (bato ya mboka) epai towuti, esika eye tokomelaki, mpe lisanga na biso bato ya mobembo. Ya sólo tozali penza koloba bosóló.
عربي تفسیرونه:
قَالَ بَلۡ سَوَّلَتۡ لَكُمۡ أَنفُسُكُمۡ أَمۡرٗاۖ فَصَبۡرٞ جَمِيلٌۖ عَسَى ٱللَّهُ أَن يَأۡتِيَنِي بِهِمۡ جَمِيعًاۚ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلۡعَلِيمُ ٱلۡحَكِيمُ
83. Alobi (ya’qúb): Milimo mia bino mitindi bino na likambo mabe. Kasi kokanga motema ezali kitoko mpe malamu, tango mosusu Allah akozongisela ngai bango banso. Ya sólo, ye azali moyebi atonda bwanya.
عربي تفسیرونه:
وَتَوَلَّىٰ عَنۡهُمۡ وَقَالَ يَٰٓأَسَفَىٰ عَلَىٰ يُوسُفَ وَٱبۡيَضَّتۡ عَيۡنَاهُ مِنَ ٱلۡحُزۡنِ فَهُوَ كَظِيمٞ
84. Mpe apesi bango mokongo mpe alobi: Nazali na mawa тропа Yûsuf! Mpe miso maye matondi na pizoli na mawa, mpe ye akangi motema.
عربي تفسیرونه:
قَالُواْ تَٱللَّهِ تَفۡتَؤُاْ تَذۡكُرُ يُوسُفَ حَتَّىٰ تَكُونَ حَرَضًا أَوۡ تَكُونَ مِنَ ٱلۡهَٰلِكِينَ
85. Balobi: Na nkombo ya Allah okotika kokanisa Yûsuf te, kino mabe ekozua yo to okokufa?
عربي تفسیرونه:
قَالَ إِنَّمَآ أَشۡكُواْ بَثِّي وَحُزۡنِيٓ إِلَى ٱللَّهِ وَأَعۡلَمُ مِنَ ٱللَّهِ مَا لَا تَعۡلَمُونَ
86. Alobi: Na paši mpe mawa na ngai, nazali komilela sé na Allah, mpe nayebi тропа Allah oyo bino boyebi te.
عربي تفسیرونه:
يَٰبَنِيَّ ٱذۡهَبُواْ فَتَحَسَّسُواْ مِن يُوسُفَ وَأَخِيهِ وَلَا تَاْيۡـَٔسُواْ مِن رَّوۡحِ ٱللَّهِۖ إِنَّهُۥ لَا يَاْيۡـَٔسُ مِن رَّوۡحِ ٱللَّهِ إِلَّا ٱلۡقَوۡمُ ٱلۡكَٰفِرُونَ
87. Oh! Bana bangai! Bökende koluka Yûsuf na ndeko waye, mpe bozanga elikya te na Allah. Longola sé bapengwi тро bango bazanga elikya epai ya Allah.
عربي تفسیرونه:
فَلَمَّا دَخَلُواْ عَلَيۡهِ قَالُواْ يَٰٓأَيُّهَا ٱلۡعَزِيزُ مَسَّنَا وَأَهۡلَنَا ٱلضُّرُّ وَجِئۡنَا بِبِضَٰعَةٖ مُّزۡجَىٰةٖ فَأَوۡفِ لَنَا ٱلۡكَيۡلَ وَتَصَدَّقۡ عَلَيۡنَآۖ إِنَّ ٱللَّهَ يَجۡزِي ٱلۡمُتَصَدِّقِينَ
88. Mpe tango bakoti epai naye balobi: Oh mokonzi! Nzala ezui biso na mabota та biso, mpe toyei na biloko bisusu biye bizali na talo te, mekela biso mpe salisa biso, ya soló Allah afutaka basali bolamu.
عربي تفسیرونه:
قَالَ هَلۡ عَلِمۡتُم مَّا فَعَلۡتُم بِيُوسُفَ وَأَخِيهِ إِذۡ أَنتُمۡ جَٰهِلُونَ
89. Alobi Boye: Bozali koyeba maye bosalaki na Yûsuf na ndeko naye tango bozalaki na kozanga koyeba?
عربي تفسیرونه:
قَالُوٓاْ أَءِنَّكَ لَأَنتَ يُوسُفُۖ قَالَ أَنَا۠ يُوسُفُ وَهَٰذَآ أَخِيۖ قَدۡ مَنَّ ٱللَّهُ عَلَيۡنَآۖ إِنَّهُۥ مَن يَتَّقِ وَيَصۡبِرۡ فَإِنَّ ٱللَّهَ لَا يُضِيعُ أَجۡرَ ٱلۡمُحۡسِنِينَ
90. Balobi: Ya sólo, yönde Yûsuf? Alobi: Ngai Yûsuf mpe oyo ndeko wa ngai Allah asili kosalisa biso. Ya soló, oyo akobanga ye mpe akangi motema, ya sólo penza, Allah abungisaka bolamu bwa babongisi te.
عربي تفسیرونه:
قَالُواْ تَٱللَّهِ لَقَدۡ ءَاثَرَكَ ٱللَّهُ عَلَيۡنَا وَإِن كُنَّا لَخَٰطِـِٔينَ
91. Balobi: Na nkombo ya Allah! Ya sólo, Allah atomboli yo koleka biso, mpe tozalaki bato ya mbeba.
عربي تفسیرونه:
قَالَ لَا تَثۡرِيبَ عَلَيۡكُمُ ٱلۡيَوۡمَۖ يَغۡفِرُ ٱللَّهُ لَكُمۡۖ وَهُوَ أَرۡحَمُ ٱلرَّٰحِمِينَ
92. Alobi: Kobanda lelo oyo etumbu ezali te тропа bino. Allah alimbisa bino, ye nde azali na ngolu koleka.
عربي تفسیرونه:
ٱذۡهَبُواْ بِقَمِيصِي هَٰذَا فَأَلۡقُوهُ عَلَىٰ وَجۡهِ أَبِي يَأۡتِ بَصِيرٗا وَأۡتُونِي بِأَهۡلِكُمۡ أَجۡمَعِينَ
93. Bökende na simisi na ngai oyo, mpe bobwaka yango na elongi ya tata na ngai, miso naye ekofungwama. Мре па sima boyela ngai libota nabino mobimba.
عربي تفسیرونه:
وَلَمَّا فَصَلَتِ ٱلۡعِيرُ قَالَ أَبُوهُمۡ إِنِّي لَأَجِدُ رِيحَ يُوسُفَۖ لَوۡلَآ أَن تُفَنِّدُونِ
94. Mpe tango bakotaki na ndelo ya mboka tata na bango alobaki été: Ya soló, ngai nazali koyoka solo ya Yûsuf, ata soki bozali kozua ngai na lokuta.
عربي تفسیرونه:
قَالُواْ تَٱللَّهِ إِنَّكَ لَفِي ضَلَٰلِكَ ٱلۡقَدِيمِ
95. Balobaki naye: Na nkombo ya Allah! Ya sólo, yo ozali penza na libunga nayo ya kala.
عربي تفسیرونه:
فَلَمَّآ أَن جَآءَ ٱلۡبَشِيرُ أَلۡقَىٰهُ عَلَىٰ وَجۡهِهِۦ فَٱرۡتَدَّ بَصِيرٗاۖ قَالَ أَلَمۡ أَقُل لَّكُمۡ إِنِّيٓ أَعۡلَمُ مِنَ ٱللَّهِ مَا لَا تَعۡلَمُونَ
96. Мре tango momemi sango malamu akomaki, abwakaki simisi na elongi naye mpe miso naye efungwamaki. Mpe alobaki na bana été: Boye nayebisaki bino te ete ya soló, Allah apeși ngai boyebi boye bozali na yango te?
عربي تفسیرونه:
قَالُواْ يَٰٓأَبَانَا ٱسۡتَغۡفِرۡ لَنَا ذُنُوبَنَآ إِنَّا كُنَّا خَٰطِـِٔينَ
97. Balobi: Oh tata wa biso! Sengela biso tubela na masumu та biso, ya soló, tosalaki mabe.
عربي تفسیرونه:
قَالَ سَوۡفَ أَسۡتَغۡفِرُ لَكُمۡ رَبِّيٓۖ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلۡغَفُورُ ٱلرَّحِيمُ
98. Alobi: Nakosengelaka bino bolimbisi epai ya Nkolo wa ngai, ya sólo, ye azali molimbisi atonda ngolu.
عربي تفسیرونه:
فَلَمَّا دَخَلُواْ عَلَىٰ يُوسُفَ ءَاوَىٰٓ إِلَيۡهِ أَبَوَيۡهِ وَقَالَ ٱدۡخُلُواْ مِصۡرَ إِن شَآءَ ٱللَّهُ ءَامِنِينَ
99. Mpe tango bakotaki epai ya Yûsuf akendeki koyamba baboti naye (tata na mama), mpe alobaki: Bokota na ezipito na kimia nyoso mpe na bolingo ya Allah.
عربي تفسیرونه:
وَرَفَعَ أَبَوَيۡهِ عَلَى ٱلۡعَرۡشِ وَخَرُّواْ لَهُۥ سُجَّدٗاۖ وَقَالَ يَٰٓأَبَتِ هَٰذَا تَأۡوِيلُ رُءۡيَٰيَ مِن قَبۡلُ قَدۡ جَعَلَهَا رَبِّي حَقّٗاۖ وَقَدۡ أَحۡسَنَ بِيٓ إِذۡ أَخۡرَجَنِي مِنَ ٱلسِّجۡنِ وَجَآءَ بِكُم مِّنَ ٱلۡبَدۡوِ مِنۢ بَعۡدِ أَن نَّزَغَ ٱلشَّيۡطَٰنُ بَيۡنِي وَبَيۡنَ إِخۡوَتِيٓۚ إِنَّ رَبِّي لَطِيفٞ لِّمَا يَشَآءُۚ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلۡعَلِيمُ ٱلۡحَكِيمُ
100. Mpe amatisaki baboti naye likolo ya kiti ya bokonzi, mpe sima bafukamelaki ye. Mpe alobaki: Oh tata na ngai! Oyo ezali ndimbola ya ndoto na ngai nalotaka kala, Allah asili kokokisa yango na bosôló. Mpe asalelaki ngai bolamu ebele sima ya kobimisa ngai na boloko. Mpe abimisi bino kowuta na zamba sima oyo satana akotaki o kati na ngai na bandeko na ngai. Ya soló, Nkolo wa ngai azali malamu na nyoso alingi. Ya sólo, ye azali moyebi atonda bwanya.
عربي تفسیرونه:
۞ رَبِّ قَدۡ ءَاتَيۡتَنِي مِنَ ٱلۡمُلۡكِ وَعَلَّمۡتَنِي مِن تَأۡوِيلِ ٱلۡأَحَادِيثِۚ فَاطِرَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ أَنتَ وَلِيِّۦ فِي ٱلدُّنۡيَا وَٱلۡأٓخِرَةِۖ تَوَفَّنِي مُسۡلِمٗا وَأَلۡحِقۡنِي بِٱلصَّٰلِحِينَ
101. Oh Nkolo! Osilaki kopesa ngai bokonzi, mpe otangisaki ngai koyeba ndimbola ya bandoto, yonde mokeli wa likolo na mabele, yonde ozali molongisi wa ngai o kati ya mokili mpe na mokolo mwa suka, boma ngai mizilima, tia ngai elongo na bato malamu.
عربي تفسیرونه:
ذَٰلِكَ مِنۡ أَنۢبَآءِ ٱلۡغَيۡبِ نُوحِيهِ إِلَيۡكَۖ وَمَا كُنتَ لَدَيۡهِمۡ إِذۡ أَجۡمَعُوٓاْ أَمۡرَهُمۡ وَهُمۡ يَمۡكُرُونَ
102. Wana ezali basango oyo eyebani te tozali koyebisa nayo, mpe ozalaki te na bango elongo tango basanganaki тропа kosala likita na bango, mpe bazalaki kondima тропа kosala likita. (lia mabe)
عربي تفسیرونه:
وَمَآ أَكۡثَرُ ٱلنَّاسِ وَلَوۡ حَرَصۡتَ بِمُؤۡمِنِينَ
103. Kasi ebele ya bato bazali kondima te ata soki ozali kotelemela bango.
عربي تفسیرونه:
وَمَا تَسۡـَٔلُهُمۡ عَلَيۡهِ مِنۡ أَجۡرٍۚ إِنۡ هُوَ إِلَّا ذِكۡرٞ لِّلۡعَٰلَمِينَ
104. Nzoka nde okosenga bango lifuta te тропа yango, wana ezali sé bokundoli тропа molongo mobimba.
عربي تفسیرونه:
وَكَأَيِّن مِّنۡ ءَايَةٖ فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ يَمُرُّونَ عَلَيۡهَا وَهُمۡ عَنۡهَا مُعۡرِضُونَ
105. Kati na likolo mpe na nsé, ezali na bilembo boni bato bazali koleka na bopesi biango mokongo?
عربي تفسیرونه:
وَمَا يُؤۡمِنُ أَكۡثَرُهُم بِٱللَّهِ إِلَّا وَهُم مُّشۡرِكُونَ
106. Mpe ebele kati na bango bazali kondima na Allah, mpe bazali sé basangisi.
عربي تفسیرونه:
أَفَأَمِنُوٓاْ أَن تَأۡتِيَهُمۡ غَٰشِيَةٞ مِّنۡ عَذَابِ ٱللَّهِ أَوۡ تَأۡتِيَهُمُ ٱلسَّاعَةُ بَغۡتَةٗ وَهُمۡ لَا يَشۡعُرُونَ
107. Boye, bakanisi bazali na kimia na boyeyi etumbu ya Allah oyo ekozipa bango to mpe mokolo ya suka ekoyela bango mbalakaka mpe bango bazali koyeba te?
عربي تفسیرونه:
قُلۡ هَٰذِهِۦ سَبِيلِيٓ أَدۡعُوٓاْ إِلَى ٱللَّهِۚ عَلَىٰ بَصِيرَةٍ أَنَا۠ وَمَنِ ٱتَّبَعَنِيۖ وَسُبۡحَٰنَ ٱللَّهِ وَمَآ أَنَا۠ مِنَ ٱلۡمُشۡرِكِينَ
108. Loba: Oyo nde nzela na ngai. Nazali kobenga bato epai ya Allah na boyebi, ngai na baye bakolanda ngai. Mpe nkembo na Allah! Mpe ngai nazali o kati ya basangisi te.
عربي تفسیرونه:
وَمَآ أَرۡسَلۡنَا مِن قَبۡلِكَ إِلَّا رِجَالٗا نُّوحِيٓ إِلَيۡهِم مِّنۡ أَهۡلِ ٱلۡقُرَىٰٓۗ أَفَلَمۡ يَسِيرُواْ فِي ٱلۡأَرۡضِ فَيَنظُرُواْ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡۗ وَلَدَارُ ٱلۡأٓخِرَةِ خَيۡرٞ لِّلَّذِينَ ٱتَّقَوۡاْۚ أَفَلَا تَعۡقِلُونَ
109. Mpe totindaki te liboso nayo sé mibali, moto na moto na etuka naye na bimoniseli oyo tokitiselaki bango. Mpe batambolaki na mokili te mpo batala ndenge nini bato ya liboso lolenge basukaki? Kasi ndako ya lobi nde ezali malamu тропа babangi (Allah), boye bozali kososolo te?
عربي تفسیرونه:
حَتَّىٰٓ إِذَا ٱسۡتَيۡـَٔسَ ٱلرُّسُلُ وَظَنُّوٓاْ أَنَّهُمۡ قَدۡ كُذِبُواْ جَآءَهُمۡ نَصۡرُنَا فَنُجِّيَ مَن نَّشَآءُۖ وَلَا يُرَدُّ بَأۡسُنَا عَنِ ٱلۡقَوۡمِ ٱلۡمُجۡرِمِينَ
110. Kino tango batindami balingaki кокота nakozanga elikia, mpe bakanisaki ete bato na bango basili koboya bango, kasi elonga na biso eyaki tango wana. Mpe tobikisaki nani tolingaki kati na bango, kasi etumbu na biso ezangisaka batomboki te.
عربي تفسیرونه:
لَقَدۡ كَانَ فِي قَصَصِهِمۡ عِبۡرَةٞ لِّأُوْلِي ٱلۡأَلۡبَٰبِۗ مَا كَانَ حَدِيثٗا يُفۡتَرَىٰ وَلَٰكِن تَصۡدِيقَ ٱلَّذِي بَيۡنَ يَدَيۡهِ وَتَفۡصِيلَ كُلِّ شَيۡءٖ وَهُدٗى وَرَحۡمَةٗ لِّقَوۡمٖ يُؤۡمِنُونَ
111. Ezalaki o kati ya masapo na bango, liteya тропа bato ya mayele. Ezali másese ya lokuta te mpe ya pamba pamba te kasi ezali nde bosembo oyo ezali kondima na maye makitaki liboso, mpe ndimbola ya makambo manso, ezali mpe bokambi mpe ngolu тропа bandimi.
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: يوسف
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ نمبر
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - د ژباړو فهرست (لړلیک)

لینګالا ژبې ته د قرآن کریم د معناګانو ژباړه ، محمد بالنګوګو ژباړلې ده

بندول