Check out the new design

د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: نحل   آیت:
وَمَآ أَرۡسَلۡنَا مِن قَبۡلِكَ إِلَّا رِجَالٗا نُّوحِيٓ إِلَيۡهِمۡۖ فَسۡـَٔلُوٓاْ أَهۡلَ ٱلذِّكۡرِ إِن كُنتُمۡ لَا تَعۡلَمُونَ
43. Мре totindaki yambo nayo te, sé mibali baye tokitiselaki bango emoniseli, botuna baye bayebi soki bozali na boyebi te.
عربي تفسیرونه:
بِٱلۡبَيِّنَٰتِ وَٱلزُّبُرِۗ وَأَنزَلۡنَآ إِلَيۡكَ ٱلذِّكۡرَ لِتُبَيِّنَ لِلنَّاسِ مَا نُزِّلَ إِلَيۡهِمۡ وَلَعَلَّهُمۡ يَتَفَكَّرُونَ
44. (Totindaki bango) na bilembo bia polele, na babuku ensantu, mpe tokitisi epai nayo buku mpo été: Olimbolela bato maye makiteli bango mpo basosolo.
عربي تفسیرونه:
أَفَأَمِنَ ٱلَّذِينَ مَكَرُواْ ٱلسَّيِّـَٔاتِ أَن يَخۡسِفَ ٱللَّهُ بِهِمُ ٱلۡأَرۡضَ أَوۡ يَأۡتِيَهُمُ ٱلۡعَذَابُ مِنۡ حَيۡثُ لَا يَشۡعُرُونَ
45. Kasi тропа baye bazalaki kosala likita ya mabe, bazali na ebateli moko te sé Allah azindisa bango na mabele to etumbu eyela bango o esika nyoso oyo bakoyeba te?
عربي تفسیرونه:
أَوۡ يَأۡخُذَهُمۡ فِي تَقَلُّبِهِمۡ فَمَا هُم بِمُعۡجِزِينَ
46. То mpe ezua bango na ngonga ya misala na bango mpo bazua nzela ya kokima te.
عربي تفسیرونه:
أَوۡ يَأۡخُذَهُمۡ عَلَىٰ تَخَوُّفٖ فَإِنَّ رَبَّكُمۡ لَرَءُوفٞ رَّحِيمٌ
47. To bobangi (bwa makasi kowuta epai ya Nkolo wa bango ezua bango) ya soló, Nkolo wa bino azali na ngolu atonda mawa.
عربي تفسیرونه:
أَوَلَمۡ يَرَوۡاْ إِلَىٰ مَا خَلَقَ ٱللَّهُ مِن شَيۡءٖ يَتَفَيَّؤُاْ ظِلَٰلُهُۥ عَنِ ٱلۡيَمِينِ وَٱلشَّمَآئِلِ سُجَّدٗا لِّلَّهِ وَهُمۡ دَٰخِرُونَ
48. Boye bazali kornona te ete maye manso Allah akela, bililingi na yango bitelama alima na ngambu ya loboko ya mobali mpe na loboko ya mwasi, nyoso bizali kofukamela Allah na limemia mpe nakomikitisa?
عربي تفسیرونه:
وَلِلَّهِۤ يَسۡجُدُۤ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَا فِي ٱلۡأَرۡضِ مِن دَآبَّةٖ وَٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ وَهُمۡ لَا يَسۡتَكۡبِرُونَ
49. Bikelamu binso o likolo mpe na nsé bizali kogumbamela Allah, banyama mpe ba anzelu mpe bazali kosala lolendo te.
عربي تفسیرونه:
يَخَافُونَ رَبَّهُم مِّن فَوۡقِهِمۡ وَيَفۡعَلُونَ مَا يُؤۡمَرُونَ۩
50. Bazali kobanga Nkolo wa bango oyo azali o likolo lia bango, mpe basalaka maye akotindaka bango.
عربي تفسیرونه:
۞ وَقَالَ ٱللَّهُ لَا تَتَّخِذُوٓاْ إِلَٰهَيۡنِ ٱثۡنَيۡنِۖ إِنَّمَا هُوَ إِلَٰهٞ وَٰحِدٞ فَإِيَّٰيَ فَٱرۡهَبُونِ
51. Mpe Allah alobi: Bozua banzambe babale te. Kasi ya soló, ye azali sé nzambe moko ya sólo asengeli na mabondeli, bobanga sé ngaï.
عربي تفسیرونه:
وَلَهُۥ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَلَهُ ٱلدِّينُ وَاصِبًاۚ أَفَغَيۡرَ ٱللَّهِ تَتَّقُونَ
52. Mpe manso mazuami o nsé mpe o likolo mazali ya ye, mpe limemia nyoso ezali ya ye. Na yango, boye bokobanga eloko mosusu kotika Allah?
عربي تفسیرونه:
وَمَا بِكُم مِّن نِّعۡمَةٖ فَمِنَ ٱللَّهِۖ ثُمَّ إِذَا مَسَّكُمُ ٱلضُّرُّ فَإِلَيۡهِ تَجۡـَٔرُونَ
53. Mpe binso bia malamu biye bozali na yango eutaka sé epai ya Allah. Sima soki mabe mazui bino, bokobelelaka sé ye na mongongo ya makasi.
عربي تفسیرونه:
ثُمَّ إِذَا كَشَفَ ٱلضُّرَّ عَنكُمۡ إِذَا فَرِيقٞ مِّنكُم بِرَبِّهِمۡ يُشۡرِكُونَ
54. Mpe soki alongoli mabe mana likolo lia bino, okomona basusu kati na bino babandi kosangisa Nkolo wa bango.
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: نحل
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ نمبر
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو - د ژباړو فهرست (لړلیک)

د زکریا محمد بلینګوګو لخوا ژباړل شوی دی.

بندول