Check out the new design

د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: اسراء   آیت:
عَسَىٰ رَبُّكُمۡ أَن يَرۡحَمَكُمۡۚ وَإِنۡ عُدتُّمۡ عُدۡنَاۚ وَجَعَلۡنَا جَهَنَّمَ لِلۡكَٰفِرِينَ حَصِيرًا
Tango mosusu Nkolo wa bino akoyokela bino mawa. Mpe soki bozongeli tokozongela, tosalaki moto mwa lifelo тропа bapengwi baye bazangaki kotosa.
عربي تفسیرونه:
إِنَّ هَٰذَا ٱلۡقُرۡءَانَ يَهۡدِي لِلَّتِي هِيَ أَقۡوَمُ وَيُبَشِّرُ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ ٱلَّذِينَ يَعۡمَلُونَ ٱلصَّٰلِحَٰتِ أَنَّ لَهُمۡ أَجۡرٗا كَبِيرٗا
Ya soló kurani oyo, ezali kokamba na oyo ezali ya semba, mpe ezali kopesa sango malamu epai ya bandimi baye bazali kosala misala ya malamu ete bakozala na lifuta ya monene.
عربي تفسیرونه:
وَأَنَّ ٱلَّذِينَ لَا يُؤۡمِنُونَ بِٱلۡأٓخِرَةِ أَعۡتَدۡنَا لَهُمۡ عَذَابًا أَلِيمٗا
Mpona baye bazali kondima na mokolo mwa suka te, tobombeli bango etumbu ya makasi.
عربي تفسیرونه:
وَيَدۡعُ ٱلۡإِنسَٰنُ بِٱلشَّرِّ دُعَآءَهُۥ بِٱلۡخَيۡرِۖ وَكَانَ ٱلۡإِنسَٰنُ عَجُولٗا
Mpe moto azali komilukela mabe, (komisengela mabe) ndenge amilukelaka bolamu, kasi moto azali penza na bowelisi.
عربي تفسیرونه:
وَجَعَلۡنَا ٱلَّيۡلَ وَٱلنَّهَارَ ءَايَتَيۡنِۖ فَمَحَوۡنَآ ءَايَةَ ٱلَّيۡلِ وَجَعَلۡنَآ ءَايَةَ ٱلنَّهَارِ مُبۡصِرَةٗ لِّتَبۡتَغُواْ فَضۡلٗا مِّن رَّبِّكُمۡ وَلِتَعۡلَمُواْ عَدَدَ ٱلسِّنِينَ وَٱلۡحِسَابَۚ وَكُلَّ شَيۡءٖ فَصَّلۡنَٰهُ تَفۡصِيلٗا
Мре tokelaki butu na moyi bizala bilembo mibale, mpe tobombaki elembo ya butu mpe tomonisi elembo ya moyi, (ezala ya komonana) mpo boluka bolamu ya Nkolo wa bino, mpe mpo esalisa bino na koyeba motango mpe mibu. Kasi ya soló, tolimbolaki biloko binso bizala polele penza.
عربي تفسیرونه:
وَكُلَّ إِنسَٰنٍ أَلۡزَمۡنَٰهُ طَٰٓئِرَهُۥ فِي عُنُقِهِۦۖ وَنُخۡرِجُ لَهُۥ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ كِتَٰبٗا يَلۡقَىٰهُ مَنشُورًا
Mpe tokangeli moto na moto misala mia ye na kingo naye, mpe o mokolo mwa suka tokobimisela ye yango nyoso polele.
عربي تفسیرونه:
ٱقۡرَأۡ كِتَٰبَكَ كَفَىٰ بِنَفۡسِكَ ٱلۡيَوۡمَ عَلَيۡكَ حَسِيبٗا
Tanga makomi nayo; lelo yo moko okoki kozala zuzi ya makambo nayo. (yo moko)
عربي تفسیرونه:
مَّنِ ٱهۡتَدَىٰ فَإِنَّمَا يَهۡتَدِي لِنَفۡسِهِۦۖ وَمَن ضَلَّ فَإِنَّمَا يَضِلُّ عَلَيۡهَاۚ وَلَا تَزِرُ وَازِرَةٞ وِزۡرَ أُخۡرَىٰۗ وَمَا كُنَّا مُعَذِّبِينَ حَتَّىٰ نَبۡعَثَ رَسُولٗا
Oyó akopona nzela ya semba, amisemboli sé ye moko, mpe oyo akopona libungi, amibungisi sé ye moko. Kasi moto akomemaka mokumba ya moninga te (mokumba ya masumu), mpe topesaka etumbu na bato te kino totinda motindami.
عربي تفسیرونه:
وَإِذَآ أَرَدۡنَآ أَن نُّهۡلِكَ قَرۡيَةً أَمَرۡنَا مُتۡرَفِيهَا فَفَسَقُواْ فِيهَا فَحَقَّ عَلَيۡهَا ٱلۡقَوۡلُ فَدَمَّرۡنَٰهَا تَدۡمِيرٗا
Mpe soki tolingi koboma mboka moko boye, totindaka na bazwi na yango batosa mibeko mia biso, kasi soki baboyi kotosa mpe babebisi, mpe sima na yango esengeli ete liloba likokisama, mpe tobomi bango mobimba.
عربي تفسیرونه:
وَكَمۡ أَهۡلَكۡنَا مِنَ ٱلۡقُرُونِ مِنۢ بَعۡدِ نُوحٖۗ وَكَفَىٰ بِرَبِّكَ بِذُنُوبِ عِبَادِهِۦ خَبِيرَۢا بَصِيرٗا
Mabota ebele toboma o sima ya Nûh, kasi Nkolo wayo akoki naye moko mpo na koyeba mpe kornona masumu ya bawumbu naye.
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: اسراء
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ نمبر
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو - د ژباړو فهرست (لړلیک)

د زکریا محمد بلینګوګو لخوا ژباړل شوی دی.

بندول