د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: القصص   آیت:

Al-Qasas (MASAPO)

طسٓمٓ
1. Twâ, sín, mîm.(1)
1 Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
عربي تفسیرونه:
تِلۡكَ ءَايَٰتُ ٱلۡكِتَٰبِ ٱلۡمُبِينِ
2. Oyo ezali mikapo ya buku ya polele.
عربي تفسیرونه:
نَتۡلُواْ عَلَيۡكَ مِن نَّبَإِ مُوسَىٰ وَفِرۡعَوۡنَ بِٱلۡحَقِّ لِقَوۡمٖ يُؤۡمِنُونَ
3. Tozali kobetela yo nsango ya Müssa na falo. Ya soló, тропа bato bandima.
عربي تفسیرونه:
إِنَّ فِرۡعَوۡنَ عَلَا فِي ٱلۡأَرۡضِ وَجَعَلَ أَهۡلَهَا شِيَعٗا يَسۡتَضۡعِفُ طَآئِفَةٗ مِّنۡهُمۡ يُذَبِّحُ أَبۡنَآءَهُمۡ وَيَسۡتَحۡيِۦ نِسَآءَهُمۡۚ إِنَّهُۥ كَانَ مِنَ ٱلۡمُفۡسِدِينَ
4. Ya sólo, falo amimonisaki na lolendo kolekisa ndelo na mokili, mpe azalaki kokabola bato naye тропа kolembisa bango, azalaki koboma bana mibali mpe azalaki kotika basi na bango. Ya sólo, azalaki okati ya bato mabe.
عربي تفسیرونه:
وَنُرِيدُ أَن نَّمُنَّ عَلَى ٱلَّذِينَ ٱسۡتُضۡعِفُواْ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَنَجۡعَلَهُمۡ أَئِمَّةٗ وَنَجۡعَلَهُمُ ٱلۡوَٰرِثِينَ
5. Kasi tolingi kosalisa baye bazalaki motawu okati na mabele mpe totiya bango bakambi, mpe totiya bango bakitani.
عربي تفسیرونه:
وَنُمَكِّنَ لَهُمۡ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَنُرِيَ فِرۡعَوۡنَ وَهَٰمَٰنَ وَجُنُودَهُمَا مِنۡهُم مَّا كَانُواْ يَحۡذَرُونَ
6. Mpe tobakisela bango bokasi o kati na mabele, mpe tomonisa falo na Hâmân na basoda na bango mibale, kati na bango maye bazalaki kobanga.
عربي تفسیرونه:
وَأَوۡحَيۡنَآ إِلَىٰٓ أُمِّ مُوسَىٰٓ أَنۡ أَرۡضِعِيهِۖ فَإِذَا خِفۡتِ عَلَيۡهِ فَأَلۡقِيهِ فِي ٱلۡيَمِّ وَلَا تَخَافِي وَلَا تَحۡزَنِيٓۖ إِنَّا رَآدُّوهُ إِلَيۡكِ وَجَاعِلُوهُ مِنَ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
7. Мре toyebisaki na mama ya Mûssa ete: Melisa ye, mpe soki okobanga тропа ye, bwaka ye na mayi, kasi koyimayima te mpe kolenga te, ya soló, tokozongisa ye epai nayo. Mpe tokotia ye azala okati ya batindami.
عربي تفسیرونه:
فَٱلۡتَقَطَهُۥٓ ءَالُ فِرۡعَوۡنَ لِيَكُونَ لَهُمۡ عَدُوّٗا وَحَزَنًاۗ إِنَّ فِرۡعَوۡنَ وَهَٰمَٰنَ وَجُنُودَهُمَا كَانُواْ خَٰطِـِٔينَ
8. Mpe bato ya falo bayambaki ye, mpo ete azala monguna na bango mpe oyo akomemela bango mpasi. Ya sólo, falo na Hâmân na mapinga na bango bazalaki bato mabe.
عربي تفسیرونه:
وَقَالَتِ ٱمۡرَأَتُ فِرۡعَوۡنَ قُرَّتُ عَيۡنٖ لِّي وَلَكَۖ لَا تَقۡتُلُوهُ عَسَىٰٓ أَن يَنفَعَنَآ أَوۡ نَتَّخِذَهُۥ وَلَدٗا وَهُمۡ لَا يَشۡعُرُونَ
9. Mpe mwasi ya falo alobaki ete: (na mobali naye) oyo azali esengo ya liso na ngai mpe esengo ya liso nayo. Boboma ye te, akoki kosalisa biso ndele to mpe tokokomisa ye mwana na biso, mpe bazalaki koyeba te.
عربي تفسیرونه:
وَأَصۡبَحَ فُؤَادُ أُمِّ مُوسَىٰ فَٰرِغًاۖ إِن كَادَتۡ لَتُبۡدِي بِهِۦ لَوۡلَآ أَن رَّبَطۡنَا عَلَىٰ قَلۡبِهَا لِتَكُونَ مِنَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
10. Mpe motema ya mama ya Mûssa ekitaki, na ntina ete ekokaki kobimisa nyoso oyo ezalaki na kati, soki biso te nde motema naye molendaki te, mpe mbele azangaki kozala na kondima.
عربي تفسیرونه:
وَقَالَتۡ لِأُخۡتِهِۦ قُصِّيهِۖ فَبَصُرَتۡ بِهِۦ عَن جُنُبٖ وَهُمۡ لَا يَشۡعُرُونَ
11. Alobi na ndeko waye ya mwasi: Landa ye, azali kornona ye na mosika, kasi bango bayebi ye te.
عربي تفسیرونه:
۞ وَحَرَّمۡنَا عَلَيۡهِ ٱلۡمَرَاضِعَ مِن قَبۡلُ فَقَالَتۡ هَلۡ أَدُلُّكُمۡ عَلَىٰٓ أَهۡلِ بَيۡتٖ يَكۡفُلُونَهُۥ لَكُمۡ وَهُمۡ لَهُۥ نَٰصِحُونَ
12. Mpe topekisaki ye mabele ya bato mosusu, mpe ndeko naye ya mwasi alobaki na bango ete: Bolingi nalakisa bino libota moko ekobokolo ye malamu тропа bino? Bakozala naye malamu penza.
عربي تفسیرونه:
فَرَدَدۡنَٰهُ إِلَىٰٓ أُمِّهِۦ كَيۡ تَقَرَّ عَيۡنُهَا وَلَا تَحۡزَنَ وَلِتَعۡلَمَ أَنَّ وَعۡدَ ٱللَّهِ حَقّٞ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَهُمۡ لَا يَعۡلَمُونَ
13. Mpe tozongisaki ye epai ya mama wa ye, mpo asepela mpe amiyoka mpasi te, тре mpo ayeba ete elaka ya Allah ezalaka sôló. Kasi ebele na bango bazali koyeba te.
عربي تفسیرونه:
وَلَمَّا بَلَغَ أَشُدَّهُۥ وَٱسۡتَوَىٰٓ ءَاتَيۡنَٰهُ حُكۡمٗا وَعِلۡمٗاۚ وَكَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلۡمُحۡسِنِينَ
14. Мре tango akolaki тре akomaki mayele, topesaki ye bwana тре boyebi. Мре lolenge wana nde tofutaka babongisi.
عربي تفسیرونه:
وَدَخَلَ ٱلۡمَدِينَةَ عَلَىٰ حِينِ غَفۡلَةٖ مِّنۡ أَهۡلِهَا فَوَجَدَ فِيهَا رَجُلَيۡنِ يَقۡتَتِلَانِ هَٰذَا مِن شِيعَتِهِۦ وَهَٰذَا مِنۡ عَدُوِّهِۦۖ فَٱسۡتَغَٰثَهُ ٱلَّذِي مِن شِيعَتِهِۦ عَلَى ٱلَّذِي مِنۡ عَدُوِّهِۦ فَوَكَزَهُۥ مُوسَىٰ فَقَضَىٰ عَلَيۡهِۖ قَالَ هَٰذَا مِنۡ عَمَلِ ٱلشَّيۡطَٰنِۖ إِنَّهُۥ عَدُوّٞ مُّضِلّٞ مُّبِينٞ
15. Мре akotaki na mboka па tango oyo bato bazali na bokebi te, mpe akuti mibali mibale bazali kobunda, mobali moko azalaki moto ya libota naye, mosusu monguna naye. Mobali oyo azalaki ekolo moko naye asengi lisungi, mpe Mûssa abeti monguna akwei mpe akufi, alobi: Oyo ezali moko ya misala ya satana. Mpo ya sólo, ye azali monguna mpe mobungisi polele.
عربي تفسیرونه:
قَالَ رَبِّ إِنِّي ظَلَمۡتُ نَفۡسِي فَٱغۡفِرۡ لِي فَغَفَرَ لَهُۥٓۚ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلۡغَفُورُ ٱلرَّحِيمُ
16. Alobi: Nkolo, namisali mabe ngai moko, limbisa ngai, mpe alimbisi ye. Ya sólo, ye nde molimbisi atonda ngolu.
عربي تفسیرونه:
قَالَ رَبِّ بِمَآ أَنۡعَمۡتَ عَلَيَّ فَلَنۡ أَكُونَ ظَهِيرٗا لِّلۡمُجۡرِمِينَ
17. Alobi: Nkolo! Na bolamu oyo opesaki ngai, nakosunga batomboki ata mokolo moko te.
عربي تفسیرونه:
فَأَصۡبَحَ فِي ٱلۡمَدِينَةِ خَآئِفٗا يَتَرَقَّبُ فَإِذَا ٱلَّذِي ٱسۡتَنصَرَهُۥ بِٱلۡأَمۡسِ يَسۡتَصۡرِخُهُۥۚ قَالَ لَهُۥ مُوسَىٰٓ إِنَّكَ لَغَوِيّٞ مُّبِينٞ
18. Мре sima ya mikolo mike mileki, Mûssa akotaki na mboka na kobanga mpe kotala epai na epai, kasi na mbalakaka akutani na mobali oyo asengaki ye lisalisi lobi azali kobelela ye lisusu ete asalisa ye, Mûssa alobi naye: Ya soló, ozali motumoli ya polele.
عربي تفسیرونه:
فَلَمَّآ أَنۡ أَرَادَ أَن يَبۡطِشَ بِٱلَّذِي هُوَ عَدُوّٞ لَّهُمَا قَالَ يَٰمُوسَىٰٓ أَتُرِيدُ أَن تَقۡتُلَنِي كَمَا قَتَلۡتَ نَفۡسَۢا بِٱلۡأَمۡسِۖ إِن تُرِيدُ إِلَّآ أَن تَكُونَ جَبَّارٗا فِي ٱلۡأَرۡضِ وَمَا تُرِيدُ أَن تَكُونَ مِنَ ٱلۡمُصۡلِحِينَ
19. Tango alingi kozua ye na makasi alobi: Oh Mûssa! Olingi koboma ngai ndenge obomaki moto lobi loleki? Olingi komitiya moto ya makasi awa na mokili, mpe olingi kozala o kati ya basali bolamu te.
عربي تفسیرونه:
وَجَآءَ رَجُلٞ مِّنۡ أَقۡصَا ٱلۡمَدِينَةِ يَسۡعَىٰ قَالَ يَٰمُوسَىٰٓ إِنَّ ٱلۡمَلَأَ يَأۡتَمِرُونَ بِكَ لِيَقۡتُلُوكَ فَٱخۡرُجۡ إِنِّي لَكَ مِنَ ٱلنَّٰصِحِينَ
20. Mpe mobali moko awuti na suka ya mboka azali kokima alobi: Eh Mûssa! Ya sólo, bankumu bazali kosala likita mpo baboma yo, bima (na mboka oyo), ya soló nazali kopesa yo toli.
عربي تفسیرونه:
فَخَرَجَ مِنۡهَا خَآئِفٗا يَتَرَقَّبُۖ قَالَ رَبِّ نَجِّنِي مِنَ ٱلۡقَوۡمِ ٱلظَّٰلِمِينَ
21. Abimaki wana na bobangi azali kotala bipai na bipai alobi: Nkolo longisa ngai na mabe ya babubi oyo.
عربي تفسیرونه:
وَلَمَّا تَوَجَّهَ تِلۡقَآءَ مَدۡيَنَ قَالَ عَسَىٰ رَبِّيٓ أَن يَهۡدِيَنِي سَوَآءَ ٱلسَّبِيلِ
22. Mpe tango azali kokende o ngambu ya mad’yan alobi: Nazali kolikia na Nkolo wa ngai akamba ngai o nzela ya semba.
عربي تفسیرونه:
وَلَمَّا وَرَدَ مَآءَ مَدۡيَنَ وَجَدَ عَلَيۡهِ أُمَّةٗ مِّنَ ٱلنَّاسِ يَسۡقُونَ وَوَجَدَ مِن دُونِهِمُ ٱمۡرَأَتَيۡنِ تَذُودَانِۖ قَالَ مَا خَطۡبُكُمَاۖ قَالَتَا لَا نَسۡقِي حَتَّىٰ يُصۡدِرَ ٱلرِّعَآءُۖ وَأَبُونَا شَيۡخٞ كَبِيرٞ
23. Mpe tango akomaki na liziba ya mayi ya mad’yan, akuti bato batondi bazali komelisa (banyama na bango) mpe akuti basi mibale lokola bamivandisi pembeni, alobi (na bango): Bolingi nini? Balobi: Tokomelisa banyama te kino bango basilisa komelisa, mpe tata na biso akomi mokolo makasi.
عربي تفسیرونه:
فَسَقَىٰ لَهُمَا ثُمَّ تَوَلَّىٰٓ إِلَى ٱلظِّلِّ فَقَالَ رَبِّ إِنِّي لِمَآ أَنزَلۡتَ إِلَيَّ مِنۡ خَيۡرٖ فَقِيرٞ
24. Ameliselaki bango (bibwele), sima akei kofanda na nsé ya elili mpe alobaki ete: Nkolo! Oyo okokitisela ngai nazali mpenza na mposa na yango.
عربي تفسیرونه:
فَجَآءَتۡهُ إِحۡدَىٰهُمَا تَمۡشِي عَلَى ٱسۡتِحۡيَآءٖ قَالَتۡ إِنَّ أَبِي يَدۡعُوكَ لِيَجۡزِيَكَ أَجۡرَ مَا سَقَيۡتَ لَنَاۚ فَلَمَّا جَآءَهُۥ وَقَصَّ عَلَيۡهِ ٱلۡقَصَصَ قَالَ لَا تَخَفۡۖ نَجَوۡتَ مِنَ ٱلۡقَوۡمِ ٱلظَّٰلِمِينَ
25. Moko kati na bango ayei (epai ya Mûssa), azali kotambola malembe na nsoni alobi: Ya soló, tata na biso azali kobenga yo, mpo afuta yo ndenge omeliseli biso banyama. Mpe tango akomaki liboso lia ye, ayebisi ye lisolo lia ye, alobi: Kobanga te, osili kolongisama epai ya babubi.
عربي تفسیرونه:
قَالَتۡ إِحۡدَىٰهُمَا يَٰٓأَبَتِ ٱسۡتَـٔۡجِرۡهُۖ إِنَّ خَيۡرَ مَنِ ٱسۡتَـٔۡجَرۡتَ ٱلۡقَوِيُّ ٱلۡأَمِينُ
26. Moko na bango alobaki ete: Oh tata wa ngai! Zúa ye (na mosala), mpo ete moto malamu ya mosala ezali moto ya makasi mpe ya bosembo.
عربي تفسیرونه:
قَالَ إِنِّيٓ أُرِيدُ أَنۡ أُنكِحَكَ إِحۡدَى ٱبۡنَتَيَّ هَٰتَيۡنِ عَلَىٰٓ أَن تَأۡجُرَنِي ثَمَٰنِيَ حِجَجٖۖ فَإِنۡ أَتۡمَمۡتَ عَشۡرٗا فَمِنۡ عِندِكَۖ وَمَآ أُرِيدُ أَنۡ أَشُقَّ عَلَيۡكَۚ سَتَجِدُنِيٓ إِن شَآءَ ٱللَّهُ مِنَ ٱلصَّٰلِحِينَ
27. Alobi: Nalingi obala moko kati ya bana basi na ngai mibale oyo, na mobeko ete: Osalela nga mibu mwambe, soki mpe okokisi (mibu) zomi, sé yo moko, mpe nakopesa yo pasi te. Na bolingi bwa Allah okokuta ngai o kati ya bato ya malamu.
عربي تفسیرونه:
قَالَ ذَٰلِكَ بَيۡنِي وَبَيۡنَكَۖ أَيَّمَا ٱلۡأَجَلَيۡنِ قَضَيۡتُ فَلَا عُدۡوَٰنَ عَلَيَّۖ وَٱللَّهُ عَلَىٰ مَا نَقُولُ وَكِيلٞ
28. (Mûssa) alobi: Tosili koyokana ngai nayo, oyo na коропа kati ya makambo mibale oyo, nakozala na lisumu te. Mpe Allah nde azali mobateli na oyo tozali koloba.
عربي تفسیرونه:
۞ فَلَمَّا قَضَىٰ مُوسَى ٱلۡأَجَلَ وَسَارَ بِأَهۡلِهِۦٓ ءَانَسَ مِن جَانِبِ ٱلطُّورِ نَارٗاۖ قَالَ لِأَهۡلِهِ ٱمۡكُثُوٓاْ إِنِّيٓ ءَانَسۡتُ نَارٗا لَّعَلِّيٓ ءَاتِيكُم مِّنۡهَا بِخَبَرٍ أَوۡ جَذۡوَةٖ مِّنَ ٱلنَّارِ لَعَلَّكُمۡ تَصۡطَلُونَ
29. Mpe tango Mûssa akokisi elako ya boyokani, akei na libota lia ye o ngambu ya ngomba ya turi, amoni moto mpe alobi na libota lia ye: Bozela ngai awa, namoni moto, tango mosusu nakoyela bino sango, to nkoni ya moto mpo bokoka koyotola yango.
عربي تفسیرونه:
فَلَمَّآ أَتَىٰهَا نُودِيَ مِن شَٰطِيِٕ ٱلۡوَادِ ٱلۡأَيۡمَنِ فِي ٱلۡبُقۡعَةِ ٱلۡمُبَٰرَكَةِ مِنَ ٱلشَّجَرَةِ أَن يَٰمُوسَىٰٓ إِنِّيٓ أَنَا ٱللَّهُ رَبُّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
30. Mpe tango akomaki, abengamaki na ngambu ya mobali na nsé ya lubuaku o esika ya mapamboli na kati ya nzete, Eh Mûssa! Ya soló ngai Allah Nkolo ya mokili.
عربي تفسیرونه:
وَأَنۡ أَلۡقِ عَصَاكَۚ فَلَمَّا رَءَاهَا تَهۡتَزُّ كَأَنَّهَا جَآنّٞ وَلَّىٰ مُدۡبِرٗا وَلَمۡ يُعَقِّبۡۚ يَٰمُوسَىٰٓ أَقۡبِلۡ وَلَا تَخَفۡۖ إِنَّكَ مِنَ ٱلۡأٓمِنِينَ
31. Mpe bwaka lingenda lia yo, mpe tango amoni yango ebongwani ekomi koningana lokola nyoka, apesi mokongo alingi kotala sima te, eh Mûssa! Pusana kaši kobanga te. Ya sólo, ozali kati ya babatelami.
عربي تفسیرونه:
ٱسۡلُكۡ يَدَكَ فِي جَيۡبِكَ تَخۡرُجۡ بَيۡضَآءَ مِنۡ غَيۡرِ سُوٓءٖ وَٱضۡمُمۡ إِلَيۡكَ جَنَاحَكَ مِنَ ٱلرَّهۡبِۖ فَذَٰنِكَ بُرۡهَٰنَانِ مِن رَّبِّكَ إِلَىٰ فِرۡعَوۡنَ وَمَلَإِيْهِۦٓۚ إِنَّهُمۡ كَانُواْ قَوۡمٗا فَٰسِقِينَ
32. Kotisa loboko nayo na libenga lia yo, ekobima mpembe ekosala mpasi te, mpe kanga loboko nayo makasi na nzoto mpo obanga te, wana ezali bilembo mibale kowuta epai ya Nkolo wa yo тропа falo na bankumu naye. Ya sólo, bazalaki bato mabe.
عربي تفسیرونه:
قَالَ رَبِّ إِنِّي قَتَلۡتُ مِنۡهُمۡ نَفۡسٗا فَأَخَافُ أَن يَقۡتُلُونِ
33. (Mûssa) alobi: Nkolo ya soló, nabomaki moto epai na bango, nazali kobanga noki bakoboma ngai.
عربي تفسیرونه:
وَأَخِي هَٰرُونُ هُوَ أَفۡصَحُ مِنِّي لِسَانٗا فَأَرۡسِلۡهُ مَعِيَ رِدۡءٗا يُصَدِّقُنِيٓۖ إِنِّيٓ أَخَافُ أَن يُكَذِّبُونِ
34. Mpe ndeko wa ngai Hâruna azali koloba malamu koleka ngai, tinda ye elongo na ngai, azala (molobeli wa ngai) mpo bandimela ngai. Nazali kobanga bazwa ngai moto ya lokuta.
عربي تفسیرونه:
قَالَ سَنَشُدُّ عَضُدَكَ بِأَخِيكَ وَنَجۡعَلُ لَكُمَا سُلۡطَٰنٗا فَلَا يَصِلُونَ إِلَيۡكُمَا بِـَٔايَٰتِنَآۚ أَنتُمَا وَمَنِ ٱتَّبَعَكُمَا ٱلۡغَٰلِبُونَ
35. (Allah) alobi: Tokopesa yo ndeko nayo тропа kosalisa yo mpe topesa bino bokonzi mpo ete: Bakoka bino te na bikamwiseli na biso. Bino mibale na baye balandi bino bokolonga.
عربي تفسیرونه:
فَلَمَّا جَآءَهُم مُّوسَىٰ بِـَٔايَٰتِنَا بَيِّنَٰتٖ قَالُواْ مَا هَٰذَآ إِلَّا سِحۡرٞ مُّفۡتَرٗى وَمَا سَمِعۡنَا بِهَٰذَا فِيٓ ءَابَآئِنَا ٱلۡأَوَّلِينَ
36. Mpe tango Mûssa ayeli bango bilembo bia biso, balobi: Oyó nini ezali sé bonganga oyo basali, totikala koyoka mpe kornona yango te epai ya bankoko na biso ya kala.
عربي تفسیرونه:
وَقَالَ مُوسَىٰ رَبِّيٓ أَعۡلَمُ بِمَن جَآءَ بِٱلۡهُدَىٰ مِنۡ عِندِهِۦ وَمَن تَكُونُ لَهُۥ عَٰقِبَةُ ٱلدَّارِۚ إِنَّهُۥ لَا يُفۡلِحُ ٱلظَّٰلِمُونَ
37. Mpe Mûssa alobi ete: Nkolo na ngai ayebi malamu nani ayei na bosembo kowuta epai naye, mpe nani akozala na ndako ya suka. Ya sólo, babubi bakolonga te.
عربي تفسیرونه:
وَقَالَ فِرۡعَوۡنُ يَٰٓأَيُّهَا ٱلۡمَلَأُ مَا عَلِمۡتُ لَكُم مِّنۡ إِلَٰهٍ غَيۡرِي فَأَوۡقِدۡ لِي يَٰهَٰمَٰنُ عَلَى ٱلطِّينِ فَٱجۡعَل لِّي صَرۡحٗا لَّعَلِّيٓ أَطَّلِعُ إِلَىٰٓ إِلَٰهِ مُوسَىٰ وَإِنِّي لَأَظُنُّهُۥ مِنَ ٱلۡكَٰذِبِينَ
38. Mpe falo alobi: Oh bino bankumu! Nayebi bino bozali na nzambe mosusu te sé ngai; Hâmân, pelisela ngai moto mpe tumba mabele mpo otongela ngai ndako ya molai, mpo namata epai ya nzambe ya Mûssa. Mpo ya soló, nazali kokanisa ete azali kati ya babuki lokuta.
عربي تفسیرونه:
وَٱسۡتَكۡبَرَ هُوَ وَجُنُودُهُۥ فِي ٱلۡأَرۡضِ بِغَيۡرِ ٱلۡحَقِّ وَظَنُّوٓاْ أَنَّهُمۡ إِلَيۡنَا لَا يُرۡجَعُونَ
39. Asali lolendo na mokili, ye na basoda naye ete oyo ezali bosóló te, bakanisaki ete bakozongisama epai na biso te.
عربي تفسیرونه:
فَأَخَذۡنَٰهُ وَجُنُودَهُۥ فَنَبَذۡنَٰهُمۡ فِي ٱلۡيَمِّۖ فَٱنظُرۡ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلظَّٰلِمِينَ
40. Tozuaki ye na basoda naye, mpe tobwakaki bango na mayi, tala lolenge esukelaki babubi.
عربي تفسیرونه:
وَجَعَلۡنَٰهُمۡ أَئِمَّةٗ يَدۡعُونَ إِلَى ٱلنَّارِۖ وَيَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ لَا يُنصَرُونَ
41. Totiyaki bango bazala bakambi ya kobenga bato na lifelo, mpe o mokolo ya suka bakosungama te.
عربي تفسیرونه:
وَأَتۡبَعۡنَٰهُمۡ فِي هَٰذِهِ ٱلدُّنۡيَا لَعۡنَةٗۖ وَيَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ هُم مِّنَ ٱلۡمَقۡبُوحِينَ
42. Mpe tolandisaki bango botutu na mokili moye, mpe o mokolo ya suka bakozalaka o kati ya bazikisami.
عربي تفسیرونه:
وَلَقَدۡ ءَاتَيۡنَا مُوسَى ٱلۡكِتَٰبَ مِنۢ بَعۡدِ مَآ أَهۡلَكۡنَا ٱلۡقُرُونَ ٱلۡأُولَىٰ بَصَآئِرَ لِلنَّاسِ وَهُدٗى وَرَحۡمَةٗ لَّعَلَّهُمۡ يَتَذَكَّرُونَ
43. Mpe tosilaki kopesa Mûssa buku, o sima ya tango oyo tosilaki koboma bato ya liboso baye baleka, mpo ezala elembetele epai na bato, mpe ezala bokambi mpe ngolu тропа bato mpo ete bakanisa.
عربي تفسیرونه:
وَمَا كُنتَ بِجَانِبِ ٱلۡغَرۡبِيِّ إِذۡ قَضَيۡنَآ إِلَىٰ مُوسَى ٱلۡأَمۡرَ وَمَا كُنتَ مِنَ ٱلشَّٰهِدِينَ
44. Ozalaki te o ngambu ya moniele tango tokitisaki mibeko epai na Mûssa, mpe ozalaki te mokolo yango okati ya banzeneneke.
عربي تفسیرونه:
وَلَٰكِنَّآ أَنشَأۡنَا قُرُونٗا فَتَطَاوَلَ عَلَيۡهِمُ ٱلۡعُمُرُۚ وَمَا كُنتَ ثَاوِيٗا فِيٓ أَهۡلِ مَدۡيَنَ تَتۡلُواْ عَلَيۡهِمۡ ءَايَٰتِنَا وَلَٰكِنَّا كُنَّا مُرۡسِلِينَ
45. Kasi biso nde tobimisaki bato ebele baleka na bomoyi milayi mpe ofandaki te o mboka mad’yan ozali kotangela bango mikapo mia biso, kasi biso nde totindaka batindami.
عربي تفسیرونه:
وَمَا كُنتَ بِجَانِبِ ٱلطُّورِ إِذۡ نَادَيۡنَا وَلَٰكِن رَّحۡمَةٗ مِّن رَّبِّكَ لِتُنذِرَ قَوۡمٗا مَّآ أَتَىٰهُم مِّن نَّذِيرٖ مِّن قَبۡلِكَ لَعَلَّهُمۡ يَتَذَكَّرُونَ
46. Мре ozalaki te o ngambu ya ngomba ya turí tango tobengaki, ezalaki sé ngolu kowuta epai ya Nkolo wayo, mpo okebisa baye mokebisi moko te ayelaki bango liboso nayo mpo bakanisa.
عربي تفسیرونه:
وَلَوۡلَآ أَن تُصِيبَهُم مُّصِيبَةُۢ بِمَا قَدَّمَتۡ أَيۡدِيهِمۡ فَيَقُولُواْ رَبَّنَا لَوۡلَآ أَرۡسَلۡتَ إِلَيۡنَا رَسُولٗا فَنَتَّبِعَ ءَايَٰتِكَ وَنَكُونَ مِنَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
47. Mpe soki mabe maye bango moko bamilukeli ekomeli bango, balobi: Nkolo wa biso тропа nini otindelaki biso motindami te? Tolingaki kolanda mikapo mia yo mpe tolingaki kozala o kati ya bandimi.
عربي تفسیرونه:
فَلَمَّا جَآءَهُمُ ٱلۡحَقُّ مِنۡ عِندِنَا قَالُواْ لَوۡلَآ أُوتِيَ مِثۡلَ مَآ أُوتِيَ مُوسَىٰٓۚ أَوَلَمۡ يَكۡفُرُواْ بِمَآ أُوتِيَ مُوسَىٰ مِن قَبۡلُۖ قَالُواْ سِحۡرَانِ تَظَٰهَرَا وَقَالُوٓاْ إِنَّا بِكُلّٖ كَٰفِرُونَ
48. Mpe tango bosôló ekomelaki bango kowuta epai na biso, balobi: Soki epesamaka lolenge moko bapesa na Mússa, boye bapengwaki te na maye Mússa ayelaki bango liboso? Balobaki ete: Wana banganga mibale(1) bazali kosalisana, mpe balobi: Ya sôló, topengwi na nyoso.
1 Banganga mibale, awa elakisi: Kurani na torah.
عربي تفسیرونه:
قُلۡ فَأۡتُواْ بِكِتَٰبٖ مِّنۡ عِندِ ٱللَّهِ هُوَ أَهۡدَىٰ مِنۡهُمَآ أَتَّبِعۡهُ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
49. Loba (na bango): Boya na buku kowuta epai ya Allah oyo eleki yango mibale, mpe na landa yango soki bozali na bosôló.
عربي تفسیرونه:
فَإِن لَّمۡ يَسۡتَجِيبُواْ لَكَ فَٱعۡلَمۡ أَنَّمَا يَتَّبِعُونَ أَهۡوَآءَهُمۡۚ وَمَنۡ أَضَلُّ مِمَّنِ ٱتَّبَعَ هَوَىٰهُ بِغَيۡرِ هُدٗى مِّنَ ٱللَّهِۚ إِنَّ ٱللَّهَ لَا يَهۡدِي ٱلۡقَوۡمَ ٱلظَّٰلِمِينَ
50. Mpe soki bayanoli yo te, kaši yeba ete bazali kolanda sé bamposa ba bango, mpe nani azali na libunga koleka moto oyo azali kolanda mposa naye kotika bokambi ya Allah? Ya soló, Allah akambaka babubi te.
عربي تفسیرونه:
۞ وَلَقَدۡ وَصَّلۡنَا لَهُمُ ٱلۡقَوۡلَ لَعَلَّهُمۡ يَتَذَكَّرُونَ
51. Мре tosilaki kotiyela bango liloba (kurani) mpo bakoka kokanisa.
عربي تفسیرونه:
ٱلَّذِينَ ءَاتَيۡنَٰهُمُ ٱلۡكِتَٰبَ مِن قَبۡلِهِۦ هُم بِهِۦ يُؤۡمِنُونَ
52. Baye topesaki bango buku liboso na yango, bandimi na yango.
عربي تفسیرونه:
وَإِذَا يُتۡلَىٰ عَلَيۡهِمۡ قَالُوٓاْ ءَامَنَّا بِهِۦٓ إِنَّهُ ٱلۡحَقُّ مِن رَّبِّنَآ إِنَّا كُنَّا مِن قَبۡلِهِۦ مُسۡلِمِينَ
53. Mpe soki batangeli bango yango balobi: Tondimi na yango ya sólo, ezali bosembo oyo ewuti epai ya Nkolo wa biso, tosila kokoma bamizilima yambo ete ekomela biso.
عربي تفسیرونه:
أُوْلَٰٓئِكَ يُؤۡتَوۡنَ أَجۡرَهُم مَّرَّتَيۡنِ بِمَا صَبَرُواْ وَيَدۡرَءُونَ بِٱلۡحَسَنَةِ ٱلسَّيِّئَةَ وَمِمَّا رَزَقۡنَٰهُمۡ يُنفِقُونَ
54. Bango nde bakozuaka lifuta lia bango mbala mibale тропа maye bakangaki motema na yango, mpe mpo bayanolaki malamu na esika ya mabe, mpe bazalaki kobimisa ndambo ya maye topesaki bango.
عربي تفسیرونه:
وَإِذَا سَمِعُواْ ٱللَّغۡوَ أَعۡرَضُواْ عَنۡهُ وَقَالُواْ لَنَآ أَعۡمَٰلُنَا وَلَكُمۡ أَعۡمَٰلُكُمۡ سَلَٰمٌ عَلَيۡكُمۡ لَا نَبۡتَغِي ٱلۡجَٰهِلِينَ
55. Mpe soki bayoki (maloba) mazanga ntina bapesi yango mokongo mpe balobi ete: Biso na misala mia biso mpe bino na misala mia bino, kimia ezali likolo na bino, biso tozali koluka bayinga te. (baye bazanga boyebi)
عربي تفسیرونه:
إِنَّكَ لَا تَهۡدِي مَنۡ أَحۡبَبۡتَ وَلَٰكِنَّ ٱللَّهَ يَهۡدِي مَن يَشَآءُۚ وَهُوَ أَعۡلَمُ بِٱلۡمُهۡتَدِينَ
56. Ya sólo, yo (Muhammad) okoki kokamba oyo olingi te, kasi Allah nde akambaka oyo alingi. Mpe azali moyebi wa bakambami koleka.
عربي تفسیرونه:
وَقَالُوٓاْ إِن نَّتَّبِعِ ٱلۡهُدَىٰ مَعَكَ نُتَخَطَّفۡ مِنۡ أَرۡضِنَآۚ أَوَلَمۡ نُمَكِّن لَّهُمۡ حَرَمًا ءَامِنٗا يُجۡبَىٰٓ إِلَيۡهِ ثَمَرَٰتُ كُلِّ شَيۡءٖ رِّزۡقٗا مِّن لَّدُنَّا وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَهُمۡ لَا يَعۡلَمُونَ
57. Мре balobi ete: Soki tolandi yo na bokambi bakobotolo biso mabele na biso. Boye tofandisaki bango te na mabele esantu mpe ya kimia! Eye ezalaki kobimisela bango bambuma ya ndenge na ndenge тропа kólia? Kasi ebele na bango bazali koyeba te.
عربي تفسیرونه:
وَكَمۡ أَهۡلَكۡنَا مِن قَرۡيَةِۭ بَطِرَتۡ مَعِيشَتَهَاۖ فَتِلۡكَ مَسَٰكِنُهُمۡ لَمۡ تُسۡكَن مِّنۢ بَعۡدِهِمۡ إِلَّا قَلِيلٗاۖ وَكُنَّا نَحۡنُ ٱلۡوَٰرِثِينَ
58. Мре boni tobomaki kati ya bamboka oyo ebubaki (kasi bazalaki na bomoyi ya malamu)? Mpe sima na bisika na bango batikalaki bato токе, mpe biso nde tokitanisaki yango.
عربي تفسیرونه:
وَمَا كَانَ رَبُّكَ مُهۡلِكَ ٱلۡقُرَىٰ حَتَّىٰ يَبۡعَثَ فِيٓ أُمِّهَا رَسُولٗا يَتۡلُواْ عَلَيۡهِمۡ ءَايَٰتِنَاۚ وَمَا كُنَّا مُهۡلِكِي ٱلۡقُرَىٰٓ إِلَّا وَأَهۡلُهَا ظَٰلِمُونَ
59. Mpe kasi Nkolo wayo abomaka mboka te kino atindela bango (bato ya mboka wana) motindami mpo atangela bango mikapo mia biso, mpe tobomaka mboka te sé bato na yango bazala babubi.
عربي تفسیرونه:
وَمَآ أُوتِيتُم مِّن شَيۡءٖ فَمَتَٰعُ ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا وَزِينَتُهَاۚ وَمَا عِندَ ٱللَّهِ خَيۡرٞ وَأَبۡقَىٰٓۚ أَفَلَا تَعۡقِلُونَ
60. Nyoso oyo bopesamaki ezali тропа komisepelisa na bomoyi ya mokili na bisengo bia yango. Mpe oyo ezali epai ya Allah nde eleki malamu, mpe ekotikala seko. Boye bozali koyeba te?
عربي تفسیرونه:
أَفَمَن وَعَدۡنَٰهُ وَعۡدًا حَسَنٗا فَهُوَ لَٰقِيهِ كَمَن مَّتَّعۡنَٰهُ مَتَٰعَ ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا ثُمَّ هُوَ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ مِنَ ٱلۡمُحۡضَرِينَ
61. Moto oyo topesi ye elaka ya malamu, mpe akomona yango ekokisami, boye akokani na oyo topesi ye bisengo ya mokili mpe o mokolo ya lisekwa akofanda liboso na biso тропа kosamba?
عربي تفسیرونه:
وَيَوۡمَ يُنَادِيهِمۡ فَيَقُولُ أَيۡنَ شُرَكَآءِيَ ٱلَّذِينَ كُنتُمۡ تَزۡعُمُونَ
62. Мре mokolo akobenga bango, тропа kotuna bango ete: Wapi bambanda na ngai baye bozalaki kotutela ntolo?
عربي تفسیرونه:
قَالَ ٱلَّذِينَ حَقَّ عَلَيۡهِمُ ٱلۡقَوۡلُ رَبَّنَا هَٰٓؤُلَآءِ ٱلَّذِينَ أَغۡوَيۡنَآ أَغۡوَيۡنَٰهُمۡ كَمَا غَوَيۡنَاۖ تَبَرَّأۡنَآ إِلَيۡكَۖ مَا كَانُوٓاْ إِيَّانَا يَعۡبُدُونَ
63. Baye likambo likokwela bango bakoloba ete: Nkolo! Ba oyo nde baye tokosaki lokola tomikosaki biso moko, tobengaki mpe bayanolaki biso, yango towangani bango liboso nayo ete bazalaki kobondela biso te.
عربي تفسیرونه:
وَقِيلَ ٱدۡعُواْ شُرَكَآءَكُمۡ فَدَعَوۡهُمۡ فَلَمۡ يَسۡتَجِيبُواْ لَهُمۡ وَرَأَوُاْ ٱلۡعَذَابَۚ لَوۡ أَنَّهُمۡ كَانُواْ يَهۡتَدُونَ
64. Мре bakolobaka na bango ete: Bobenga basangisi na bino, kasi bakoyanola bango te, mpe tango bakomona etumbu, bakolikia ete soki balandaka bokambi.
عربي تفسیرونه:
وَيَوۡمَ يُنَادِيهِمۡ فَيَقُولُ مَاذَآ أَجَبۡتُمُ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
65. Mpe mokolo akobenga bango, тропа kotuna bango ete: Nini boyanolaki batindami?
عربي تفسیرونه:
فَعَمِيَتۡ عَلَيۡهِمُ ٱلۡأَنۢبَآءُ يَوۡمَئِذٖ فَهُمۡ لَا يَتَسَآءَلُونَ
66. Mokolo wana, (makambo) na bango nyoso makokomaka molili, mpe bakomitunaka lisusu mituna te.
عربي تفسیرونه:
فَأَمَّا مَن تَابَ وَءَامَنَ وَعَمِلَ صَٰلِحٗا فَعَسَىٰٓ أَن يَكُونَ مِنَ ٱلۡمُفۡلِحِينَ
67. Kasi oyo akotubela, andimi mpe asali bolamu, alikia ete akozalaka o kati ya balongi.
عربي تفسیرونه:
وَرَبُّكَ يَخۡلُقُ مَا يَشَآءُ وَيَخۡتَارُۗ مَا كَانَ لَهُمُ ٱلۡخِيَرَةُۚ سُبۡحَٰنَ ٱللَّهِ وَتَعَٰلَىٰ عَمَّا يُشۡرِكُونَ
68. Mpe Nkolo wayo akelaka oyo alingi mpe aponaka oyo alingi, ezali te ete: Bango bapona nkembo na Allah wa likolo na maye bazali kosangisa ye na yango (ye na bikeko na banzambe misusu).
عربي تفسیرونه:
وَرَبُّكَ يَعۡلَمُ مَا تُكِنُّ صُدُورُهُمۡ وَمَا يُعۡلِنُونَ
69. Мре Nkolo wa yo ayebi maye mitema mia bango mibombi, mpe maye bazali kobimisa.
عربي تفسیرونه:
وَهُوَ ٱللَّهُ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَۖ لَهُ ٱلۡحَمۡدُ فِي ٱلۡأُولَىٰ وَٱلۡأٓخِرَةِۖ وَلَهُ ٱلۡحُكۡمُ وَإِلَيۡهِ تُرۡجَعُونَ
70. Ye nde Allah nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te sé ye mei, azali na lokumu awa na mokili mpe na mokolo ya suka, mpe bokonzi bonso (ya makambo) bozali bwa ye, mpe epai naye nde bokozongisama.
عربي تفسیرونه:
قُلۡ أَرَءَيۡتُمۡ إِن جَعَلَ ٱللَّهُ عَلَيۡكُمُ ٱلَّيۡلَ سَرۡمَدًا إِلَىٰ يَوۡمِ ٱلۡقِيَٰمَةِ مَنۡ إِلَٰهٌ غَيۡرُ ٱللَّهِ يَأۡتِيكُم بِضِيَآءٍۚ أَفَلَا تَسۡمَعُونَ
71. Loba: Bomoni ndenge nini soki Allah atiyelaki bino butu ezala bongo kino o mokolo mwa suka? Nzambe nini na esika ya Allah akotiyela bino bongengi? Boye bozali koyoka te?
عربي تفسیرونه:
قُلۡ أَرَءَيۡتُمۡ إِن جَعَلَ ٱللَّهُ عَلَيۡكُمُ ٱلنَّهَارَ سَرۡمَدًا إِلَىٰ يَوۡمِ ٱلۡقِيَٰمَةِ مَنۡ إِلَٰهٌ غَيۡرُ ٱللَّهِ يَأۡتِيكُم بِلَيۡلٖ تَسۡكُنُونَ فِيهِۚ أَفَلَا تُبۡصِرُونَ
72. Loba: Bomoni ndenge nini, soki Allah atiyelaki bino mokolo ezala bongo kino o mokolo ya suka? Nzambe nini na esika ya Allah akotiyela bino butu mpo bopema na yango? Boye bozali kornona te?
عربي تفسیرونه:
وَمِن رَّحۡمَتِهِۦ جَعَلَ لَكُمُ ٱلَّيۡلَ وَٱلنَّهَارَ لِتَسۡكُنُواْ فِيهِ وَلِتَبۡتَغُواْ مِن فَضۡلِهِۦ وَلَعَلَّكُمۡ تَشۡكُرُونَ
73. Mpe na mawa naye, asaleli bino butu na mokolo mpo bopemaka kati na yango, mpe mpo bolukaka bolamu naye, mpo bokoka kotondo.
عربي تفسیرونه:
وَيَوۡمَ يُنَادِيهِمۡ فَيَقُولُ أَيۡنَ شُرَكَآءِيَ ٱلَّذِينَ كُنتُمۡ تَزۡعُمُونَ
74. Mpe mokolo akobenga bango, akolobaka: Wapi baye bozalaki kokanisa bango ete bazali basangani ba ngai?
عربي تفسیرونه:
وَنَزَعۡنَا مِن كُلِّ أُمَّةٖ شَهِيدٗا فَقُلۡنَا هَاتُواْ بُرۡهَٰنَكُمۡ فَعَلِمُوٓاْ أَنَّ ٱلۡحَقَّ لِلَّهِ وَضَلَّ عَنۡهُم مَّا كَانُواْ يَفۡتَرُونَ
75. Mpona yango nde tobimisaki nzeneneke na umma(1) nyoso mpe tolobaki: Bopesa elembetele na bino, mpe bayebaki ya soló ete: Bosôló bozali bwa Allah, mpe oyo basalaki bawangani bango.
1 Umma: Awa elakisi: Bato. Bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 128.
عربي تفسیرونه:
۞ إِنَّ قَٰرُونَ كَانَ مِن قَوۡمِ مُوسَىٰ فَبَغَىٰ عَلَيۡهِمۡۖ وَءَاتَيۡنَٰهُ مِنَ ٱلۡكُنُوزِ مَآ إِنَّ مَفَاتِحَهُۥ لَتَنُوٓأُ بِٱلۡعُصۡبَةِ أُوْلِي ٱلۡقُوَّةِ إِذۡ قَالَ لَهُۥ قَوۡمُهُۥ لَا تَفۡرَحۡۖ إِنَّ ٱللَّهَ لَا يُحِبُّ ٱلۡفَرِحِينَ
76. Ya soló Qârûn azalaki kati ya bato ya Mûssa, kasi atombokaki likolo na bango na lolendo, mpe topesaki ye bozui oyo fungóla nayango esengaki bato ya makasi mpona kotombola yango. Tango bayebisi ye na bato naye ete: Kosepela mingi te, mpo ya sólo Allah alingaka basepeli ya bolekisi ndelo te.
عربي تفسیرونه:
وَٱبۡتَغِ فِيمَآ ءَاتَىٰكَ ٱللَّهُ ٱلدَّارَ ٱلۡأٓخِرَةَۖ وَلَا تَنسَ نَصِيبَكَ مِنَ ٱلدُّنۡيَاۖ وَأَحۡسِن كَمَآ أَحۡسَنَ ٱللَّهُ إِلَيۡكَۖ وَلَا تَبۡغِ ٱلۡفَسَادَ فِي ٱلۡأَرۡضِۖ إِنَّ ٱللَّهَ لَا يُحِبُّ ٱلۡمُفۡسِدِينَ
77. Mpe oyo Allah apeși yo, luka nayango evandeli (ya malamu) o mokolo ya suka, kasi kobosana ya mokili te, mpe bongisa lolenge Allah abongisela yo, mpe kobebisa okati ya mokili te. Ya sólo, Allah alingaka babebisi te.
عربي تفسیرونه:
قَالَ إِنَّمَآ أُوتِيتُهُۥ عَلَىٰ عِلۡمٍ عِندِيٓۚ أَوَلَمۡ يَعۡلَمۡ أَنَّ ٱللَّهَ قَدۡ أَهۡلَكَ مِن قَبۡلِهِۦ مِنَ ٱلۡقُرُونِ مَنۡ هُوَ أَشَدُّ مِنۡهُ قُوَّةٗ وَأَكۡثَرُ جَمۡعٗاۚ وَلَا يُسۡـَٔلُ عَن ذُنُوبِهِمُ ٱلۡمُجۡرِمُونَ
78. Alobi: Ya sólo, nazuaki yango na boyebi oyo nazali na yango. Boye ayebi te ete: Allah abomaka bato ya yambo baye bazalaki na bokasi koleka ye na bozwi ebele? Mpe batomboki bakotunama te mpona masumu na bango?
عربي تفسیرونه:
فَخَرَجَ عَلَىٰ قَوۡمِهِۦ فِي زِينَتِهِۦۖ قَالَ ٱلَّذِينَ يُرِيدُونَ ٱلۡحَيَوٰةَ ٱلدُّنۡيَا يَٰلَيۡتَ لَنَا مِثۡلَ مَآ أُوتِيَ قَٰرُونُ إِنَّهُۥ لَذُو حَظٍّ عَظِيمٖ
79. Мре abimaki na bonzenga nyoso epai ya bato naye, baye balingaki mokili balobi: Soki tozalaka ata (na bozui ya malamu lokola) Qärün, ya soló, azali na libaku ya kitoko.
عربي تفسیرونه:
وَقَالَ ٱلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡعِلۡمَ وَيۡلَكُمۡ ثَوَابُ ٱللَّهِ خَيۡرٞ لِّمَنۡ ءَامَنَ وَعَمِلَ صَٰلِحٗاۚ وَلَا يُلَقَّىٰهَآ إِلَّا ٱلصَّٰبِرُونَ
80. Kasi baye bapesamaki boyebi balobi: Mpasi na bino, lifuta lia Allah lizali тропа mondimi mpe oyo asali malamu, mpe bakozuaka yango te sé baye bazalaki kokanga mitema.
عربي تفسیرونه:
فَخَسَفۡنَا بِهِۦ وَبِدَارِهِ ٱلۡأَرۡضَ فَمَا كَانَ لَهُۥ مِن فِئَةٖ يَنصُرُونَهُۥ مِن دُونِ ٱللَّهِ وَمَا كَانَ مِنَ ٱلۡمُنتَصِرِينَ
81. Mpe tobomaki ye, mpe mabele emelaki ye na ndako naye. Mpe bato ya kosalisa ye bamonanaki te na botiki Allah mpe akokaki komisalisa te.
عربي تفسیرونه:
وَأَصۡبَحَ ٱلَّذِينَ تَمَنَّوۡاْ مَكَانَهُۥ بِٱلۡأَمۡسِ يَقُولُونَ وَيۡكَأَنَّ ٱللَّهَ يَبۡسُطُ ٱلرِّزۡقَ لِمَن يَشَآءُ مِنۡ عِبَادِهِۦ وَيَقۡدِرُۖ لَوۡلَآ أَن مَّنَّ ٱللَّهُ عَلَيۡنَا لَخَسَفَ بِنَاۖ وَيۡكَأَنَّهُۥ لَا يُفۡلِحُ ٱلۡكَٰفِرُونَ
82. Mpe baye bazalaki kolikya na esika naye batelemi mpe balobi: Eh!, Ya solo, Allah apesaka bozui na mowumbu naye oyo alingi mpe akitisaka. Soki Allah alingaki biso te, mbele alingaki mpe koboma biso. Eh! Ya sólo, ye akolongisaka bapengwi te.
عربي تفسیرونه:
تِلۡكَ ٱلدَّارُ ٱلۡأٓخِرَةُ نَجۡعَلُهَا لِلَّذِينَ لَا يُرِيدُونَ عُلُوّٗا فِي ٱلۡأَرۡضِ وَلَا فَسَادٗاۚ وَٱلۡعَٰقِبَةُ لِلۡمُتَّقِينَ
83. Ndako wana ya mokolo ya suka, tolengeli yango тропа baye balingi komilakisa te awa na mokili, mpe bazali kosala mbeba te. Mpe suka ya solo, ezali nde ya babangi.
عربي تفسیرونه:
مَن جَآءَ بِٱلۡحَسَنَةِ فَلَهُۥ خَيۡرٞ مِّنۡهَاۖ وَمَن جَآءَ بِٱلسَّيِّئَةِ فَلَا يُجۡزَى ٱلَّذِينَ عَمِلُواْ ٱلسَّيِّـَٔاتِ إِلَّا مَا كَانُواْ يَعۡمَلُونَ
84. Oyo akoya na bolamu moko, akozua lifuta koleka yango, mpe oyo akoya na mabe moko, bakofutama te sé na ndenge basalaki.
عربي تفسیرونه:
إِنَّ ٱلَّذِي فَرَضَ عَلَيۡكَ ٱلۡقُرۡءَانَ لَرَآدُّكَ إِلَىٰ مَعَادٖۚ قُل رَّبِّيٓ أَعۡلَمُ مَن جَآءَ بِٱلۡهُدَىٰ وَمَنۡ هُوَ فِي ضَلَٰلٖ مُّبِينٖ
85. Ya soló oyo atiyelaki yo kurani ezala lotomo, akomemaka yo na esika oyo olingi kokende. Loba: Nkolo wa ngai ayebi malamu koleka, oyo aye na bokambi mpe oyo azali na libunga ya polele.
عربي تفسیرونه:
وَمَا كُنتَ تَرۡجُوٓاْ أَن يُلۡقَىٰٓ إِلَيۡكَ ٱلۡكِتَٰبُ إِلَّا رَحۡمَةٗ مِّن رَّبِّكَۖ فَلَا تَكُونَنَّ ظَهِيرٗا لِّلۡكَٰفِرِينَ
86. Mpe ozalaki kolikia te ete: Bakotangisa yo buku, ezalaki ngolu kowuta na Nkolo wayo, kasi kosalisaka bapengwi te.
عربي تفسیرونه:
وَلَا يَصُدُّنَّكَ عَنۡ ءَايَٰتِ ٱللَّهِ بَعۡدَ إِذۡ أُنزِلَتۡ إِلَيۡكَۖ وَٱدۡعُ إِلَىٰ رَبِّكَۖ وَلَا تَكُونَنَّ مِنَ ٱلۡمُشۡرِكِينَ
87. Na yango, kobundisaka mikapo mia Allah te sima ya kokitisa yango epai nayo. Benga (bato) baya epai ya Nkolo wayo, тре kozala o kati ya basangisi te.
عربي تفسیرونه:
وَلَا تَدۡعُ مَعَ ٱللَّهِ إِلَٰهًا ءَاخَرَۘ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَۚ كُلُّ شَيۡءٍ هَالِكٌ إِلَّا وَجۡهَهُۥۚ لَهُ ٱلۡحُكۡمُ وَإِلَيۡهِ تُرۡجَعُونَ
88. Mpe kokumisa nzambe mosusu te elongo na Allah, Nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te sé ye. Biloko binso bikokufaka, longola sé elongi naye. Mpe kokata ya likambo ezali bwa ye, mpe epai naye nde bokozongisama.
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: القصص
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ نمبر
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - د ژباړو فهرست (لړلیک)

لینګالا ژبې ته د قرآن کریم د معناګانو ژباړه ، محمد بالنګوګو ژباړلې ده

بندول