د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: الطلاق   آیت:

At-Twalâq (BOKABWANI YA LIBALA)

يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّبِيُّ إِذَا طَلَّقۡتُمُ ٱلنِّسَآءَ فَطَلِّقُوهُنَّ لِعِدَّتِهِنَّ وَأَحۡصُواْ ٱلۡعِدَّةَۖ وَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ رَبَّكُمۡۖ لَا تُخۡرِجُوهُنَّ مِنۢ بُيُوتِهِنَّ وَلَا يَخۡرُجۡنَ إِلَّآ أَن يَأۡتِينَ بِفَٰحِشَةٖ مُّبَيِّنَةٖۚ وَتِلۡكَ حُدُودُ ٱللَّهِۚ وَمَن يَتَعَدَّ حُدُودَ ٱللَّهِ فَقَدۡ ظَلَمَ نَفۡسَهُۥۚ لَا تَدۡرِي لَعَلَّ ٱللَّهَ يُحۡدِثُ بَعۡدَ ذَٰلِكَ أَمۡرٗا
1. Oh ntoma! Soki bolingi kokabwana na basi, bokabwana na bango o sima ya eleko na bango mpe botanga yango, bobanga Allah Nkolo wa bino mpe bobimisa bango na bandako te, longola sé soki basali mabe oyo emonani polele. Wana ezali mibeko mia Allah. Mpe oyo akotosa mibeko mia Allah te, amisali mabe sé ye moko. Oyebi te sima na yango, Allah akobimisa eloko ya sika.
عربي تفسیرونه:
فَإِذَا بَلَغۡنَ أَجَلَهُنَّ فَأَمۡسِكُوهُنَّ بِمَعۡرُوفٍ أَوۡ فَارِقُوهُنَّ بِمَعۡرُوفٖ وَأَشۡهِدُواْ ذَوَيۡ عَدۡلٖ مِّنكُمۡ وَأَقِيمُواْ ٱلشَّهَٰدَةَ لِلَّهِۚ ذَٰلِكُمۡ يُوعَظُ بِهِۦ مَن كَانَ يُؤۡمِنُ بِٱللَّهِ وَٱلۡيَوۡمِ ٱلۡأٓخِرِۚ وَمَن يَتَّقِ ٱللَّهَ يَجۡعَل لَّهُۥ مَخۡرَجٗا
2. Mpe soki bakomi na suka ya mikolo miye mipesamaki bango тропа kozela, bozongela bango na libala na ndenge ya malamu, to mpe boboya bango na lolenge ya malamu, mpe bozua banzeneneke mibale ya mibali ya malamu mpe ya bosembo okati na bino, mpe bokokisa bonzeneneke тропа Allah. Wana ezali bolendisi тропа bino na moto oyo andimi na Allah mpe na mokolo ya suka. Mpe moto oyo abangi Allah, akofungola ye nzela.
عربي تفسیرونه:
وَيَرۡزُقۡهُ مِنۡ حَيۡثُ لَا يَحۡتَسِبُۚ وَمَن يَتَوَكَّلۡ عَلَى ٱللَّهِ فَهُوَ حَسۡبُهُۥٓۚ إِنَّ ٱللَّهَ بَٰلِغُ أَمۡرِهِۦۚ قَدۡ جَعَلَ ٱللَّهُ لِكُلِّ شَيۡءٖ قَدۡرٗا
3. Мре akopesa ye bozui oyo akanaki yango te. Oyo akomipesa na Allah, asili kokoka ye. Ya soló, Allah azali kokokisa mibeko naye. Allah asila kotia eloko nyoso emekelo na yango.
عربي تفسیرونه:
وَٱلَّٰٓـِٔي يَئِسۡنَ مِنَ ٱلۡمَحِيضِ مِن نِّسَآئِكُمۡ إِنِ ٱرۡتَبۡتُمۡ فَعِدَّتُهُنَّ ثَلَٰثَةُ أَشۡهُرٖ وَٱلَّٰٓـِٔي لَمۡ يَحِضۡنَۚ وَأُوْلَٰتُ ٱلۡأَحۡمَالِ أَجَلُهُنَّ أَن يَضَعۡنَ حَمۡلَهُنَّۚ وَمَن يَتَّقِ ٱللَّهَ يَجۡعَل لَّهُۥ مِنۡ أَمۡرِهِۦ يُسۡرٗا
4. Soki bobosani bileko bia basi na bino baye bazali lisusu na elikia ya makila te, to mpe ba oyo naino bamoni makila te, eleko na bango ya kozela ezali sanza misato, kasi тропа ba oyo bazali na zemi, bakozela kino bakobota. Mpe moto oyo abangi Allah, (Allah) akolembisa makambo naye.
عربي تفسیرونه:
ذَٰلِكَ أَمۡرُ ٱللَّهِ أَنزَلَهُۥٓ إِلَيۡكُمۡۚ وَمَن يَتَّقِ ٱللَّهَ يُكَفِّرۡ عَنۡهُ سَيِّـَٔاتِهِۦ وَيُعۡظِمۡ لَهُۥٓ أَجۡرًا
5. Wana ezali mobeko ya Allah oyo akitisa yango epai na bino. Mpe oyo akobanga Allah, akolimbisa masumu naye, mpe akokolisa bolamu naye.
عربي تفسیرونه:
أَسۡكِنُوهُنَّ مِنۡ حَيۡثُ سَكَنتُم مِّن وُجۡدِكُمۡ وَلَا تُضَآرُّوهُنَّ لِتُضَيِّقُواْ عَلَيۡهِنَّۚ وَإِن كُنَّ أُوْلَٰتِ حَمۡلٖ فَأَنفِقُواْ عَلَيۡهِنَّ حَتَّىٰ يَضَعۡنَ حَمۡلَهُنَّۚ فَإِنۡ أَرۡضَعۡنَ لَكُمۡ فَـَٔاتُوهُنَّ أُجُورَهُنَّ وَأۡتَمِرُواْ بَيۡنَكُم بِمَعۡرُوفٖۖ وَإِن تَعَاسَرۡتُمۡ فَسَتُرۡضِعُ لَهُۥٓ أُخۡرَىٰ
6. Bovandisa bango esika bozali kovanda, kasi bosala bango mabe te ya kokangela bango nzela ya libiki. Mpe soki bazali na zemi, bosalisa bango kino bakobota. Mpe soki bamelisi тропа bino (mwana ya sika), bopesa bango lifuta na bango mpe boyokana malamu kati na bino, mpe soki bozui kpokoso, boluka momelisi mosusu mpo amelisa ye.
عربي تفسیرونه:
لِيُنفِقۡ ذُو سَعَةٖ مِّن سَعَتِهِۦۖ وَمَن قُدِرَ عَلَيۡهِ رِزۡقُهُۥ فَلۡيُنفِقۡ مِمَّآ ءَاتَىٰهُ ٱللَّهُۚ لَا يُكَلِّفُ ٱللَّهُ نَفۡسًا إِلَّا مَآ ءَاتَىٰهَاۚ سَيَجۡعَلُ ٱللَّهُ بَعۡدَ عُسۡرٖ يُسۡرٗا
7. Oyo azali na bozui ebele abimisa ebele ya bozui naye, kaši na oyo bozui naye ezali шоке, abimisa yango na ndenge oyo Allah apeși. Allah apesaka moto mokumba sé oyo apesi ye, sima ya kpokoso, Allah akopesa bozui.
عربي تفسیرونه:
وَكَأَيِّن مِّن قَرۡيَةٍ عَتَتۡ عَنۡ أَمۡرِ رَبِّهَا وَرُسُلِهِۦ فَحَاسَبۡنَٰهَا حِسَابٗا شَدِيدٗا وَعَذَّبۡنَٰهَا عَذَابٗا نُّكۡرٗا
8. Lokola baye baboyaki mibeko mia Allah mpe bazangaki kotosa batindami naye, tolandelaki bango na makasi mpe topesaki bango etumbu oyo ezali kati ya bitumbu ya mabe.
عربي تفسیرونه:
فَذَاقَتۡ وَبَالَ أَمۡرِهَا وَكَانَ عَٰقِبَةُ أَمۡرِهَا خُسۡرًا
9. Bamekaki etumbu ya bizaleli na bango ya mabe, mpe suka na bango ezalaki sé bozangi.
عربي تفسیرونه:
أَعَدَّ ٱللَّهُ لَهُمۡ عَذَابٗا شَدِيدٗاۖ فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ يَٰٓأُوْلِي ٱلۡأَلۡبَٰبِ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْۚ قَدۡ أَنزَلَ ٱللَّهُ إِلَيۡكُمۡ ذِكۡرٗا
10. Allah abombeli bango etumbu ya makasi, eh bato ya mayele oyo bandima (na Allah na ntoma naye)! Bobanga Allah. Ya soló, Allah asila kokitisela bino bokundoli.
عربي تفسیرونه:
رَّسُولٗا يَتۡلُواْ عَلَيۡكُمۡ ءَايَٰتِ ٱللَّهِ مُبَيِّنَٰتٖ لِّيُخۡرِجَ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ مِنَ ٱلظُّلُمَٰتِ إِلَى ٱلنُّورِۚ وَمَن يُؤۡمِنۢ بِٱللَّهِ وَيَعۡمَلۡ صَٰلِحٗا يُدۡخِلۡهُ جَنَّٰتٖ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُ خَٰلِدِينَ فِيهَآ أَبَدٗاۖ قَدۡ أَحۡسَنَ ٱللَّهُ لَهُۥ رِزۡقًا
11. Motindami oyo azali kotangela bino mikapo mia polele, mpo abimisa bandimi na baye bazali kosala misala milamu na molili atia bango na bongengi. Oyo akondima na Allah mpe asali bolamu, akokotisa ye na lola oyo ezali kolekisa mingala o nsé na yango, akovandaka kati na yango libela na libela. Allah asila kobongisela ye bozui bolamu.
عربي تفسیرونه:
ٱللَّهُ ٱلَّذِي خَلَقَ سَبۡعَ سَمَٰوَٰتٖ وَمِنَ ٱلۡأَرۡضِ مِثۡلَهُنَّۖ يَتَنَزَّلُ ٱلۡأَمۡرُ بَيۡنَهُنَّ لِتَعۡلَمُوٓاْ أَنَّ ٱللَّهَ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٞ وَأَنَّ ٱللَّهَ قَدۡ أَحَاطَ بِكُلِّ شَيۡءٍ عِلۡمَۢا
12. Allah mokeli ya likolo sambo mpe lolenge moko na mabele, mibeko mia ye mizali kokita kati na yango, mpo boyeba été ya soló, Allah azali na makoki likolo ya eloko nyoso, mpe ya solo, boyebi naye ezingi biloko binso.
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: الطلاق
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ نمبر
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - د ژباړو فهرست (لړلیک)

لینګالا ژبې ته د قرآن کریم د معناګانو ژباړه ، محمد بالنګوګو ژباړلې ده

بندول