Check out the new design

Tradução dos significados do Nobre Qur’an. - Tradução de lingala - Muhammed Balingongo * - Índice de tradução

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Tradução dos significados Surah: Al-Hijr   Versículo:
إِذۡ دَخَلُواْ عَلَيۡهِ فَقَالُواْ سَلَٰمٗا قَالَ إِنَّا مِنكُمۡ وَجِلُونَ
52. Tango bakotelaki ye mpe balobaki: Kimia (salam) alobi: Tozali kobanga bino.
Os Tafssir em língua árabe:
قَالُواْ لَا تَوۡجَلۡ إِنَّا نُبَشِّرُكَ بِغُلَٰمٍ عَلِيمٖ
53. Balobaki: Kobanga te, ya sólo, tozali kopesa yo sango ya muana mayele oyo atondi na bwanya.
Os Tafssir em língua árabe:
قَالَ أَبَشَّرۡتُمُونِي عَلَىٰٓ أَن مَّسَّنِيَ ٱلۡكِبَرُ فَبِمَ تُبَشِّرُونَ
54. Alobaki: Bozali kopesa ngai (sango eye) mpe boyebi malamu ete kibopaka esili kozua ngai, boye sango malamu nini bozali kopesa ngai?
Os Tafssir em língua árabe:
قَالُواْ بَشَّرۡنَٰكَ بِٱلۡحَقِّ فَلَا تَكُن مِّنَ ٱلۡقَٰنِطِينَ
55. Balobaki: Tozali kopesa yo sango ya bosóló kozala okati ya baye bazangaka elikya te тропа bolamu.
Os Tafssir em língua árabe:
قَالَ وَمَن يَقۡنَطُ مِن رَّحۡمَةِ رَبِّهِۦٓ إِلَّا ٱلضَّآلُّونَ
56. Mpe alobi: Nani azangaka elikya mpe ngolu ya Nkolo waye sé baye babunga nzela?
Os Tafssir em língua árabe:
قَالَ فَمَا خَطۡبُكُمۡ أَيُّهَا ٱلۡمُرۡسَلُونَ
57. Mpe (alobaki na bango): Eh batindami (ba Allah)! Bolingi nini?
Os Tafssir em língua árabe:
قَالُوٓاْ إِنَّآ أُرۡسِلۡنَآ إِلَىٰ قَوۡمٖ مُّجۡرِمِينَ
58. Balobi: Ya soló, totindami epai ya batomboki,
Os Tafssir em língua árabe:
إِلَّآ ءَالَ لُوطٍ إِنَّا لَمُنَجُّوهُمۡ أَجۡمَعِينَ
59. Longola sé libota lia Loth, ya sólo tokolongisa bango banso,
Os Tafssir em língua árabe:
إِلَّا ٱمۡرَأَتَهُۥ قَدَّرۡنَآ إِنَّهَا لَمِنَ ٱلۡغَٰبِرِينَ
60. Longola sé mwasi waye, tosila kokata (Allah) ete akozala o kati ya baye bakozua etumbu.
Os Tafssir em língua árabe:
فَلَمَّا جَآءَ ءَالَ لُوطٍ ٱلۡمُرۡسَلُونَ
61. Mpe tango batindami bapusanaki pene na libota lia Loth,
Os Tafssir em língua árabe:
قَالَ إِنَّكُمۡ قَوۡمٞ مُّنكَرُونَ
62. Alobi: Bozali bato bayebani te.
Os Tafssir em língua árabe:
قَالُواْ بَلۡ جِئۡنَٰكَ بِمَا كَانُواْ فِيهِ يَمۡتَرُونَ
63. Balobi: Toyeli yo mpo topesa etumbu na baye bazali kotiya tembe mpe bazali kondima te.
Os Tafssir em língua árabe:
وَأَتَيۡنَٰكَ بِٱلۡحَقِّ وَإِنَّا لَصَٰدِقُونَ
64. Mpe toyei epai nayo na bosóló mpe tozali bato ba bosembo.
Os Tafssir em língua árabe:
فَأَسۡرِ بِأَهۡلِكَ بِقِطۡعٖ مِّنَ ٱلَّيۡلِ وَٱتَّبِعۡ أَدۡبَٰرَهُمۡ وَلَا يَلۡتَفِتۡ مِنكُمۡ أَحَدٞ وَٱمۡضُواْ حَيۡثُ تُؤۡمَرُونَ
65. Kima noki (kende noki) na libota lia yo na butu, zala sima na bango, moko te kati na bino atala sima. Mpe bökende sé na esika eye bakolakisa bino.
Os Tafssir em língua árabe:
وَقَضَيۡنَآ إِلَيۡهِ ذَٰلِكَ ٱلۡأَمۡرَ أَنَّ دَابِرَ هَٰٓؤُلَآءِ مَقۡطُوعٞ مُّصۡبِحِينَ
66. Mpe topesaki ye mobeko mona, mpo bato bana etumbu ezua bango kobanda ntongo tii suka.
Os Tafssir em língua árabe:
وَجَآءَ أَهۡلُ ٱلۡمَدِينَةِ يَسۡتَبۡشِرُونَ
67. Mpe bato ba mboka bayeli ye bazali kosepela,
Os Tafssir em língua árabe:
قَالَ إِنَّ هَٰٓؤُلَآءِ ضَيۡفِي فَلَا تَفۡضَحُونِ
68. Alobi: Ya sólo, baye bazali bapaya ba ngai bosala bango mabe te.
Os Tafssir em língua árabe:
وَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَلَا تُخۡزُونِ
69. Bobanga Allah, kasi bokitisa lokumu na ngai te.
Os Tafssir em língua árabe:
قَالُوٓاْ أَوَلَمۡ نَنۡهَكَ عَنِ ٱلۡعَٰلَمِينَ
70. Мре balobaki (na Loth): Topekisaki yo te na koyamba bato ya mokili?
Os Tafssir em língua árabe:
 
Tradução dos significados Surah: Al-Hijr
Índice de capítulos Número de página
 
Tradução dos significados do Nobre Qur’an. - Tradução de lingala - Muhammed Balingongo - Índice de tradução

Traduzido por Zakariya Muhammed Balingongo.

Fechar