Check out the new design

Tradução dos significados do Nobre Qur’an. - Tradução de lingala - Muhammed Balingongo * - Índice de tradução

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Tradução dos significados Surah: Al-Ahzab   Versículo:
يَسۡـَٔلُكَ ٱلنَّاسُ عَنِ ٱلسَّاعَةِۖ قُلۡ إِنَّمَا عِلۡمُهَا عِندَ ٱللَّهِۚ وَمَا يُدۡرِيكَ لَعَلَّ ٱلسَّاعَةَ تَكُونُ قَرِيبًا
63. Bato bazali kotuna yo тропа tango (tango ya bosambisami o mokolo ya suka), loba: Allah nde azali na boyebi na yango, mpe nini ekolakisa yo tango mosusu ngonga ezali pembeni?
Os Tafssir em língua árabe:
إِنَّ ٱللَّهَ لَعَنَ ٱلۡكَٰفِرِينَ وَأَعَدَّ لَهُمۡ سَعِيرًا
64. Ya soló, Allah asila kopesa botutu na bapengwi, тре abombeli bango etumbu ya lifelo.
Os Tafssir em língua árabe:
خَٰلِدِينَ فِيهَآ أَبَدٗاۖ لَّا يَجِدُونَ وَلِيّٗا وَلَا نَصِيرٗا
65. Libela kati na yango, bakozuaka mosungi to mosalisi te.
Os Tafssir em língua árabe:
يَوۡمَ تُقَلَّبُ وُجُوهُهُمۡ فِي ٱلنَّارِ يَقُولُونَ يَٰلَيۡتَنَآ أَطَعۡنَا ٱللَّهَ وَأَطَعۡنَا ٱلرَّسُولَا۠
66. Mokolo bilongi na bango bikobalusama o kati ya lifelo bakoloba ete: Eh mawa na biso! Soki totosaki Allah тре totosaki motindami.
Os Tafssir em língua árabe:
وَقَالُواْ رَبَّنَآ إِنَّآ أَطَعۡنَا سَادَتَنَا وَكُبَرَآءَنَا فَأَضَلُّونَا ٱلسَّبِيلَا۠
67. Mpe bakolobaka: Nkolo wa biso ya sólo totosaki nde bakonzi na biso na bamikolo na biso, mpe bango nde babungisi biso nzela.
Os Tafssir em língua árabe:
رَبَّنَآ ءَاتِهِمۡ ضِعۡفَيۡنِ مِنَ ٱلۡعَذَابِ وَٱلۡعَنۡهُمۡ لَعۡنٗا كَبِيرٗا
68. Nkolo wa biso, pesa bango etumbu mbala mibale, mpe pesa bango botutu ya monene.
Os Tafssir em língua árabe:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لَا تَكُونُواْ كَٱلَّذِينَ ءَاذَوۡاْ مُوسَىٰ فَبَرَّأَهُ ٱللَّهُ مِمَّا قَالُواْۚ وَكَانَ عِندَ ٱللَّهِ وَجِيهٗا
69. Oh bino bandimi! Bozala te lokola ba oyo banyokolaki Mûssa, kasi Allah alongolaki ye na mabe na bango, mpe azalaki na lokumu na miso ya Allah.
Os Tafssir em língua árabe:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ ٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَقُولُواْ قَوۡلٗا سَدِيدٗا
70. Oh bino baye bondima! Bobanga Allah тре boloba liloba ya kitoko lia semba.
Os Tafssir em língua árabe:
يُصۡلِحۡ لَكُمۡ أَعۡمَٰلَكُمۡ وَيَغۡفِرۡ لَكُمۡ ذُنُوبَكُمۡۗ وَمَن يُطِعِ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥ فَقَدۡ فَازَ فَوۡزًا عَظِيمًا
71. Akobongisela bino misala, na bino mpe akolimbisa masumu na bino. Мре oyo akotosa Allah na motindami waye, asili kolonga elonga enene.
Os Tafssir em língua árabe:
إِنَّا عَرَضۡنَا ٱلۡأَمَانَةَ عَلَى ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَٱلۡجِبَالِ فَأَبَيۡنَ أَن يَحۡمِلۡنَهَا وَأَشۡفَقۡنَ مِنۡهَا وَحَمَلَهَا ٱلۡإِنسَٰنُۖ إِنَّهُۥ كَانَ ظَلُومٗا جَهُولٗا
72. Ya soló, topesaki mokumba(1) na likolo mpe na nsé mpe na bangomba, kasi baboyaki komema yango na kobanga, kasi moto amemaki yango. Nzoka nde azalaka na bosembo te, mpe boyebi te.
1 Mokumba: Elakisi: Kobondela Allah ye moko, kotika mabe kosala bolamu.
Os Tafssir em língua árabe:
لِّيُعَذِّبَ ٱللَّهُ ٱلۡمُنَٰفِقِينَ وَٱلۡمُنَٰفِقَٰتِ وَٱلۡمُشۡرِكِينَ وَٱلۡمُشۡرِكَٰتِ وَيَتُوبَ ٱللَّهُ عَلَى ٱلۡمُؤۡمِنِينَ وَٱلۡمُؤۡمِنَٰتِۗ وَكَانَ ٱللَّهُ غَفُورٗا رَّحِيمَۢا
73. Mpo Allah apesa etumbu na bato ya bilongi mibale ya mibali mpe ya basi, mpe bapengwi ya mibali mpe ya basi, mpe Allah akondima tubela ya bandimi ya mibali mpe ya basi. Mpe Allah azali molimbisi atonda ngolu.
Os Tafssir em língua árabe:
 
Tradução dos significados Surah: Al-Ahzab
Índice de capítulos Número de página
 
Tradução dos significados do Nobre Qur’an. - Tradução de lingala - Muhammed Balingongo - Índice de tradução

Traduzido por Zakariya Muhammed Balingongo.

Fechar