Check out the new design

Tradução dos significados do Nobre Qur’an. - Tradução de lingala - Muhammed Balingongo * - Índice de tradução

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Tradução dos significados Surah: Sad   Versículo:
ٱصۡبِرۡ عَلَىٰ مَا يَقُولُونَ وَٱذۡكُرۡ عَبۡدَنَا دَاوُۥدَ ذَا ٱلۡأَيۡدِۖ إِنَّهُۥٓ أَوَّابٌ
17. Zala na bozeli тропа oyo bazali koloba, mpe kanisa na mowumbu wa biso Dáwud, oyo atonda na bokasi yakokumisa biso. Ya soló ye azalaki komizongisa (epai ya Allah).
Os Tafssir em língua árabe:
إِنَّا سَخَّرۡنَا ٱلۡجِبَالَ مَعَهُۥ يُسَبِّحۡنَ بِٱلۡعَشِيِّ وَٱلۡإِشۡرَاقِ
18. Мре totiyaki bangomba ezala na botondi tongo mpe pokwa elongo naye.
Os Tafssir em língua árabe:
وَٱلطَّيۡرَ مَحۡشُورَةٗۖ كُلّٞ لَّهُۥٓ أَوَّابٞ
19. Mpe bandeke lokola, nyoso esalamaki sé тропа kokumisa ye. (Allah)
Os Tafssir em língua árabe:
وَشَدَدۡنَا مُلۡكَهُۥ وَءَاتَيۡنَٰهُ ٱلۡحِكۡمَةَ وَفَصۡلَ ٱلۡخِطَابِ
20. Mpe tolendisaki bokonzi bwa ye, mpe topesaki ye bwanya mpe mayele ya kokata makambo.
Os Tafssir em língua árabe:
۞ وَهَلۡ أَتَىٰكَ نَبَؤُاْ ٱلۡخَصۡمِ إِذۡ تَسَوَّرُواْ ٱلۡمِحۡرَابَ
21. Boye basango ya bato ya kosuana ekomelaki yo te? Tango babutaki na esika ya losambo. (ya likolo)
Os Tafssir em língua árabe:
إِذۡ دَخَلُواْ عَلَىٰ دَاوُۥدَ فَفَزِعَ مِنۡهُمۡۖ قَالُواْ لَا تَخَفۡۖ خَصۡمَانِ بَغَىٰ بَعۡضُنَا عَلَىٰ بَعۡضٖ فَٱحۡكُم بَيۡنَنَا بِٱلۡحَقِّ وَلَا تُشۡطِطۡ وَٱهۡدِنَآ إِلَىٰ سَوَآءِ ٱلصِّرَٰطِ
22. Tango bakotelaki Dáwud, mpe abangaki. Balobaki naye ete: Kobanga te, tozali kowelana biso mibale, kabola kati na biso na bosembo, kasi kotengama te, mpe kamba biso o nzela ya semba.
Os Tafssir em língua árabe:
إِنَّ هَٰذَآ أَخِي لَهُۥ تِسۡعٞ وَتِسۡعُونَ نَعۡجَةٗ وَلِيَ نَعۡجَةٞ وَٰحِدَةٞ فَقَالَ أَكۡفِلۡنِيهَا وَعَزَّنِي فِي ٱلۡخِطَابِ
23. Ya sólo, ndeko wa ngai ya mobali oyo azali na bameme ntuku libua na libua, mpe ngai nazali na meme moko, alobi na ngai: Pesa nabombela yo yango, mpe tango tozongisani maloba, alobi na ngai mabe.
Os Tafssir em língua árabe:
قَالَ لَقَدۡ ظَلَمَكَ بِسُؤَالِ نَعۡجَتِكَ إِلَىٰ نِعَاجِهِۦۖ وَإِنَّ كَثِيرٗا مِّنَ ٱلۡخُلَطَآءِ لَيَبۡغِي بَعۡضُهُمۡ عَلَىٰ بَعۡضٍ إِلَّا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ وَقَلِيلٞ مَّا هُمۡۗ وَظَنَّ دَاوُۥدُ أَنَّمَا فَتَنَّٰهُ فَٱسۡتَغۡفَرَ رَبَّهُۥ وَخَرَّۤ رَاكِعٗاۤ وَأَنَابَ۩
24. (Dáwud) alobi: Abubaki yo ya sôló, тропа kosenga yo тете nayo mpo akokisa na (yango motango) oyo ya ye, mpe ya sôló bato balingaka kobotolo biloko ya baninga, longola sé baye bandima mpe basalaka misala milamu, kaši bazali токе. Мре Dâwud akanisaki ete tomekaki ye, asengaki bolimbisi epai ya Nkolo wa ye, mpe agumbamelaki mpe atubelaki.
Os Tafssir em língua árabe:
فَغَفَرۡنَا لَهُۥ ذَٰلِكَۖ وَإِنَّ لَهُۥ عِندَنَا لَزُلۡفَىٰ وَحُسۡنَ مَـَٔابٖ
25. Mpe tolimbisaki ye na yango mpe epayi nabiso akozala na esika ya likolo mpe oyo esika malamu ya kozonga.
Os Tafssir em língua árabe:
يَٰدَاوُۥدُ إِنَّا جَعَلۡنَٰكَ خَلِيفَةٗ فِي ٱلۡأَرۡضِ فَٱحۡكُم بَيۡنَ ٱلنَّاسِ بِٱلۡحَقِّ وَلَا تَتَّبِعِ ٱلۡهَوَىٰ فَيُضِلَّكَ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِۚ إِنَّ ٱلَّذِينَ يَضِلُّونَ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِ لَهُمۡ عَذَابٞ شَدِيدُۢ بِمَا نَسُواْ يَوۡمَ ٱلۡحِسَابِ
26. Eh Dâwud! Ya soló, totiyaki yo mokitani kati na mabele, mpe kata kati na bato na bosembo, kasi kolanda baposa te, noki te ekobungisa yo nzela ya Allah. Ya sólo, baye babungi nzela ya Allah, bakozalaka na etumbu ya makasi, mpo ete babosanaki (kokanisa) na mokolo mwa suka.
Os Tafssir em língua árabe:
 
Tradução dos significados Surah: Sad
Índice de capítulos Número de página
 
Tradução dos significados do Nobre Qur’an. - Tradução de lingala - Muhammed Balingongo - Índice de tradução

Traduzido por Zakariya Muhammed Balingongo.

Fechar