Tradução dos significados do Nobre Qur’an. - Tradução em lingala * - Índice de tradução

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Tradução dos significados Surah: Suratu Muhammad   Versículo:

Muhammad

ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ وَصَدُّواْ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِ أَضَلَّ أَعۡمَٰلَهُمۡ
1. Baye bapengwa mpe bazali kobundisa nzela ya Allah basili kobebisa misala mia bango.
Os Tafssir em língua árabe:
وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ وَءَامَنُواْ بِمَا نُزِّلَ عَلَىٰ مُحَمَّدٖ وَهُوَ ٱلۡحَقُّ مِن رَّبِّهِمۡ كَفَّرَ عَنۡهُمۡ سَيِّـَٔاتِهِمۡ وَأَصۡلَحَ بَالَهُمۡ
2. Мре baye bandima mpe basali misala milamu mpe bandimi na maye makitaki epai ya Muhammad ete ezali soló kowuta epai ya Nkolo na bango, akolongola mabe na bango, mpe akobongisa makambo na bango.
Os Tafssir em língua árabe:
ذَٰلِكَ بِأَنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ ٱتَّبَعُواْ ٱلۡبَٰطِلَ وَأَنَّ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ ٱتَّبَعُواْ ٱلۡحَقَّ مِن رَّبِّهِمۡۚ كَذَٰلِكَ يَضۡرِبُ ٱللَّهُ لِلنَّاسِ أَمۡثَٰلَهُمۡ
3. Wana mpo ete bapengwi balandi lokuta, kasi baye bandima balandi bosembo kowuta epai na Nkolo na bango. Lolenge wana nde Allah azali kopesa másese epai ya bato.
Os Tafssir em língua árabe:
فَإِذَا لَقِيتُمُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ فَضَرۡبَ ٱلرِّقَابِ حَتَّىٰٓ إِذَآ أَثۡخَنتُمُوهُمۡ فَشُدُّواْ ٱلۡوَثَاقَ فَإِمَّا مَنَّۢا بَعۡدُ وَإِمَّا فِدَآءً حَتَّىٰ تَضَعَ ٱلۡحَرۡبُ أَوۡزَارَهَاۚ ذَٰلِكَۖ وَلَوۡ يَشَآءُ ٱللَّهُ لَٱنتَصَرَ مِنۡهُمۡ وَلَٰكِن لِّيَبۡلُوَاْ بَعۡضَكُم بِبَعۡضٖۗ وَٱلَّذِينَ قُتِلُواْ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ فَلَن يُضِلَّ أَعۡمَٰلَهُمۡ
4. Soki bokutani na bapengwi (na bitumba) bokata bakingo na bango, mpe soki bolongi bango, bokanga bango basinga makasi, na sima soki bolingi botiki bango bakei pamba, soki mpe bolingi bato na bango bapesa bino biloko nde botiki bango, kino bitumba bikosila, mpo ete soki Allah alingaki nde asilani na bango ye moko, kasi ezali тропа komeka bino. Mpona ba оуо bakokufa na nzela ya Allah, akobebisa misala na bango te.
Os Tafssir em língua árabe:
سَيَهۡدِيهِمۡ وَيُصۡلِحُ بَالَهُمۡ
5. Akokamba bango mpe akobongisa misala mia bango.
Os Tafssir em língua árabe:
وَيُدۡخِلُهُمُ ٱلۡجَنَّةَ عَرَّفَهَا لَهُمۡ
6. Mpe akokotisaka bango na lola eye alimbolelaki bango (balolenge na yango).
Os Tafssir em língua árabe:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ إِن تَنصُرُواْ ٱللَّهَ يَنصُرۡكُمۡ وَيُثَبِّتۡ أَقۡدَامَكُمۡ
7. Oh bino baye bondima (na Allah)! soki bosalisi Allah, akolongisa bino mpe akolendisa matambi na bino.
Os Tafssir em língua árabe:
وَٱلَّذِينَ كَفَرُواْ فَتَعۡسٗا لَّهُمۡ وَأَضَلَّ أَعۡمَٰلَهُمۡ
8. Mpe bapengwi bakozua mpasi mpe akobungisaka misala mia bango.
Os Tafssir em língua árabe:
ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمۡ كَرِهُواْ مَآ أَنزَلَ ٱللَّهُ فَأَحۡبَطَ أَعۡمَٰلَهُمۡ
9. Mpo baboyaki maye Allah akitisaki, yango abebisi misala mia bango.
Os Tafssir em língua árabe:
۞ أَفَلَمۡ يَسِيرُواْ فِي ٱلۡأَرۡضِ فَيَنظُرُواْ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡۖ دَمَّرَ ٱللَّهُ عَلَيۡهِمۡۖ وَلِلۡكَٰفِرِينَ أَمۡثَٰلُهَا
10. Mpona nini te bazali kotambola na mokili batala lolenge kani esukelaki baye bazalaki liboso na bango? Allah abebisaki bango, mpe lolenge wana nde ekozalela bapengwi.
Os Tafssir em língua árabe:
ذَٰلِكَ بِأَنَّ ٱللَّهَ مَوۡلَى ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَأَنَّ ٱلۡكَٰفِرِينَ لَا مَوۡلَىٰ لَهُمۡ
11. Mpo ete, ya soló, Allah azali mobateli ya bandimi kasi ya sólo bapengwi bazali na mobateli te.
Os Tafssir em língua árabe:
إِنَّ ٱللَّهَ يُدۡخِلُ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ جَنَّٰتٖ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُۖ وَٱلَّذِينَ كَفَرُواْ يَتَمَتَّعُونَ وَيَأۡكُلُونَ كَمَا تَأۡكُلُ ٱلۡأَنۡعَٰمُ وَٱلنَّارُ مَثۡوٗى لَّهُمۡ
12. Ya sólo, Allah akokotisa baye bandimaki mpe basalaki misala milamu na lola eye ezali koleka o nsé na yango mingala, тре bapengwi bazali kosepela na kólia lolenge banyama baliaka, mpe esika na bango ya kovanda ezali nde na lifelo.
Os Tafssir em língua árabe:
وَكَأَيِّن مِّن قَرۡيَةٍ هِيَ أَشَدُّ قُوَّةٗ مِّن قَرۡيَتِكَ ٱلَّتِيٓ أَخۡرَجَتۡكَ أَهۡلَكۡنَٰهُمۡ فَلَا نَاصِرَ لَهُمۡ
13. Mpe bamboka ya makasiboni koleka etuka nayo oyo ebenganaki yo, tobebisaki yango mpe bazuaki mosungi te?
Os Tafssir em língua árabe:
أَفَمَن كَانَ عَلَىٰ بَيِّنَةٖ مِّن رَّبِّهِۦ كَمَن زُيِّنَ لَهُۥ سُوٓءُ عَمَلِهِۦ وَٱتَّبَعُوٓاْ أَهۡوَآءَهُم
14. Boye oyo azali na polele kowuta epai na Nkolo naye, akokani na oyo babongiseli ye mosala ya mabe mpe balandi bamposa na bango?
Os Tafssir em língua árabe:
مَّثَلُ ٱلۡجَنَّةِ ٱلَّتِي وُعِدَ ٱلۡمُتَّقُونَۖ فِيهَآ أَنۡهَٰرٞ مِّن مَّآءٍ غَيۡرِ ءَاسِنٖ وَأَنۡهَٰرٞ مِّن لَّبَنٖ لَّمۡ يَتَغَيَّرۡ طَعۡمُهُۥ وَأَنۡهَٰرٞ مِّنۡ خَمۡرٖ لَّذَّةٖ لِّلشَّٰرِبِينَ وَأَنۡهَٰرٞ مِّنۡ عَسَلٖ مُّصَفّٗىۖ وَلَهُمۡ فِيهَا مِن كُلِّ ٱلثَّمَرَٰتِ وَمَغۡفِرَةٞ مِّن رَّبِّهِمۡۖ كَمَنۡ هُوَ خَٰلِدٞ فِي ٱلنَّارِ وَسُقُواْ مَآءً حَمِيمٗا فَقَطَّعَ أَمۡعَآءَهُمۡ
15. Ndakisa ya Iola eye elengelami тропа babangi (Allah); o kati na yango ezali na mingala ya mayi oyo ebebaka te, ezali na mingala ya miliki oyo elengi na yango ebonguanaka te, mpe na mingala ya masanga ya elengi тропа bomeli, na mingala ya mafuta ya nzoi ya kitoko, mpe тропа bango ezali na lolenge ya bambuma nyoso ekozala okati na yango, mpe bakozua bolimbisi kowuta epai ya Nkolo wa bango. Kasi, boye bazali lolenge moko na oyo akotikala na lifelo ya libela bakomelisaka bango mayi ya moto ya makasi mpe ekokatakata misopo na bango?
Os Tafssir em língua árabe:
وَمِنۡهُم مَّن يَسۡتَمِعُ إِلَيۡكَ حَتَّىٰٓ إِذَا خَرَجُواْ مِنۡ عِندِكَ قَالُواْ لِلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡعِلۡمَ مَاذَا قَالَ ءَانِفًاۚ أُوْلَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ طَبَعَ ٱللَّهُ عَلَىٰ قُلُوبِهِمۡ وَٱتَّبَعُوٓاْ أَهۡوَآءَهُمۡ
16. Мре kati na bango, bamosusu bazali koyoka yo, soki babimi epai nayo balobi na baye bazuaki boyebi ete: Alobi nini? Baye wana Allah akanga mitema mia bango mpe balandi sé bamposa na bango.
Os Tafssir em língua árabe:
وَٱلَّذِينَ ٱهۡتَدَوۡاْ زَادَهُمۡ هُدٗى وَءَاتَىٰهُمۡ تَقۡوَىٰهُمۡ
17. Мре тропа baye bamitiyaki o nzela ya semba, akokamba bango koleka mpe akobakisela bango bobangi na bango.
Os Tafssir em língua árabe:
فَهَلۡ يَنظُرُونَ إِلَّا ٱلسَّاعَةَ أَن تَأۡتِيَهُم بَغۡتَةٗۖ فَقَدۡ جَآءَ أَشۡرَاطُهَاۚ فَأَنَّىٰ لَهُمۡ إِذَا جَآءَتۡهُمۡ ذِكۡرَىٰهُمۡ
18. Boye bazali kozela ete ngonga eyela bango mbalakaka?! Nzoka bilembo na yango bisili koya; mpe soki bokundoli eyeli bango bakokanisa ndenge nini?
Os Tafssir em língua árabe:
فَٱعۡلَمۡ أَنَّهُۥ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا ٱللَّهُ وَٱسۡتَغۡفِرۡ لِذَنۢبِكَ وَلِلۡمُؤۡمِنِينَ وَٱلۡمُؤۡمِنَٰتِۗ وَٱللَّهُ يَعۡلَمُ مُتَقَلَّبَكُمۡ وَمَثۡوَىٰكُمۡ
19. Mpe yeba ete: Ya soló, nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te bobele Allah, sima osenga bolimbisi ya masumu nayo na ya bandimi ya mibali na ya basi. Allah nde ayebi makambo na bino (awa na nsé), mpe ayebi bisika ya bopemi na bino (lobi kati na lola).
Os Tafssir em língua árabe:
وَيَقُولُ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لَوۡلَا نُزِّلَتۡ سُورَةٞۖ فَإِذَآ أُنزِلَتۡ سُورَةٞ مُّحۡكَمَةٞ وَذُكِرَ فِيهَا ٱلۡقِتَالُ رَأَيۡتَ ٱلَّذِينَ فِي قُلُوبِهِم مَّرَضٞ يَنظُرُونَ إِلَيۡكَ نَظَرَ ٱلۡمَغۡشِيِّ عَلَيۡهِ مِنَ ٱلۡمَوۡتِۖ فَأَوۡلَىٰ لَهُمۡ
20. Mpe bandimi bazali koloba ete: Mpona nini suratu ekitisami te? Kasi soki suratu ya mibeko okati na yango milobeli bitumba, okomona baye bazalaki na bokono omitema bazali kotala yo na etaleli ya moto amoni liwa, nde ezali malamu mpona bango!
Os Tafssir em língua árabe:
طَاعَةٞ وَقَوۡلٞ مَّعۡرُوفٞۚ فَإِذَا عَزَمَ ٱلۡأَمۡرُ فَلَوۡ صَدَقُواْ ٱللَّهَ لَكَانَ خَيۡرٗا لَّهُمۡ
21. Botosi mpe liloba ya malamu. Mpe soki motindo mozuami тропа likambo (ya bitumba) ezalaki malamu тропа bango bandimela Allah тропа likambo yango.
Os Tafssir em língua árabe:
فَهَلۡ عَسَيۡتُمۡ إِن تَوَلَّيۡتُمۡ أَن تُفۡسِدُواْ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَتُقَطِّعُوٓاْ أَرۡحَامَكُمۡ
22. Boye soki bopesi mokongo, bokokende te тропа kotia mobulu na nsé mpe kokata bondeko ya mabota? (soki bolingi bokonzi koleka)
Os Tafssir em língua árabe:
أُوْلَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ لَعَنَهُمُ ٱللَّهُ فَأَصَمَّهُمۡ وَأَعۡمَىٰٓ أَبۡصَٰرَهُمۡ
23. Baye wana Allah apesaki bango botutu, mpe abomi bango boyoki mpe bomoni.
Os Tafssir em língua árabe:
أَفَلَا يَتَدَبَّرُونَ ٱلۡقُرۡءَانَ أَمۡ عَلَىٰ قُلُوبٍ أَقۡفَالُهَآ
24. Mpona nini bazali kososola kurani te to boye mitema na bango mikangami na fungóla?
Os Tafssir em língua árabe:
إِنَّ ٱلَّذِينَ ٱرۡتَدُّواْ عَلَىٰٓ أَدۡبَٰرِهِم مِّنۢ بَعۡدِ مَا تَبَيَّنَ لَهُمُ ٱلۡهُدَى ٱلشَّيۡطَٰنُ سَوَّلَ لَهُمۡ وَأَمۡلَىٰ لَهُمۡ
25. Ya soló, baye bazali kozongela banzela na bango (ya mabe) na sima ya koyeba nzela ya semba oyo eyeli bango polele, satana akosi bango mpe akweisi bango.
Os Tafssir em língua árabe:
ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمۡ قَالُواْ لِلَّذِينَ كَرِهُواْ مَا نَزَّلَ ٱللَّهُ سَنُطِيعُكُمۡ فِي بَعۡضِ ٱلۡأَمۡرِۖ وَٱللَّهُ يَعۡلَمُ إِسۡرَارَهُمۡ
26. Mpo bango balobaki na baye bayini emoniseli ya Allah ete: Tokotosa bino na ndambu ya makambo, kasi Allah ayebi malamu basekele na bango.
Os Tafssir em língua árabe:
فَكَيۡفَ إِذَا تَوَفَّتۡهُمُ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ يَضۡرِبُونَ وُجُوهَهُمۡ وَأَدۡبَٰرَهُمۡ
27. Mpe ekozala boni soki ba anzelu bazui milimo mia bango, wana bazali kobeta bango na bilongi na mikongo mia bango?
Os Tafssir em língua árabe:
ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمُ ٱتَّبَعُواْ مَآ أَسۡخَطَ ٱللَّهَ وَكَرِهُواْ رِضۡوَٰنَهُۥ فَأَحۡبَطَ أَعۡمَٰلَهُمۡ
28. Wana ezali mpo balandaki maye Allah aboyaki, mpe bazalaki na ntina ya kondima yango te, тре misala mia bango mibebisamaki.
Os Tafssir em língua árabe:
أَمۡ حَسِبَ ٱلَّذِينَ فِي قُلُوبِهِم مَّرَضٌ أَن لَّن يُخۡرِجَ ٱللَّهُ أَضۡغَٰنَهُمۡ
29. To boye baye bazali na bokono na mitema mia bango (bakanisi ete) Allah akobimisa bonguna na bango polele te?
Os Tafssir em língua árabe:
وَلَوۡ نَشَآءُ لَأَرَيۡنَٰكَهُمۡ فَلَعَرَفۡتَهُم بِسِيمَٰهُمۡۚ وَلَتَعۡرِفَنَّهُمۡ فِي لَحۡنِ ٱلۡقَوۡلِۚ وَٱللَّهُ يَعۡلَمُ أَعۡمَٰلَكُمۡ
30. Mpe soki tolingaki nde tolakisaki yo bango, oyebi bango na bilembo na bango. Mpe okoyeba bango na lolenge na bango ya koloba. Kasi Allah ayebi misala na bino.
Os Tafssir em língua árabe:
وَلَنَبۡلُوَنَّكُمۡ حَتَّىٰ نَعۡلَمَ ٱلۡمُجَٰهِدِينَ مِنكُمۡ وَٱلصَّٰبِرِينَ وَنَبۡلُوَاْ أَخۡبَارَكُمۡ
31. Mpe tokomeka bino mpo toyeba banani bazali kobunda (тропа Allah), тре banani bazali kokanga mitema, mpo ete na sima tomonisa basango na bino.
Os Tafssir em língua árabe:
إِنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ وَصَدُّواْ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِ وَشَآقُّواْ ٱلرَّسُولَ مِنۢ بَعۡدِ مَا تَبَيَّنَ لَهُمُ ٱلۡهُدَىٰ لَن يَضُرُّواْ ٱللَّهَ شَيۡـٔٗا وَسَيُحۡبِطُ أَعۡمَٰلَهُمۡ
32. Ya soló, baye bapengwa тре bazali kobundisi nzela ya Allah, mpe baboyi kondimela motindami o sima ya kolimbolela bango bokambi ya polele, wana bakosala Allah eloko te. Kasi akobebisa misala mia bango.
Os Tafssir em língua árabe:
۞ يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ أَطِيعُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُواْ ٱلرَّسُولَ وَلَا تُبۡطِلُوٓاْ أَعۡمَٰلَكُمۡ
33. Oh bino baye bondima! Botosa Allah mpe botosa motindami (na ye) kasi bobebisa misala mia bino te.
Os Tafssir em língua árabe:
إِنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ وَصَدُّواْ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِ ثُمَّ مَاتُواْ وَهُمۡ كُفَّارٞ فَلَن يَغۡفِرَ ٱللَّهُ لَهُمۡ
34. Ya sólo, baye bapengwa тре babundisaki nzela ya Allah, sima liwa lizui bango sé na bopengwi, Allah akolimbisaka bango te.
Os Tafssir em língua árabe:
فَلَا تَهِنُواْ وَتَدۡعُوٓاْ إِلَى ٱلسَّلۡمِ وَأَنتُمُ ٱلۡأَعۡلَوۡنَ وَٱللَّهُ مَعَكُمۡ وَلَن يَتِرَكُمۡ أَعۡمَٰلَكُمۡ
35. Bolembe te mpe bobenga na kimia te na tango bozali likolo na bango, mpe Allah azali elongo na bino, mpe akokutola misala na bino te.
Os Tafssir em língua árabe:
إِنَّمَا ٱلۡحَيَوٰةُ ٱلدُّنۡيَا لَعِبٞ وَلَهۡوٞۚ وَإِن تُؤۡمِنُواْ وَتَتَّقُواْ يُؤۡتِكُمۡ أُجُورَكُمۡ وَلَا يَسۡـَٔلۡكُمۡ أَمۡوَٰلَكُمۡ
36. Ya soló, bomoyi ya mokili ezali sé lisano mpe liseki. Soki bondimi mpe bobangi, (Allah) akopesa bino bolamu na bino mpe akosenga bino bomengo te.
Os Tafssir em língua árabe:
إِن يَسۡـَٔلۡكُمُوهَا فَيُحۡفِكُمۡ تَبۡخَلُواْ وَيُخۡرِجۡ أَضۡغَٰنَكُمۡ
37. Soki atunaki bino yango, bolingaki bozala bapimi, mpe akobimisa boyini na bino.
Os Tafssir em língua árabe:
هَٰٓأَنتُمۡ هَٰٓؤُلَآءِ تُدۡعَوۡنَ لِتُنفِقُواْ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ فَمِنكُم مَّن يَبۡخَلُۖ وَمَن يَبۡخَلۡ فَإِنَّمَا يَبۡخَلُ عَن نَّفۡسِهِۦۚ وَٱللَّهُ ٱلۡغَنِيُّ وَأَنتُمُ ٱلۡفُقَرَآءُۚ وَإِن تَتَوَلَّوۡاْ يَسۡتَبۡدِلۡ قَوۡمًا غَيۡرَكُمۡ ثُمَّ لَا يَكُونُوٓاْ أَمۡثَٰلَكُم
38. Bino nde, soki babengi bino ete bobimisa na nzela ya Allah, basusu bakangi maboko, kasi oyo akokanga maboko ayeba ete asali yango na nzoto naye moko, nzoka nde Allah azali wa bomengo mpe bino bozali babola. Mpe soki bopesi mokongo akoya na bato ya sika, mpe bakozala lokola bino te.
Os Tafssir em língua árabe:
 
Tradução dos significados Surah: Suratu Muhammad
Índice de capítulos Número de página
 
Tradução dos significados do Nobre Qur’an. - Tradução em lingala - Índice de tradução

Tradução dos significados do Alcorão Nobre para o idioma Lingala, traduzido por Zakaria Muhammad Balngugu.

Fechar