Check out the new design

Tradução dos significados do Nobre Qur’an. - Tradução de lingala - Muhammed Balingongo * - Índice de tradução

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Tradução dos significados Surah: Qaf   Versículo:

Qâf

قٓۚ وَٱلۡقُرۡءَانِ ٱلۡمَجِيدِ
1. Qâf(1) Na kurani ya lokumu.
1 Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
Os Tafssir em língua árabe:
بَلۡ عَجِبُوٓاْ أَن جَآءَهُم مُّنذِرٞ مِّنۡهُمۡ فَقَالَ ٱلۡكَٰفِرُونَ هَٰذَا شَيۡءٌ عَجِيبٌ
2. Kasi bazali kokamwa ete mokebisi ayeli bango okati na libota na bango moko, mpe bapagano balobi ete: Oyo ezali likambo ya kokamwa.
Os Tafssir em língua árabe:
أَءِذَا مِتۡنَا وَكُنَّا تُرَابٗاۖ ذَٰلِكَ رَجۡعُۢ بَعِيدٞ
3. Boye soki tango tokokufaka tokokomaka putulu? Wana ekozalaka bozongi ya mosika.
Os Tafssir em língua árabe:
قَدۡ عَلِمۡنَا مَا تَنقُصُ ٱلۡأَرۡضُ مِنۡهُمۡۖ وَعِندَنَا كِتَٰبٌ حَفِيظُۢ
4. Ya soló, toyebi ndenge nini mabele ekolia banzoto na bango, mpe tozali na buku eye ezali kobomba manso.
Os Tafssir em língua árabe:
بَلۡ كَذَّبُواْ بِٱلۡحَقِّ لَمَّا جَآءَهُمۡ فَهُمۡ فِيٓ أَمۡرٖ مَّرِيجٍ
5. Kasi baboyaki kondima na bosôló oyo eyelaki bango, mpe bazali komiyeba lisusu te.
Os Tafssir em língua árabe:
أَفَلَمۡ يَنظُرُوٓاْ إِلَى ٱلسَّمَآءِ فَوۡقَهُمۡ كَيۡفَ بَنَيۡنَٰهَا وَزَيَّنَّٰهَا وَمَا لَهَا مِن فُرُوجٖ
6. Boye bazali kornona likolo te lolenge nini tokela mpe topesaki yango bonzenga? Tokembisaki yango ezala kopasuka te.
Os Tafssir em língua árabe:
وَٱلۡأَرۡضَ مَدَدۡنَٰهَا وَأَلۡقَيۡنَا فِيهَا رَوَٰسِيَ وَأَنۢبَتۡنَا فِيهَا مِن كُلِّ زَوۡجِۭ بَهِيجٖ
7. Мре lolenge nini fotandaki mabele (na bonene), тре tolendisaki yango na bangomba, тре tobotisi yango lolenge nyoso ya biloko.
Os Tafssir em língua árabe:
تَبۡصِرَةٗ وَذِكۡرَىٰ لِكُلِّ عَبۡدٖ مُّنِيبٖ
8. Mpo mowumbu nyoso oyo azali kolikia na bozongi amona mpe akanisa.
Os Tafssir em língua árabe:
وَنَزَّلۡنَا مِنَ ٱلسَّمَآءِ مَآءٗ مُّبَٰرَكٗا فَأَنۢبَتۡنَا بِهِۦ جَنَّٰتٖ وَحَبَّ ٱلۡحَصِيدِ
9. Mpe tozali kokitisa mayi mapamboama kowuta na likolo, mpe tobotisi na yango bilanga na ba mbuma oyo bazali kobuka yango.
1 Nagh’l: Bótala na suratu Al-Isrâ mokapo: 91. Na suratu Al-Kahf: 32.
Os Tafssir em língua árabe:
وَٱلنَّخۡلَ بَاسِقَٰتٖ لَّهَا طَلۡعٞ نَّضِيدٞ
10. Mpe nagh’l(1) ya milai na biteni na yango ezali ya kokangama.
1 Nagh’l: Bótala na suratu Al-Isrâ mokapo: 91. Na suratu Al-Kahf: 32.
Os Tafssir em língua árabe:
رِّزۡقٗا لِّلۡعِبَادِۖ وَأَحۡيَيۡنَا بِهِۦ بَلۡدَةٗ مَّيۡتٗاۚ كَذَٰلِكَ ٱلۡخُرُوجُ
11. (Ezala) bozui тропа bawumbu (na ngai), mpe na yango topesaki bomoyi na mboka oyo ekufa. Lolenge wana nde lisekwa ekozala.
Os Tafssir em língua árabe:
كَذَّبَتۡ قَبۡلَهُمۡ قَوۡمُ نُوحٖ وَأَصۡحَٰبُ ٱلرَّسِّ وَثَمُودُ
12. Bato ya Núh mpe ya Rass mpe ba Thamúd baboyaki liboso kondima.
Os Tafssir em língua árabe:
وَعَادٞ وَفِرۡعَوۡنُ وَإِخۡوَٰنُ لُوطٖ
13. Lolenge moko na ba aad mpe falo na bandeko ya Loth.
Os Tafssir em língua árabe:
وَأَصۡحَٰبُ ٱلۡأَيۡكَةِ وَقَوۡمُ تُبَّعٖۚ كُلّٞ كَذَّبَ ٱلرُّسُلَ فَحَقَّ وَعِيدِ
14. Mpe bato ya Aykah, na bato ya Tubba, banso baboyaki kondima na batindami kasi bakozuaka etumbu.
Os Tafssir em língua árabe:
أَفَعَيِينَا بِٱلۡخَلۡقِ ٱلۡأَوَّلِۚ بَلۡ هُمۡ فِي لَبۡسٖ مِّنۡ خَلۡقٖ جَدِيدٖ
15. Te. Tolembaki te na bokeli ya liboso. Kasi bazali na tembe na ntina ya bokeli ya sika.
Os Tafssir em língua árabe:
 
Tradução dos significados Surah: Qaf
Índice de capítulos Número de página
 
Tradução dos significados do Nobre Qur’an. - Tradução de lingala - Muhammed Balingongo - Índice de tradução

Traduzido por Zakariya Muhammed Balingongo.

Fechar