Përkthimi i kuptimeve të Kuranit Fisnik - الترجمة اللينغالا * - Përmbajtja e përkthimeve

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Përkthimi i kuptimeve Surja: Suretu Hud   Ajeti:

Hûd

الٓرۚ كِتَٰبٌ أُحۡكِمَتۡ ءَايَٰتُهُۥ ثُمَّ فُصِّلَتۡ مِن لَّدُنۡ حَكِيمٍ خَبِيرٍ
1. Alif, lâm, râ(1). Buku eye mikapo miango mibongisami na lolenge ya kitoko mpe milimbolami na oyo atonda bwanya, moyebi ya ba sango.
1 Alif, Lâm, Râ: Bótala suratu Al-Baqarah mokopo: 1.
Tefsiret në gjuhën arabe:
أَلَّا تَعۡبُدُوٓاْ إِلَّا ٱللَّهَۚ إِنَّنِي لَكُم مِّنۡهُ نَذِيرٞ وَبَشِيرٞ
2. Bobondela te sé Allah, ya soló nazali mokebisi mpe mopesi sango тропа bino.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَأَنِ ٱسۡتَغۡفِرُواْ رَبَّكُمۡ ثُمَّ تُوبُوٓاْ إِلَيۡهِ يُمَتِّعۡكُم مَّتَٰعًا حَسَنًا إِلَىٰٓ أَجَلٖ مُّسَمّٗى وَيُؤۡتِ كُلَّ ذِي فَضۡلٖ فَضۡلَهُۥۖ وَإِن تَوَلَّوۡاْ فَإِنِّيٓ أَخَافُ عَلَيۡكُمۡ عَذَابَ يَوۡمٖ كَبِيرٍ
3. Mpe bosenga bolimbisi epai ya Nkolo wa bino, sima botubela epai naye, akopesa bino bomengo kitoko kino na ntango oyo eyebani, mpe akopesa moto nyoso bolamu boye bokokani naye. Kasi soki boboyi solo ngai nazali kobangela bino etumbu o mokolo ya monene.
Tefsiret në gjuhën arabe:
إِلَى ٱللَّهِ مَرۡجِعُكُمۡۖ وَهُوَ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٌ
4. Bokozongisama epai ya Allah, тре azali na bokoki na biloko binso.
Tefsiret në gjuhën arabe:
أَلَآ إِنَّهُمۡ يَثۡنُونَ صُدُورَهُمۡ لِيَسۡتَخۡفُواْ مِنۡهُۚ أَلَا حِينَ يَسۡتَغۡشُونَ ثِيَابَهُمۡ يَعۡلَمُ مَا يُسِرُّونَ وَمَا يُعۡلِنُونَۚ إِنَّهُۥ عَلِيمُۢ بِذَاتِ ٱلصُّدُورِ
5. Kasi sólo, bazali kotondisa mitema mia bango na kobomba (ki bonguna), ata soki bazali komibomba na bilamba bia bango, ayebi maye bazali kobomba mpe maye bazali komonisa polele, ya soló, ye ayebaka maye mabombami o kati ya mitema.
Tefsiret në gjuhën arabe:
۞ وَمَا مِن دَآبَّةٖ فِي ٱلۡأَرۡضِ إِلَّا عَلَى ٱللَّهِ رِزۡقُهَا وَيَعۡلَمُ مُسۡتَقَرَّهَا وَمُسۡتَوۡدَعَهَاۚ كُلّٞ فِي كِتَٰبٖ مُّبِينٖ
6. Мре ezali na nyama(1) moko te na mabele sé bozui naye ezali kowuta epai ya Allah, mpe ayebi esika avandaka, na esika abombamaka. Nyoso esila kokomama o kati ya buku ya polele ya bosembo.
1 Nyama: Elakisi: Bikelamo nionso oyo etambolaka likolo ya mabele, bótala mpe na suratu: Al-An’ám(Banyama) mokapo: 38.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَهُوَ ٱلَّذِي خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ فِي سِتَّةِ أَيَّامٖ وَكَانَ عَرۡشُهُۥ عَلَى ٱلۡمَآءِ لِيَبۡلُوَكُمۡ أَيُّكُمۡ أَحۡسَنُ عَمَلٗاۗ وَلَئِن قُلۡتَ إِنَّكُم مَّبۡعُوثُونَ مِنۢ بَعۡدِ ٱلۡمَوۡتِ لَيَقُولَنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ إِنۡ هَٰذَآ إِلَّا سِحۡرٞ مُّبِينٞ
7. Mpe ye nde akela mapata na mabele sima ya mikolo motoba, mpe ngwende naye ezalaki likolo ya mayi. Mpo ete ameka bino mpe ayeba nani kati na bino akosala misala ya malamu, mpe soki alobi na bango ete: Ya soló bino bokosekwa sima ya liwa na bino, baye bapengwa bakolobaka été: Ya soló, oyo ezali bondoki ya polele.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَلَئِنۡ أَخَّرۡنَا عَنۡهُمُ ٱلۡعَذَابَ إِلَىٰٓ أُمَّةٖ مَّعۡدُودَةٖ لَّيَقُولُنَّ مَا يَحۡبِسُهُۥٓۗ أَلَا يَوۡمَ يَأۡتِيهِمۡ لَيۡسَ مَصۡرُوفًا عَنۡهُمۡ وَحَاقَ بِهِم مَّا كَانُواْ بِهِۦ يَسۡتَهۡزِءُونَ
8. Mpe soki tozelisi bango etumbu kino o mokolo moye moyebani, bakolobaka: Nini ezali kokanga yango? Mokolo moye ekoyelaka bango, bakokoka kokima yango te, na maye bazalaki kotiola.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَلَئِنۡ أَذَقۡنَا ٱلۡإِنسَٰنَ مِنَّا رَحۡمَةٗ ثُمَّ نَزَعۡنَٰهَا مِنۡهُ إِنَّهُۥ لَيَـُٔوسٞ كَفُورٞ
9. Mpe soki tomekisi moto bolamu bwa biso, sima tolongoli ye yango, ayokaka mabe mingi, mpe azangi kolikya.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَلَئِنۡ أَذَقۡنَٰهُ نَعۡمَآءَ بَعۡدَ ضَرَّآءَ مَسَّتۡهُ لَيَقُولَنَّ ذَهَبَ ٱلسَّيِّـَٔاتُ عَنِّيٓۚ إِنَّهُۥ لَفَرِحٞ فَخُورٌ
10. Mpe soki topesi ye bolamu sima ya pasi oyo azalaki na yango, akosepela na kokumisa тропа mabe oyo elongwe, mpe alobi: Pasi esili.
Tefsiret në gjuhën arabe:
إِلَّا ٱلَّذِينَ صَبَرُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ أُوْلَٰٓئِكَ لَهُم مَّغۡفِرَةٞ وَأَجۡرٞ كَبِيرٞ
11. Longola sé baye bazelaki, mpe basalaki misala milamu, bango bakozalaka na bolimbisi na lifuta linene.
Tefsiret në gjuhën arabe:
فَلَعَلَّكَ تَارِكُۢ بَعۡضَ مَا يُوحَىٰٓ إِلَيۡكَ وَضَآئِقُۢ بِهِۦ صَدۡرُكَ أَن يَقُولُواْ لَوۡلَآ أُنزِلَ عَلَيۡهِ كَنزٌ أَوۡ جَآءَ مَعَهُۥ مَلَكٌۚ إِنَّمَآ أَنتَ نَذِيرٞۚ وَٱللَّهُ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ وَكِيلٌ
12. Tango mosusu ozali kosundola ndambu ya maye makiteli yo, mpe motema nayo etondi na pasi ndenge bazali kotiola yo na koloba: Mpona nini bakitiseli ye sanduku ya bomengo te to тре anzelu aya epai naye? Yo ozali sé mokebisi. Mpe Allah azali mobateli ya biloko binso.
Tefsiret në gjuhën arabe:
أَمۡ يَقُولُونَ ٱفۡتَرَىٰهُۖ قُلۡ فَأۡتُواْ بِعَشۡرِ سُوَرٖ مِّثۡلِهِۦ مُفۡتَرَيَٰتٖ وَٱدۡعُواْ مَنِ ٱسۡتَطَعۡتُم مِّن دُونِ ٱللَّهِ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
13. To bazali koloba été: Ezali lokuta asali yango ye moko (kurani). Loba: Boya na mikapo zomi lokola oyo nayei na yango, oyo bosala bino moko, mpe bobenga nani bolingi oyo akoki kosalisa bino na yango na botiki Allah, soki bozali na bosóló.
Tefsiret në gjuhën arabe:
فَإِلَّمۡ يَسۡتَجِيبُواْ لَكُمۡ فَٱعۡلَمُوٓاْ أَنَّمَآ أُنزِلَ بِعِلۡمِ ٱللَّهِ وَأَن لَّآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَۖ فَهَلۡ أَنتُم مُّسۡلِمُونَ
14. Mpe soki bakoki te koya na yango, boyeba ya soló, été yango ekiti na mayele naye moko Allah, mpe ezali na nzambe mosusu te ya kobondela na bosóló sé ye, mpe boye bozali bamisokia.
Tefsiret në gjuhën arabe:
مَن كَانَ يُرِيدُ ٱلۡحَيَوٰةَ ٱلدُّنۡيَا وَزِينَتَهَا نُوَفِّ إِلَيۡهِمۡ أَعۡمَٰلَهُمۡ فِيهَا وَهُمۡ فِيهَا لَا يُبۡخَسُونَ
15. Baye bakolinga bomoyi bwa mokili na bisengo bia yango, tokopesa bango o kati ya mokili mpe tokokutolaka te.
Tefsiret në gjuhën arabe:
أُوْلَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ لَيۡسَ لَهُمۡ فِي ٱلۡأٓخِرَةِ إِلَّا ٱلنَّارُۖ وَحَبِطَ مَا صَنَعُواْ فِيهَا وَبَٰطِلٞ مَّا كَانُواْ يَعۡمَلُونَ
16. Bango nde bakozalaka na eloko te o mokolo mwa suka sé moto ya lifelo, maye basalaki awa na nsé, makozala pamba mpe makolimwa.
Tefsiret në gjuhën arabe:
أَفَمَن كَانَ عَلَىٰ بَيِّنَةٖ مِّن رَّبِّهِۦ وَيَتۡلُوهُ شَاهِدٞ مِّنۡهُ وَمِن قَبۡلِهِۦ كِتَٰبُ مُوسَىٰٓ إِمَامٗا وَرَحۡمَةًۚ أُوْلَٰٓئِكَ يُؤۡمِنُونَ بِهِۦۚ وَمَن يَكۡفُرۡ بِهِۦ مِنَ ٱلۡأَحۡزَابِ فَٱلنَّارُ مَوۡعِدُهُۥۚ فَلَا تَكُ فِي مِرۡيَةٖ مِّنۡهُۚ إِنَّهُ ٱلۡحَقُّ مِن رَّبِّكَ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يُؤۡمِنُونَ
17. Boye moto oyo azali na buku ya bosembo ya polele na maboko naye, ewuti epai na Nkolo naye, mpe nzeneneke akiti (anzelu gabiliyele) azali kotanga yango, boye akokani na moto oyo azali na eloko moko te ya bosembo na maboko naye? Mpe buku ya Müssa ekitaki liboso naye, (Muhammad) ezalaki bokambi mpe ngolu, baye wana bandimi na yango, kasi baye bakosangisa bakopengwa na yango o kati ya bato, moto nde elaka na bango, kozala na tembe te тропа yango. Ezali solo kowuta epai ya Nkolo wa yo, kasi ebele ya bato bazali kondima na yango te.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَمَنۡ أَظۡلَمُ مِمَّنِ ٱفۡتَرَىٰ عَلَى ٱللَّهِ كَذِبًاۚ أُوْلَٰٓئِكَ يُعۡرَضُونَ عَلَىٰ رَبِّهِمۡ وَيَقُولُ ٱلۡأَشۡهَٰدُ هَٰٓؤُلَآءِ ٱلَّذِينَ كَذَبُواْ عَلَىٰ رَبِّهِمۡۚ أَلَا لَعۡنَةُ ٱللَّهِ عَلَى ٱلظَّٰلِمِينَ
18. Mpe nani oyo azali moto mabe koleka oyo abukeli Allah lokuta? Bango wana bakomemama epai ya Nkolo wa bango, mpe banzeneneke bakolobaka été: (ba anzelu): Baye wana nde bakoselaki Nkolo wa bango, na yango botutu ya Allah bokozala likolo ya bato mabe.
Tefsiret në gjuhën arabe:
ٱلَّذِينَ يَصُدُّونَ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِ وَيَبۡغُونَهَا عِوَجٗا وَهُم بِٱلۡأٓخِرَةِ هُمۡ كَٰفِرُونَ
19. Baye bazali kokanga nzela ya Allah, mpe bazali kolukela yango mbilinga mbilinga. Mpe bazali kondima na mokolo mwa suka te.
Tefsiret në gjuhën arabe:
أُوْلَٰٓئِكَ لَمۡ يَكُونُواْ مُعۡجِزِينَ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَمَا كَانَ لَهُم مِّن دُونِ ٱللَّهِ مِنۡ أَوۡلِيَآءَۘ يُضَٰعَفُ لَهُمُ ٱلۡعَذَابُۚ مَا كَانُواْ يَسۡتَطِيعُونَ ٱلسَّمۡعَ وَمَا كَانُواْ يُبۡصِرُونَ
20. Baye wana bakoki kokitisa nguya (ya Allah) te awa na mokili, mpe bakozua baye bakosalisa bango te liboso ya Allah. Etumbu na bango ekobakisama mpo bakokaki koyoka mpe kotala te.
Tefsiret në gjuhën arabe:
أُوْلَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ خَسِرُوٓاْ أَنفُسَهُمۡ وَضَلَّ عَنۡهُم مَّا كَانُواْ يَفۡتَرُونَ
21. Baye wana nde bamibebisi bango moko, mpe babungisi binzambi nzambi oyo bazalaki kobondela mpe bazalaki kotia elikya ete bakosunga bango.
Tefsiret në gjuhën arabe:
لَا جَرَمَ أَنَّهُمۡ فِي ٱلۡأٓخِرَةِ هُمُ ٱلۡأَخۡسَرُونَ
22. Tembe ezali te été: Bakozala bazangi penza na mokolo ya suka.
Tefsiret në gjuhën arabe:
إِنَّ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ وَأَخۡبَتُوٓاْ إِلَىٰ رَبِّهِمۡ أُوْلَٰٓئِكَ أَصۡحَٰبُ ٱلۡجَنَّةِۖ هُمۡ فِيهَا خَٰلِدُونَ
23. Ya soló, baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, mpe babangaki Nkolo wa bango, bango nde bato ya lola, bakozalaka libela o kati na yango.
Tefsiret në gjuhën arabe:
۞ مَثَلُ ٱلۡفَرِيقَيۡنِ كَٱلۡأَعۡمَىٰ وَٱلۡأَصَمِّ وَٱلۡبَصِيرِ وَٱلسَّمِيعِۚ هَلۡ يَسۡتَوِيَانِ مَثَلًاۚ أَفَلَا تَذَكَّرُونَ
24. Lisanga oyo na oyo mosusu ndakisa na bango ezali lokola bato mibale: Oyo amonaka te, mpe ayokaka te, oyo mosusu amonaka mpe ayokaka. Boye bazali lolenge moko? Na yango bozali kokanisa te?
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَلَقَدۡ أَرۡسَلۡنَا نُوحًا إِلَىٰ قَوۡمِهِۦٓ إِنِّي لَكُمۡ نَذِيرٞ مُّبِينٌ
25. Mpe tosilaki ya soló, kotinda Nûh epai ya bato baye, (alobi): Ya solo, ngai nazali mokebisi ya polele.
Tefsiret në gjuhën arabe:
أَن لَّا تَعۡبُدُوٓاْ إِلَّا ٱللَّهَۖ إِنِّيٓ أَخَافُ عَلَيۡكُمۡ عَذَابَ يَوۡمٍ أَلِيمٖ
26. Ete bobondela te sé Allah, ya sólo nazali kobangela bino etumbu o mokolo mwa pasi ya makasi.
Tefsiret në gjuhën arabe:
فَقَالَ ٱلۡمَلَأُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ مِن قَوۡمِهِۦ مَا نَرَىٰكَ إِلَّا بَشَرٗا مِّثۡلَنَا وَمَا نَرَىٰكَ ٱتَّبَعَكَ إِلَّا ٱلَّذِينَ هُمۡ أَرَاذِلُنَا بَادِيَ ٱلرَّأۡيِ وَمَا نَرَىٰ لَكُمۡ عَلَيۡنَا مِن فَضۡلِۭ بَلۡ نَظُنُّكُمۡ كَٰذِبِينَ
27. Bankumu ya bato naye baye bapengwaki balobaki naye ete: Tozali kornona yo ozali moto lokola biso, tomoni baye bazali kolanda yo, sé bato ya ntina te kati na biso, baye bazali na mayele moke. Mpe tozali kornona bino boleki biso te, kasi tozali kokanisa ete bozali babuki lokuta.
Tefsiret në gjuhën arabe:
قَالَ يَٰقَوۡمِ أَرَءَيۡتُمۡ إِن كُنتُ عَلَىٰ بَيِّنَةٖ مِّن رَّبِّي وَءَاتَىٰنِي رَحۡمَةٗ مِّنۡ عِندِهِۦ فَعُمِّيَتۡ عَلَيۡكُمۡ أَنُلۡزِمُكُمُوهَا وَأَنتُمۡ لَهَا كَٰرِهُونَ
28. Alobaki ete: Oh bato na ngai! В omoni boni soki nazali na elembo ya bosembo kowuta epai ya Nkolo wa ngai, mpe apesi ngai ngolu kowuta epai naye mpe bozangi yango, biso tokokanga bino na makasi te mpo bozua yango mpe bino bozali koyina?
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَيَٰقَوۡمِ لَآ أَسۡـَٔلُكُمۡ عَلَيۡهِ مَالًاۖ إِنۡ أَجۡرِيَ إِلَّا عَلَى ٱللَّهِۚ وَمَآ أَنَا۠ بِطَارِدِ ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْۚ إِنَّهُم مُّلَٰقُواْ رَبِّهِمۡ وَلَٰكِنِّيٓ أَرَىٰكُمۡ قَوۡمٗا تَجۡهَلُونَ
29. Oh! Bato ba ngai! Nazali kosenga bino yango misolo te. Lifuta lia ngai likowuta sé epai ya Allah. Мре nakoki kobengana bandimi te, ya soló, bango bakokutanaka na Nkolo wa bango. Kasi ngai nazali kornona bino bozali koyeba te;
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَيَٰقَوۡمِ مَن يَنصُرُنِي مِنَ ٱللَّهِ إِن طَرَدتُّهُمۡۚ أَفَلَا تَذَكَّرُونَ
30. Oh bato ba ngai! Nani akosalisa ngai na (etumbu) ya Allah soki nabengani bango? Boye bozali kokanisa te?
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَلَآ أَقُولُ لَكُمۡ عِندِي خَزَآئِنُ ٱللَّهِ وَلَآ أَعۡلَمُ ٱلۡغَيۡبَ وَلَآ أَقُولُ إِنِّي مَلَكٞ وَلَآ أَقُولُ لِلَّذِينَ تَزۡدَرِيٓ أَعۡيُنُكُمۡ لَن يُؤۡتِيَهُمُ ٱللَّهُ خَيۡرًاۖ ٱللَّهُ أَعۡلَمُ بِمَا فِيٓ أَنفُسِهِمۡ إِنِّيٓ إِذٗا لَّمِنَ ٱلظَّٰلِمِينَ
31. Mpe nakoki koloba na bino te ete: Nazali na sanduku ya bomengo ya Allah. Nakoloba mpe te ete nayebi mabombami, mpe nakoloba te ete: Nazali anzelu. Mpe nakoloba te na baye bozali kotala mpamba ete: Allah akopesa bango bolamu te. Allah ayebi malamu maye mazali o kati na bango, noki te nakozala elongo na bato mabe.
Tefsiret në gjuhën arabe:
قَالُواْ يَٰنُوحُ قَدۡ جَٰدَلۡتَنَا فَأَكۡثَرۡتَ جِدَٰلَنَا فَأۡتِنَا بِمَا تَعِدُنَآ إِن كُنتَ مِنَ ٱلصَّٰدِقِينَ
32. Balobi: Oh Núh! Osili kosuanisa biso ya koleka, yela biso (etumbu) oyo ozali kolobela soki ezali ya sólo (elembo).
Tefsiret në gjuhën arabe:
قَالَ إِنَّمَا يَأۡتِيكُم بِهِ ٱللَّهُ إِن شَآءَ وَمَآ أَنتُم بِمُعۡجِزِينَ
33. Alobi: Ya sólo, Allah nde akoyela bino yango soki alingi. Kasi bokokokaka kokima te.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَلَا يَنفَعُكُمۡ نُصۡحِيٓ إِنۡ أَرَدتُّ أَنۡ أَنصَحَ لَكُمۡ إِن كَانَ ٱللَّهُ يُرِيدُ أَن يُغۡوِيَكُمۡۚ هُوَ رَبُّكُمۡ وَإِلَيۡهِ تُرۡجَعُونَ
34. Toli na ngai ezali kosalisa bino te tango nazali kopesa bino yango, soki Allah alingi kobungisa bino, azali Nkolo wa bino, mpe bokozongisama epai naye.
Tefsiret në gjuhën arabe:
أَمۡ يَقُولُونَ ٱفۡتَرَىٰهُۖ قُلۡ إِنِ ٱفۡتَرَيۡتُهُۥ فَعَلَيَّ إِجۡرَامِي وَأَنَا۠ بَرِيٓءٞ مِّمَّا تُجۡرِمُونَ
35. Mpe bazali koloba été azali kokosa! Loba: Soki nakosi lisumu yango ekozala na molimo na ngai moko. Mpe nazali mosika na makambo mabe oyo bozali kosala.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَأُوحِيَ إِلَىٰ نُوحٍ أَنَّهُۥ لَن يُؤۡمِنَ مِن قَوۡمِكَ إِلَّا مَن قَدۡ ءَامَنَ فَلَا تَبۡتَئِسۡ بِمَا كَانُواْ يَفۡعَلُونَ
36. Mpe emoniseli ekitelaki Nûh ete: Ya soló, bato nayo oyo bakondimaka nayo lisusu te, longola sé baye bandimaki liboso. Kasi komitungisama te тропа maye bazali kosala.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَٱصۡنَعِ ٱلۡفُلۡكَ بِأَعۡيُنِنَا وَوَحۡيِنَا وَلَا تُخَٰطِبۡنِي فِي ٱلَّذِينَ ظَلَمُوٓاْ إِنَّهُم مُّغۡرَقُونَ
37. Mpe tonga masuwa, na miso na biso mpe na emoniseli na biso, kasi kotuna ngai lisusu te тропа bato mabe. Ya sólo, bango bakozinda.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَيَصۡنَعُ ٱلۡفُلۡكَ وَكُلَّمَا مَرَّ عَلَيۡهِ مَلَأٞ مِّن قَوۡمِهِۦ سَخِرُواْ مِنۡهُۚ قَالَ إِن تَسۡخَرُواْ مِنَّا فَإِنَّا نَسۡخَرُ مِنكُمۡ كَمَا تَسۡخَرُونَ
38. Mpe abandi kotonga masuwa, mpe tango nyoso bankumu na bango bazali koleka, bazali koseka ye. Azongiseli bango eyano alobi: Soki bozali koseka biso, ya sólo, biso mpe tokosekaka bino ndenge bozali koseka.
Tefsiret në gjuhën arabe:
فَسَوۡفَ تَعۡلَمُونَ مَن يَأۡتِيهِ عَذَابٞ يُخۡزِيهِ وَيَحِلُّ عَلَيۡهِ عَذَابٞ مُّقِيمٌ
39. Mpe ezali na tango molai te bokoyebaka nani oyo etumbu ekoyela ye, etumbu ya makasi mpe ya kosilisa lokumu, mpe esengeli naye kozua etumbu oyo ekotikala libela.
Tefsiret në gjuhën arabe:
حَتَّىٰٓ إِذَا جَآءَ أَمۡرُنَا وَفَارَ ٱلتَّنُّورُ قُلۡنَا ٱحۡمِلۡ فِيهَا مِن كُلّٖ زَوۡجَيۡنِ ٱثۡنَيۡنِ وَأَهۡلَكَ إِلَّا مَن سَبَقَ عَلَيۡهِ ٱلۡقَوۡلُ وَمَنۡ ءَامَنَۚ وَمَآ ءَامَنَ مَعَهُۥٓ إِلَّا قَلِيلٞ
40. Kino tango mokano (mitindo) mia biso eyaki, mayi etombokaki na mpela ya makasi tolobaki naye été (Nûh): Kotisa okati ya masuwa lolenge ya banyama mibale mibale (mwasi na mobali) okotisa mpe libota nayo, longola sé ba oyo ekomamaki été esengeli bakufa, mpe baye bandimaki, kasi bandimaki naye te sé bato moke penza.
Tefsiret në gjuhën arabe:
۞ وَقَالَ ٱرۡكَبُواْ فِيهَا بِسۡمِ ٱللَّهِ مَجۡر۪ىٰهَا وَمُرۡسَىٰهَآۚ إِنَّ رَبِّي لَغَفُورٞ رَّحِيمٞ
41. Мре alobaki: Bomata okati na yango na nkombo ya Allah oyo afandisi yango likolo ya etamboli na yango. Ya soló, Nkolo na ngai azali penza molimbisi atonda ngolu.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَهِيَ تَجۡرِي بِهِمۡ فِي مَوۡجٖ كَٱلۡجِبَالِ وَنَادَىٰ نُوحٌ ٱبۡنَهُۥ وَكَانَ فِي مَعۡزِلٖ يَٰبُنَيَّ ٱرۡكَب مَّعَنَا وَلَا تَكُن مَّعَ ٱلۡكَٰفِرِينَ
42. Mpe ebandi kotepatepa likolo ya mayi kino ememaki bango kati kati ya mbonge ya makasi lokola ba ngomba ya minene, mpe Nûh abengi mwana naye oyo aboyaki komata na masuwa: Eh mwana na ngai! Mata elongo na biso, kasi kotikala te elongo na bapengwi.
Tefsiret në gjuhën arabe:
قَالَ سَـَٔاوِيٓ إِلَىٰ جَبَلٖ يَعۡصِمُنِي مِنَ ٱلۡمَآءِۚ قَالَ لَا عَاصِمَ ٱلۡيَوۡمَ مِنۡ أَمۡرِ ٱللَّهِ إِلَّا مَن رَّحِمَۚ وَحَالَ بَيۡنَهُمَا ٱلۡمَوۡجُ فَكَانَ مِنَ ٱلۡمُغۡرَقِينَ
43. (Mwana) ayanoli été: Nakomata likolo ya ngomba oyo тропа komibatela na mayi. (Nûh) alobaki naye été: Lelo mobateli akozala te тропа etumbu ya Allah, longola sé oyo akoyokela ye mawa. Na sima mbonge ekaboli bango, mpe (mwana waye) atikalaki elongo na baye bazindisamaki (na mayi).
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَقِيلَ يَٰٓأَرۡضُ ٱبۡلَعِي مَآءَكِ وَيَٰسَمَآءُ أَقۡلِعِي وَغِيضَ ٱلۡمَآءُ وَقُضِيَ ٱلۡأَمۡرُ وَٱسۡتَوَتۡ عَلَى ٱلۡجُودِيِّۖ وَقِيلَ بُعۡدٗا لِّلۡقَوۡمِ ٱلظَّٰلِمِينَ
44. Mpe motindo epesamaki été: Oh mabele! Mela mayi nayo, oh mapata! Tika (konokisa mbula) mayi makutolamaki mpe masuwa makendeki kotelema likolo ya ngomba, nkombo na yango djudi. Mpe motindo ekweyaki été: Bato mabe balimwa.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَنَادَىٰ نُوحٞ رَّبَّهُۥ فَقَالَ رَبِّ إِنَّ ٱبۡنِي مِنۡ أَهۡلِي وَإِنَّ وَعۡدَكَ ٱلۡحَقُّ وَأَنتَ أَحۡكَمُ ٱلۡحَٰكِمِينَ
45. Mpe Nûh abelelaki Nkolo waye: Oh Nkolo wa ngai! Ya soló, mwana wa ngai azali o kati ya libota lia ngai, mpe elaka nayo ezali solo, mpe ozali zuzi ya bosembo koleka ba zuzi banso.
Tefsiret në gjuhën arabe:
قَالَ يَٰنُوحُ إِنَّهُۥ لَيۡسَ مِنۡ أَهۡلِكَۖ إِنَّهُۥ عَمَلٌ غَيۡرُ صَٰلِحٖۖ فَلَا تَسۡـَٔلۡنِ مَا لَيۡسَ لَكَ بِهِۦ عِلۡمٌۖ إِنِّيٓ أَعِظُكَ أَن تَكُونَ مِنَ ٱلۡجَٰهِلِينَ
46. Azongisi été (Allah): Eh Nûh! Azali o kati ya libota lia yo te, mpo mosala naye ezali malamu te. Mpe kotuna ngai te likambo liye ozali na boyebi na yango te. Ya solo, nazali kopesa yo toli été: Ozala mosika na baye bazangi boyebi.
Tefsiret në gjuhën arabe:
قَالَ رَبِّ إِنِّيٓ أَعُوذُ بِكَ أَنۡ أَسۡـَٔلَكَ مَا لَيۡسَ لِي بِهِۦ عِلۡمٞۖ وَإِلَّا تَغۡفِرۡ لِي وَتَرۡحَمۡنِيٓ أَكُن مِّنَ ٱلۡخَٰسِرِينَ
47. (Nûh) alobaki été: Eh Nkolo! Ya solo, nasengi libateli nayo mpo été nasenga yo maye nazali na boyebi na yango te, mpe soki olimbisi ngai te, mpe oyokeli ngai mawa te, nakozala elongo na bazangi.
Tefsiret në gjuhën arabe:
قِيلَ يَٰنُوحُ ٱهۡبِطۡ بِسَلَٰمٖ مِّنَّا وَبَرَكَٰتٍ عَلَيۡكَ وَعَلَىٰٓ أُمَمٖ مِّمَّن مَّعَكَۚ وَأُمَمٞ سَنُمَتِّعُهُمۡ ثُمَّ يَمَسُّهُم مِّنَّا عَذَابٌ أَلِيمٞ
48. Mpe motindo mopesamaki été: Eh Nûh! Kita na masuwa na kimia na biso, mpe mapamboli ebele likolo nayo na bato baye bazali elongo nayo. Mpe basusu bakoya sima nayo, tokopesa bango bomengo ya tango moke, sima etumbu ya biso ya makasi ekozua bango.
Tefsiret në gjuhën arabe:
تِلۡكَ مِنۡ أَنۢبَآءِ ٱلۡغَيۡبِ نُوحِيهَآ إِلَيۡكَۖ مَا كُنتَ تَعۡلَمُهَآ أَنتَ وَلَا قَوۡمُكَ مِن قَبۡلِ هَٰذَاۖ فَٱصۡبِرۡۖ إِنَّ ٱلۡعَٰقِبَةَ لِلۡمُتَّقِينَ
49. Wana ezali ba sango ya mabombami tozali kokitisa epai nayo, kasi oyebaki yango liboso te, yo (mohamed) na bato nayo liboso nayo. Na yango, esengeli nayo koyika mpiko, mpo été suka ya malamu ezali тропа babangi (Allah).
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَإِلَىٰ عَادٍ أَخَاهُمۡ هُودٗاۚ قَالَ يَٰقَوۡمِ ٱعۡبُدُواْ ٱللَّهَ مَا لَكُم مِّنۡ إِلَٰهٍ غَيۡرُهُۥٓۖ إِنۡ أَنتُمۡ إِلَّا مُفۡتَرُونَ
50. Мре (totindelaki) bato ya aad, ndeko wa bango Hûd. Alobaki: Oh bato bangai! Bobondela Allah, bozali na nzambe mosusu te sé ye, kasi bozali sé babuki lokuta.
Tefsiret në gjuhën arabe:
يَٰقَوۡمِ لَآ أَسۡـَٔلُكُمۡ عَلَيۡهِ أَجۡرًاۖ إِنۡ أَجۡرِيَ إِلَّا عَلَى ٱلَّذِي فَطَرَنِيٓۚ أَفَلَا تَعۡقِلُونَ
51. Oh bato bangai! Nazali kosenga bino yango lifuta te, lifuta lia ngai lizali sé epai ya mokeli wa ngai. Boye bozali koyeba te?
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَيَٰقَوۡمِ ٱسۡتَغۡفِرُواْ رَبَّكُمۡ ثُمَّ تُوبُوٓاْ إِلَيۡهِ يُرۡسِلِ ٱلسَّمَآءَ عَلَيۡكُم مِّدۡرَارٗا وَيَزِدۡكُمۡ قُوَّةً إِلَىٰ قُوَّتِكُمۡ وَلَا تَتَوَلَّوۡاْ مُجۡرِمِينَ
52. Mpe oh bato bangai! Bosenga bolimbisi epai ya Nkolo wa bino, sima botubela epai naye. Akonokisela bino mbula kowuta o likolo ya kolandana, mpe akobakisela bino bokasi likolo lia bokasi. Kasi boboya (ye te), noki bokokoma batomboki.
Tefsiret në gjuhën arabe:
قَالُواْ يَٰهُودُ مَا جِئۡتَنَا بِبَيِّنَةٖ وَمَا نَحۡنُ بِتَارِكِيٓ ءَالِهَتِنَا عَن قَوۡلِكَ وَمَا نَحۡنُ لَكَ بِمُؤۡمِنِينَ
53. Balobi: Eh Hûd! Oyeli biso bilembo te, mpe tokotika banzambe ba biso te тропа maloba nayo, mpe tokondimela yo te.
Tefsiret në gjuhën arabe:
إِن نَّقُولُ إِلَّا ٱعۡتَرَىٰكَ بَعۡضُ ءَالِهَتِنَا بِسُوٓءٖۗ قَالَ إِنِّيٓ أُشۡهِدُ ٱللَّهَ وَٱشۡهَدُوٓاْ أَنِّي بَرِيٓءٞ مِّمَّا تُشۡرِكُونَ
54. Biso tokoloba sé été: Moko kati na ba nzambe na biso asili kosala yo mabe, alobaki na bango ete: Ya soló, ngai nazui Allah nzeneneke wa ngai, bino mpe bozala nzeneneke été ngai nawangani mpe nazali mosika na bikeko na bino na maye bozali kosangisa (Allah).
Tefsiret në gjuhën arabe:
مِن دُونِهِۦۖ فَكِيدُونِي جَمِيعٗا ثُمَّ لَا تُنظِرُونِ
55. Soki ye te (kotika Allah), bosalela ngai likita bino banso (na banzambe na bino), mpe bozelisa ngai te.
Tefsiret në gjuhën arabe:
إِنِّي تَوَكَّلۡتُ عَلَى ٱللَّهِ رَبِّي وَرَبِّكُمۚ مَّا مِن دَآبَّةٍ إِلَّا هُوَ ءَاخِذُۢ بِنَاصِيَتِهَآۚ إِنَّ رَبِّي عَلَىٰ صِرَٰطٖ مُّسۡتَقِيمٖ
56. Ya sólo, natie elikia na ngai epai ya Allah Nkolo wa ngai mpe Nkolo wa bino. Eloko moko te ekoki kozala na esika na yango sé ayeba yango (mpe azala na bokoki тропа yango). Ya sólo Nkolo wa ngai azali na nzela ya semba.
Tefsiret në gjuhën arabe:
فَإِن تَوَلَّوۡاْ فَقَدۡ أَبۡلَغۡتُكُم مَّآ أُرۡسِلۡتُ بِهِۦٓ إِلَيۡكُمۡۚ وَيَسۡتَخۡلِفُ رَبِّي قَوۡمًا غَيۡرَكُمۡ وَلَا تَضُرُّونَهُۥ شَيۡـًٔاۚ إِنَّ رَبِّي عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٍ حَفِيظٞ
57. Mpe soki boboyi, ya sólo, ngai našili kokomisa maye natindamaki na yango epai na bino. Mpe Nkolo wa ngai akolongola bino mpe akoya na bato ya malamu na esika na bino, mpe bokosala ye eloko moko te. Ya sólo, Nkolo wa ngai azali mobateli ya biloko binso.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَلَمَّا جَآءَ أَمۡرُنَا نَجَّيۡنَا هُودٗا وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ مَعَهُۥ بِرَحۡمَةٖ مِّنَّا وَنَجَّيۡنَٰهُم مِّنۡ عَذَابٍ غَلِيظٖ
58. Mpe tango mitindo mia biso miyaki, tobikisaki Hûd na baye bandimaki elongo naye, na mawa та biso, mpe tobikisaki bango na etumbu ya ekasi.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَتِلۡكَ عَادٞۖ جَحَدُواْ بِـَٔايَٰتِ رَبِّهِمۡ وَعَصَوۡاْ رُسُلَهُۥ وَٱتَّبَعُوٓاْ أَمۡرَ كُلِّ جَبَّارٍ عَنِيدٖ
59. Mpe wana nde bato ya aad (etuka ya mboka ya ntoma Hûd) baye babundisaki bilembo bia Nkolo wa bango, mpe bazangaki kotosa batindami ba bango, mpe balandaki likambo lia lolendo mpe mabe.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَأُتۡبِعُواْ فِي هَٰذِهِ ٱلدُّنۡيَا لَعۡنَةٗ وَيَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِۗ أَلَآ إِنَّ عَادٗا كَفَرُواْ رَبَّهُمۡۗ أَلَا بُعۡدٗا لِّعَادٖ قَوۡمِ هُودٖ
60. Mpe botutu elandaki bango awa nanse mpe kino o mokolo mwa suka ekozala lokola, ya sôló ba aad bapengwaki penza na Nkolo wa bango, kasi ba aad bazala mosika (babebisama) bato ya Hûd?
Tefsiret në gjuhën arabe:
۞ وَإِلَىٰ ثَمُودَ أَخَاهُمۡ صَٰلِحٗاۚ قَالَ يَٰقَوۡمِ ٱعۡبُدُواْ ٱللَّهَ مَا لَكُم مِّنۡ إِلَٰهٍ غَيۡرُهُۥۖ هُوَ أَنشَأَكُم مِّنَ ٱلۡأَرۡضِ وَٱسۡتَعۡمَرَكُمۡ فِيهَا فَٱسۡتَغۡفِرُوهُ ثُمَّ تُوبُوٓاْ إِلَيۡهِۚ إِنَّ رَبِّي قَرِيبٞ مُّجِيبٞ
61. Mpe (totindaki) epai ya bato ya Thamûd, ndeko wa bango Swâlih. Alobaki: Oh bato bangai! Bobondela Allah. Bozali na nzambe mosusu te ya kobondela na bosóló sé ye. Ye nde akela bino kowuta na mabele, mpe akomisi bino ebele o kati na yango. Bosenga ye bolimbisi, sima botubela epai naye. Ya soló, Nkolo wa ngai azalaka pene тропа koyanola. (ba mbela)
Tefsiret në gjuhën arabe:
قَالُواْ يَٰصَٰلِحُ قَدۡ كُنتَ فِينَا مَرۡجُوّٗا قَبۡلَ هَٰذَآۖ أَتَنۡهَىٰنَآ أَن نَّعۡبُدَ مَا يَعۡبُدُ ءَابَآؤُنَا وَإِنَّنَا لَفِي شَكّٖ مِّمَّا تَدۡعُونَآ إِلَيۡهِ مُرِيبٖ
62. Balobaki: Eh Swâlih! Yo ozalaki elikia na biso liboso. Okomi kopekisa biso tobondela banzambe ya bankoko na biso? Ya sólo penza, tozali na tembe mingi тропа maye ozali kobenga biso na yango.
Tefsiret në gjuhën arabe:
قَالَ يَٰقَوۡمِ أَرَءَيۡتُمۡ إِن كُنتُ عَلَىٰ بَيِّنَةٖ مِّن رَّبِّي وَءَاتَىٰنِي مِنۡهُ رَحۡمَةٗ فَمَن يَنصُرُنِي مِنَ ٱللَّهِ إِنۡ عَصَيۡتُهُۥۖ فَمَا تَزِيدُونَنِي غَيۡرَ تَخۡسِيرٖ
63. Alobi: Oh bato bangai! Bomoni boni soki nazali na elembo kowuta epai ya Nkolo wa ngai mpe apeși ngai ngolu kowuta na yango? Nani oyo akosunga ngai epai ya Allah soki na zangi kotosa ye (Allah)? Noki bokobakisela ngai pasi likolo ya pasi.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَيَٰقَوۡمِ هَٰذِهِۦ نَاقَةُ ٱللَّهِ لَكُمۡ ءَايَةٗۖ فَذَرُوهَا تَأۡكُلۡ فِيٓ أَرۡضِ ٱللَّهِۖ وَلَا تَمَسُّوهَا بِسُوٓءٖ فَيَأۡخُذَكُمۡ عَذَابٞ قَرِيبٞ
64. Mpe Oh bino bato na ngai! Oyo ezali náqat ya Allah, atindeli bino lokola elembo. Botika ye aliya na mabele ya Allah, kasi bosala ye mabe moko te, noki etumbu ekozua bino na lombangu.
Tefsiret në gjuhën arabe:
فَعَقَرُوهَا فَقَالَ تَمَتَّعُواْ فِي دَارِكُمۡ ثَلَٰثَةَ أَيَّامٖۖ ذَٰلِكَ وَعۡدٌ غَيۡرُ مَكۡذُوبٖ
65. Kasi babomaki yango mpe basasi yango, mpe alobi na bango: Bokokangama kati na bandako na bino mikolo misato, wana ezali elaka ya tembe te.
Tefsiret në gjuhën arabe:
فَلَمَّا جَآءَ أَمۡرُنَا نَجَّيۡنَا صَٰلِحٗا وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ مَعَهُۥ بِرَحۡمَةٖ مِّنَّا وَمِنۡ خِزۡيِ يَوۡمِئِذٍۚ إِنَّ رَبَّكَ هُوَ ٱلۡقَوِيُّ ٱلۡعَزِيزُ
66. Mpe tango mitindo mia biso mikweyaki, tobikisaki Swálih na baye bandimaki elongo naye na mawa ma biso mokolo ya bozangi lokumu. Ya soló, Nkolo wayo azali na bokasi atonda nguya.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَأَخَذَ ٱلَّذِينَ ظَلَمُواْ ٱلصَّيۡحَةُ فَأَصۡبَحُواْ فِي دِيَٰرِهِمۡ جَٰثِمِينَ
67. Mpe bogangi bwa etumbu bozuaki babubi, mpe bakomaki bibembe o kati ya ba ndako bia bango.
Tefsiret në gjuhën arabe:
كَأَن لَّمۡ يَغۡنَوۡاْ فِيهَآۗ أَلَآ إِنَّ ثَمُودَاْ كَفَرُواْ رَبَّهُمۡۗ أَلَا بُعۡدٗا لِّثَمُودَ
68. Lokola bazalaki na nkembo liboso te okati na yango. Ya soló, bato ya Thamúd bapengwaki na Nkolo wa bango kasi bato ya Thamûd babebisamaki.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَلَقَدۡ جَآءَتۡ رُسُلُنَآ إِبۡرَٰهِيمَ بِٱلۡبُشۡرَىٰ قَالُواْ سَلَٰمٗاۖ قَالَ سَلَٰمٞۖ فَمَا لَبِثَ أَن جَآءَ بِعِجۡلٍ حَنِيذٖ
69. Мре ya soló, batindami(1) na biso bamemelaki Ibrâhîm sango elamu(2), tango bakutanaki naye balobi: Kimia(3) ezala nayo! Alobaki été: Kimia na bino mpe lokola! Mpe ewumelaki te abonzelaki bango libonza lia nyama. (ngombe) ya kotumba.
1 Batindami: Ba anzelu.
2 Sango elamu: Mbotama ya Is’háq.
3 Kimia: Mbote ya bamizilima.
Tefsiret në gjuhën arabe:
فَلَمَّا رَءَآ أَيۡدِيَهُمۡ لَا تَصِلُ إِلَيۡهِ نَكِرَهُمۡ وَأَوۡجَسَ مِنۡهُمۡ خِيفَةٗۚ قَالُواْ لَا تَخَفۡ إِنَّآ أُرۡسِلۡنَآ إِلَىٰ قَوۡمِ لُوطٖ
70. Mpe tango amoni ete bazali kozua te, abangi, balobi: Kobanga te. Ya sólo, totindami epai ya bato ba Loth.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَٱمۡرَأَتُهُۥ قَآئِمَةٞ فَضَحِكَتۡ فَبَشَّرۡنَٰهَا بِإِسۡحَٰقَ وَمِن وَرَآءِ إِسۡحَٰقَ يَعۡقُوبَ
71. Mwasi waye azalaki ya kotelema, (sarah) mpe aseki, mpe topesaki ye sango elamu ya kobotama ya Is’háq mpe sima naye Ya’qüb.
Tefsiret në gjuhën arabe:
قَالَتۡ يَٰوَيۡلَتَىٰٓ ءَأَلِدُ وَأَنَا۠ عَجُوزٞ وَهَٰذَا بَعۡلِي شَيۡخًاۖ إِنَّ هَٰذَا لَشَيۡءٌ عَجِيبٞ
72. Alobi: Oh mawa na ngai! Nabota mpe ngai nakomi mobange, mpe mobali wa ngai oyo mpe mobange. Ya soló oyo ezali (likambo) ya kokamwisa.
Tefsiret në gjuhën arabe:
قَالُوٓاْ أَتَعۡجَبِينَ مِنۡ أَمۡرِ ٱللَّهِۖ رَحۡمَتُ ٱللَّهِ وَبَرَكَٰتُهُۥ عَلَيۡكُمۡ أَهۡلَ ٱلۡبَيۡتِۚ إِنَّهُۥ حَمِيدٞ مَّجِيدٞ
73. Balobi: Ozali kokamwa na mikano mia Allah? Tika été mawa mpe mapamboli ya Allah ezala likolo na bino bato ya libota oyo. Pamba te ya sólo, Allah akumama mpe asanzolama na lokumu mingi.
Tefsiret në gjuhën arabe:
فَلَمَّا ذَهَبَ عَنۡ إِبۡرَٰهِيمَ ٱلرَّوۡعُ وَجَآءَتۡهُ ٱلۡبُشۡرَىٰ يُجَٰدِلُنَا فِي قَوۡمِ لُوطٍ
74. Mpe tango bobangi esili Ibrâhîm, sango elamu eyeli ye ete azali kosolola na biso тропа likambo lia bato ba Loth.
Tefsiret në gjuhën arabe:
إِنَّ إِبۡرَٰهِيمَ لَحَلِيمٌ أَوَّٰهٞ مُّنِيبٞ
75. Ya soló, Ibrâhîm azalaki moto malamu, azalaki kozonga mpe kotubela mingi epai ya Nkolo naye.
Tefsiret në gjuhën arabe:
يَٰٓإِبۡرَٰهِيمُ أَعۡرِضۡ عَنۡ هَٰذَآۖ إِنَّهُۥ قَدۡ جَآءَ أَمۡرُ رَبِّكَۖ وَإِنَّهُمۡ ءَاتِيهِمۡ عَذَابٌ غَيۡرُ مَرۡدُودٖ
76. Eh Ibrâhîm! Mitiya mosika na oyo. Mpo ya soló, mitindo mia Nkolo wayo misili koya. Мре ya sólo, etumbu ezongisama te ekozua bango.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَلَمَّا جَآءَتۡ رُسُلُنَا لُوطٗا سِيٓءَ بِهِمۡ وَضَاقَ بِهِمۡ ذَرۡعٗا وَقَالَ هَٰذَا يَوۡمٌ عَصِيبٞ
77. Mpe tango batindami(1) na biso bakomaki epai ya Loth, ayokaki pasi mpe mawa тропа bango. Alobaki: Lelo nde mokolo mwa etumbu ya somo.
1 Batindami: Ba anzelu.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَجَآءَهُۥ قَوۡمُهُۥ يُهۡرَعُونَ إِلَيۡهِ وَمِن قَبۡلُ كَانُواْ يَعۡمَلُونَ ٱلسَّيِّـَٔاتِۚ قَالَ يَٰقَوۡمِ هَٰٓؤُلَآءِ بَنَاتِي هُنَّ أَطۡهَرُ لَكُمۡۖ فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَلَا تُخۡزُونِ فِي ضَيۡفِيٓۖ أَلَيۡسَ مِنكُمۡ رَجُلٞ رَّشِيدٞ
78. Mpe bato baye bayeli ye mbangu. Mpe liboso bazalaki kosala makambo mabe, mpe alobaki na bato naye été: Oh bato bangai! Bótala bana ba ngai ya basi bango oyo, bazali peto mpe malamu тропа bino. Bobanga Allah kasi boyokisa ngai soni te тропа bapaya ba ngai. Boye bozali ata na moto moko ya malamu o kati na bino te?
Tefsiret në gjuhën arabe:
قَالُواْ لَقَدۡ عَلِمۡتَ مَا لَنَا فِي بَنَاتِكَ مِنۡ حَقّٖ وَإِنَّكَ لَتَعۡلَمُ مَا نُرِيدُ
79. Bayanoli: Oyebi malamu penza ete tozali na posa ya bana nayo ya basi te, (bango bazalaki kolinga kozua basi na mboka ena te) ya soló, oyebi eloko nini tozali kolinga.
Tefsiret në gjuhën arabe:
قَالَ لَوۡ أَنَّ لِي بِكُمۡ قُوَّةً أَوۡ ءَاوِيٓ إِلَىٰ رُكۡنٖ شَدِيدٖ
80. Alobaki na bango été: Ah soki nazalaki na makasi ya kotelemela bino, to mpe nazua ata lisungi mosusu ya makasi koleka!
Tefsiret në gjuhën arabe:
قَالُواْ يَٰلُوطُ إِنَّا رُسُلُ رَبِّكَ لَن يَصِلُوٓاْ إِلَيۡكَۖ فَأَسۡرِ بِأَهۡلِكَ بِقِطۡعٖ مِّنَ ٱلَّيۡلِ وَلَا يَلۡتَفِتۡ مِنكُمۡ أَحَدٌ إِلَّا ٱمۡرَأَتَكَۖ إِنَّهُۥ مُصِيبُهَا مَآ أَصَابَهُمۡۚ إِنَّ مَوۡعِدَهُمُ ٱلصُّبۡحُۚ أَلَيۡسَ ٱلصُّبۡحُ بِقَرِيبٖ
81. (Bapaya) balobi: Eh Loth! Ya sólo, tozali batindami ya Nkolo wa yo. Bakosala yo eloko te, kende noki na libota lia yo okati na butu. Мре токо te kati na bino abongola elongi sima te, longola sé mwasi wayo (oyo azangaki kotosa), mpe akozua oyo ekozua basusu. Solo elaka na bango ekozala na ntongo, boye ntongo ezali pene te?
Tefsiret në gjuhën arabe:
فَلَمَّا جَآءَ أَمۡرُنَا جَعَلۡنَا عَٰلِيَهَا سَافِلَهَا وَأَمۡطَرۡنَا عَلَيۡهَا حِجَارَةٗ مِّن سِجِّيلٖ مَّنضُودٖ
82. Mpe tango motindo mwa biso mokweyaki, tobalusaki (mboka yango) na ba ngambu inso, mpe tobebisaki yango, mbula ya mabanga esangani na mabele ya moto ekitelaki bango na bango:
Tefsiret në gjuhën arabe:
مُّسَوَّمَةً عِندَ رَبِّكَۖ وَمَا هِيَ مِنَ ٱلظَّٰلِمِينَ بِبَعِيدٖ
83. (Mabanga yango) ezalaki na bilembo yango kowuta epai ya Nkolo nayo, mpe yango ezalaki mosika te na bato mabe (babubi).
Tefsiret në gjuhën arabe:
۞ وَإِلَىٰ مَدۡيَنَ أَخَاهُمۡ شُعَيۡبٗاۚ قَالَ يَٰقَوۡمِ ٱعۡبُدُواْ ٱللَّهَ مَا لَكُم مِّنۡ إِلَٰهٍ غَيۡرُهُۥۖ وَلَا تَنقُصُواْ ٱلۡمِكۡيَالَ وَٱلۡمِيزَانَۖ إِنِّيٓ أَرَىٰكُم بِخَيۡرٖ وَإِنِّيٓ أَخَافُ عَلَيۡكُمۡ عَذَابَ يَوۡمٖ مُّحِيطٖ
84. Mpe (totindaki) epai ya bato ya mad’yan, ndeko wa bango Shuaïb, alobaki na bango été: Oh bato na ngai! Bobondela Allah oyo bozali na nzambe mosusu te sé ye. Мре bokutola emekelo, na kilo te. Ya soló, na moni bino na bomengo, mpe ya sólo, nazali kobangela bino etumbu o mokolo oyo ekozinga biloko binso.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَيَٰقَوۡمِ أَوۡفُواْ ٱلۡمِكۡيَالَ وَٱلۡمِيزَانَ بِٱلۡقِسۡطِۖ وَلَا تَبۡخَسُواْ ٱلنَّاسَ أَشۡيَآءَهُمۡ وَلَا تَعۡثَوۡاْ فِي ٱلۡأَرۡضِ مُفۡسِدِينَ
85. Oh bato bangai! Bomeka bimekelo na bakilo na bosembo, kasi kokutolela bato bimekelo bia bango te, mpe bosala mabe o kati ya mokili te.
Tefsiret në gjuhën arabe:
بَقِيَّتُ ٱللَّهِ خَيۡرٞ لَّكُمۡ إِن كُنتُم مُّؤۡمِنِينَۚ وَمَآ أَنَا۠ عَلَيۡكُم بِحَفِيظٖ
86. Bomengo ya libela epai ya Allah ezali malamu тропа bino soki ya sólo bozali bandimi, mpe nazali mokengeli likolo na bino te.
Tefsiret në gjuhën arabe:
قَالُواْ يَٰشُعَيۡبُ أَصَلَوٰتُكَ تَأۡمُرُكَ أَن نَّتۡرُكَ مَا يَعۡبُدُ ءَابَآؤُنَآ أَوۡ أَن نَّفۡعَلَ فِيٓ أَمۡوَٰلِنَا مَا نَشَٰٓؤُاْۖ إِنَّكَ لَأَنتَ ٱلۡحَلِيمُ ٱلرَّشِيدُ
87. Balobi naye été: Eh Shuaíb! Losambo nayo nde ezali kotinda yo mpo totika kobondela biye bankoko na biso babondelaki to epekisa biso ete tosalela bozui na biso lolenge tolingi? Ya sólo penza, ozali moto malamu ya bosóló koleka?
Tefsiret në gjuhën arabe:
قَالَ يَٰقَوۡمِ أَرَءَيۡتُمۡ إِن كُنتُ عَلَىٰ بَيِّنَةٖ مِّن رَّبِّي وَرَزَقَنِي مِنۡهُ رِزۡقًا حَسَنٗاۚ وَمَآ أُرِيدُ أَنۡ أُخَالِفَكُمۡ إِلَىٰ مَآ أَنۡهَىٰكُمۡ عَنۡهُۚ إِنۡ أُرِيدُ إِلَّا ٱلۡإِصۡلَٰحَ مَا ٱسۡتَطَعۡتُۚ وَمَا تَوۡفِيقِيٓ إِلَّا بِٱللَّهِۚ عَلَيۡهِ تَوَكَّلۡتُ وَإِلَيۡهِ أُنِيبُ
88. Alobaki été: Oh bato ba ngai! В omoni ndenge nini soki nazali na elembo ya bosóló kowuta epai ya Nkolo wa ngai, mpe apesi ngai bozui bolamu kowuta epai naye? Mpe mposa na ngai ezali te été na zala na bino na bokeseni na maye nazali kopekisa bino. Kasi nazali kolinga sé mbongwana ya malamu na ndenge ya bokoki na ngai. Kasi elonga na ngai ekowuta sé epai na Allah. Nati elikia na ngai epai naye mpe epai naye nazali kotubela.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَيَٰقَوۡمِ لَا يَجۡرِمَنَّكُمۡ شِقَاقِيٓ أَن يُصِيبَكُم مِّثۡلُ مَآ أَصَابَ قَوۡمَ نُوحٍ أَوۡ قَوۡمَ هُودٍ أَوۡ قَوۡمَ صَٰلِحٖۚ وَمَا قَوۡمُ لُوطٖ مِّنكُم بِبَعِيدٖ
89. Mpe oh bato na ngai! В órnemela ngai bokeseni na kotungisa ngai te, noki etumbu ekozua bino, ndenge ezuaki bato ba Núh na bato ba Hûd na bato ba Swálih, mpe (ndakisa) ya bato ba Loth ezali mosika te тропа bino.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَٱسۡتَغۡفِرُواْ رَبَّكُمۡ ثُمَّ تُوبُوٓاْ إِلَيۡهِۚ إِنَّ رَبِّي رَحِيمٞ وَدُودٞ
90. Mpe bosenga bolimbisi epai ya Nkolo wa bino mpe botubela epai naye. Ya soló, Nkolo wa ngai azali Nkolo wa mawa atonda bolingo.
Tefsiret në gjuhën arabe:
قَالُواْ يَٰشُعَيۡبُ مَا نَفۡقَهُ كَثِيرٗا مِّمَّا تَقُولُ وَإِنَّا لَنَرَىٰكَ فِينَا ضَعِيفٗاۖ وَلَوۡلَا رَهۡطُكَ لَرَجَمۡنَٰكَۖ وَمَآ أَنتَ عَلَيۡنَا بِعَزِيزٖ
91. Balobi: Eh Shua’íb! Tozali kososola te ebele ya maye ozali koloba, mpe tozali kornona yo ozali sé motawu o kati na biso soki ezalaki libota nayo te, tolingaki kosala yo mabe. (kobamba yo mabanga) mpe ozali na nguya moko te likolo na biso.
Tefsiret në gjuhën arabe:
قَالَ يَٰقَوۡمِ أَرَهۡطِيٓ أَعَزُّ عَلَيۡكُم مِّنَ ٱللَّهِ وَٱتَّخَذۡتُمُوهُ وَرَآءَكُمۡ ظِهۡرِيًّاۖ إِنَّ رَبِّي بِمَا تَعۡمَلُونَ مُحِيطٞ
92. Alobaki: Oh bato ya mboka na ngai! В ozali kornona ete libota na ngai ezali na lokumu ераї na bino koleka Allah, тропа maye bozali kopesa mikongo? Ya sólo, Nkolo wa ngai (ayebi) manso bozali kosala.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَيَٰقَوۡمِ ٱعۡمَلُواْ عَلَىٰ مَكَانَتِكُمۡ إِنِّي عَٰمِلٞۖ سَوۡفَ تَعۡلَمُونَ مَن يَأۡتِيهِ عَذَابٞ يُخۡزِيهِ وَمَنۡ هُوَ كَٰذِبٞۖ وَٱرۡتَقِبُوٓاْ إِنِّي مَعَكُمۡ رَقِيبٞ
93. Mpe oh bato ba ngai! Bosala maye bokolinga, ngai mpe nakosala. Kala te bokoyebaka nani oyo etumbu ekozua ye, oyo ekopesa ye soni mpe nani azalaki mobuki lokuta. Bozela, (eloko nini ekosalema) ngai mpe nazali kozela elongo na bino.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَلَمَّا جَآءَ أَمۡرُنَا نَجَّيۡنَا شُعَيۡبٗا وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ مَعَهُۥ بِرَحۡمَةٖ مِّنَّا وَأَخَذَتِ ٱلَّذِينَ ظَلَمُواْ ٱلصَّيۡحَةُ فَأَصۡبَحُواْ فِي دِيَٰرِهِمۡ جَٰثِمِينَ
94. Мре tango mobeko mwa biso moyaki, tobikisaki Shuaib na baye bandimaki elongo naye, na mawa kowuta epai na biso, mpe babubi bazuaki bogangi (bwa etumbu) mpe bakomaki bibembe o kati na bandako bia bango,
Tefsiret në gjuhën arabe:
كَأَن لَّمۡ يَغۡنَوۡاْ فِيهَآۗ أَلَا بُعۡدٗا لِّمَدۡيَنَ كَمَا بَعِدَتۡ ثَمُودُ
95. Lokola bavandaki kala te kati na yango, kasi ba mad’yan bazalaki mosika, ndenge moko ba Thamúd bazalaki mosika na ngolu (ya Allah).
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَلَقَدۡ أَرۡسَلۡنَا مُوسَىٰ بِـَٔايَٰتِنَا وَسُلۡطَٰنٖ مُّبِينٍ
96. Мре tosilaki solo kotinda Müssa na makamwisi ma biso na bokonzi bwa polele,
Tefsiret në gjuhën arabe:
إِلَىٰ فِرۡعَوۡنَ وَمَلَإِيْهِۦ فَٱتَّبَعُوٓاْ أَمۡرَ فِرۡعَوۡنَۖ وَمَآ أَمۡرُ فِرۡعَوۡنَ بِرَشِيدٖ
97. Epai na falo na bankumu ba ye. Kasi balandaki makambo ma falo, kasi makambo ma falo mazalaki na bokambi te.
Tefsiret në gjuhën arabe:
يَقۡدُمُ قَوۡمَهُۥ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ فَأَوۡرَدَهُمُ ٱلنَّارَۖ وَبِئۡسَ ٱلۡوِرۡدُ ٱلۡمَوۡرُودُ
98. Akozalaka liboso lia bato baye o mokolo mwa suka, mpe akomemaka bango na moto. Nde oyo suka ya liziba ya mabe.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَأُتۡبِعُواْ فِي هَٰذِهِۦ لَعۡنَةٗ وَيَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِۚ بِئۡسَ ٱلرِّفۡدُ ٱلۡمَرۡفُودُ
99. Mpe botutu ekolanda bango awa na nsé, mpe na mokolo ya suka lokola. Mpe oyo likabo mabe bakopesama!
Tefsiret në gjuhën arabe:
ذَٰلِكَ مِنۡ أَنۢبَآءِ ٱلۡقُرَىٰ نَقُصُّهُۥ عَلَيۡكَۖ مِنۡهَا قَآئِمٞ وَحَصِيدٞ
100. Wana nde ba sango ya bituka tozali kopesa yo, (Muhammad), kati na yango misusu mizali kino moyi mwa lelo, mpe misusu misilaki kolimwa kala.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَمَا ظَلَمۡنَٰهُمۡ وَلَٰكِن ظَلَمُوٓاْ أَنفُسَهُمۡۖ فَمَآ أَغۡنَتۡ عَنۡهُمۡ ءَالِهَتُهُمُ ٱلَّتِي يَدۡعُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ مِن شَيۡءٖ لَّمَّا جَآءَ أَمۡرُ رَبِّكَۖ وَمَا زَادُوهُمۡ غَيۡرَ تَتۡبِيبٖ
101. Tobubaki bango te kasi bango moko bamibubaki. Mpona banzambe na bango baye bazalaki kobondela batiki Allah, esalisaki bango na eloko te tango mobeko mwa Nkolo wayo moyaki, kasi ebakiselaki bango sé bozangi.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَكَذَٰلِكَ أَخۡذُ رَبِّكَ إِذَآ أَخَذَ ٱلۡقُرَىٰ وَهِيَ ظَٰلِمَةٌۚ إِنَّ أَخۡذَهُۥٓ أَلِيمٞ شَدِيدٌ
102. Ndenge wana nde Nkolo wayo asalaka, soki alingi kobeta mboka ya babubi. Ya soló, etumbu naye ezalaka mpasi mpe makasi.
Tefsiret në gjuhën arabe:
إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةٗ لِّمَنۡ خَافَ عَذَابَ ٱلۡأٓخِرَةِۚ ذَٰلِكَ يَوۡمٞ مَّجۡمُوعٞ لَّهُ ٱلنَّاسُ وَذَٰلِكَ يَوۡمٞ مَّشۡهُودٞ
103. Wana ezali solo elembo na oyo akobanga etumbu ya mokolo ya suka. Mokolo moye bato bakosanganaka, mpe mokolo wana nde ekotatolama.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَمَا نُؤَخِّرُهُۥٓ إِلَّا لِأَجَلٖ مَّعۡدُودٖ
104. Mpe tokozelisaka yango te, sé na tango eye etiyamaki.
Tefsiret në gjuhën arabe:
يَوۡمَ يَأۡتِ لَا تَكَلَّمُ نَفۡسٌ إِلَّا بِإِذۡنِهِۦۚ فَمِنۡهُمۡ شَقِيّٞ وَسَعِيدٞ
105. Mokolo moye ata molimo moko te akolobaka, sé na ndingisa naye kati na bango bakolelaka mpe basusu bakosepelaka.
Tefsiret në gjuhën arabe:
فَأَمَّا ٱلَّذِينَ شَقُواْ فَفِي ٱلنَّارِ لَهُمۡ فِيهَا زَفِيرٞ وَشَهِيقٌ
106. Soki тропа bato ya mpasi, bakozala na moto wapi epai bakonyokwama mpe bakolela makasi,
Tefsiret në gjuhën arabe:
خَٰلِدِينَ فِيهَا مَا دَامَتِ ٱلسَّمَٰوَٰتُ وَٱلۡأَرۡضُ إِلَّا مَا شَآءَ رَبُّكَۚ إِنَّ رَبَّكَ فَعَّالٞ لِّمَا يُرِيدُ
107. Bakozalaka kati na yango libela, ndenge likolo na mabele ekowumela, sé kaka oyo Nkolo nayo alingi.(1) ya soló, Nkolo wayo asalaka maye alingi.
1 Kaka oyo Nkolo nayo alingi: Allah akobimisa na lifelo bandimi oyo bakufaki na masumu mosusu kasi basangisaki Allah te na binzambi nzambi.
Tefsiret në gjuhën arabe:
۞ وَأَمَّا ٱلَّذِينَ سُعِدُواْ فَفِي ٱلۡجَنَّةِ خَٰلِدِينَ فِيهَا مَا دَامَتِ ٱلسَّمَٰوَٰتُ وَٱلۡأَرۡضُ إِلَّا مَا شَآءَ رَبُّكَۖ عَطَآءً غَيۡرَ مَجۡذُوذٖ
108. Mpe baye bakozala na bisengo, bakozalaka o kati ya lola libela, ndenge bowumeli ya likolo na mabele sé kaka Nkolo wayo akolinga lolenge mosusu, likabo oyo ezali kokatana te.
Tefsiret në gjuhën arabe:
فَلَا تَكُ فِي مِرۡيَةٖ مِّمَّا يَعۡبُدُ هَٰٓؤُلَآءِۚ مَا يَعۡبُدُونَ إِلَّا كَمَا يَعۡبُدُ ءَابَآؤُهُم مِّن قَبۡلُۚ وَإِنَّا لَمُوَفُّوهُمۡ نَصِيبَهُمۡ غَيۡرَ مَنقُوصٖ
109. Mpe kozala na tembe te тропа maye bazali kobondela. Bazali sé kobondela maye bankoko ba bango babondelaki liboso. Mpe ya sólo, tokopesaka bango manso maye masengeli тропа bango, kasi makokutolama te.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَلَقَدۡ ءَاتَيۡنَا مُوسَى ٱلۡكِتَٰبَ فَٱخۡتُلِفَ فِيهِۚ وَلَوۡلَا كَلِمَةٞ سَبَقَتۡ مِن رَّبِّكَ لَقُضِيَ بَيۡنَهُمۡۚ وَإِنَّهُمۡ لَفِي شَكّٖ مِّنۡهُ مُرِيبٖ
110. Mpe tosilaki solo kopesa Mûssa buku, kasi bakabwanaki тропа yango. Soki liloba litiyamaka liboso kowuta epai ya Nkolo wa yo te, elingaki kokatama kati kati na bango. Mpe ya sólo bango bazalaki na tembe o kati na yango.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَإِنَّ كُلّٗا لَّمَّا لَيُوَفِّيَنَّهُمۡ رَبُّكَ أَعۡمَٰلَهُمۡۚ إِنَّهُۥ بِمَا يَعۡمَلُونَ خَبِيرٞ
111. Mpe ya soló Nkolo wayo akofutaka bango banso engebene na misala mia bango. Ya soló, azali moyebi na maye bazalaki kosala.
Tefsiret në gjuhën arabe:
فَٱسۡتَقِمۡ كَمَآ أُمِرۡتَ وَمَن تَابَ مَعَكَ وَلَا تَطۡغَوۡاْۚ إِنَّهُۥ بِمَا تَعۡمَلُونَ بَصِيرٞ
112. Misembola o nzela ya semba na ndenge batindaki yo elongo na baye batubeli (epai ya Allah), kasi kotomboko te, ya sólo ye amonaka maye bosalaka.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَلَا تَرۡكَنُوٓاْ إِلَى ٱلَّذِينَ ظَلَمُواْ فَتَمَسَّكُمُ ٱلنَّارُ وَمَا لَكُم مِّن دُونِ ٱللَّهِ مِنۡ أَوۡلِيَآءَ ثُمَّ لَا تُنصَرُونَ
113. Kasi bomipesa epai ya babubi te, soki te moto mokozua bino. Bozali na basungi basusu te, sé Allah ye mei, soki te bokosalisamaka te.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَأَقِمِ ٱلصَّلَوٰةَ طَرَفَيِ ٱلنَّهَارِ وَزُلَفٗا مِّنَ ٱلَّيۡلِۚ إِنَّ ٱلۡحَسَنَٰتِ يُذۡهِبۡنَ ٱلسَّيِّـَٔاتِۚ ذَٰلِكَ ذِكۡرَىٰ لِلذَّٰكِرِينَ
114. Mpe telemisa losambo na ebandeli ya moyi mpe nasúka na ntango moko ya butu. Ya sólo, misala milamu milongolaka miye ya mabe. Wana ezali bokundoli тропа baye bazali kokanisa.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَٱصۡبِرۡ فَإِنَّ ٱللَّهَ لَا يُضِيعُ أَجۡرَ ٱلۡمُحۡسِنِينَ
115. Kanga motema, ya sólo, Allah abungisaka lifuta lia babongisi te.
Tefsiret në gjuhën arabe:
فَلَوۡلَا كَانَ مِنَ ٱلۡقُرُونِ مِن قَبۡلِكُمۡ أُوْلُواْ بَقِيَّةٖ يَنۡهَوۡنَ عَنِ ٱلۡفَسَادِ فِي ٱلۡأَرۡضِ إِلَّا قَلِيلٗا مِّمَّنۡ أَنجَيۡنَا مِنۡهُمۡۗ وَٱتَّبَعَ ٱلَّذِينَ ظَلَمُواْ مَآ أُتۡرِفُواْ فِيهِ وَكَانُواْ مُجۡرِمِينَ
116. Soki ya sólo, bato ba kala bazalaka liboso na bino, baye bakoki kopekisa kosala mabe, kati na mokili, bazalaki sé токе baye tobikisaki o kati na bango? Kasi babubi balandaki mabe mpe balekisaka ndelo o bisika bazalaki, mpe bazalaki bato mabe (babomi).
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَمَا كَانَ رَبُّكَ لِيُهۡلِكَ ٱلۡقُرَىٰ بِظُلۡمٖ وَأَهۡلُهَا مُصۡلِحُونَ
117. Mpe Nkolo wayo akoki kobebisa mboka moko te, soki bato na yango bazali babongisi.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَلَوۡ شَآءَ رَبُّكَ لَجَعَلَ ٱلنَّاسَ أُمَّةٗ وَٰحِدَةٗۖ وَلَا يَزَالُونَ مُخۡتَلِفِينَ
118. Мре soki Nkolo wayo alingaki, nde atiaki bato bazala umma(1) moko. Kasi balingaki sé kokabuana.
1 Umma: Lingomba, bótala suratu Al-Baqarah 128.
Tefsiret në gjuhën arabe:
إِلَّا مَن رَّحِمَ رَبُّكَۚ وَلِذَٰلِكَ خَلَقَهُمۡۗ وَتَمَّتۡ كَلِمَةُ رَبِّكَ لَأَمۡلَأَنَّ جَهَنَّمَ مِنَ ٱلۡجِنَّةِ وَٱلنَّاسِ أَجۡمَعِينَ
119. Longola sé baye Nkolo nayo akoyokela mawa. Mpo na yango wana nde akelaki bango. Мре liloba lia Nkolo wayo likoki: Nakotondisa lifelo na bilima (badjini) na bato banso.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَكُلّٗا نَّقُصُّ عَلَيۡكَ مِنۡ أَنۢبَآءِ ٱلرُّسُلِ مَا نُثَبِّتُ بِهِۦ فُؤَادَكَۚ وَجَآءَكَ فِي هَٰذِهِ ٱلۡحَقُّ وَمَوۡعِظَةٞ وَذِكۡرَىٰ لِلۡمُؤۡمِنِينَ
120. Mpe manso tozali koyebisa тропа makomi ma batindami, mazali тропа kolendisa motema mwa yo. Nakati na yango solo esili kokomela yo mpe mateya na bokundoli тропа bandimi.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَقُل لِّلَّذِينَ لَا يُؤۡمِنُونَ ٱعۡمَلُواْ عَلَىٰ مَكَانَتِكُمۡ إِنَّا عَٰمِلُونَ
121. Mpe loba na baye bazali koboya kondima ete: Bosala ndenge bolingi, biso mpe tozali kosala.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَٱنتَظِرُوٓاْ إِنَّا مُنتَظِرُونَ
122. Mpe bozela, ya soló, tozali kozela lokola.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَلِلَّهِ غَيۡبُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَإِلَيۡهِ يُرۡجَعُ ٱلۡأَمۡرُ كُلُّهُۥ فَٱعۡبُدۡهُ وَتَوَكَّلۡ عَلَيۡهِۚ وَمَا رَبُّكَ بِغَٰفِلٍ عَمَّا تَعۡمَلُونَ
123. Mpe Allah ayebaka mabombami manso maye mazali o likolo na o mabele, mpe epai naye nde makambo manso makozongaka. Bondela ye mpe mipesa naye, kasi Nkolo wayo azangaka koyeba te maye bozali kosala.
Tefsiret në gjuhën arabe:
 
Përkthimi i kuptimeve Surja: Suretu Hud
Përmbajtja e sureve Numri i faqes
 
Përkthimi i kuptimeve të Kuranit Fisnik - الترجمة اللينغالا - Përmbajtja e përkthimeve

ترجمة معاني القرآن الكريم الى اللغة اللينغالا، ترجمها زكريا محمد بالنغوغو.

Mbyll