Check out the new design

Përkthimi i kuptimeve të Kuranit Fisnik - Përkthimi lingalisht - Muhamed Balngugu * - Përmbajtja e përkthimeve

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Përkthimi i kuptimeve Surja: El Bekare   Ajeti:
أَوَلَا يَعۡلَمُونَ أَنَّ ٱللَّهَ يَعۡلَمُ مَا يُسِرُّونَ وَمَا يُعۡلِنُونَ
Boye bazali koyeba te, ya sôló Allah ayebi maye bazali kobomba mpe maye bazali kobimisa polele?
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَمِنۡهُمۡ أُمِّيُّونَ لَا يَعۡلَمُونَ ٱلۡكِتَٰبَ إِلَّآ أَمَانِيَّ وَإِنۡ هُمۡ إِلَّا يَظُنُّونَ
Mpe na kati na bango, ezali na baye bayebi kotanga te mpe kokoma te, mpe bayebi buku te, bobele komizwa, mpe bango bazali bobele na makanisi.
Tefsiret në gjuhën arabe:
فَوَيۡلٞ لِّلَّذِينَ يَكۡتُبُونَ ٱلۡكِتَٰبَ بِأَيۡدِيهِمۡ ثُمَّ يَقُولُونَ هَٰذَا مِنۡ عِندِ ٱللَّهِ لِيَشۡتَرُواْ بِهِۦ ثَمَنٗا قَلِيلٗاۖ فَوَيۡلٞ لَّهُم مِّمَّا كَتَبَتۡ أَيۡدِيهِمۡ وَوَيۡلٞ لَّهُم مِّمَّا يَكۡسِبُونَ
Mpe mawa mpona ba oyo bazali kokoma buku bobele na maboko na bango, sima bazali koloba ete: Oyo ewuti epai ya Allah mpe bazali koteka yango na ntalo moke, mpe mawa na bango na maye maboko na bango mazali kokoma, mpe mawa na bango na maye bazali kozua lokola mbano.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَقَالُواْ لَن تَمَسَّنَا ٱلنَّارُ إِلَّآ أَيَّامٗا مَّعۡدُودَةٗۚ قُلۡ أَتَّخَذۡتُمۡ عِندَ ٱللَّهِ عَهۡدٗا فَلَن يُخۡلِفَ ٱللَّهُ عَهۡدَهُۥٓۖ أَمۡ تَقُولُونَ عَلَى ٱللَّهِ مَا لَا تَعۡلَمُونَ
Mpe balobaki móto ekosimba biso te bobele mikolo miye miyebani. Loba: Boye bino bozuaki elaka epai ya Allah, mpe Allah azangisaka te na elaka naye? To boye bozali koloba likolo ya Allah maye boyebi te?
Tefsiret në gjuhën arabe:
بَلَىٰۚ مَن كَسَبَ سَيِّئَةٗ وَأَحَٰطَتۡ بِهِۦ خَطِيٓـَٔتُهُۥ فَأُوْلَٰٓئِكَ أَصۡحَٰبُ ٱلنَّارِۖ هُمۡ فِيهَا خَٰلِدُونَ
Kasi, moto oyo asalaki mabe mpe masumu naye ezingi ye, mpe baye wana bakozala bato ya móto libela na libela.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ أُوْلَٰٓئِكَ أَصۡحَٰبُ ٱلۡجَنَّةِۖ هُمۡ فِيهَا خَٰلِدُونَ
Mpe ba oyo bandimaki mpe basalaki misala ya malamu, baye wana bakozala bato ya lola mpo na libela.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَإِذۡ أَخَذۡنَا مِيثَٰقَ بَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ لَا تَعۡبُدُونَ إِلَّا ٱللَّهَ وَبِٱلۡوَٰلِدَيۡنِ إِحۡسَانٗا وَذِي ٱلۡقُرۡبَىٰ وَٱلۡيَتَٰمَىٰ وَٱلۡمَسَٰكِينِ وَقُولُواْ لِلنَّاسِ حُسۡنٗا وَأَقِيمُواْ ٱلصَّلَوٰةَ وَءَاتُواْ ٱلزَّكَوٰةَ ثُمَّ تَوَلَّيۡتُمۡ إِلَّا قَلِيلٗا مِّنكُمۡ وَأَنتُم مُّعۡرِضُونَ
Mpe na tango tozuaki mikano epai ya bana ya isalayele, ete bobondela sé bobele Allah, mpe bosala bolamu na baboti na bino, mpe mabota ya pembeni, mpe bana bitike, mpe babola, mpe boloba na bato liloba ya malamu, mpe botelemisa losambo mpe bofuta zakat.[1] sima bopesaki mokongo na mibeko topesaki bino, bobele moke na kati na bino nde balandaki mibeko.
[1] Botala na mokapo 43.
Tefsiret në gjuhën arabe:
 
Përkthimi i kuptimeve Surja: El Bekare
Përmbajtja e sureve Numri i faqes
 
Përkthimi i kuptimeve të Kuranit Fisnik - Përkthimi lingalisht - Muhamed Balngugu - Përmbajtja e përkthimeve

E përktheu Zekerija Muhamed Balengogo.

Mbyll