Check out the new design

Përkthimi i kuptimeve të Kuranit Fisnik - Përkthimi lingalisht - Muhamed Balngugu * - Përmbajtja e përkthimeve

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Përkthimi i kuptimeve Surja: En Nur   Ajeti:

An-Nûr

سُورَةٌ أَنزَلۡنَٰهَا وَفَرَضۡنَٰهَا وَأَنزَلۡنَا فِيهَآ ءَايَٰتِۭ بَيِّنَٰتٖ لَّعَلَّكُمۡ تَذَكَّرُونَ
1. Oyo nde suratu (eteni) eye tokitisaki yango, mpe totiyaki ezala mobeko, mpe tokitisaki mikapo o kati na yango mizali polele mpo bokoka kokanisa.
Tefsiret në gjuhën arabe:
ٱلزَّانِيَةُ وَٱلزَّانِي فَٱجۡلِدُواْ كُلَّ وَٰحِدٖ مِّنۡهُمَا مِاْئَةَ جَلۡدَةٖۖ وَلَا تَأۡخُذۡكُم بِهِمَا رَأۡفَةٞ فِي دِينِ ٱللَّهِ إِن كُنتُمۡ تُؤۡمِنُونَ بِٱللَّهِ وَٱلۡيَوۡمِ ٱلۡأٓخِرِۖ وَلۡيَشۡهَدۡ عَذَابَهُمَا طَآئِفَةٞ مِّنَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
2. Mosali ekobo ya mwasi mpe mosali ekobo ya mobali, bobeta bango fimbo mokama moko, kasi boyokela bango mawa te tango bozali kokweisela bango mibeko mia lingomba lia Allah, soki solo bozali kondima na Allah mpe mokolo ya suka, mpe ndambu ya bandimi bazala tango etumbu ezali kopesamela bango mibale.
Tefsiret në gjuhën arabe:
ٱلزَّانِي لَا يَنكِحُ إِلَّا زَانِيَةً أَوۡ مُشۡرِكَةٗ وَٱلزَّانِيَةُ لَا يَنكِحُهَآ إِلَّا زَانٍ أَوۡ مُشۡرِكٞۚ وَحُرِّمَ ذَٰلِكَ عَلَى ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
3. Mosali ekobo ya mobali akoki kobala te sé mosali ekobo ya mwasi to mopengwi ya mwasi, mpe mosali ekobo ya mwasi akoki kobala te sé mosali ekobo ya mobali to mopengwi yamobali, kasi wana eboyami тропа bandimi.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَٱلَّذِينَ يَرۡمُونَ ٱلۡمُحۡصَنَٰتِ ثُمَّ لَمۡ يَأۡتُواْ بِأَرۡبَعَةِ شُهَدَآءَ فَٱجۡلِدُوهُمۡ ثَمَٰنِينَ جَلۡدَةٗ وَلَا تَقۡبَلُواْ لَهُمۡ شَهَٰدَةً أَبَدٗاۚ وَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡفَٰسِقُونَ
4. Мре baye bazali kofunda(1) basi ya malamu sé pamba boye, тре bayei na banzeneneke minei te, bobeta bango fimbo ntuku mwambe, mpe bondima lisusu matatoli na bango te. Mpe bango nde babebisi.
1 Kofunda: Awa elakisi: Baye oyo bazali koloba na basi ya malamu ete basali ekobo.
Tefsiret në gjuhën arabe:
إِلَّا ٱلَّذِينَ تَابُواْ مِنۢ بَعۡدِ ذَٰلِكَ وَأَصۡلَحُواْ فَإِنَّ ٱللَّهَ غَفُورٞ رَّحِيمٞ
5. Longola sé baye batubeli o sima na yango mpe babongisi. Ya soló, Allah azali molimbisi atonda ngolu.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَٱلَّذِينَ يَرۡمُونَ أَزۡوَٰجَهُمۡ وَلَمۡ يَكُن لَّهُمۡ شُهَدَآءُ إِلَّآ أَنفُسُهُمۡ فَشَهَٰدَةُ أَحَدِهِمۡ أَرۡبَعُ شَهَٰدَٰتِۭ بِٱللَّهِ إِنَّهُۥ لَمِنَ ٱلصَّٰدِقِينَ
6. Mpe тропа baye oyo bafundi(2) basi na bango bango moko, kasi bazali na banzeneneke te, esengeli na moko kati na bango kotatola mbala minei na nkombo ya Allah ete azali koloba bosembo.
2 Bafundi: Awa elakisi: Mibali oyo bazali koloba na basi na bango ete basali ekobo.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَٱلۡخَٰمِسَةُ أَنَّ لَعۡنَتَ ٱللَّهِ عَلَيۡهِ إِن كَانَ مِنَ ٱلۡكَٰذِبِينَ
7. Mpe litatoli ya mitano ekozala ete: Botutu ya Allah ekozala likolo naye soki alobaki lokuta.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَيَدۡرَؤُاْ عَنۡهَا ٱلۡعَذَابَ أَن تَشۡهَدَ أَرۡبَعَ شَهَٰدَٰتِۭ بِٱللَّهِ إِنَّهُۥ لَمِنَ ٱلۡكَٰذِبِينَ
8. Kasi etumbu ekolongua тропа ye soki atatoli mbala minei na nkombo ya Allah, ya sólo mobali naye akosi.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَٱلۡخَٰمِسَةَ أَنَّ غَضَبَ ٱللَّهِ عَلَيۡهَآ إِن كَانَ مِنَ ٱلصَّٰدِقِينَ
9. Mpe ya mbala ya mitano ezali ete: Kanda ya Allah ekozala likolo naye (mwasi) soki (mobali) azali kati ya balobi solo.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَلَوۡلَا فَضۡلُ ٱللَّهِ عَلَيۡكُمۡ وَرَحۡمَتُهُۥ وَأَنَّ ٱللَّهَ تَوَّابٌ حَكِيمٌ
10. Мре soki mpo na bolamu ya Allah na mawa naye likolo na bino te ya soló Allah azali moyambi tubela atonda bwanya.
Tefsiret në gjuhën arabe:
 
Përkthimi i kuptimeve Surja: En Nur
Përmbajtja e sureve Numri i faqes
 
Përkthimi i kuptimeve të Kuranit Fisnik - Përkthimi lingalisht - Muhamed Balngugu - Përmbajtja e përkthimeve

E përktheu Zekerija Muhamed Balengogo.

Mbyll