Check out the new design

Përkthimi i kuptimeve të Kuranit Fisnik - Përkthimi lingalisht - Muhamed Balngugu * - Përmbajtja e përkthimeve

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Përkthimi i kuptimeve Surja: En Neml   Ajeti:
أَمَّن يَبۡدَؤُاْ ٱلۡخَلۡقَ ثُمَّ يُعِيدُهُۥ وَمَن يَرۡزُقُكُم مِّنَ ٱلسَّمَآءِ وَٱلۡأَرۡضِۗ أَءِلَٰهٞ مَّعَ ٱللَّهِۚ قُلۡ هَاتُواْ بُرۡهَٰنَكُمۡ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
64. Ezali ye te oyo abandaka bokeli sima azongeli yango? Mpe nani azali koleisa bino kowuta na likolo mpe na mabele? Boye ezali na nzambe mosusu elongo na Allah? Loba: Bopesa bilembetele bia bino soki bozali na bosôló.
Tefsiret në gjuhën arabe:
قُل لَّا يَعۡلَمُ مَن فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ ٱلۡغَيۡبَ إِلَّا ٱللَّهُۚ وَمَا يَشۡعُرُونَ أَيَّانَ يُبۡعَثُونَ
65. Loba: Moko te ayebi maye mabombami kati ya likolo na mabele, ezali sé Allah. Mpe bakoyebaka mokolo bakosekwisamaka te.
Tefsiret në gjuhën arabe:
بَلِ ٱدَّٰرَكَ عِلۡمُهُمۡ فِي ٱلۡأٓخِرَةِۚ بَلۡ هُمۡ فِي شَكّٖ مِّنۡهَاۖ بَلۡ هُم مِّنۡهَا عَمُونَ
66. Kasi boyebi bwa bango na mokolo ya suka, mpe bazali na tembe тропа yango, to bazali kornona yango te.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَقَالَ ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ أَءِذَا كُنَّا تُرَٰبٗا وَءَابَآؤُنَآ أَئِنَّا لَمُخۡرَجُونَ
67. Мре bapengwi balobi: Boye tango biso na batata na biso tokokomaka putulu, tokosekwisamaka lisusu (kowuta na malita)?
Tefsiret në gjuhën arabe:
لَقَدۡ وُعِدۡنَا هَٰذَا نَحۡنُ وَءَابَآؤُنَا مِن قَبۡلُ إِنۡ هَٰذَآ إِلَّآ أَسَٰطِيرُ ٱلۡأَوَّلِينَ
68. Tosilaki kopesama elaka biso na batata na biso тропа oyo liboso, kasi ezali sé masapo ya bankoko ya kala.
Tefsiret në gjuhën arabe:
قُلۡ سِيرُواْ فِي ٱلۡأَرۡضِ فَٱنظُرُواْ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلۡمُجۡرِمِينَ
69. Loba: Botambola na mokili, bótala lolenge kani oyo esukelaka batomboki.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَلَا تَحۡزَنۡ عَلَيۡهِمۡ وَلَا تَكُن فِي ضَيۡقٖ مِّمَّا يَمۡكُرُونَ
70. Kozala na mawa na bango te , mpe koyoka mpasi te тропа mwango na bango bazali kosala.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَيَقُولُونَ مَتَىٰ هَٰذَا ٱلۡوَعۡدُ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
71. Mpe bazali koloba: Elaka yango ekozalaka tango nini, soki bozali koloba bosóló.
Tefsiret në gjuhën arabe:
قُلۡ عَسَىٰٓ أَن يَكُونَ رَدِفَ لَكُم بَعۡضُ ٱلَّذِي تَسۡتَعۡجِلُونَ
72. Loba: Tango mosusu oyo bozali koluka, ekokomelaka bino na makolo na bino.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَإِنَّ رَبَّكَ لَذُو فَضۡلٍ عَلَى ٱلنَّاسِ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَهُمۡ لَا يَشۡكُرُونَ
73. Mpe ya soló, Nkolo nayo atonda bolamu likolo ya bato, kasi ebele ya bato bazali kotondo te.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَإِنَّ رَبَّكَ لَيَعۡلَمُ مَا تُكِنُّ صُدُورُهُمۡ وَمَا يُعۡلِنُونَ
74. Mpe Nkolo wayo ayebi sólo maye bazali kobomba o mitma mia bango, mpe maye bazali komonisa polele.
Tefsiret në gjuhën arabe:
وَمَا مِنۡ غَآئِبَةٖ فِي ٱلسَّمَآءِ وَٱلۡأَرۡضِ إِلَّا فِي كِتَٰبٖ مُّبِينٍ
75. Mpe eloko moko te ebombami o kati ya likolo na mabele sé ekomama o kati ya buku ya polele.
Tefsiret në gjuhën arabe:
إِنَّ هَٰذَا ٱلۡقُرۡءَانَ يَقُصُّ عَلَىٰ بَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ أَكۡثَرَ ٱلَّذِي هُمۡ فِيهِ يَخۡتَلِفُونَ
76. Ya soló, kurani oyo ezali kolobela bana ya isalayele тропа ebele ya maye bazali kokabwana na yango.
Tefsiret në gjuhën arabe:
 
Përkthimi i kuptimeve Surja: En Neml
Përmbajtja e sureve Numri i faqes
 
Përkthimi i kuptimeve të Kuranit Fisnik - Përkthimi lingalisht - Muhamed Balngugu - Përmbajtja e përkthimeve

E përktheu Zekerija Muhamed Balengogo.

Mbyll