Check out the new design

அல்குர்ஆன் மொழிபெயர்ப்பு - லிங்காலா மொழிபெயர்ப்பு - முஹம்மது பலன்கோகோ * - மொழிபெயர்ப்பு அட்டவணை

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

மொழிபெயர்ப்பு அத்தியாயம்: அல்பகரா   வசனம்:
۞ وَٱذۡكُرُواْ ٱللَّهَ فِيٓ أَيَّامٖ مَّعۡدُودَٰتٖۚ فَمَن تَعَجَّلَ فِي يَوۡمَيۡنِ فَلَآ إِثۡمَ عَلَيۡهِ وَمَن تَأَخَّرَ فَلَآ إِثۡمَ عَلَيۡهِۖ لِمَنِ ٱتَّقَىٰۗ وَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَٱعۡلَمُوٓاْ أَنَّكُمۡ إِلَيۡهِ تُحۡشَرُونَ
Bokanisa Allah na mikolo miyebani.[1] oyo akofanda mikolo mibale azali na lisumu te, mpe oyo akozelisa akokisi mikolo misato azali mpe na lisumu te. Ezali sé na oyo azali na bobangi (Allah), mpe bobanga Allah mpe boyeba ete ya sôló, epai naye nde bokosangisama.
[1] Kurani.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَمِنَ ٱلنَّاسِ مَن يُعۡجِبُكَ قَوۡلُهُۥ فِي ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا وَيُشۡهِدُ ٱللَّهَ عَلَىٰ مَا فِي قَلۡبِهِۦ وَهُوَ أَلَدُّ ٱلۡخِصَامِ
Mpe okati ya bato, liloba naye ezali kokamwisa yo na bomoyi ya nsé mpe azali kotia Allah nzeneneke na maye mazali omotema naye, mpe ye nde moto ya tembe makasi ya ntina te.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَإِذَا تَوَلَّىٰ سَعَىٰ فِي ٱلۡأَرۡضِ لِيُفۡسِدَ فِيهَا وَيُهۡلِكَ ٱلۡحَرۡثَ وَٱلنَّسۡلَۚ وَٱللَّهُ لَا يُحِبُّ ٱلۡفَسَادَ
Mpe soki apesi mokongo akei kotia mobulu na mokili, mpe koboma bibwele mpe kobebisa bilanga. Kasi Allah alingaka mobulu te.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَإِذَا قِيلَ لَهُ ٱتَّقِ ٱللَّهَ أَخَذَتۡهُ ٱلۡعِزَّةُ بِٱلۡإِثۡمِۚ فَحَسۡبُهُۥ جَهَنَّمُۖ وَلَبِئۡسَ ٱلۡمِهَادُ
Mpe soki balobi naye banga Allah, asali lolendo ya mabe ya lisumu. Lifelo ekoki naye mpe oyo nde mbeto ya mabe!
அரபு விரிவுரைகள்:
وَمِنَ ٱلنَّاسِ مَن يَشۡرِي نَفۡسَهُ ٱبۡتِغَآءَ مَرۡضَاتِ ٱللَّهِۚ وَٱللَّهُ رَءُوفُۢ بِٱلۡعِبَادِ
Mpe okati ya bato, oyo azali koteka molimo naye mpona koluka kosepelisa Allah. Mpe Allah azali na mawa mingi likolo na bawumbu naye.
அரபு விரிவுரைகள்:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ ٱدۡخُلُواْ فِي ٱلسِّلۡمِ كَآفَّةٗ وَلَا تَتَّبِعُواْ خُطُوَٰتِ ٱلشَّيۡطَٰنِۚ إِنَّهُۥ لَكُمۡ عَدُوّٞ مُّبِينٞ
Eh bino baye bondima! bokota mobimba o nzela ya islamu, mpe bolanda nzela ya satana te, ya sôló ye azali monguna wa bino ya polele.
அரபு விரிவுரைகள்:
فَإِن زَلَلۡتُم مِّنۢ بَعۡدِ مَا جَآءَتۡكُمُ ٱلۡبَيِّنَٰتُ فَٱعۡلَمُوٓاْ أَنَّ ٱللَّهَ عَزِيزٌ حَكِيمٌ
Mpe soki bobaloli bosembo o sima ya koyela bino bilembo, boyeba ete Ya sôló Allah azali wa bokasi atonda bwanya.
அரபு விரிவுரைகள்:
هَلۡ يَنظُرُونَ إِلَّآ أَن يَأۡتِيَهُمُ ٱللَّهُ فِي ظُلَلٖ مِّنَ ٱلۡغَمَامِ وَٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ وَقُضِيَ ٱلۡأَمۡرُۚ وَإِلَى ٱللَّهِ تُرۡجَعُ ٱلۡأُمُورُ
Bazali kozela, sé Allah akoyela bango okati ya elilingi kowuta na mapata mpe ba anzelu mpona kokata likambo? Mpe epai na Allah, makambo manso makozongisama.
அரபு விரிவுரைகள்:
 
மொழிபெயர்ப்பு அத்தியாயம்: அல்பகரா
அத்தியாயங்களின் அட்டவணை பக்க எண்
 
அல்குர்ஆன் மொழிபெயர்ப்பு - லிங்காலா மொழிபெயர்ப்பு - முஹம்மது பலன்கோகோ - மொழிபெயர்ப்பு அட்டவணை

மொழிபெயர்த்தது ஸகரிய்யா முஹம்மத் பல்னகூகூ.

மூடுக