அல்குர்ஆன் மொழிபெயர்ப்பு - الترجمة اللينغالا * - மொழிபெயர்ப்பு அட்டவணை

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

மொழிபெயர்ப்பு அத்தியாயம்: ஸூரா தாஹா   வசனம்:

Twâ Hâ

طه
1. Twâ hâ(1).
1 Bótala па suratu Al-Baqarah токаро: 1.
அரபு விரிவுரைகள்:
مَآ أَنزَلۡنَا عَلَيۡكَ ٱلۡقُرۡءَانَ لِتَشۡقَىٰٓ
2. Tokitiselaki yo kurani te mpo epesa yo pași.
அரபு விரிவுரைகள்:
إِلَّا تَذۡكِرَةٗ لِّمَن يَخۡشَىٰ
3. Sé ezala bokundoli тропа oyo azali kobanga, (Allah).
அரபு விரிவுரைகள்:
تَنزِيلٗا مِّمَّنۡ خَلَقَ ٱلۡأَرۡضَ وَٱلسَّمَٰوَٰتِ ٱلۡعُلَى
4. (Мре ezala) emoniseli ya oyo akelaki mabele na likolo oyo etomboami.
அரபு விரிவுரைகள்:
ٱلرَّحۡمَٰنُ عَلَى ٱلۡعَرۡشِ ٱسۡتَوَىٰ
5. Ar-Rahmân Atombwami na ngwende naye.
அரபு விரிவுரைகள்:
لَهُۥ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَا فِي ٱلۡأَرۡضِ وَمَا بَيۡنَهُمَا وَمَا تَحۡتَ ٱلثَّرَىٰ
6. Maye manso mazali olikolo тре mabele na maye mazuami kati kati na yango na oyo na nsé ya mabele mazali ya ye.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَإِن تَجۡهَرۡ بِٱلۡقَوۡلِ فَإِنَّهُۥ يَعۡلَمُ ٱلسِّرَّ وَأَخۡفَى
7. Mpe soki otomboli mongongo, ayebi solo maye mabombami na maye mazali ya kobatama koleka.
அரபு விரிவுரைகள்:
ٱللَّهُ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَۖ لَهُ ٱلۡأَسۡمَآءُ ٱلۡحُسۡنَىٰ
8. Allah, nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosóló sé ye, mpe azali na bankombo ya kitoko koleka.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَهَلۡ أَتَىٰكَ حَدِيثُ مُوسَىٰٓ
9. Mpe boye masolo (makomi) ya Mûssa makomelaki yo?
அரபு விரிவுரைகள்:
إِذۡ رَءَا نَارٗا فَقَالَ لِأَهۡلِهِ ٱمۡكُثُوٓاْ إِنِّيٓ ءَانَسۡتُ نَارٗا لَّعَلِّيٓ ءَاتِيكُم مِّنۡهَا بِقَبَسٍ أَوۡ أَجِدُ عَلَى ٱلنَّارِ هُدٗى
10. Tango amonaki moto, mpe alobaki na libota naye; botikala awa, ya soló, namoni moto na mosika tango mosusu nakoyela bino kowuta na yango eloko ya kopelisa to na kokutana na oyo akokamba ngayi.
அரபு விரிவுரைகள்:
فَلَمَّآ أَتَىٰهَا نُودِيَ يَٰمُوسَىٰٓ
11. Mpe tango akomi, abiangami, Oh Mûssa!
அரபு விரிவுரைகள்:
إِنِّيٓ أَنَا۠ رَبُّكَ فَٱخۡلَعۡ نَعۡلَيۡكَ إِنَّكَ بِٱلۡوَادِ ٱلۡمُقَدَّسِ طُوٗى
12. Ezali ya sólo, ngai Nkolo wayo, longola mapapa nayo, ya sólo, ozali otei ya lobwako esantu (ya touri)
அரபு விரிவுரைகள்:
وَأَنَا ٱخۡتَرۡتُكَ فَٱسۡتَمِعۡ لِمَا يُوحَىٰٓ
13. Mpe naponi yo, yoka maye bakoyebisa yo.
அரபு விரிவுரைகள்:
إِنَّنِيٓ أَنَا ٱللَّهُ لَآ إِلَٰهَ إِلَّآ أَنَا۠ فَٱعۡبُدۡنِي وَأَقِمِ ٱلصَّلَوٰةَ لِذِكۡرِيٓ
14. Ya sólo penza, ngai nde Allah nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te sé ngai, bondela ngai mpe telemisa losambo тропа kokanisa ngai.
அரபு விரிவுரைகள்:
إِنَّ ٱلسَّاعَةَ ءَاتِيَةٌ أَكَادُ أُخۡفِيهَا لِتُجۡزَىٰ كُلُّ نَفۡسِۭ بِمَا تَسۡعَىٰ
15. Ya soló, ntango ya suka ekoya, na bombi yango mpo ete molimo na molimo afutama na mpiko naye.
அரபு விரிவுரைகள்:
فَلَا يَصُدَّنَّكَ عَنۡهَا مَن لَّا يُؤۡمِنُ بِهَا وَٱتَّبَعَ هَوَىٰهُ فَتَرۡدَىٰ
16. Kasi oyo andimi na yango te mpe alandi sé mposa naye, abungisa yo te noki te okobebisama.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَمَا تِلۡكَ بِيَمِينِكَ يَٰمُوسَىٰ
17. Mpe nini boye ezali na loboko nayo ya mobali oh Mûssa?
அரபு விரிவுரைகள்:
قَالَ هِيَ عَصَايَ أَتَوَكَّؤُاْ عَلَيۡهَا وَأَهُشُّ بِهَا عَلَىٰ غَنَمِي وَلِيَ فِيهَا مَـَٔارِبُ أُخۡرَىٰ
18. Alobi: Ezali nde lingenda lia ngai, nayekemelaka yango,(1) mpe esalisaka ngai na bobuki bakasa ya banzete тропа koleisa banyama na ngai, mpe esalisaka ngai na makambo mosusu.
1 Komisimba na yango tango ya bopemi.
அரபு விரிவுரைகள்:
قَالَ أَلۡقِهَا يَٰمُوسَىٰ
19. (Allah ayebisi ye): Bwaka yango oh Mûssa!
அரபு விரிவுரைகள்:
فَأَلۡقَىٰهَا فَإِذَا هِيَ حَيَّةٞ تَسۡعَىٰ
20. Мре abwaki yango, mpe ebongwani nyoka ebandi kotambola.
அரபு விரிவுரைகள்:
قَالَ خُذۡهَا وَلَا تَخَفۡۖ سَنُعِيدُهَا سِيرَتَهَا ٱلۡأُولَىٰ
21. (Allah) alobi: Zua yango, kaši kobanga te, tokozongisa yango na lolenge ezalaki liboso.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَٱضۡمُمۡ يَدَكَ إِلَىٰ جَنَاحِكَ تَخۡرُجۡ بَيۡضَآءَ مِنۡ غَيۡرِ سُوٓءٍ ءَايَةً أُخۡرَىٰ
22. Mpe kanga loboko nayo na nsé ya lipeka, ekobima na bongengi ya mpembe makasi mpe ekosala mpasi te. Wana elembo mosusu (bikamwa).
அரபு விரிவுரைகள்:
لِنُرِيَكَ مِنۡ ءَايَٰتِنَا ٱلۡكُبۡرَى
23. Mpo tolakisa yo makamwisi ma biso ya minene.
அரபு விரிவுரைகள்:
ٱذۡهَبۡ إِلَىٰ فِرۡعَوۡنَ إِنَّهُۥ طَغَىٰ
24. Kende epai ya falo, ya soló ye asili kolekisa ndelo,
அரபு விரிவுரைகள்:
قَالَ رَبِّ ٱشۡرَحۡ لِي صَدۡرِي
25. (Mûssa) alobi: Nkolo wa ngai, fungóla ntolo na ngai,(1)
1 Fungóla ntolo na ngai: Elakisi: Tia motema na nga eyamba emoniseli
அரபு விரிவுரைகள்:
وَيَسِّرۡ لِيٓ أَمۡرِي
26. Mpe etinda na ngai oyo, tia yango ezala mpete,
அரபு விரிவுரைகள்:
وَٱحۡلُلۡ عُقۡدَةٗ مِّن لِّسَانِي
27. Mpe bongisa elobeli na ngai.
அரபு விரிவுரைகள்:
يَفۡقَهُواْ قَوۡلِي
28. Mpo bakoka kososola maloba na ngai.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَٱجۡعَل لِّي وَزِيرٗا مِّنۡ أَهۡلِي
29. Mpe pesa ngai mosalisi awuta na libota lia ngai.
அரபு விரிவுரைகள்:
هَٰرُونَ أَخِي
30. Hâruna ndeko wa ngai,
அரபு விரிவுரைகள்:
ٱشۡدُدۡ بِهِۦٓ أَزۡرِي
31. Тіа ye azala oyo akobakisela ngai nguya,
அரபு விரிவுரைகள்:
وَأَشۡرِكۡهُ فِيٓ أَمۡرِي
32. Kotisa ye na makambo na ngai (tokoma mibale),
அரபு விரிவுரைகள்:
كَيۡ نُسَبِّحَكَ كَثِيرٗا
33. Mpo tokumisa yo koleka,
அரபு விரிவுரைகள்:
وَنَذۡكُرَكَ كَثِيرًا
34. Mpe tokanisa yo mingi,
அரபு விரிவுரைகள்:
إِنَّكَ كُنتَ بِنَا بَصِيرٗا
35. Ya soló, ozali kornona biso.
அரபு விரிவுரைகள்:
قَالَ قَدۡ أُوتِيتَ سُؤۡلَكَ يَٰمُوسَىٰ
36. (Allah) alobi: Oh Müssa bosenga nayo esili kokokisama.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَلَقَدۡ مَنَنَّا عَلَيۡكَ مَرَّةً أُخۡرَىٰٓ
37. Mpe tosilaka kosalisa yo mbala ya yambo.
அரபு விரிவுரைகள்:
إِذۡ أَوۡحَيۡنَآ إِلَىٰٓ أُمِّكَ مَا يُوحَىٰٓ
38. Tango toyebisaka na mama wayo mayebisi.
அரபு விரிவுரைகள்:
أَنِ ٱقۡذِفِيهِ فِي ٱلتَّابُوتِ فَٱقۡذِفِيهِ فِي ٱلۡيَمِّ فَلۡيُلۡقِهِ ٱلۡيَمُّ بِٱلسَّاحِلِ يَأۡخُذۡهُ عَدُوّٞ لِّي وَعَدُوّٞ لَّهُۥۚ وَأَلۡقَيۡتُ عَلَيۡكَ مَحَبَّةٗ مِّنِّي وَلِتُصۡنَعَ عَلَىٰ عَيۡنِيٓ
39. Ete: Tia ye na sanduku mpe bwaka yango na mayi mpo ete ebale emema yango o ngambo ya kotiola, monguna na ngai naye akozua ye. Mpe na tiaki likolo nayo bolingo na ngai mpo ete obokolama na nsé ya miso na ngai.
அரபு விரிவுரைகள்:
إِذۡ تَمۡشِيٓ أُخۡتُكَ فَتَقُولُ هَلۡ أَدُلُّكُمۡ عَلَىٰ مَن يَكۡفُلُهُۥۖ فَرَجَعۡنَٰكَ إِلَىٰٓ أُمِّكَ كَيۡ تَقَرَّ عَيۡنُهَا وَلَا تَحۡزَنَۚ وَقَتَلۡتَ نَفۡسٗا فَنَجَّيۡنَٰكَ مِنَ ٱلۡغَمِّ وَفَتَنَّٰكَ فُتُونٗاۚ فَلَبِثۡتَ سِنِينَ فِيٓ أَهۡلِ مَدۡيَنَ ثُمَّ جِئۡتَ عَلَىٰ قَدَرٖ يَٰمُوسَىٰ
40. Mpe tango ndeko nayo ya mwasi azalaki kolanda yo mpe alobaki: Nalakisa bino moto oyo akomelisa ye тропа bino? Mpe tozongisaki yo epai ya mama wayo, mpo asepela mpe ayoka mpasi te, mpe obomaki moto mpe tobikisaki yo na makambo wana, mpe tomekaki yo makambo ebele, mpe ovandaki ba mbula ebele o mboka ya mad’yan, sima oyei oh Mûssa! Kokokisa makomi.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَٱصۡطَنَعۡتُكَ لِنَفۡسِي
41. Mpe ngai moko naponaki yo.
அரபு விரிவுரைகள்:
ٱذۡهَبۡ أَنتَ وَأَخُوكَ بِـَٔايَٰتِي وَلَا تَنِيَا فِي ذِكۡرِي
42. Bökende yo na ndeko wayo na makamwisi ma ngai, mpe bolemba kokumisa ngai te.
அரபு விரிவுரைகள்:
ٱذۡهَبَآ إِلَىٰ فِرۡعَوۡنَ إِنَّهُۥ طَغَىٰ
43. Bökende epai ya falo, ya soló ye asili kotomboka.
அரபு விரிவுரைகள்:
فَقُولَا لَهُۥ قَوۡلٗا لَّيِّنٗا لَّعَلَّهُۥ يَتَذَكَّرُ أَوۡ يَخۡشَىٰ
44. Mpe boyebisa ye liloba ya pete, tango mosusu akoki kokanisa to kobanga ngai.
அரபு விரிவுரைகள்:
قَالَا رَبَّنَآ إِنَّنَا نَخَافُ أَن يَفۡرُطَ عَلَيۡنَآ أَوۡ أَن يَطۡغَىٰ
45. Balobi: Oh Nkolo wa biso! Ya sólo, tozali kobanga ete anyokolo biso, to alekisa ndelo.
அரபு விரிவுரைகள்:
قَالَ لَا تَخَافَآۖ إِنَّنِي مَعَكُمَآ أَسۡمَعُ وَأَرَىٰ
46. (Allah) alobi: Bobanga te, ya sólo nazali elongo na bino, nazali koyoka mpe kornona.
அரபு விரிவுரைகள்:
فَأۡتِيَاهُ فَقُولَآ إِنَّا رَسُولَا رَبِّكَ فَأَرۡسِلۡ مَعَنَا بَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ وَلَا تُعَذِّبۡهُمۡۖ قَدۡ جِئۡنَٰكَ بِـَٔايَةٖ مِّن رَّبِّكَۖ وَٱلسَّلَٰمُ عَلَىٰ مَنِ ٱتَّبَعَ ٱلۡهُدَىٰٓ
47. Bökende epai naye mpe boloba naye: Biso mibale tozali batindami ya Nkolo wayo, pesa biso bana ya isalayele tokende na bango, tika konyokolo bango, toyeli yo elembo ya Nkolo wayo, mpe kimiya ezala likolo ya moto oyo akolanda nzela ya semba.
அரபு விரிவுரைகள்:
إِنَّا قَدۡ أُوحِيَ إِلَيۡنَآ أَنَّ ٱلۡعَذَابَ عَلَىٰ مَن كَذَّبَ وَتَوَلَّىٰ
48. Ya sólo, basilaki koyebisa biso ete: Etumbu ekozala likolo ya oyo akoboya kotosa mpe kondima, mpe apesi mokongo.
அரபு விரிவுரைகள்:
قَالَ فَمَن رَّبُّكُمَا يَٰمُوسَىٰ
49. (Falo) alobi: Nani Nkolo wa bino oh Mûssa?
அரபு விரிவுரைகள்:
قَالَ رَبُّنَا ٱلَّذِيٓ أَعۡطَىٰ كُلَّ شَيۡءٍ خَلۡقَهُۥ ثُمَّ هَدَىٰ
50. (Mûssa) alobi: Nkolo wa biso nde oyo apesaki eloko nyoso lolenge na yango mpe sima akambi yango.
அரபு விரிவுரைகள்:
قَالَ فَمَا بَالُ ٱلۡقُرُونِ ٱلۡأُولَىٰ
51. (Falo) alobi: Bongo ndenge nini тропа baye balekaka kala?
அரபு விரிவுரைகள்:
قَالَ عِلۡمُهَا عِندَ رَبِّي فِي كِتَٰبٖۖ لَّا يَضِلُّ رَبِّي وَلَا يَنسَى
52. (Mûssa) alobi: Oyo ayebi makambo na bango ezali nde Nkolo wa ngai, ekomama o kati ya buku, Nkolo wa ngai abungaka te, mpe abosanaka te.
அரபு விரிவுரைகள்:
ٱلَّذِي جَعَلَ لَكُمُ ٱلۡأَرۡضَ مَهۡدٗا وَسَلَكَ لَكُمۡ فِيهَا سُبُلٗا وَأَنزَلَ مِنَ ٱلسَّمَآءِ مَآءٗ فَأَخۡرَجۡنَا بِهِۦٓ أَزۡوَٰجٗا مِّن نَّبَاتٖ شَتَّىٰ
53. Oyo asalelaki bino mabele ezala lokola mbeto mpe atiela bino banzela okati na yango, mpe azali kokitisela bino mayi kowuta o likolo, mpe na yango tobimisaka milona ndenge na ndenge,
அரபு விரிவுரைகள்:
كُلُواْ وَٱرۡعَوۡاْ أَنۡعَٰمَكُمۡۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتٖ لِّأُوْلِي ٱلنُّهَىٰ
54. Boliya mpe boleyisa bibwele na bino. Ya soló, wana nde bilembo тропа baye bazali kokanisa (bazali na mayele)
அரபு விரிவுரைகள்:
۞ مِنۡهَا خَلَقۡنَٰكُمۡ وَفِيهَا نُعِيدُكُمۡ وَمِنۡهَا نُخۡرِجُكُمۡ تَارَةً أُخۡرَىٰ
55. Tokelaki bino kowuta na yango (mabele) mpe kati na yango nde tokozongisa bino, mpe tokobimisa bino lisusu okati na yango mbala mosusu.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَلَقَدۡ أَرَيۡنَٰهُ ءَايَٰتِنَا كُلَّهَا فَكَذَّبَ وَأَبَىٰ
56. Mpe tosilaki kolakisa ye bilembo bia biso nyoso, kasi aboyaki kondima.
அரபு விரிவுரைகள்:
قَالَ أَجِئۡتَنَا لِتُخۡرِجَنَا مِنۡ أَرۡضِنَا بِسِحۡرِكَ يَٰمُوسَىٰ
57. (Falo) alobi: Oh Mûssa! Boye oyeli biso bonganga bwa yo mpo obimisa biso na mabele na biso?
அரபு விரிவுரைகள்:
فَلَنَأۡتِيَنَّكَ بِسِحۡرٖ مِّثۡلِهِۦ فَٱجۡعَلۡ بَيۡنَنَا وَبَيۡنَكَ مَوۡعِدٗا لَّا نُخۡلِفُهُۥ نَحۡنُ وَلَآ أَنتَ مَكَانٗا سُوٗى
58. Kasi tokoyela yo bonganga lokola yango, tiela biso elaka mpo moko kati na biso azanga te, ezala na esika ya malamu.
அரபு விரிவுரைகள்:
قَالَ مَوۡعِدُكُمۡ يَوۡمُ ٱلزِّينَةِ وَأَن يُحۡشَرَ ٱلنَّاسُ ضُحٗى
59. (Mûssa) alobi: Elaka na biso ekozala o mokolo mwa eyenga, mpe bato basangana na tongo.
அரபு விரிவுரைகள்:
فَتَوَلَّىٰ فِرۡعَوۡنُ فَجَمَعَ كَيۡدَهُۥ ثُمَّ أَتَىٰ
60. Falo akei mpe asangisi bato naye na kibondoki na bango, sima bayei koyanola na elaka.
அரபு விரிவுரைகள்:
قَالَ لَهُم مُّوسَىٰ وَيۡلَكُمۡ لَا تَفۡتَرُواْ عَلَى ٱللَّهِ كَذِبٗا فَيُسۡحِتَكُم بِعَذَابٖۖ وَقَدۡ خَابَ مَنِ ٱفۡتَرَىٰ
61. Mûssa ayebisi bango: Mabe ezala na bino, bobukela Allah lokuta te, noki te etumbu ekozua bino. Na oyo akobukela Allah lokuta, asili kobungisama.
அரபு விரிவுரைகள்:
فَتَنَٰزَعُوٓاْ أَمۡرَهُم بَيۡنَهُمۡ وَأَسَرُّواْ ٱلنَّجۡوَىٰ
62. Nasima bakomaki kolobana bango na bango nasekele.
அரபு விரிவுரைகள்:
قَالُوٓاْ إِنۡ هَٰذَٰنِ لَسَٰحِرَٰنِ يُرِيدَانِ أَن يُخۡرِجَاكُم مِّنۡ أَرۡضِكُم بِسِحۡرِهِمَا وَيَذۡهَبَا بِطَرِيقَتِكُمُ ٱلۡمُثۡلَىٰ
63. Balobi: Ba oyo bazali banganga mibale, balingi kobimisa bino na mabele na bino na bonganga na bango, mpe botika nzela ya malamu oyo bozali na yango.
அரபு விரிவுரைகள்:
فَأَجۡمِعُواْ كَيۡدَكُمۡ ثُمَّ ٱئۡتُواْ صَفّٗاۚ وَقَدۡ أَفۡلَحَ ٱلۡيَوۡمَ مَنِ ٱسۡتَعۡلَىٰ
64. Bosangisa bonganga na bino nyoso, mpe bosala molongo. Mpe oyo akozala likolo asili kolonga.
அரபு விரிவுரைகள்:
قَالُواْ يَٰمُوسَىٰٓ إِمَّآ أَن تُلۡقِيَ وَإِمَّآ أَن نَّكُونَ أَوَّلَ مَنۡ أَلۡقَىٰ
65. Balobi: Oh Mûssa! Obwaka to biso tobwaka bato ya liboso?
அரபு விரிவுரைகள்:
قَالَ بَلۡ أَلۡقُواْۖ فَإِذَا حِبَالُهُمۡ وَعِصِيُّهُمۡ يُخَيَّلُ إِلَيۡهِ مِن سِحۡرِهِمۡ أَنَّهَا تَسۡعَىٰ
66. Alobi: Bobwaka noki, na mbalakaka nde basinga mpe ba mangenda na bango bimonanaki na miso naye lokola ba nyoka na bondoki na bango.
அரபு விரிவுரைகள்:
فَأَوۡجَسَ فِي نَفۡسِهِۦ خِيفَةٗ مُّوسَىٰ
67. Bobangi moke bokomelaki Mûssa ye moko.
அரபு விரிவுரைகள்:
قُلۡنَا لَا تَخَفۡ إِنَّكَ أَنتَ ٱلۡأَعۡلَىٰ
68. Toyebisaki ye: Kobanga te, yo nde okozala likolo. (na bango)
அரபு விரிவுரைகள்:
وَأَلۡقِ مَا فِي يَمِينِكَ تَلۡقَفۡ مَا صَنَعُوٓاْۖ إِنَّمَا صَنَعُواْ كَيۡدُ سَٰحِرٖۖ وَلَا يُفۡلِحُ ٱلسَّاحِرُ حَيۡثُ أَتَىٰ
69. Мре bwaka oyo ezali na loboko nayo ya mobali, ekomela manso oyo basali. Soló, wana basali ezali mwango ya bonganga, mpe nganga akoki kolonga te о esika nyoso awuti.
அரபு விரிவுரைகள்:
فَأُلۡقِيَ ٱلسَّحَرَةُ سُجَّدٗا قَالُوٓاْ ءَامَنَّا بِرَبِّ هَٰرُونَ وَمُوسَىٰ
70. Banganga banso bakweyaki na bogumbami mpe balobi: Tondimi na Nkolo ya Hâruna na Mûssa.
அரபு விரிவுரைகள்:
قَالَ ءَامَنتُمۡ لَهُۥ قَبۡلَ أَنۡ ءَاذَنَ لَكُمۡۖ إِنَّهُۥ لَكَبِيرُكُمُ ٱلَّذِي عَلَّمَكُمُ ٱلسِّحۡرَۖ فَلَأُقَطِّعَنَّ أَيۡدِيَكُمۡ وَأَرۡجُلَكُم مِّنۡ خِلَٰفٖ وَلَأُصَلِّبَنَّكُمۡ فِي جُذُوعِ ٱلنَّخۡلِ وَلَتَعۡلَمُنَّ أَيُّنَآ أَشَدُّ عَذَابٗا وَأَبۡقَىٰ
71. (Falo alobi): Boye bondimeli ye yambo ete napesa bino ndingisa? Ya sólo, ye nde mokonzi wa bino oyo alakisaki bino bonganga, nakokata bino maboko na makolo na bokeseni, mpe nakobaka bino na mibimbi mia nzete ya nagh’l, mpe bokoyebaka ya sólo penza nani kati na biso azali na etumbu ya makasi koleka mpe yakowumela.
அரபு விரிவுரைகள்:
قَالُواْ لَن نُّؤۡثِرَكَ عَلَىٰ مَا جَآءَنَا مِنَ ٱلۡبَيِّنَٰتِ وَٱلَّذِي فَطَرَنَاۖ فَٱقۡضِ مَآ أَنتَ قَاضٍۖ إِنَّمَا تَقۡضِي هَٰذِهِ ٱلۡحَيَوٰةَ ٱلدُّنۡيَآ
72. Balobi: Tolapi na oyo akelaki biso, tokolikia epai nayo te, тропа bilembo oyo eyeli biso, sala oyo olingi kosala, yo ozali sé kokata makambo ya bomoi ya nsé.
அரபு விரிவுரைகள்:
إِنَّآ ءَامَنَّا بِرَبِّنَا لِيَغۡفِرَ لَنَا خَطَٰيَٰنَا وَمَآ أَكۡرَهۡتَنَا عَلَيۡهِ مِنَ ٱلسِّحۡرِۗ وَٱللَّهُ خَيۡرٞ وَأَبۡقَىٰٓ
73. Ya soló, tondimi na Nkolo wa biso, тропа alimbisa masumu та biso, na bonganga oyo osalisi yango biso na makasi. Mpe Allah azali malamu wa libela.
அரபு விரிவுரைகள்:
إِنَّهُۥ مَن يَأۡتِ رَبَّهُۥ مُجۡرِمٗا فَإِنَّ لَهُۥ جَهَنَّمَ لَا يَمُوتُ فِيهَا وَلَا يَحۡيَىٰ
74. Oyo akotomboko na Nkolo waye, ya sólo, akozala na lifelo. Kati na yango akokufaka te mpe akozalaka na bomoyi te.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَمَن يَأۡتِهِۦ مُؤۡمِنٗا قَدۡ عَمِلَ ٱلصَّٰلِحَٰتِ فَأُوْلَٰٓئِكَ لَهُمُ ٱلدَّرَجَٰتُ ٱلۡعُلَىٰ
75. Mpe oyo akokutana naye na bondimi mpe asalaki misala milamu, bango nde bakozalaka o bapete ya lokumu ya likolo.
அரபு விரிவுரைகள்:
جَنَّٰتُ عَدۡنٖ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُ خَٰلِدِينَ فِيهَاۚ وَذَٰلِكَ جَزَآءُ مَن تَزَكَّىٰ
76. Lola ya edeni eye ezali kolekisa na nsé na yango mingala, libela kati na yango, mpe wana ekozala nde litomba ya baye bamipetolaki. (na boboyi kibopengwi na masumu)
அரபு விரிவுரைகள்:
وَلَقَدۡ أَوۡحَيۡنَآ إِلَىٰ مُوسَىٰٓ أَنۡ أَسۡرِ بِعِبَادِي فَٱضۡرِبۡ لَهُمۡ طَرِيقٗا فِي ٱلۡبَحۡرِ يَبَسٗا لَّا تَخَٰفُ دَرَكٗا وَلَا تَخۡشَىٰ
77. Mpe tosilaki kotalisa na Müssa été: Kende na bawumbu na ngai na butu mpe fongola bango nzela makawuka okati ya ebale. Kasi kobanga te ete bakolanda.
அரபு விரிவுரைகள்:
فَأَتۡبَعَهُمۡ فِرۡعَوۡنُ بِجُنُودِهِۦ فَغَشِيَهُم مِّنَ ٱلۡيَمِّ مَا غَشِيَهُمۡ
78. Falo alandaki bango elongo na basoda naye, ebale ezindisaki bango mpe elimwisaki bango.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَأَضَلَّ فِرۡعَوۡنُ قَوۡمَهُۥ وَمَا هَدَىٰ
79. Мре falo abungisaki bato naye, mpe akambaki bango o nzela ya semba te.
அரபு விரிவுரைகள்:
يَٰبَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ قَدۡ أَنجَيۡنَٰكُم مِّنۡ عَدُوِّكُمۡ وَوَٰعَدۡنَٰكُمۡ جَانِبَ ٱلطُّورِ ٱلۡأَيۡمَنَ وَنَزَّلۡنَا عَلَيۡكُمُ ٱلۡمَنَّ وَٱلسَّلۡوَىٰ
80. Eh bana ya isalayele! Tosilaki kolongisa bino na monguna wa bino, mpe topesaki bino elaka o ngambu ya ngomba o ngambu ya mobali, mpe tokitiselaki bino. Manna, na Salwa(1).
1 Manna, Salwa: Bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 57.
அரபு விரிவுரைகள்:
كُلُواْ مِن طَيِّبَٰتِ مَا رَزَقۡنَٰكُمۡ وَلَا تَطۡغَوۡاْ فِيهِ فَيَحِلَّ عَلَيۡكُمۡ غَضَبِيۖ وَمَن يَحۡلِلۡ عَلَيۡهِ غَضَبِي فَقَدۡ هَوَىٰ
81. Boliya bia malamu biye topesi bino kasi bopengwa na yango te, noki te (Allah) akosilika na bino, mpe oyo kanda na ngai ekozua ye, asili kobeba.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَإِنِّي لَغَفَّارٞ لِّمَن تَابَ وَءَامَنَ وَعَمِلَ صَٰلِحٗا ثُمَّ ٱهۡتَدَىٰ
82. Mpe ya soló, nazali molimbisi monene, тропа oyo akosenga bolimbisi mpe andimi mpe asali misala milamu, sima amitiye o nzela ya semba.
அரபு விரிவுரைகள்:
۞ وَمَآ أَعۡجَلَكَ عَن قَوۡمِكَ يَٰمُوسَىٰ
83. Mpe тропа nini ozali kowelisa kotika bato nayo oh Müssa?
அரபு விரிவுரைகள்:
قَالَ هُمۡ أُوْلَآءِ عَلَىٰٓ أَثَرِي وَعَجِلۡتُ إِلَيۡكَ رَبِّ لِتَرۡضَىٰ
84. (Mûssa) ayanolaki: Bazali wana na mobeko mwa ngai, mpe nazali kowelisa koya epai nayo Nkolo, mpo okoka kondimela ngai.
அரபு விரிவுரைகள்:
قَالَ فَإِنَّا قَدۡ فَتَنَّا قَوۡمَكَ مِنۢ بَعۡدِكَ وَأَضَلَّهُمُ ٱلسَّامِرِيُّ
85. (Allah) alobi: Ya sólo, tomeki bato nayo o sima ya kokende nayo, mpe samiriyu abungisi bango.
அரபு விரிவுரைகள்:
فَرَجَعَ مُوسَىٰٓ إِلَىٰ قَوۡمِهِۦ غَضۡبَٰنَ أَسِفٗاۚ قَالَ يَٰقَوۡمِ أَلَمۡ يَعِدۡكُمۡ رَبُّكُمۡ وَعۡدًا حَسَنًاۚ أَفَطَالَ عَلَيۡكُمُ ٱلۡعَهۡدُ أَمۡ أَرَدتُّمۡ أَن يَحِلَّ عَلَيۡكُمۡ غَضَبٞ مِّن رَّبِّكُمۡ فَأَخۡلَفۡتُم مَّوۡعِدِي
86. Mûssa azongi epai ya bato naye na mawa, mpe kanda ya makasi. Alobi: Oh bato na ngai! Nkolo wa bino asilaki kopesa bino elaka elamu te? Boyokani bozalaki molai тропа bino to boponi sé ete kanda ya Nkolo ezua bino? Mpo bosili kobebisa mpe bopengwi na elaka na ngai?
அரபு விரிவுரைகள்:
قَالُواْ مَآ أَخۡلَفۡنَا مَوۡعِدَكَ بِمَلۡكِنَا وَلَٰكِنَّا حُمِّلۡنَآ أَوۡزَارٗا مِّن زِينَةِ ٱلۡقَوۡمِ فَقَذَفۡنَٰهَا فَكَذَٰلِكَ أَلۡقَى ٱلسَّامِرِيُّ
87. Balobi: Ezali kolinga ya biso moko te oyo ezangisi biso kotosa, kasi tomemaki mikumba mia bato ba falo, tobwakaki yango na moto, lokola samiri abwakaki.
அரபு விரிவுரைகள்:
فَأَخۡرَجَ لَهُمۡ عِجۡلٗا جَسَدٗا لَّهُۥ خُوَارٞ فَقَالُواْ هَٰذَآ إِلَٰهُكُمۡ وَإِلَٰهُ مُوسَىٰ فَنَسِيَ
88. Mpe abimiseli bango ekeko ya motané ezali kobimisa mongongo lokola ngombe, Balobi; oyo nde nzambe na bino na nzambe ya Mûssa abosanaki.
அரபு விரிவுரைகள்:
أَفَلَا يَرَوۡنَ أَلَّا يَرۡجِعُ إِلَيۡهِمۡ قَوۡلٗا وَلَا يَمۡلِكُ لَهُمۡ ضَرّٗا وَلَا نَفۡعٗا
89. Boye bazali kornona te ete azali kozongisela (ekeko) bango liloba te mpe azali kosalisa bango te mpe kosala bango mabe te?
அரபு விரிவுரைகள்:
وَلَقَدۡ قَالَ لَهُمۡ هَٰرُونُ مِن قَبۡلُ يَٰقَوۡمِ إِنَّمَا فُتِنتُم بِهِۦۖ وَإِنَّ رَبَّكُمُ ٱلرَّحۡمَٰنُ فَٱتَّبِعُونِي وَأَطِيعُوٓاْ أَمۡرِي
90. Mpe ya soló: Háruna(1) asilaki koyebisa na bango liboso oh bato ba ngai! Ya sólo, bokwei na bomekami тропа yango, ya soló, oyo atonda na mawa nde Nkolo na bino. Bolanda ngai, mpe botosa mitindo mia ngai.
1 Hânına: Bótala suratu Al-Baqarah: 248, An-Nisá: 163, Al-An’âm: 84, Al-A’râf: 122,142.
அரபு விரிவுரைகள்:
قَالُواْ لَن نَّبۡرَحَ عَلَيۡهِ عَٰكِفِينَ حَتَّىٰ يَرۡجِعَ إِلَيۡنَا مُوسَىٰ
91. Balobi: Tokozalaka na yango kino Mûssa akozonga.
அரபு விரிவுரைகள்:
قَالَ يَٰهَٰرُونُ مَا مَنَعَكَ إِذۡ رَأَيۡتَهُمۡ ضَلُّوٓاْ
92. (Mûssa) alobi: Oh Hânına!(1) Eloko nini epekisaki yo mpo opekisa bango tango omonaki bazali kobunga nzela?
1 Hânına: Bótala suratu Al-Baqarah: 248, An-Nisá: 163, Al-An’âm: 84, Al-A’râf: 122,142.
அரபு விரிவுரைகள்:
أَلَّا تَتَّبِعَنِۖ أَفَعَصَيۡتَ أَمۡرِي
93. Ete olanda ngaï. Boye, oboyi kotosa mitindo na ngai?
அரபு விரிவுரைகள்:
قَالَ يَبۡنَؤُمَّ لَا تَأۡخُذۡ بِلِحۡيَتِي وَلَا بِرَأۡسِيٓۖ إِنِّي خَشِيتُ أَن تَقُولَ فَرَّقۡتَ بَيۡنَ بَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ وَلَمۡ تَرۡقُبۡ قَوۡلِي
94. Alobi: Eh mwana ya mama! Kobenda mandefu mpe moto na ngai te, na bangaki oloba ete ngai nakaboli bana ya isalayele mpe natosi mitindo nayo te.
அரபு விரிவுரைகள்:
قَالَ فَمَا خَطۡبُكَ يَٰسَٰمِرِيُّ
95. (Mûssa) alobi: Olingi nini eh Samiriyu?
அரபு விரிவுரைகள்:
قَالَ بَصُرۡتُ بِمَا لَمۡ يَبۡصُرُواْ بِهِۦ فَقَبَضۡتُ قَبۡضَةٗ مِّنۡ أَثَرِ ٱلرَّسُولِ فَنَبَذۡتُهَا وَكَذَٰلِكَ سَوَّلَتۡ لِي نَفۡسِي
96. Alobi: Namoni oyo bamona te. Nazuaki mabele ya makolo ya motindami (ya anzelu) na bwakaki yango, wana nde ndenge molimo mwa ngai motindaki ngai.
அரபு விரிவுரைகள்:
قَالَ فَٱذۡهَبۡ فَإِنَّ لَكَ فِي ٱلۡحَيَوٰةِ أَن تَقُولَ لَا مِسَاسَۖ وَإِنَّ لَكَ مَوۡعِدٗا لَّن تُخۡلَفَهُۥۖ وَٱنظُرۡ إِلَىٰٓ إِلَٰهِكَ ٱلَّذِي ظَلۡتَ عَلَيۡهِ عَاكِفٗاۖ لَّنُحَرِّقَنَّهُۥ ثُمَّ لَنَنسِفَنَّهُۥ فِي ٱلۡيَمِّ نَسۡفًا
97. (Mûssa) alobi: Kende na bomoi ya nsé, okobanda koloba na moto nyoso ete: Kosimba ngai te, mpe okozala na elaka oyo okozangisa yango te, tala nzambe nayo oyo obondelaki mpe okangamaki na yango, tokozikisa yango mpenza mpe tokopanza putulu na yango likolo na mayi ya ebale.
அரபு விரிவுரைகள்:
إِنَّمَآ إِلَٰهُكُمُ ٱللَّهُ ٱلَّذِي لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَۚ وَسِعَ كُلَّ شَيۡءٍ عِلۡمٗا
98. Ya soló, Nkolo wa bino nde Allah oyo nzambe mosusu ya bosóló ya kobondela azali te sé ye, ayebi nyoso ezali koleka.
அரபு விரிவுரைகள்:
كَذَٰلِكَ نَقُصُّ عَلَيۡكَ مِنۡ أَنۢبَآءِ مَا قَدۡ سَبَقَۚ وَقَدۡ ءَاتَيۡنَٰكَ مِن لَّدُنَّا ذِكۡرٗا
99. Lolenge wana nde tozali kobetela yo makambo ya ba oyo baleka. Mpe ya sólo, tosilaka kopesa yo bokundoli bwa biso.
அரபு விரிவுரைகள்:
مَّنۡ أَعۡرَضَ عَنۡهُ فَإِنَّهُۥ يَحۡمِلُ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ وِزۡرًا
100. Oyo akoboya kondima na yango (kurani) ya soló, ye o mokolo ya suka akomemaka mokumba.
அரபு விரிவுரைகள்:
خَٰلِدِينَ فِيهِۖ وَسَآءَ لَهُمۡ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ حِمۡلٗا
101. Bakotikalaka libela o kati na yango, mpe bakozuaka mabe o mokolo mona.
அரபு விரிவுரைகள்:
يَوۡمَ يُنفَخُ فِي ٱلصُّورِۚ وَنَحۡشُرُ ٱلۡمُجۡرِمِينَ يَوۡمَئِذٖ زُرۡقٗا
102. Mokolo moye bakofulaka kelelo тропа lisekwa. Mpe tokosangisaka batomboki banso, na langi ya bule (тропа bobangi ya makasi).
அரபு விரிவுரைகள்:
يَتَخَٰفَتُونَ بَيۡنَهُمۡ إِن لَّبِثۡتُمۡ إِلَّا عَشۡرٗا
103. Bakolobana kati na bango ete: Bowumelaki na mokili sé mikolo zomi.
அரபு விரிவுரைகள்:
نَّحۡنُ أَعۡلَمُ بِمَا يَقُولُونَ إِذۡ يَقُولُ أَمۡثَلُهُمۡ طَرِيقَةً إِن لَّبِثۡتُمۡ إِلَّا يَوۡمٗا
104. Toyebi na malamu nini bazali koloba, tango moko wa bango oyo azali na ezaleli ya malamu akoloba ete: Borandaki sé mokolo moko.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَيَسۡـَٔلُونَكَ عَنِ ٱلۡجِبَالِ فَقُلۡ يَنسِفُهَا رَبِّي نَسۡفٗا
105. Bazali kotuna yo тропа bangomba; loba: Nkolo wa ngai akopanzaka yango, ekokomaka lokola mputulu.
அரபு விரிவுரைகள்:
فَيَذَرُهَا قَاعٗا صَفۡصَفٗا
106. Mpe akotika yango elali polele lokola mabele oyo ezali na eloko te likolo na yango.
அரபு விரிவுரைகள்:
لَّا تَرَىٰ فِيهَا عِوَجٗا وَلَآ أَمۡتٗا
107. Okomona o kati na yango ata esika moko ezali ya kogumbama te mpe botombwami te.
அரபு விரிவுரைகள்:
يَوۡمَئِذٖ يَتَّبِعُونَ ٱلدَّاعِيَ لَا عِوَجَ لَهُۥۖ وَخَشَعَتِ ٱلۡأَصۡوَاتُ لِلرَّحۡمَٰنِ فَلَا تَسۡمَعُ إِلَّا هَمۡسٗا
108. Mokolo wana (bato), bakolandaka mobengi na kozanga koyimayima mpe mingongo mikokitisama o boso bwa Ar-Rahmân, ata makelele ya шоке okoyoka na paši.
அரபு விரிவுரைகள்:
يَوۡمَئِذٖ لَّا تَنفَعُ ٱلشَّفَٰعَةُ إِلَّا مَنۡ أَذِنَ لَهُ ٱلرَّحۡمَٰنُ وَرَضِيَ لَهُۥ قَوۡلٗا
109. Mokolo wana kosengela moto ekozalaka te, longola sé oyo Ar-Rahmân akopesaka ye ndingisa, mpe akondimela ye liloba.
அரபு விரிவுரைகள்:
يَعۡلَمُ مَا بَيۡنَ أَيۡدِيهِمۡ وَمَا خَلۡفَهُمۡ وَلَا يُحِيطُونَ بِهِۦ عِلۡمٗا
110. Ayebi maye mazali liboso na bango mpe maye mazali o sima na bango, mpe bazali na boyebi te ya balolenge naye.
அரபு விரிவுரைகள்:
۞ وَعَنَتِ ٱلۡوُجُوهُ لِلۡحَيِّ ٱلۡقَيُّومِۖ وَقَدۡ خَابَ مَنۡ حَمَلَ ظُلۡمٗا
111. Mpe bilongi bia bato bikokitisamaka тропа oyo azali na bomoi mpe amikoka mpe mabe ekozalaka na oyo akoya liboso naye na bobubami. (mabe)
அரபு விரிவுரைகள்:
وَمَن يَعۡمَلۡ مِنَ ٱلصَّٰلِحَٰتِ وَهُوَ مُؤۡمِنٞ فَلَا يَخَافُ ظُلۡمٗا وَلَا هَضۡمٗا
112. Mpe oyo akosala bolamu mpe azali mondimi, akobangaka kobubama te mpe konyokwama te.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَكَذَٰلِكَ أَنزَلۡنَٰهُ قُرۡءَانًا عَرَبِيّٗا وَصَرَّفۡنَا فِيهِ مِنَ ٱلۡوَعِيدِ لَعَلَّهُمۡ يَتَّقُونَ أَوۡ يُحۡدِثُ لَهُمۡ ذِكۡرٗا
113. Mpe lolenge wana nde tokitisaki kurani na ndinga ya arabo, mpe tolimbolaki na kati na yango, тропа balolenge ya bitumbu, mpo bakoka kobanga mpe bakanisa тропа bondimi.
அரபு விரிவுரைகள்:
فَتَعَٰلَى ٱللَّهُ ٱلۡمَلِكُ ٱلۡحَقُّۗ وَلَا تَعۡجَلۡ بِٱلۡقُرۡءَانِ مِن قَبۡلِ أَن يُقۡضَىٰٓ إِلَيۡكَ وَحۡيُهُۥۖ وَقُل رَّبِّ زِدۡنِي عِلۡمٗا
114. Lokumu ezali ya Allah nkumu ya bosôló, mpe kotanga kuranı noki noki te yambo ete ekitela yo, mpe loba: Oh Nkolo wa ngai! Bakisela ngai boyebi.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَلَقَدۡ عَهِدۡنَآ إِلَىٰٓ ءَادَمَ مِن قَبۡلُ فَنَسِيَ وَلَمۡ نَجِدۡ لَهُۥ عَزۡمٗا
115. Mpe tosilaki kopesa Adam mobeko liboso mpe abosanaki yango, mpe tokutaki bokangami ya makasi epai naye te.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَإِذۡ قُلۡنَا لِلۡمَلَٰٓئِكَةِ ٱسۡجُدُواْ لِأٓدَمَ فَسَجَدُوٓاْ إِلَّآ إِبۡلِيسَ أَبَىٰ
116. Mpe tango tolobaki na ba anzelu: Bogumbama o liboso ya Adam, bagumbamaki bango banso, longola sé satana, aboyaki (kogumbamela ye),
அரபு விரிவுரைகள்:
فَقُلۡنَا يَٰٓـَٔادَمُ إِنَّ هَٰذَا عَدُوّٞ لَّكَ وَلِزَوۡجِكَ فَلَا يُخۡرِجَنَّكُمَا مِنَ ٱلۡجَنَّةِ فَتَشۡقَىٰٓ
117. Mpe tolobaki: Eh Âdâm! Ya soló, oyo nde monguna nayo, yo na mwasi wayo. Na yango abimisa bino na paladizo te noki okozala na mpasi.
அரபு விரிவுரைகள்:
إِنَّ لَكَ أَلَّا تَجُوعَ فِيهَا وَلَا تَعۡرَىٰ
118. Ya sólo, тропа yo, okoyokaka nzala te okati na yango mpe okozalaka bolumbu te.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَأَنَّكَ لَا تَظۡمَؤُاْ فِيهَا وَلَا تَضۡحَىٰ
119. Mpe ya sólo, yo okoyokaka mposa ya mayi te, mpe pasi ya moyi ekozuaka yo te.
அரபு விரிவுரைகள்:
فَوَسۡوَسَ إِلَيۡهِ ٱلشَّيۡطَٰنُ قَالَ يَٰٓـَٔادَمُ هَلۡ أَدُلُّكَ عَلَىٰ شَجَرَةِ ٱلۡخُلۡدِ وَمُلۡكٖ لَّا يَبۡلَىٰ
120. Mpe (sima) satana amekaki ye na koloba ete: Eh Âdâm! Nalakisa yo nzete ya bomoi ya nseko mpe bokonzi eye ekobebisama te?
அரபு விரிவுரைகள்:
فَأَكَلَا مِنۡهَا فَبَدَتۡ لَهُمَا سَوۡءَٰتُهُمَا وَطَفِقَا يَخۡصِفَانِ عَلَيۡهِمَا مِن وَرَقِ ٱلۡجَنَّةِۚ وَعَصَىٰٓ ءَادَمُ رَبَّهُۥ فَغَوَىٰ
121. Bango mibale baliaki yango, mpe batikalaki bolumbu, mpe babandi komizipa na nkasa ya Iola, mpe Adam aboyaki kotosa Nkolo wa ye, mpe abungaki na mibeko mia Nkolo waye.
அரபு விரிவுரைகள்:
ثُمَّ ٱجۡتَبَٰهُ رَبُّهُۥ فَتَابَ عَلَيۡهِ وَهَدَىٰ
122. Sima Nkolo waye aponaki ye mpe ayambaki tubela naye mpe akambaki ye.
அரபு விரிவுரைகள்:
قَالَ ٱهۡبِطَا مِنۡهَا جَمِيعَۢاۖ بَعۡضُكُمۡ لِبَعۡضٍ عَدُوّٞۖ فَإِمَّا يَأۡتِيَنَّكُم مِّنِّي هُدٗى فَمَنِ ٱتَّبَعَ هُدَايَ فَلَا يَضِلُّ وَلَا يَشۡقَىٰ
123. Alobi: Bokita awa(1) bino banso, bokozala na kibonguna na mabota ma bino banso, (bakitani na bino) mpe soki bokambi bwa ngai boyeli bino, oyo akolanda bokambi bwa ngai, akobunga te mpe akozalaka na mpasi te.
1 Bokita awa: Elakisi: Bobima na lola bökende na mokili
அரபு விரிவுரைகள்:
وَمَنۡ أَعۡرَضَ عَن ذِكۡرِي فَإِنَّ لَهُۥ مَعِيشَةٗ ضَنكٗا وَنَحۡشُرُهُۥ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ أَعۡمَىٰ
124. Mpe oyo akoboya bokundoli bwa ngai, ya soló, ye akozalaka na bomoyi ya mpasi, mpe omokolo mwa suka, tokosekwisa ye miso mazipama,
அரபு விரிவுரைகள்:
قَالَ رَبِّ لِمَ حَشَرۡتَنِيٓ أَعۡمَىٰ وَقَدۡ كُنتُ بَصِيرٗا
125. Akolobaka, oh Nkolo wa ngai! Mpona nini osekwisi ngai nazali kornona te kasi yambo nazalaki kornona?
அரபு விரிவுரைகள்:
قَالَ كَذَٰلِكَ أَتَتۡكَ ءَايَٰتُنَا فَنَسِيتَهَاۖ وَكَذَٰلِكَ ٱلۡيَوۡمَ تُنسَىٰ
126. (Allah) akoyebisa ye: Lolenge wana nde eyelaki yo bilembo bia biso mpona kotangisa yo, kasi obosanaki yango, yango wana lelo tobosani yo.(2)
2 Lelo tobosani yo: Elakisi: Lelo totiki yo nakati ya moto, mpo ete Allah abosanaka te.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَكَذَٰلِكَ نَجۡزِي مَنۡ أَسۡرَفَ وَلَمۡ يُؤۡمِنۢ بِـَٔايَٰتِ رَبِّهِۦۚ وَلَعَذَابُ ٱلۡأٓخِرَةِ أَشَدُّ وَأَبۡقَىٰٓ
127. Мре lolenge wana nde topesaka etumbu na oyo azali kondima te, mpe azali kolekisa ndelo na bilembo bia Nkolo wa ye. Kasi etumbu ya mokolo ya suka ekozalaka makasi mpe ekotikalaka libela.
அரபு விரிவுரைகள்:
أَفَلَمۡ يَهۡدِ لَهُمۡ كَمۡ أَهۡلَكۡنَا قَبۡلَهُم مِّنَ ٱلۡقُرُونِ يَمۡشُونَ فِي مَسَٰكِنِهِمۡۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتٖ لِّأُوْلِي ٱلنُّهَىٰ
128. Wana esalisaki bango na bokambi te, boni ebele ya bato tobomaki yambo na bango? Bazalaki kotambola na bisika bia bango. Ya soló, wana nde elembo тропа baye bazali na may ele.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَلَوۡلَا كَلِمَةٞ سَبَقَتۡ مِن رَّبِّكَ لَكَانَ لِزَامٗا وَأَجَلٞ مُّسَمّٗى
129. Soki тропа liloba ya Nkolo naye esila kolobama te mpe тропа mokano naye te, mbele etumbu esilaki kokwela bango.
அரபு விரிவுரைகள்:
فَٱصۡبِرۡ عَلَىٰ مَا يَقُولُونَ وَسَبِّحۡ بِحَمۡدِ رَبِّكَ قَبۡلَ طُلُوعِ ٱلشَّمۡسِ وَقَبۡلَ غُرُوبِهَاۖ وَمِنۡ ءَانَآيِٕ ٱلَّيۡلِ فَسَبِّحۡ وَأَطۡرَافَ ٱلنَّهَارِ لَعَلَّكَ تَرۡضَىٰ
130. Zala na bozeli тропа maye bazali koloba, mpe kumisa lokumu ya Nkolo nayo yambo ete moyi ebima, mpe yambo ya bolimwi na yango, mpe o kati kati ya butu. Mpe kumisa ye na moyi tango mosusu okosepela.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَلَا تَمُدَّنَّ عَيۡنَيۡكَ إِلَىٰ مَا مَتَّعۡنَا بِهِۦٓ أَزۡوَٰجٗا مِّنۡهُمۡ زَهۡرَةَ ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا لِنَفۡتِنَهُمۡ فِيهِۚ وَرِزۡقُ رَبِّكَ خَيۡرٞ وَأَبۡقَىٰ
131. Mpe kolandisa miso nayo te sima ya maye topesi basusu kati na bango bonzenga ya bisengo ya mokili mpo ete tomeka bango na yango, bozui ya Nkolo nayo (ya lola) nde ezali malamu mpe ekowumela.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَأۡمُرۡ أَهۡلَكَ بِٱلصَّلَوٰةِ وَٱصۡطَبِرۡ عَلَيۡهَاۖ لَا نَسۡـَٔلُكَ رِزۡقٗاۖ نَّحۡنُ نَرۡزُقُكَۗ وَٱلۡعَٰقِبَةُ لِلتَّقۡوَىٰ
132. Мре tinda libota lia yo na losambo, mpe žala molende na yango, tozali kosenga yo bozui te, biso nde tozali koleisa yo, mpe suka ya malamu ezali тропа bobangi (Allah).
அரபு விரிவுரைகள்:
وَقَالُواْ لَوۡلَا يَأۡتِينَا بِـَٔايَةٖ مِّن رَّبِّهِۦٓۚ أَوَلَمۡ تَأۡتِهِم بَيِّنَةُ مَا فِي ٱلصُّحُفِ ٱلۡأُولَىٰ
133. Мре bakolobaka: Mpona nini ayeli biso likamwisi kowuta epai y a Nkolo naye te? Boye elembo (kurani) eye ekomama kala eyelaki bango te?
அரபு விரிவுரைகள்:
وَلَوۡ أَنَّآ أَهۡلَكۡنَٰهُم بِعَذَابٖ مِّن قَبۡلِهِۦ لَقَالُواْ رَبَّنَا لَوۡلَآ أَرۡسَلۡتَ إِلَيۡنَا رَسُولٗا فَنَتَّبِعَ ءَايَٰتِكَ مِن قَبۡلِ أَن نَّذِلَّ وَنَخۡزَىٰ
134. Мре soki topesaka bango etumbu liboso, balingaki koloba: Oh Nkolo wa biso! Mpona nini otindelaki biso motindami te? Kasi tolandaki mateya yambo ete toyoka soni тре tozanga ntina?
அரபு விரிவுரைகள்:
قُلۡ كُلّٞ مُّتَرَبِّصٞ فَتَرَبَّصُواْۖ فَسَتَعۡلَمُونَ مَنۡ أَصۡحَٰبُ ٱلصِّرَٰطِ ٱلسَّوِيِّ وَمَنِ ٱهۡتَدَىٰ
135. Loba: Moto nyoso azela, bino тре bozela. Bokoyebaka banani bazali na nzela ya semba тре bakambami.
அரபு விரிவுரைகள்:
 
மொழிபெயர்ப்பு அத்தியாயம்: ஸூரா தாஹா
அத்தியாயங்களின் அட்டவணை பக்க எண்
 
அல்குர்ஆன் மொழிபெயர்ப்பு - الترجمة اللينغالا - மொழிபெயர்ப்பு அட்டவணை

ترجمة معاني القرآن الكريم الى اللغة اللينغالا، ترجمها زكريا محمد بالنغوغو.

மூடுக