அல்குர்ஆன் மொழிபெயர்ப்பு - الترجمة اللينغالا * - மொழிபெயர்ப்பு அட்டவணை

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

மொழிபெயர்ப்பு அத்தியாயம்: ஸூரா அஷ்ஷூரா   வசனம்:

As-Shûrâ (BOYOKANI)

حمٓ
1. Hâ, mîm.(1)
1 Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
அரபு விரிவுரைகள்:
عٓسٓقٓ
2. A‘in, sín, qâf.(1)
1 Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
அரபு விரிவுரைகள்:
كَذَٰلِكَ يُوحِيٓ إِلَيۡكَ وَإِلَى ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِكَ ٱللَّهُ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡحَكِيمُ
3. Lolenge wana nde Allah wa bokasi atonda bwanya azali kokitisela yo emoniseli lokola akitiselaki baye balekaki liboso lia yo.
அரபு விரிவுரைகள்:
لَهُۥ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَا فِي ٱلۡأَرۡضِۖ وَهُوَ ٱلۡعَلِيُّ ٱلۡعَظِيمُ
4. Maye manso mazali o likolo na mabele mazali yaye, mpe azali wa likolo azali monene koleka.
அரபு விரிவுரைகள்:
تَكَادُ ٱلسَّمَٰوَٰتُ يَتَفَطَّرۡنَ مِن فَوۡقِهِنَّۚ وَٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ يُسَبِّحُونَ بِحَمۡدِ رَبِّهِمۡ وَيَسۡتَغۡفِرُونَ لِمَن فِي ٱلۡأَرۡضِۗ أَلَآ إِنَّ ٱللَّهَ هُوَ ٱلۡغَفُورُ ٱلرَّحِيمُ
5. Soki ezalaka ye te, likolo elingaki kopasuka. Mpe ba anzelu bazali kokumisa Nkolo wa bango, mpe bazali kosengela baye bazali na mabele bolimbisi. Ya soló, Allah azali molimbisi atonda ngolu.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَٱلَّذِينَ ٱتَّخَذُواْ مِن دُونِهِۦٓ أَوۡلِيَآءَ ٱللَّهُ حَفِيظٌ عَلَيۡهِمۡ وَمَآ أَنتَ عَلَيۡهِم بِوَكِيلٖ
6. Mpe тропа baye bazali kozua babateli basusu batiki ye, Allah azali kornona maye bazali kosala. Mpe ozali mobateli na bango te.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَكَذَٰلِكَ أَوۡحَيۡنَآ إِلَيۡكَ قُرۡءَانًا عَرَبِيّٗا لِّتُنذِرَ أُمَّ ٱلۡقُرَىٰ وَمَنۡ حَوۡلَهَا وَتُنذِرَ يَوۡمَ ٱلۡجَمۡعِ لَا رَيۡبَ فِيهِۚ فَرِيقٞ فِي ٱلۡجَنَّةِ وَفَرِيقٞ فِي ٱلسَّعِيرِ
7. Mpe lolenge wana nde tokitiselaki yo kurani na lokota ya arabo, mpo okebisa yango na mama ya bamboka na baye bazuami zinga zinga na yango, mpe okebisa тропа mokolo mwa bosangani oyo ezali na tembe te. Basusu bakozala na lola mpe basusu bakozala na móto mwa saira (lifelo).
1 Umma: Awa ezali: Lingomba. Bótala na Al-Baqarah mokapo: 128.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَلَوۡ شَآءَ ٱللَّهُ لَجَعَلَهُمۡ أُمَّةٗ وَٰحِدَةٗ وَلَٰكِن يُدۡخِلُ مَن يَشَآءُ فِي رَحۡمَتِهِۦۚ وَٱلظَّٰلِمُونَ مَا لَهُم مِّن وَلِيّٖ وَلَا نَصِيرٍ
8. Mpe soki Allah alingaki, nde atia bango bazala umma(1) moko, kasi (Allah) akotisaka nani alingi na ngolu naye. Mpe babubi bakozala na mokonzi te mpe mosungi te.
1 Umma: Awa ezali: Lingomba. Bótala na Al-Baqarah mokapo: 128.
அரபு விரிவுரைகள்:
أَمِ ٱتَّخَذُواْ مِن دُونِهِۦٓ أَوۡلِيَآءَۖ فَٱللَّهُ هُوَ ٱلۡوَلِيُّ وَهُوَ يُحۡيِ ٱلۡمَوۡتَىٰ وَهُوَ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٞ
9. Boye bazueli ye bakonzi misusu batiki ye? Kasi Allah azali ye moko mokonzi, mpe azali kopesa bomoyi na bawa, mpe azali na bokoki likolo ya biloko binso.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَمَا ٱخۡتَلَفۡتُمۡ فِيهِ مِن شَيۡءٖ فَحُكۡمُهُۥٓ إِلَى ٱللَّهِۚ ذَٰلِكُمُ ٱللَّهُ رَبِّي عَلَيۡهِ تَوَكَّلۡتُ وَإِلَيۡهِ أُنِيبُ
10. Na manso oyo bokokabwana na yango, Allah nde mokati. Wana azali Allah Nkolo wa ngai, epai naye namipesi, mpe epai naye nde nazongi kotubela.
அரபு விரிவுரைகள்:
فَاطِرُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۚ جَعَلَ لَكُم مِّنۡ أَنفُسِكُمۡ أَزۡوَٰجٗا وَمِنَ ٱلۡأَنۡعَٰمِ أَزۡوَٰجٗا يَذۡرَؤُكُمۡ فِيهِۚ لَيۡسَ كَمِثۡلِهِۦ شَيۡءٞۖ وَهُوَ ٱلسَّمِيعُ ٱلۡبَصِيرُ
11. Mokeli wa likolo na mabele. Asalela bino basi baye bawuti na banzoto na bino moko, mpe asaleli bino banyama mibale mibale, na nzela wana nde bokoma ebele. Azali na mokokani te oyo akokani naye, mpe azali oyo ayokaka mpe amonaka.
அரபு விரிவுரைகள்:
لَهُۥ مَقَالِيدُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۖ يَبۡسُطُ ٱلرِّزۡقَ لِمَن يَشَآءُ وَيَقۡدِرُۚ إِنَّهُۥ بِكُلِّ شَيۡءٍ عَلِيمٞ
12. Bafungola ya bomengo ya likolo na ya mabele bizali bia ye, apesaka bozui na oyo alingi mpe akutolaka na oyo alingi. Azali na boyebi ya biloko binso.
அரபு விரிவுரைகள்:
۞ شَرَعَ لَكُم مِّنَ ٱلدِّينِ مَا وَصَّىٰ بِهِۦ نُوحٗا وَٱلَّذِيٓ أَوۡحَيۡنَآ إِلَيۡكَ وَمَا وَصَّيۡنَا بِهِۦٓ إِبۡرَٰهِيمَ وَمُوسَىٰ وَعِيسَىٰٓۖ أَنۡ أَقِيمُواْ ٱلدِّينَ وَلَا تَتَفَرَّقُواْ فِيهِۚ كَبُرَ عَلَى ٱلۡمُشۡرِكِينَ مَا تَدۡعُوهُمۡ إِلَيۡهِۚ ٱللَّهُ يَجۡتَبِيٓ إِلَيۡهِ مَن يَشَآءُ وَيَهۡدِيٓ إِلَيۡهِ مَن يُنِيبُ
13. Apesi bino mibeko ya (makambo ya) lingomba ndenge moko apesaki na Nûh, mpe oyo tozali komonisela yo mpe oyo topesaki Ibrâhîm, na Mûssa mpe Issa ete: Botelemisa lingomba, kasi bokabwana na yango te. Ezali likambo monene epai ya basangisi (Allah) na maye ozali kobenga bango тропа yango. Allah aponaka pembeni naye moto oyo alingi, mpe azali kokamba epai naye oyo azali kotubela.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَمَا تَفَرَّقُوٓاْ إِلَّا مِنۢ بَعۡدِ مَا جَآءَهُمُ ٱلۡعِلۡمُ بَغۡيَۢا بَيۡنَهُمۡۚ وَلَوۡلَا كَلِمَةٞ سَبَقَتۡ مِن رَّبِّكَ إِلَىٰٓ أَجَلٖ مُّسَمّٗى لَّقُضِيَ بَيۡنَهُمۡۚ وَإِنَّ ٱلَّذِينَ أُورِثُواْ ٱلۡكِتَٰبَ مِنۢ بَعۡدِهِمۡ لَفِي شَكّٖ مِّنۡهُ مُرِيبٖ
14. Mpe bakabwanaki te sé sima ya koyela bango boyebi, na maye oyo ekweyaki kati kati na bango. Soki ezalaki te ete liloba lisila kokomama epai ya Nkolo wa yo na tango oyo eyebani, alingaki kokata kati kati na bango. Mpe ya soló, baye bakitanaki buku sima na bango, bazali na tembe makasi bazali komiyeba te.
அரபு விரிவுரைகள்:
فَلِذَٰلِكَ فَٱدۡعُۖ وَٱسۡتَقِمۡ كَمَآ أُمِرۡتَۖ وَلَا تَتَّبِعۡ أَهۡوَآءَهُمۡۖ وَقُلۡ ءَامَنتُ بِمَآ أَنزَلَ ٱللَّهُ مِن كِتَٰبٖۖ وَأُمِرۡتُ لِأَعۡدِلَ بَيۡنَكُمُۖ ٱللَّهُ رَبُّنَا وَرَبُّكُمۡۖ لَنَآ أَعۡمَٰلُنَا وَلَكُمۡ أَعۡمَٰلُكُمۡۖ لَا حُجَّةَ بَيۡنَنَا وَبَيۡنَكُمُۖ ٱللَّهُ يَجۡمَعُ بَيۡنَنَاۖ وَإِلَيۡهِ ٱلۡمَصِيرُ
15. Benga na lolenge wana tikala na nzela ya semba lolenge batinda yo, kolanda bamposa na bango te, mpe loba; nandimi na maye Allah akitisa kati na buku, mpe natindamaki тропа kokata na bosembo kati kati na bino. Allah azali Nkolo wa biso тре Nkolo wa bino, tozali na misala mia biso тре bozali na oyo ya bino, likambo moko ekoki kosalema te kati kati na biso na bino. Allah akosangisaka biso, тре epai naye nde bozongi (bokozalaka)
அரபு விரிவுரைகள்:
وَٱلَّذِينَ يُحَآجُّونَ فِي ٱللَّهِ مِنۢ بَعۡدِ مَا ٱسۡتُجِيبَ لَهُۥ حُجَّتُهُمۡ دَاحِضَةٌ عِندَ رَبِّهِمۡ وَعَلَيۡهِمۡ غَضَبٞ وَلَهُمۡ عَذَابٞ شَدِيدٌ
16. Mpe тропа baye bazali kolobaloba na ntina ya Allah osima ya bobengi bwaye, manso bazali kosala mazali na ntina te epai ya Nkolo na bango, kanda ekokitelaka bango mpe bakozalaka na etumbu makasi.
அரபு விரிவுரைகள்:
ٱللَّهُ ٱلَّذِيٓ أَنزَلَ ٱلۡكِتَٰبَ بِٱلۡحَقِّ وَٱلۡمِيزَانَۗ وَمَا يُدۡرِيكَ لَعَلَّ ٱلسَّاعَةَ قَرِيبٞ
17. Allah nde akitisa buku na bosôló, mpe na emekelo. Mpe yo oyebi te tango mosusu ngonga yango ebelemi.
அரபு விரிவுரைகள்:
يَسۡتَعۡجِلُ بِهَا ٱلَّذِينَ لَا يُؤۡمِنُونَ بِهَاۖ وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ مُشۡفِقُونَ مِنۡهَا وَيَعۡلَمُونَ أَنَّهَا ٱلۡحَقُّۗ أَلَآ إِنَّ ٱلَّذِينَ يُمَارُونَ فِي ٱلسَّاعَةِ لَفِي ضَلَٰلِۭ بَعِيدٍ
18. Baye bazangi kondima, bazali kowelisa yango. Kasi baye bandimi bazali kobanga yango, mpe bayebi ete yango ezali sôló. Baye bazali kotia tembe тропа mokolo ya suka, bazali o kati ya libungi ya mosika.
அரபு விரிவுரைகள்:
ٱللَّهُ لَطِيفُۢ بِعِبَادِهِۦ يَرۡزُقُ مَن يَشَآءُۖ وَهُوَ ٱلۡقَوِيُّ ٱلۡعَزِيزُ
19. Allah azali malamu тропа bawumbu baye, apesaka bozui na oyo alingi mpe azali na bokasi atonda nguya.
அரபு விரிவுரைகள்:
مَن كَانَ يُرِيدُ حَرۡثَ ٱلۡأٓخِرَةِ نَزِدۡ لَهُۥ فِي حَرۡثِهِۦۖ وَمَن كَانَ يُرِيدُ حَرۡثَ ٱلدُّنۡيَا نُؤۡتِهِۦ مِنۡهَا وَمَا لَهُۥ فِي ٱلۡأٓخِرَةِ مِن نَّصِيبٍ
20. Oyo akolinga kosala (bilanga) ya mokolo mwa suka, tokobakisela ye elanga, mpe oyo akolinga kosala awa na mokili, tokopesa ye yango (na bilengi), kasi akozuaka eloko te o mokolo mwa suka.
அரபு விரிவுரைகள்:
أَمۡ لَهُمۡ شُرَكَٰٓؤُاْ شَرَعُواْ لَهُم مِّنَ ٱلدِّينِ مَا لَمۡ يَأۡذَنۢ بِهِ ٱللَّهُۚ وَلَوۡلَا كَلِمَةُ ٱلۡفَصۡلِ لَقُضِيَ بَيۡنَهُمۡۗ وَإِنَّ ٱلظَّٰلِمِينَ لَهُمۡ عَذَابٌ أَلِيمٞ
21. To boye, bazali na basangisi basusu baye balingi kosalela bango mibeko misusu mia lingomba miye Allah apesi ndingisa te? Soki тропа mobeko oyo ezali kati na bango te, nde likambo lisilaki kokatama kati na bango. Kasi babubi bakozalaka na etumbu makasi.
அரபு விரிவுரைகள்:
تَرَى ٱلظَّٰلِمِينَ مُشۡفِقِينَ مِمَّا كَسَبُواْ وَهُوَ وَاقِعُۢ بِهِمۡۗ وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ فِي رَوۡضَاتِ ٱلۡجَنَّاتِۖ لَهُم مَّا يَشَآءُونَ عِندَ رَبِّهِمۡۚ ذَٰلِكَ هُوَ ٱلۡفَضۡلُ ٱلۡكَبِيرُ
22. Okomona babubi bakomi kobanga тропа maye bazalaki kosala mpe (etumbu) ekokwela bango, mpe тропа baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, bakozalaka na bisika ya bilanga bia Iola, mpe bakozuaka oyo bakolingaka epai ya Nkolo wa bango. Wana nde bolamu bonene.
அரபு விரிவுரைகள்:
ذَٰلِكَ ٱلَّذِي يُبَشِّرُ ٱللَّهُ عِبَادَهُ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِۗ قُل لَّآ أَسۡـَٔلُكُمۡ عَلَيۡهِ أَجۡرًا إِلَّا ٱلۡمَوَدَّةَ فِي ٱلۡقُرۡبَىٰۗ وَمَن يَقۡتَرِفۡ حَسَنَةٗ نَّزِدۡ لَهُۥ فِيهَا حُسۡنًاۚ إِنَّ ٱللَّهَ غَفُورٞ شَكُورٌ
23. Wana nde sango elamu eye Allah azali kopesa epai ya bawumbu naye baye bandima mpe bazali kosala misala milamu, loba: Nakosenga bino yango lifuta te, ezali sé bolingo bwa bondeko, mpe oyo akosala bolamu, tokobakisela ye ya kitoko koleka. Ya soló, Allah azali molimbisi atonda melesi,
அரபு விரிவுரைகள்:
أَمۡ يَقُولُونَ ٱفۡتَرَىٰ عَلَى ٱللَّهِ كَذِبٗاۖ فَإِن يَشَإِ ٱللَّهُ يَخۡتِمۡ عَلَىٰ قَلۡبِكَۗ وَيَمۡحُ ٱللَّهُ ٱلۡبَٰطِلَ وَيُحِقُّ ٱلۡحَقَّ بِكَلِمَٰتِهِۦٓۚ إِنَّهُۥ عَلِيمُۢ بِذَاتِ ٱلصُّدُورِ
24. To bazali koloba ete: Babukeli Allah lokuta, mpe soki Allah alingi akokanga motema nayo, mpe Allah azali kolimwisa lokuta na liloba mpe azali kondimisa bosembo. Ya soló, ayebi mabombami ya mitema.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَهُوَ ٱلَّذِي يَقۡبَلُ ٱلتَّوۡبَةَ عَنۡ عِبَادِهِۦ وَيَعۡفُواْ عَنِ ٱلسَّيِّـَٔاتِ وَيَعۡلَمُ مَا تَفۡعَلُونَ
25. Ye nde andimelaka bawumbu naye baye bazali kosenga tubela, mpe azali molimbisi ya masumu, mpe ayebaka maye bosalaka.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَيَسۡتَجِيبُ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ وَيَزِيدُهُم مِّن فَضۡلِهِۦۚ وَٱلۡكَٰفِرُونَ لَهُمۡ عَذَابٞ شَدِيدٞ
26. Mpe azali kondimela bandimi baye bazali kosala misala milamu, mpe abakiselaka bango bolamu bwaye. Kasi bapengwi bakozuaka etumbu ya makasi.
அரபு விரிவுரைகள்:
۞ وَلَوۡ بَسَطَ ٱللَّهُ ٱلرِّزۡقَ لِعِبَادِهِۦ لَبَغَوۡاْ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَلَٰكِن يُنَزِّلُ بِقَدَرٖ مَّا يَشَآءُۚ إِنَّهُۥ بِعِبَادِهِۦ خَبِيرُۢ بَصِيرٞ
27. Soki Allah apesaka bozui na bawumbu baye banso, balingaki kosala na yango mabe kati na mokili, kasi akitisaka yango ndenge alingi (mokémoké), ayebi ya solo, bawumbu baye mpe amonaka.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَهُوَ ٱلَّذِي يُنَزِّلُ ٱلۡغَيۡثَ مِنۢ بَعۡدِ مَا قَنَطُواْ وَيَنشُرُ رَحۡمَتَهُۥۚ وَهُوَ ٱلۡوَلِيُّ ٱلۡحَمِيدُ
28. Ye nde akitisaka mbula sima ya bango kozanga elikia mpe apanzaka ngolu naye. Ye nde azali mokonzi atonda lokumu.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَمِنۡ ءَايَٰتِهِۦ خَلۡقُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَمَا بَثَّ فِيهِمَا مِن دَآبَّةٖۚ وَهُوَ عَلَىٰ جَمۡعِهِمۡ إِذَا يَشَآءُ قَدِيرٞ
29. Mpe o kati ya bilembo bia ye, bokelami ya likolo na mabele, na maye manso mazali na bomoyi kati na yango. Mpe azali na bokoki ya kosangisa miango soki alingi.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَمَآ أَصَٰبَكُم مِّن مُّصِيبَةٖ فَبِمَا كَسَبَتۡ أَيۡدِيكُمۡ وَيَعۡفُواْ عَن كَثِيرٖ
30. Nyoso ya mabe oyo ezali kozua bino, ewutaka sé na maye maboko na bino esali. Kasi azali kolimbisa ebele.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَمَآ أَنتُم بِمُعۡجِزِينَ فِي ٱلۡأَرۡضِۖ وَمَا لَكُم مِّن دُونِ ٱللَّهِ مِن وَلِيّٖ وَلَا نَصِيرٖ
31. Мре bokokoka kokima nguya ya Allah awa na mabele te, тре boko žala na mosungi te тре mobateli te na kotika Allah.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَمِنۡ ءَايَٰتِهِ ٱلۡجَوَارِ فِي ٱلۡبَحۡرِ كَٱلۡأَعۡلَٰمِ
32. Мре o kati ya bilembo bia ye, masuwa kati na ebale, (okomona yango) lokola bangomba.
அரபு விரிவுரைகள்:
إِن يَشَأۡ يُسۡكِنِ ٱلرِّيحَ فَيَظۡلَلۡنَ رَوَاكِدَ عَلَىٰ ظَهۡرِهِۦٓۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتٖ لِّكُلِّ صَبَّارٖ شَكُورٍ
33. Soki alingi akitisi mopepe, mpe (okomona yango) etikali ya kotelema esika moko. Ya soló, nyoso wana ezali bilembo тропа (bato) banso baye bazali kokanga motema mpe bazali kotondo,
அரபு விரிவுரைகள்:
أَوۡ يُوبِقۡهُنَّ بِمَا كَسَبُواْ وَيَعۡفُ عَن كَثِيرٖ
34. То mpe akobebisa тропа masumu maye basalaki, kasi alimbisaka ebele.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَيَعۡلَمَ ٱلَّذِينَ يُجَٰدِلُونَ فِيٓ ءَايَٰتِنَا مَا لَهُم مِّن مَّحِيصٖ
35. Baye bazali kobundisa mikapo mia biso, bayebi malamu ete: Bazali na esika ya kokimela te.
அரபு விரிவுரைகள்:
فَمَآ أُوتِيتُم مِّن شَيۡءٖ فَمَتَٰعُ ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَاۚ وَمَا عِندَ ٱللَّهِ خَيۡرٞ وَأَبۡقَىٰ لِلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَلَىٰ رَبِّهِمۡ يَتَوَكَّلُونَ
36. Manso maye bopesamaki (ya malamu) ezali sé тропа bosepeli тропа bomoyi bwa lelo, kasi oyo ezali epai ya Allah ezali malamu mpe ewumelaka тропа baye bandima mpe bazali komipesa epai ya Nkolo wa bango.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَٱلَّذِينَ يَجۡتَنِبُونَ كَبَٰٓئِرَ ٱلۡإِثۡمِ وَٱلۡفَوَٰحِشَ وَإِذَا مَا غَضِبُواْ هُمۡ يَغۡفِرُونَ
37. Mpe baye bazali komitiya mosika na kosala masumu to mbeba ya minene mpe soki basiliki balimbisaka,
அரபு விரிவுரைகள்:
وَٱلَّذِينَ ٱسۡتَجَابُواْ لِرَبِّهِمۡ وَأَقَامُواْ ٱلصَّلَوٰةَ وَأَمۡرُهُمۡ شُورَىٰ بَيۡنَهُمۡ وَمِمَّا رَزَقۡنَٰهُمۡ يُنفِقُونَ
38. Mpe baye bazali koyanola na bobengami bwa Nkolo wa bango, mpe batelemisi losambo mpe bazali kotunana (yambo ya kosala likambo) kati kati na bango, mpe bazali kobimisa ndambo ya maye topesaki bango,
அரபு விரிவுரைகள்:
وَٱلَّذِينَ إِذَآ أَصَابَهُمُ ٱلۡبَغۡيُ هُمۡ يَنتَصِرُونَ
39. Mpe baye soki basali bango mabe, balukaka komilongisa.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَجَزَٰٓؤُاْ سَيِّئَةٖ سَيِّئَةٞ مِّثۡلُهَاۖ فَمَنۡ عَفَا وَأَصۡلَحَ فَأَجۡرُهُۥ عَلَى ٱللَّهِۚ إِنَّهُۥ لَا يُحِبُّ ٱلظَّٰلِمِينَ
40. Kasi lifuta ya oyo asali mabe ezali sé mabe lokola yango, na oyo akolimbisa mpe sima abongisi, Allah akofuta ye. Ya soló, ye alingaka babubi te.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَلَمَنِ ٱنتَصَرَ بَعۡدَ ظُلۡمِهِۦ فَأُوْلَٰٓئِكَ مَا عَلَيۡهِم مِّن سَبِيلٍ
41. Kasi ba oyo bakomilongisa sima ya mabe basalaki yango, nzela ezali lisusu te mpo bazongisela bango mabe.
அரபு விரிவுரைகள்:
إِنَّمَا ٱلسَّبِيلُ عَلَى ٱلَّذِينَ يَظۡلِمُونَ ٱلنَّاسَ وَيَبۡغُونَ فِي ٱلۡأَرۡضِ بِغَيۡرِ ٱلۡحَقِّۚ أُوْلَٰٓئِكَ لَهُمۡ عَذَابٌ أَلِيمٞ
42. Ya solo, nzela wana ezali тропа baye bazali kobuba bato mpe bazali kobebisa na mokili, batiki (kosalela) bosóló. Bango bakozuaka etumbu makasi.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَلَمَن صَبَرَ وَغَفَرَ إِنَّ ذَٰلِكَ لَمِنۡ عَزۡمِ ٱلۡأُمُورِ
43. Kasi oyo akokanga motema mpe alimbisi, wana nde lolenge ya malamu ya kobongisa na yango likambo.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَمَن يُضۡلِلِ ٱللَّهُ فَمَا لَهُۥ مِن وَلِيّٖ مِّنۢ بَعۡدِهِۦۗ وَتَرَى ٱلظَّٰلِمِينَ لَمَّا رَأَوُاْ ٱلۡعَذَابَ يَقُولُونَ هَلۡ إِلَىٰ مَرَدّٖ مِّن سَبِيلٖ
44. Mpe oyo Allah akobungisa, akozua mobateli mosusu sima naye te. Okomona tango babubi bakomonaka etumbu bakolobaka: Boye lolenge ya kozongisa biso na mokili ezali te?
அரபு விரிவுரைகள்:
وَتَرَىٰهُمۡ يُعۡرَضُونَ عَلَيۡهَا خَٰشِعِينَ مِنَ ٱلذُّلِّ يَنظُرُونَ مِن طَرۡفٍ خَفِيّٖۗ وَقَالَ ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ إِنَّ ٱلۡخَٰسِرِينَ ٱلَّذِينَ خَسِرُوٓاْ أَنفُسَهُمۡ وَأَهۡلِيهِمۡ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِۗ أَلَآ إِنَّ ٱلظَّٰلِمِينَ فِي عَذَابٖ مُّقِيمٖ
45. Mpe okomona bakotiyaka bango liboso lia lifelo bazali kobanga, bazali koyeba lisusu te wapi bakokendeke, bakomi kotala malembe na liso lioko, mpe bandimi bakolobaka: Ya soló, bazangi bazali baye bamizangisi bango moko elongo na mabota ma bango mokolo ya suka. Ya solo, babubi bakozalaka na etumbu ya libela.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَمَا كَانَ لَهُم مِّنۡ أَوۡلِيَآءَ يَنصُرُونَهُم مِّن دُونِ ٱللَّهِۗ وَمَن يُضۡلِلِ ٱللَّهُ فَمَا لَهُۥ مِن سَبِيلٍ
46. Mpe bakozuaka babikisi misusu te na botiki Allah. Na oyo Allah abungisi, akozuaka lisusu nzela te.
அரபு விரிவுரைகள்:
ٱسۡتَجِيبُواْ لِرَبِّكُم مِّن قَبۡلِ أَن يَأۡتِيَ يَوۡمٞ لَّا مَرَدَّ لَهُۥ مِنَ ٱللَّهِۚ مَا لَكُم مِّن مَّلۡجَإٖ يَوۡمَئِذٖ وَمَا لَكُم مِّن نَّكِيرٖ
47. Boyamba mbela ya Nkolo na bino yambo ete eyela bino na mokolo oyo Allah akozongisa yango sima te. Mokolo yango kowumela ekozala te mpe bokokoka kowangana (masumu na bino) te.
அரபு விரிவுரைகள்:
فَإِنۡ أَعۡرَضُواْ فَمَآ أَرۡسَلۡنَٰكَ عَلَيۡهِمۡ حَفِيظًاۖ إِنۡ عَلَيۡكَ إِلَّا ٱلۡبَلَٰغُۗ وَإِنَّآ إِذَآ أَذَقۡنَا ٱلۡإِنسَٰنَ مِنَّا رَحۡمَةٗ فَرِحَ بِهَاۖ وَإِن تُصِبۡهُمۡ سَيِّئَةُۢ بِمَا قَدَّمَتۡ أَيۡدِيهِمۡ فَإِنَّ ٱلۡإِنسَٰنَ كَفُورٞ
48. Soki babaluki, totindi yo te mpo ozala mokengeli na bango, ezali тропа yo kaka sé okomisa sango. Mpe biso soki topesi moto bolamu na biso asepeli na yango, mpe soki mpasi ezui bango тропа maye maboko ma bangomoko masalaki, ya soló moto azanga botondi.
அரபு விரிவுரைகள்:
لِّلَّهِ مُلۡكُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۚ يَخۡلُقُ مَا يَشَآءُۚ يَهَبُ لِمَن يَشَآءُ إِنَٰثٗا وَيَهَبُ لِمَن يَشَآءُ ٱلذُّكُورَ
49. Bokonzi ya likolo na ya nsé ezali ya Allah. Akelaka maye oyo alingi apesaka likabo ya mwana mwasi na moto oyo alingi, mpe apesaka mwana mobali na oyo alingi.
அரபு விரிவுரைகள்:
أَوۡ يُزَوِّجُهُمۡ ذُكۡرَانٗا وَإِنَٰثٗاۖ وَيَجۡعَلُ مَن يَشَآءُ عَقِيمًاۚ إِنَّهُۥ عَلِيمٞ قَدِيرٞ
50. To abimisaka bango mapasa mobali na mwasi, mpe azangisaka kobota na oyo alingi. Ya sólo ye azali moyebi mpe akoka.
அரபு விரிவுரைகள்:
۞ وَمَا كَانَ لِبَشَرٍ أَن يُكَلِّمَهُ ٱللَّهُ إِلَّا وَحۡيًا أَوۡ مِن وَرَآيِٕ حِجَابٍ أَوۡ يُرۡسِلَ رَسُولٗا فَيُوحِيَ بِإِذۡنِهِۦ مَا يَشَآءُۚ إِنَّهُۥ عَلِيٌّ حَكِيمٞ
51. Mpe ezali na moto moko te oyo Allah asololi naye polele sé ezala emoniseli, to ezala sima ya eloko ezipi ye, to mpe atindela ye motindami (anzelu) mpe apesa ye oyo alingi na ndingisa naye (Allah). Ya sólo aleki na likolo mpe atonda bwanya.
அரபு விரிவுரைகள்:
وَكَذَٰلِكَ أَوۡحَيۡنَآ إِلَيۡكَ رُوحٗا مِّنۡ أَمۡرِنَاۚ مَا كُنتَ تَدۡرِي مَا ٱلۡكِتَٰبُ وَلَا ٱلۡإِيمَٰنُ وَلَٰكِن جَعَلۡنَٰهُ نُورٗا نَّهۡدِي بِهِۦ مَن نَّشَآءُ مِنۡ عِبَادِنَاۚ وَإِنَّكَ لَتَهۡدِيٓ إِلَىٰ صِرَٰطٖ مُّسۡتَقِيمٖ
52. Na boye nde tomoniselaki yo (kurani) molimo na motindo na biso. Ozalaki na boyebi moko te ya buku, mpe ya bondimi te, kasi tosalaki yango ezala mwinda mpo tokamba na yango nani tolingi o kati ya bawumbu na biso. Mpe ya sólo, ozali kokamba na nzela ya semba.
அரபு விரிவுரைகள்:
صِرَٰطِ ٱللَّهِ ٱلَّذِي لَهُۥ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَا فِي ٱلۡأَرۡضِۗ أَلَآ إِلَى ٱللَّهِ تَصِيرُ ٱلۡأُمُورُ
53. Nzela ya Allah oyo manso mazali o likolo na nsé mazali ya ye, epai ya Allah nde makambo manso makokoma.
அரபு விரிவுரைகள்:
 
மொழிபெயர்ப்பு அத்தியாயம்: ஸூரா அஷ்ஷூரா
அத்தியாயங்களின் அட்டவணை பக்க எண்
 
அல்குர்ஆன் மொழிபெயர்ப்பு - الترجمة اللينغالا - மொழிபெயர்ப்பு அட்டவணை

ترجمة معاني القرآن الكريم الى اللغة اللينغالا، ترجمها زكريا محمد بالنغوغو.

மூடுக