Check out the new design

Kur'an-ı Kerim meal tercümesi - Lingala Tercüme - Muhammed Bangugu * - Mealler fihristi

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Anlam tercümesi Sure: Sûratu Fâtır   Ayet:
وَإِن يُكَذِّبُوكَ فَقَدۡ كُذِّبَتۡ رُسُلٞ مِّن قَبۡلِكَۚ وَإِلَى ٱللَّهِ تُرۡجَعُ ٱلۡأُمُورُ
Mpe soki baboyi kondimela yo, kasi ebele ya batindami baboyamaki kondimela liboso nayo, mpe epai ya Allah makambo manso makozongisama.
Arapça tefsirler:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّاسُ إِنَّ وَعۡدَ ٱللَّهِ حَقّٞۖ فَلَا تَغُرَّنَّكُمُ ٱلۡحَيَوٰةُ ٱلدُّنۡيَا وَلَا يَغُرَّنَّكُم بِٱللَّهِ ٱلۡغَرُورُ
Eh bino bato! Ya soló, elaka ya Allah ezali ya lokuta te, bomoyi ya nsé ekosa bino te, mpe (satana) mokosi monene akosa binoтропа Allah te.
Arapça tefsirler:
إِنَّ ٱلشَّيۡطَٰنَ لَكُمۡ عَدُوّٞ فَٱتَّخِذُوهُ عَدُوًّاۚ إِنَّمَا يَدۡعُواْ حِزۡبَهُۥ لِيَكُونُواْ مِنۡ أَصۡحَٰبِ ٱلسَّعِيرِ
Ya sólo, satana azali monguna na bino, bozua ye mpe monguna. Ya sólo, azali kobenga bato naye sé mpo bazala balongani ya moto ya lifelo.
Arapça tefsirler:
ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ لَهُمۡ عَذَابٞ شَدِيدٞۖ وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ لَهُم مَّغۡفِرَةٞ وَأَجۡرٞ كَبِيرٌ
Baye bapengwa bakozala na etumbu ya makasi, kasi baye bandimaki mpe basalaki misala ya malamu, bakozua bolimbisi mpe lifuta linene.
Arapça tefsirler:
أَفَمَن زُيِّنَ لَهُۥ سُوٓءُ عَمَلِهِۦ فَرَءَاهُ حَسَنٗاۖ فَإِنَّ ٱللَّهَ يُضِلُّ مَن يَشَآءُ وَيَهۡدِي مَن يَشَآءُۖ فَلَا تَذۡهَبۡ نَفۡسُكَ عَلَيۡهِمۡ حَسَرَٰتٍۚ إِنَّ ٱللَّهَ عَلِيمُۢ بِمَا يَصۡنَعُونَ
Boye moto oyo babongiseli ye mosala naye ya mabe mpe azali kornona yango malamu? Ya sólo, Allah abungisaka oyo alingi, mpe akambaka oyo alingi, mpe konyokola molimo nayo te тропа bango. Ya sólo Allah ayebi malamu maye bazali kosala.
Arapça tefsirler:
وَٱللَّهُ ٱلَّذِيٓ أَرۡسَلَ ٱلرِّيَٰحَ فَتُثِيرُ سَحَابٗا فَسُقۡنَٰهُ إِلَىٰ بَلَدٖ مَّيِّتٖ فَأَحۡيَيۡنَا بِهِ ٱلۡأَرۡضَ بَعۡدَ مَوۡتِهَاۚ كَذَٰلِكَ ٱلنُّشُورُ
Allah nde azali kotinda mopepe ezali kotombola londende ya mbula, mpe tonukisi yango na mboka oyo ekufa, mpe tobikisi mabele yango na mayi wana. Lolenge wana nde lisekwa likozalaka.
Arapça tefsirler:
مَن كَانَ يُرِيدُ ٱلۡعِزَّةَ فَلِلَّهِ ٱلۡعِزَّةُ جَمِيعًاۚ إِلَيۡهِ يَصۡعَدُ ٱلۡكَلِمُ ٱلطَّيِّبُ وَٱلۡعَمَلُ ٱلصَّٰلِحُ يَرۡفَعُهُۥۚ وَٱلَّذِينَ يَمۡكُرُونَ ٱلسَّيِّـَٔاتِ لَهُمۡ عَذَابٞ شَدِيدٞۖ وَمَكۡرُ أُوْلَٰٓئِكَ هُوَ يَبُورُ
Oyo azali koluka nguya, ayeba ete nguya nyoso ezali ya Allah. Epai naye nde maloba kitoko ezali komata, mpe azali kotombola mosala ya malamu. Kasi baye bazali kosala likita ya mabe, bakozala na etumbu ya makasi, mpe likita na bango wana ekolonga te.
Arapça tefsirler:
وَٱللَّهُ خَلَقَكُم مِّن تُرَابٖ ثُمَّ مِن نُّطۡفَةٖ ثُمَّ جَعَلَكُمۡ أَزۡوَٰجٗاۚ وَمَا تَحۡمِلُ مِنۡ أُنثَىٰ وَلَا تَضَعُ إِلَّا بِعِلۡمِهِۦۚ وَمَا يُعَمَّرُ مِن مُّعَمَّرٖ وَلَا يُنقَصُ مِنۡ عُمُرِهِۦٓ إِلَّا فِي كِتَٰبٍۚ إِنَّ ذَٰلِكَ عَلَى ٱللَّهِ يَسِيرٞ
Mpe Allah nde akeli bino na mabele, sima akeli bino na mayi ya mobali, sima asali bolongani (mwasi na mobali), mwasi moko te akomema zemi to akobota sé ezala na boyebi naye (Allah), mpe mibu mikobakisama te to kokutoama te kino esilaki kokomama na buku. Ya soló, wana ezali pete тропа Allah .
Arapça tefsirler:
 
Anlam tercümesi Sure: Sûratu Fâtır
Surelerin fihristi Sayfa numarası
 
Kur'an-ı Kerim meal tercümesi - Lingala Tercüme - Muhammed Bangugu - Mealler fihristi

Zekeriyya Muhammad Bangugu tarafından tercüme edilmiştir.

Kapat