Check out the new design

Kur'an-ı Kerim meal tercümesi - Lingala Tercüme - Muhammed Bangugu * - Mealler fihristi

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Anlam tercümesi Sure: Sûratu Fâtır   Ayet:
وَمَا يَسۡتَوِي ٱلۡأَعۡمَىٰ وَٱلۡبَصِيرُ
19. Mpe moto oyo miso ekufi, akokani te na moto oyo azali kornona,
Arapça tefsirler:
وَلَا ٱلظُّلُمَٰتُ وَلَا ٱلنُّورُ
20. Mpe molili ekokani na mwinda te.
Arapça tefsirler:
وَلَا ٱلظِّلُّ وَلَا ٱلۡحَرُورُ
21. Mpe malili ekokani na molunge te.
Arapça tefsirler:
وَمَا يَسۡتَوِي ٱلۡأَحۡيَآءُ وَلَا ٱلۡأَمۡوَٰتُۚ إِنَّ ٱللَّهَ يُسۡمِعُ مَن يَشَآءُۖ وَمَآ أَنتَ بِمُسۡمِعٖ مَّن فِي ٱلۡقُبُورِ
22. Mpe baye ya bomoyi bakokani te na baye bawa. Ya soló, Allah ayokisaka nani alingi, kasi yo (Muhammad), okoki te koyokisa baye bazali na malita.
Arapça tefsirler:
إِنۡ أَنتَ إِلَّا نَذِيرٌ
23. Kasi, yo ozali sé mokebisi.
Arapça tefsirler:
إِنَّآ أَرۡسَلۡنَٰكَ بِٱلۡحَقِّ بَشِيرٗا وَنَذِيرٗاۚ وَإِن مِّنۡ أُمَّةٍ إِلَّا خَلَا فِيهَا نَذِيرٞ
24. Ya solo, totindaki yo na bosembo ete ozala mokebisi mpe mopesi sango ya malamu, mpo umma(1) moko te oyo eleka sé bazua mokebisi.
1 Umma: Awa elakisi: "Etuka"; Bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 128.
Arapça tefsirler:
وَإِن يُكَذِّبُوكَ فَقَدۡ كَذَّبَ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡ جَآءَتۡهُمۡ رُسُلُهُم بِٱلۡبَيِّنَٰتِ وَبِٱلزُّبُرِ وَبِٱلۡكِتَٰبِ ٱلۡمُنِيرِ
25. Mpe soki baboyi kondimela yo, yeba ete baye ya liboso basilaki mpe koboya batindami na bango, bayelaki bango bilembo bia polele, na makomi, na buku ya bongengi.
Arapça tefsirler:
ثُمَّ أَخَذۡتُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْۖ فَكَيۡفَ كَانَ نَكِيرِ
26. Na sima, tozuaki ba oyo bapengwi, mpe tala ndenge nini (etumbu) na ngai ezalaki!
Arapça tefsirler:
أَلَمۡ تَرَ أَنَّ ٱللَّهَ أَنزَلَ مِنَ ٱلسَّمَآءِ مَآءٗ فَأَخۡرَجۡنَا بِهِۦ ثَمَرَٰتٖ مُّخۡتَلِفًا أَلۡوَٰنُهَاۚ وَمِنَ ٱلۡجِبَالِ جُدَدُۢ بِيضٞ وَحُمۡرٞ مُّخۡتَلِفٌ أَلۡوَٰنُهَا وَغَرَابِيبُ سُودٞ
27. Boye omoni te ndenge Allah azali kokitisa mayi kowuta na mapata, mpe tozali kobimisa na yango bambuma ya ndenge na ndenge? Mpe okati na bangomba, banzela ya pembe mpe ya motané, na balangi ndenge na ndenge, mpe na misusu ya miyindo makasi?
Arapça tefsirler:
وَمِنَ ٱلنَّاسِ وَٱلدَّوَآبِّ وَٱلۡأَنۡعَٰمِ مُخۡتَلِفٌ أَلۡوَٰنُهُۥ كَذَٰلِكَۗ إِنَّمَا يَخۡشَى ٱللَّهَ مِنۡ عِبَادِهِ ٱلۡعُلَمَٰٓؤُاْۗ إِنَّ ٱللَّهَ عَزِيزٌ غَفُورٌ
28. Ndenge moko mpe bato na banyama ya mabele na an’ám(1) binso bizali na balangi ya kokesene. Ya soló, baye bazali kobanga Allah kati na bawumbu naye, ezali nde banganga mayele. Ya sólo, Allah azali na nguya atonda bolimbisi.
1 An’âm: Ezali lisanga ya baniama lokola: (Chameau), ngombe, ntaba na mèmè. Bótala na Al-Imrân mokapo: 14.
Arapça tefsirler:
إِنَّ ٱلَّذِينَ يَتۡلُونَ كِتَٰبَ ٱللَّهِ وَأَقَامُواْ ٱلصَّلَوٰةَ وَأَنفَقُواْ مِمَّا رَزَقۡنَٰهُمۡ سِرّٗا وَعَلَانِيَةٗ يَرۡجُونَ تِجَٰرَةٗ لَّن تَبُورَ
29. Ya sólo, baye bazali kotanga buku ya Allah mpe bazali kotelemisa losambo, mpe bazali kobimisa (тропа Allah) bozui oyo topesi bango, bazali kobimisa yango na polele to na kobomba, bazali kolikia na mombongo oyo ebebisamaka te.
Arapça tefsirler:
لِيُوَفِّيَهُمۡ أُجُورَهُمۡ وَيَزِيدَهُم مِّن فَضۡلِهِۦٓۚ إِنَّهُۥ غَفُورٞ شَكُورٞ
30. Mpo ete (Allah) apesa bango lifuta na bango mpe abakisela bango bolamu naye. Ya sólo, ye azali molimbisi atonda melesi.
Arapça tefsirler:
 
Anlam tercümesi Sure: Sûratu Fâtır
Surelerin fihristi Sayfa numarası
 
Kur'an-ı Kerim meal tercümesi - Lingala Tercüme - Muhammed Bangugu - Mealler fihristi

Zekeriyya Muhammad Bangugu tarafından tercüme edilmiştir.

Kapat