Check out the new design

قۇرئان كەرىم مەنىلىرىنىڭ تەرجىمىسى - لىينگالاچە تەرجىمىسى - مۇھەممەد بالىنغوغو * - تەرجىمىلەر مۇندەرىجىسى

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

مەنالار تەرجىمىسى سۈرە: ھۇد   ئايەت:
قَالَتۡ يَٰوَيۡلَتَىٰٓ ءَأَلِدُ وَأَنَا۠ عَجُوزٞ وَهَٰذَا بَعۡلِي شَيۡخًاۖ إِنَّ هَٰذَا لَشَيۡءٌ عَجِيبٞ
Alobi: Oh mawa na ngai! Nabota mpe ngai nakomi mobange, mpe mobali wa ngai oyo mpe mobange. Ya soló oyo ezali (likambo) ya kokamwisa.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
قَالُوٓاْ أَتَعۡجَبِينَ مِنۡ أَمۡرِ ٱللَّهِۖ رَحۡمَتُ ٱللَّهِ وَبَرَكَٰتُهُۥ عَلَيۡكُمۡ أَهۡلَ ٱلۡبَيۡتِۚ إِنَّهُۥ حَمِيدٞ مَّجِيدٞ
Balobi: Ozali kokamwa na mikano mia Allah? Tika été mawa mpe mapamboli ya Allah ezala likolo na bino bato ya libota oyo. Pamba te ya sólo, Allah akumama mpe asanzolama na lokumu mingi.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
فَلَمَّا ذَهَبَ عَنۡ إِبۡرَٰهِيمَ ٱلرَّوۡعُ وَجَآءَتۡهُ ٱلۡبُشۡرَىٰ يُجَٰدِلُنَا فِي قَوۡمِ لُوطٍ
Mpe tango bobangi esili Ibrâhîm, sango elamu eyeli ye ete azali kosolola na biso тропа likambo lia bato ba Loth.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
إِنَّ إِبۡرَٰهِيمَ لَحَلِيمٌ أَوَّٰهٞ مُّنِيبٞ
Ya soló, Ibrâhîm azalaki moto malamu, azalaki kozonga mpe kotubela mingi epai ya Nkolo naye.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
يَٰٓإِبۡرَٰهِيمُ أَعۡرِضۡ عَنۡ هَٰذَآۖ إِنَّهُۥ قَدۡ جَآءَ أَمۡرُ رَبِّكَۖ وَإِنَّهُمۡ ءَاتِيهِمۡ عَذَابٌ غَيۡرُ مَرۡدُودٖ
Eh Ibrâhîm! Mitiya mosika na oyo. Mpo ya soló, mitindo mia Nkolo wayo misili koya. Мре ya sólo, etumbu ezongisama te ekozua bango.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
وَلَمَّا جَآءَتۡ رُسُلُنَا لُوطٗا سِيٓءَ بِهِمۡ وَضَاقَ بِهِمۡ ذَرۡعٗا وَقَالَ هَٰذَا يَوۡمٌ عَصِيبٞ
Mpe tango batindami[1] na biso bakomaki epai ya Loth, ayokaki pasi mpe mawa тропа bango. Alobaki: Lelo nde mokolo mwa etumbu ya somo.
[1] Batindami: Ba anzelu.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
وَجَآءَهُۥ قَوۡمُهُۥ يُهۡرَعُونَ إِلَيۡهِ وَمِن قَبۡلُ كَانُواْ يَعۡمَلُونَ ٱلسَّيِّـَٔاتِۚ قَالَ يَٰقَوۡمِ هَٰٓؤُلَآءِ بَنَاتِي هُنَّ أَطۡهَرُ لَكُمۡۖ فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَلَا تُخۡزُونِ فِي ضَيۡفِيٓۖ أَلَيۡسَ مِنكُمۡ رَجُلٞ رَّشِيدٞ
Mpe bato baye bayeli ye mbangu. Mpe liboso bazalaki kosala makambo mabe, mpe alobaki na bato naye été: Oh bato bangai! Bótala bana ba ngai ya basi bango oyo, bazali peto mpe malamu тропа bino. Bobanga Allah kasi boyokisa ngai soni te тропа bapaya ba ngai. Boye bozali ata na moto moko ya malamu o kati na bino te?
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
قَالُواْ لَقَدۡ عَلِمۡتَ مَا لَنَا فِي بَنَاتِكَ مِنۡ حَقّٖ وَإِنَّكَ لَتَعۡلَمُ مَا نُرِيدُ
Bayanoli: Oyebi malamu penza ete tozali na posa ya bana nayo ya basi te, (bango bazalaki kolinga kozua basi na mboka ena te) ya soló, oyebi eloko nini tozali kolinga.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
قَالَ لَوۡ أَنَّ لِي بِكُمۡ قُوَّةً أَوۡ ءَاوِيٓ إِلَىٰ رُكۡنٖ شَدِيدٖ
Alobaki na bango été: Ah soki nazalaki na makasi ya kotelemela bino, to mpe nazua ata lisungi mosusu ya makasi koleka!
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
قَالُواْ يَٰلُوطُ إِنَّا رُسُلُ رَبِّكَ لَن يَصِلُوٓاْ إِلَيۡكَۖ فَأَسۡرِ بِأَهۡلِكَ بِقِطۡعٖ مِّنَ ٱلَّيۡلِ وَلَا يَلۡتَفِتۡ مِنكُمۡ أَحَدٌ إِلَّا ٱمۡرَأَتَكَۖ إِنَّهُۥ مُصِيبُهَا مَآ أَصَابَهُمۡۚ إِنَّ مَوۡعِدَهُمُ ٱلصُّبۡحُۚ أَلَيۡسَ ٱلصُّبۡحُ بِقَرِيبٖ
(Bapaya) balobi: Eh Loth! Ya sólo, tozali batindami ya Nkolo wa yo. Bakosala yo eloko te, kende noki na libota lia yo okati na butu. Мре токо te kati na bino abongola elongi sima te, longola sé mwasi wayo (oyo azangaki kotosa), mpe akozua oyo ekozua basusu. Solo elaka na bango ekozala na ntongo, boye ntongo ezali pene te?
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
 
مەنالار تەرجىمىسى سۈرە: ھۇد
سۈرە مۇندەرىجىسى بەت نومۇرى
 
قۇرئان كەرىم مەنىلىرىنىڭ تەرجىمىسى - لىينگالاچە تەرجىمىسى - مۇھەممەد بالىنغوغو - تەرجىمىلەر مۇندەرىجىسى

زەكەرىيا مۇھەممەد بالىنغوغو تەرجىمىسى.

تاقاش