Check out the new design

क़ुरआन के अर्थों का अनुवाद - लिंगाला अनुवाद - मुहम्मद बालिंगोगो * - अनुवादों की सूची

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

अर्थों का अनुवाद सूरा: हूद   आयत:
قَالَتۡ يَٰوَيۡلَتَىٰٓ ءَأَلِدُ وَأَنَا۠ عَجُوزٞ وَهَٰذَا بَعۡلِي شَيۡخًاۖ إِنَّ هَٰذَا لَشَيۡءٌ عَجِيبٞ
72. Alobi: Oh mawa na ngai! Nabota mpe ngai nakomi mobange, mpe mobali wa ngai oyo mpe mobange. Ya soló oyo ezali (likambo) ya kokamwisa.
अरबी तफ़सीरें:
قَالُوٓاْ أَتَعۡجَبِينَ مِنۡ أَمۡرِ ٱللَّهِۖ رَحۡمَتُ ٱللَّهِ وَبَرَكَٰتُهُۥ عَلَيۡكُمۡ أَهۡلَ ٱلۡبَيۡتِۚ إِنَّهُۥ حَمِيدٞ مَّجِيدٞ
73. Balobi: Ozali kokamwa na mikano mia Allah? Tika été mawa mpe mapamboli ya Allah ezala likolo na bino bato ya libota oyo. Pamba te ya sólo, Allah akumama mpe asanzolama na lokumu mingi.
अरबी तफ़सीरें:
فَلَمَّا ذَهَبَ عَنۡ إِبۡرَٰهِيمَ ٱلرَّوۡعُ وَجَآءَتۡهُ ٱلۡبُشۡرَىٰ يُجَٰدِلُنَا فِي قَوۡمِ لُوطٍ
74. Mpe tango bobangi esili Ibrâhîm, sango elamu eyeli ye ete azali kosolola na biso тропа likambo lia bato ba Loth.
अरबी तफ़सीरें:
إِنَّ إِبۡرَٰهِيمَ لَحَلِيمٌ أَوَّٰهٞ مُّنِيبٞ
75. Ya soló, Ibrâhîm azalaki moto malamu, azalaki kozonga mpe kotubela mingi epai ya Nkolo naye.
अरबी तफ़सीरें:
يَٰٓإِبۡرَٰهِيمُ أَعۡرِضۡ عَنۡ هَٰذَآۖ إِنَّهُۥ قَدۡ جَآءَ أَمۡرُ رَبِّكَۖ وَإِنَّهُمۡ ءَاتِيهِمۡ عَذَابٌ غَيۡرُ مَرۡدُودٖ
76. Eh Ibrâhîm! Mitiya mosika na oyo. Mpo ya soló, mitindo mia Nkolo wayo misili koya. Мре ya sólo, etumbu ezongisama te ekozua bango.
अरबी तफ़सीरें:
وَلَمَّا جَآءَتۡ رُسُلُنَا لُوطٗا سِيٓءَ بِهِمۡ وَضَاقَ بِهِمۡ ذَرۡعٗا وَقَالَ هَٰذَا يَوۡمٌ عَصِيبٞ
77. Mpe tango batindami(1) na biso bakomaki epai ya Loth, ayokaki pasi mpe mawa тропа bango. Alobaki: Lelo nde mokolo mwa etumbu ya somo.
1 Batindami: Ba anzelu.
अरबी तफ़सीरें:
وَجَآءَهُۥ قَوۡمُهُۥ يُهۡرَعُونَ إِلَيۡهِ وَمِن قَبۡلُ كَانُواْ يَعۡمَلُونَ ٱلسَّيِّـَٔاتِۚ قَالَ يَٰقَوۡمِ هَٰٓؤُلَآءِ بَنَاتِي هُنَّ أَطۡهَرُ لَكُمۡۖ فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَلَا تُخۡزُونِ فِي ضَيۡفِيٓۖ أَلَيۡسَ مِنكُمۡ رَجُلٞ رَّشِيدٞ
78. Mpe bato baye bayeli ye mbangu. Mpe liboso bazalaki kosala makambo mabe, mpe alobaki na bato naye été: Oh bato bangai! Bótala bana ba ngai ya basi bango oyo, bazali peto mpe malamu тропа bino. Bobanga Allah kasi boyokisa ngai soni te тропа bapaya ba ngai. Boye bozali ata na moto moko ya malamu o kati na bino te?
अरबी तफ़सीरें:
قَالُواْ لَقَدۡ عَلِمۡتَ مَا لَنَا فِي بَنَاتِكَ مِنۡ حَقّٖ وَإِنَّكَ لَتَعۡلَمُ مَا نُرِيدُ
79. Bayanoli: Oyebi malamu penza ete tozali na posa ya bana nayo ya basi te, (bango bazalaki kolinga kozua basi na mboka ena te) ya soló, oyebi eloko nini tozali kolinga.
अरबी तफ़सीरें:
قَالَ لَوۡ أَنَّ لِي بِكُمۡ قُوَّةً أَوۡ ءَاوِيٓ إِلَىٰ رُكۡنٖ شَدِيدٖ
80. Alobaki na bango été: Ah soki nazalaki na makasi ya kotelemela bino, to mpe nazua ata lisungi mosusu ya makasi koleka!
अरबी तफ़सीरें:
قَالُواْ يَٰلُوطُ إِنَّا رُسُلُ رَبِّكَ لَن يَصِلُوٓاْ إِلَيۡكَۖ فَأَسۡرِ بِأَهۡلِكَ بِقِطۡعٖ مِّنَ ٱلَّيۡلِ وَلَا يَلۡتَفِتۡ مِنكُمۡ أَحَدٌ إِلَّا ٱمۡرَأَتَكَۖ إِنَّهُۥ مُصِيبُهَا مَآ أَصَابَهُمۡۚ إِنَّ مَوۡعِدَهُمُ ٱلصُّبۡحُۚ أَلَيۡسَ ٱلصُّبۡحُ بِقَرِيبٖ
81. (Bapaya) balobi: Eh Loth! Ya sólo, tozali batindami ya Nkolo wa yo. Bakosala yo eloko te, kende noki na libota lia yo okati na butu. Мре токо te kati na bino abongola elongi sima te, longola sé mwasi wayo (oyo azangaki kotosa), mpe akozua oyo ekozua basusu. Solo elaka na bango ekozala na ntongo, boye ntongo ezali pene te?
अरबी तफ़सीरें:
 
अर्थों का अनुवाद सूरा: हूद
सूरों की सूची पृष्ठ संख्या
 
क़ुरआन के अर्थों का अनुवाद - लिंगाला अनुवाद - मुहम्मद बालिंगोगो - अनुवादों की सूची

इसअनुवाद ज़करिया मुहम्मद बालिंगोगो ने किया है।

बंद करें