Check out the new design

قرآن کریم کے معانی کا ترجمہ - لنگالا ترجمہ - محمد بالنغوغو * - ترجمے کی لسٹ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

معانی کا ترجمہ سورت: شعراء   آیت:
مَآ أَغۡنَىٰ عَنۡهُم مَّا كَانُواْ يُمَتَّعُونَ
207. Esengo eye bazalaki na yango esalisaki bango na eloko te.
عربی تفاسیر:
وَمَآ أَهۡلَكۡنَا مِن قَرۡيَةٍ إِلَّا لَهَا مُنذِرُونَ
208. Mpe tobomaka mboka te, sé totinda bakebisi liboso.
عربی تفاسیر:
ذِكۡرَىٰ وَمَا كُنَّا ظَٰلِمِينَ
209. (Mpona) kokebisa, mpe tozali babubi te.
عربی تفاسیر:
وَمَا تَنَزَّلَتۡ بِهِ ٱلشَّيَٰطِينُ
210. Mpe ezalaki basatana nde bakiti nayango te (kurani).
عربی تفاسیر:
وَمَا يَنۢبَغِي لَهُمۡ وَمَا يَسۡتَطِيعُونَ
211. Mpe esengeli na bango te, mpe bazali na makoki ya kosala yango te.
عربی تفاسیر:
إِنَّهُمۡ عَنِ ٱلسَّمۡعِ لَمَعۡزُولُونَ
212. (Kasi) ya soló, bango bamitiye mosika mpona koyoka.
عربی تفاسیر:
فَلَا تَدۡعُ مَعَ ٱللَّهِ إِلَٰهًا ءَاخَرَ فَتَكُونَ مِنَ ٱلۡمُعَذَّبِينَ
213. Mpe kobondela nzambe mosusu te elongo na Allah, noki te okozuama 0 kati ya bato ya etumbu.
عربی تفاسیر:
وَأَنذِرۡ عَشِيرَتَكَ ٱلۡأَقۡرَبِينَ
214. Mpe kebisa libota nayo ya pene.
عربی تفاسیر:
وَٱخۡفِضۡ جَنَاحَكَ لِمَنِ ٱتَّبَعَكَ مِنَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
215. Mpe kitisa mapeka nayo (zala malamu) mpona bandimi oyo bazali kolanda yo.
عربی تفاسیر:
فَإِنۡ عَصَوۡكَ فَقُلۡ إِنِّي بَرِيٓءٞ مِّمَّا تَعۡمَلُونَ
216. Mpe soki baboyi kotosa yo, loba na bango ete: Ya soló ngai na nazali mosika na maye bozali kosala.
عربی تفاسیر:
وَتَوَكَّلۡ عَلَى ٱلۡعَزِيزِ ٱلرَّحِيمِ
217. Mpe mipesa epai ya oyo azali na bokasi atonda mawa.
عربی تفاسیر:
ٱلَّذِي يَرَىٰكَ حِينَ تَقُومُ
218. Oyo amonaka yo tango otelemaka,
عربی تفاسیر:
وَتَقَلُّبَكَ فِي ٱلسَّٰجِدِينَ
219. Mpe (amonaka) yo tango ogumbamaka.
عربی تفاسیر:
إِنَّهُۥ هُوَ ٱلسَّمِيعُ ٱلۡعَلِيمُ
220. Ya soló, ye azali moyoki mpe moyebi.
عربی تفاسیر:
هَلۡ أُنَبِّئُكُمۡ عَلَىٰ مَن تَنَزَّلُ ٱلشَّيَٰطِينُ
221. Boye nayebisa bino epai ya nani basatana bazali kokita?
عربی تفاسیر:
تَنَزَّلُ عَلَىٰ كُلِّ أَفَّاكٍ أَثِيمٖ
222. Bazali kokita epai ya bato ya lokuta basumuki.
عربی تفاسیر:
يُلۡقُونَ ٱلسَّمۡعَ وَأَكۡثَرُهُمۡ كَٰذِبُونَ
223. Batiyaka matoyi kasi ebele na bango bazali bakosi.
عربی تفاسیر:
وَٱلشُّعَرَآءُ يَتَّبِعُهُمُ ٱلۡغَاوُۥنَ
224. Kasi epai ya bato ya másese (masapo), elandaka bango sé baye babunga.
عربی تفاسیر:
أَلَمۡ تَرَ أَنَّهُمۡ فِي كُلِّ وَادٖ يَهِيمُونَ
225. Boye omoni te ete bazali kolekaleka kati kati ya ba ngomba (mibale?)
عربی تفاسیر:
وَأَنَّهُمۡ يَقُولُونَ مَا لَا يَفۡعَلُونَ
226. Mpe ya sólo, bango balobaka maye basalaka te,
عربی تفاسیر:
إِلَّا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ وَذَكَرُواْ ٱللَّهَ كَثِيرٗا وَٱنتَصَرُواْ مِنۢ بَعۡدِ مَا ظُلِمُواْۗ وَسَيَعۡلَمُ ٱلَّذِينَ ظَلَمُوٓاْ أَيَّ مُنقَلَبٖ يَنقَلِبُونَ
227. Longola sé baye bandimi mpe bazali kosala misala ya malamu, mpe bazali kokumisa Allah mingi, mpe bamisalisi na kopamela mabe ya babubi, kasi babubi bakoyebaka kala mingi te ba nani ekobebela bango.
عربی تفاسیر:
 
معانی کا ترجمہ سورت: شعراء
سورتوں کی لسٹ صفحہ نمبر
 
قرآن کریم کے معانی کا ترجمہ - لنگالا ترجمہ - محمد بالنغوغو - ترجمے کی لسٹ

زکریا محمد بالنغوغو نے ترجمہ کیا

بند کریں