قرآن کریم کے معانی کا ترجمہ - الترجمة اللينغالا * - ترجمے کی لسٹ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

معانی کا ترجمہ سورت: سورۂ جاثیہ   آیت:

Al-Djâtsiyah (KOFUKAMA NA MABOLONGO)

حمٓ
1. Hâ, mîm.(1)
1 Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
عربی تفاسیر:
تَنزِيلُ ٱلۡكِتَٰبِ مِنَ ٱللَّهِ ٱلۡعَزِيزِ ٱلۡحَكِيمِ
2. Buku ekitaki kowuta epai ya Allah azali na bokasi atonda bwanya.
عربی تفاسیر:
إِنَّ فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ لَأٓيَٰتٖ لِّلۡمُؤۡمِنِينَ
3. Ya soló, okati ya likolo na mabele bilembo тропа bandimi.
عربی تفاسیر:
وَفِي خَلۡقِكُمۡ وَمَا يَبُثُّ مِن دَآبَّةٍ ءَايَٰتٞ لِّقَوۡمٖ يُوقِنُونَ
4. Mpe na bokeli bino na banyama, ezali bilembo тропа baye bazali na tembe te.
عربی تفاسیر:
وَٱخۡتِلَٰفِ ٱلَّيۡلِ وَٱلنَّهَارِ وَمَآ أَنزَلَ ٱللَّهُ مِنَ ٱلسَّمَآءِ مِن رِّزۡقٖ فَأَحۡيَا بِهِ ٱلۡأَرۡضَ بَعۡدَ مَوۡتِهَا وَتَصۡرِيفِ ٱلرِّيَٰحِ ءَايَٰتٞ لِّقَوۡمٖ يَعۡقِلُونَ
5. Mpe bokeseni bwa butu na mokolo; na maye Allah akitisaki kowuta na likolo lokola bozui, oyo ezali kopesa bomoyi na mabele sima ya kokufa na yango, mpe kotambola ya mopepe bipai na bipai, ezali bilembo mpo bato bakoka kokanisa.
عربی تفاسیر:
تِلۡكَ ءَايَٰتُ ٱللَّهِ نَتۡلُوهَا عَلَيۡكَ بِٱلۡحَقِّۖ فَبِأَيِّ حَدِيثِۭ بَعۡدَ ٱللَّهِ وَءَايَٰتِهِۦ يُؤۡمِنُونَ
6. Wana ezali mikapo mia Allah tozali kotangela yo na bosoló. Liloba kani bakondimaka yango osima (koyoka mpe kozua liloba) ya Allah na bilembo bia ye?
عربی تفاسیر:
وَيۡلٞ لِّكُلِّ أَفَّاكٍ أَثِيمٖ
7. Bato banso baye bazali kosala masumu ya minene mpe kobuka lokuta; bakozua mabe.
عربی تفاسیر:
يَسۡمَعُ ءَايَٰتِ ٱللَّهِ تُتۡلَىٰ عَلَيۡهِ ثُمَّ يُصِرُّ مُسۡتَكۡبِرٗا كَأَن لَّمۡ يَسۡمَعۡهَاۖ فَبَشِّرۡهُ بِعَذَابٍ أَلِيمٖ
8. (Oyo) azali koyoka mikapo mia Allah miye bazali kotangela ye sima asaleli yango lolendo lokola atikala koyoka yango te, pesa ye sango ya etumbu ya makasi.
عربی تفاسیر:
وَإِذَا عَلِمَ مِنۡ ءَايَٰتِنَا شَيۡـًٔا ٱتَّخَذَهَا هُزُوًاۚ أُوْلَٰٓئِكَ لَهُمۡ عَذَابٞ مُّهِينٞ
9. Soki ayebi eloko moke okati ya mikapo mia biso, asaleli yango litio, baye wana nde bakozua etumbu ya kokitisama.
عربی تفاسیر:
مِّن وَرَآئِهِمۡ جَهَنَّمُۖ وَلَا يُغۡنِي عَنۡهُم مَّا كَسَبُواْ شَيۡـٔٗا وَلَا مَا ٱتَّخَذُواْ مِن دُونِ ٱللَّهِ أَوۡلِيَآءَۖ وَلَهُمۡ عَذَابٌ عَظِيمٌ
10. Sima bango bakozalaka na lifelo; bakosalisaka bango na eloko te; ezala ata baye bazuaki bango ete bazali babateli na bango na batiki Allah. Bakozalaka na etumbu monene.
عربی تفاسیر:
هَٰذَا هُدٗىۖ وَٱلَّذِينَ كَفَرُواْ بِـَٔايَٰتِ رَبِّهِمۡ لَهُمۡ عَذَابٞ مِّن رِّجۡزٍ أَلِيمٌ
11. (Kurani) oyo ezali bokambi, mpe baye bazali kopengwa na mikapo mia Nkolo wa bango, bakozua etumbu ya makasi koleka.
عربی تفاسیر:
۞ ٱللَّهُ ٱلَّذِي سَخَّرَ لَكُمُ ٱلۡبَحۡرَ لِتَجۡرِيَ ٱلۡفُلۡكُ فِيهِ بِأَمۡرِهِۦ وَلِتَبۡتَغُواْ مِن فَضۡلِهِۦ وَلَعَلَّكُمۡ تَشۡكُرُونَ
12. Allah akela ebale тропа bino; тро ete masuwa etambolaka na mitindo mia ye тре mpo bozuaka bolamu bwa yango mpe botondo. (ye).
عربی تفاسیر:
وَسَخَّرَ لَكُم مَّا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَا فِي ٱلۡأَرۡضِ جَمِيعٗا مِّنۡهُۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتٖ لِّقَوۡمٖ يَتَفَكَّرُونَ
13. Mpe akeli тропа bino manso maye mazali okati ya likolo na mabele na mitindo kowuta epai naye. Ya soló, wana ezali bilembo mpo bato bakanisa.
عربی تفاسیر:
قُل لِّلَّذِينَ ءَامَنُواْ يَغۡفِرُواْ لِلَّذِينَ لَا يَرۡجُونَ أَيَّامَ ٱللَّهِ لِيَجۡزِيَ قَوۡمَۢا بِمَا كَانُواْ يَكۡسِبُونَ
14. Loba na baye bandima: Balimbisa baye bazali kolikia na mikolo mia Allah te, mpo moto nyoso afutama na maye asalaki.
عربی تفاسیر:
مَنۡ عَمِلَ صَٰلِحٗا فَلِنَفۡسِهِۦۖ وَمَنۡ أَسَآءَ فَعَلَيۡهَاۖ ثُمَّ إِلَىٰ رَبِّكُمۡ تُرۡجَعُونَ
15. Oyo akosala bolamu ezali тропа ye moko, mpe oyo akobebisa, ekozongela sé ye moko. Sima bokozongisama epai ya Nkolo wa bino.
عربی تفاسیر:
وَلَقَدۡ ءَاتَيۡنَا بَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ ٱلۡكِتَٰبَ وَٱلۡحُكۡمَ وَٱلنُّبُوَّةَ وَرَزَقۡنَٰهُم مِّنَ ٱلطَّيِّبَٰتِ وَفَضَّلۡنَٰهُمۡ عَلَى ٱلۡعَٰلَمِينَ
16. Мре tosilaki kopesa na bana ya isalayele buku тре mibeko тре bontoma, тре topesaki bango biloko bia kitoko, mpe totombolaki bango esika koleka basusu (na tango na bango).
عربی تفاسیر:
وَءَاتَيۡنَٰهُم بَيِّنَٰتٖ مِّنَ ٱلۡأَمۡرِۖ فَمَا ٱخۡتَلَفُوٓاْ إِلَّا مِنۢ بَعۡدِ مَا جَآءَهُمُ ٱلۡعِلۡمُ بَغۡيَۢا بَيۡنَهُمۡۚ إِنَّ رَبَّكَ يَقۡضِي بَيۡنَهُمۡ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ فِيمَا كَانُواْ فِيهِ يَخۡتَلِفُونَ
17. Mpe toyelaki bango bilembo bia polele ya mibeko mpe bakabwanaki te sé tango boyebi eyelaki bango тропа likunya okati na bango. Ya soló, Nkolo nayo akosambisa kati na bango na bosôló o mokolo mwa suka тропа maye bazalaki na bokeseni.
عربی تفاسیر:
ثُمَّ جَعَلۡنَٰكَ عَلَىٰ شَرِيعَةٖ مِّنَ ٱلۡأَمۡرِ فَٱتَّبِعۡهَا وَلَا تَتَّبِعۡ أَهۡوَآءَ ٱلَّذِينَ لَا يَعۡلَمُونَ
18. Sima totiyaki yo na nzela ya mibeko landa yango, kasi kolanda te bamposa ya baye bazanga boyebi.
عربی تفاسیر:
إِنَّهُمۡ لَن يُغۡنُواْ عَنكَ مِنَ ٱللَّهِ شَيۡـٔٗاۚ وَإِنَّ ٱلظَّٰلِمِينَ بَعۡضُهُمۡ أَوۡلِيَآءُ بَعۡضٖۖ وَٱللَّهُ وَلِيُّ ٱلۡمُتَّقِينَ
19. Ya soló, bango bazali na bokoki ya kosalela yo bolamu te koleka bolamu ya Allah. Mpe ya soló, bato mabe bango na bango bazali baninga, Allah nde azali mobateli ya bandimi.
عربی تفاسیر:
هَٰذَا بَصَٰٓئِرُ لِلنَّاسِ وَهُدٗى وَرَحۡمَةٞ لِّقَوۡمٖ يُوقِنُونَ
20. Buku (Kurani) oyo ezali polele тропа bato, тре ezali bokambi тре ngolu тропа baye bazali па kondima ya soló.
عربی تفاسیر:
أَمۡ حَسِبَ ٱلَّذِينَ ٱجۡتَرَحُواْ ٱلسَّيِّـَٔاتِ أَن نَّجۡعَلَهُمۡ كَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ سَوَآءٗ مَّحۡيَاهُمۡ وَمَمَاتُهُمۡۚ سَآءَ مَا يَحۡكُمُونَ
21. Boye baye bazali kosala mabe, bakanisi ete tokozua bango lolenge moko na baye bandimi mpe bazali kosala misala milamu okati ya bomoyi mpe liwa na bango? Oyo ndenge ya mabe ya kokata likambo!
عربی تفاسیر:
وَخَلَقَ ٱللَّهُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ بِٱلۡحَقِّ وَلِتُجۡزَىٰ كُلُّ نَفۡسِۭ بِمَا كَسَبَتۡ وَهُمۡ لَا يُظۡلَمُونَ
22. Mpe Allah akela likolo na mabele na bosóló; mpe mpo afuta moto nyoso na maye asalaki, mpe bakobubamaka te.
عربی تفاسیر:
أَفَرَءَيۡتَ مَنِ ٱتَّخَذَ إِلَٰهَهُۥ هَوَىٰهُ وَأَضَلَّهُ ٱللَّهُ عَلَىٰ عِلۡمٖ وَخَتَمَ عَلَىٰ سَمۡعِهِۦ وَقَلۡبِهِۦ وَجَعَلَ عَلَىٰ بَصَرِهِۦ غِشَٰوَةٗ فَمَن يَهۡدِيهِ مِنۢ بَعۡدِ ٱللَّهِۚ أَفَلَا تَذَكَّرُونَ
23. Boye ozali kornona te ete oyo azui mposa naye nde nzambe naye, mpe Allah abungisi ye na boyebi, mpe akangi ye matoyi na motema mpe atie ezipelo na miso, nani mosusu akokamba ye osima ya Allah, boye bozali kokanisa te?
عربی تفاسیر:
وَقَالُواْ مَا هِيَ إِلَّا حَيَاتُنَا ٱلدُّنۡيَا نَمُوتُ وَنَحۡيَا وَمَا يُهۡلِكُنَآ إِلَّا ٱلدَّهۡرُۚ وَمَا لَهُم بِذَٰلِكَ مِنۡ عِلۡمٍۖ إِنۡ هُمۡ إِلَّا يَظُنُّونَ
24. Mpe bazali koloba ete: Bomoyi ezali sé ya mokili ya nsé, tozali kofanda mpe tozali kokufa, bobele tango nde ezali koboma biso. Bazali na boyebi te тропа yango sé makanisi.
عربی تفاسیر:
وَإِذَا تُتۡلَىٰ عَلَيۡهِمۡ ءَايَٰتُنَا بَيِّنَٰتٖ مَّا كَانَ حُجَّتَهُمۡ إِلَّآ أَن قَالُواْ ٱئۡتُواْ بِـَٔابَآئِنَآ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
25. Mpe soki batangeli bango mikapo mia biso mapolele bakolobaka ete: Bozongisa bankoko na biso na bomoyi soki bozali koloba bosóló.
عربی تفاسیر:
قُلِ ٱللَّهُ يُحۡيِيكُمۡ ثُمَّ يُمِيتُكُمۡ ثُمَّ يَجۡمَعُكُمۡ إِلَىٰ يَوۡمِ ٱلۡقِيَٰمَةِ لَا رَيۡبَ فِيهِ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يَعۡلَمُونَ
26. Loba: Allah apesaka bino bomoyi sima akobomaka bino; sima akosangisaka bino o mokolo mwa suka, mokolo moye mokozalaka na tembe te; kasi ebele ya bato bazali koyeba te.
عربی تفاسیر:
وَلِلَّهِ مُلۡكُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۚ وَيَوۡمَ تَقُومُ ٱلسَّاعَةُ يَوۡمَئِذٖ يَخۡسَرُ ٱلۡمُبۡطِلُونَ
27. Mpe bokonzi bwa likolo na mabele ezali ya Allah. Mpe tango mokolo wana mokokokaka, bato ya lokuta bakozangaka.
عربی تفاسیر:
وَتَرَىٰ كُلَّ أُمَّةٖ جَاثِيَةٗۚ كُلُّ أُمَّةٖ تُدۡعَىٰٓ إِلَىٰ كِتَٰبِهَا ٱلۡيَوۡمَ تُجۡزَوۡنَ مَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ
28. Mpe okomona bato banso bakofukama. Mpe bakobengama o ngambu ya buku na bango, lelo bokofutama тропа maye bosalaki.
عربی تفاسیر:
هَٰذَا كِتَٰبُنَا يَنطِقُ عَلَيۡكُم بِٱلۡحَقِّۚ إِنَّا كُنَّا نَسۡتَنسِخُ مَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ
29. Oyo buku na biso ezali koloba bosembo likolo na bino. Tozalaki kozua maye manso bozalaki kosala.
عربی تفاسیر:
فَأَمَّا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ فَيُدۡخِلُهُمۡ رَبُّهُمۡ فِي رَحۡمَتِهِۦۚ ذَٰلِكَ هُوَ ٱلۡفَوۡزُ ٱلۡمُبِينُ
30. Kasi baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, Nkolo wa bango akokotisa bango na bolamu bwa ye. Wana nde elonga ya polele.
عربی تفاسیر:
وَأَمَّا ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ أَفَلَمۡ تَكُنۡ ءَايَٰتِي تُتۡلَىٰ عَلَيۡكُمۡ فَٱسۡتَكۡبَرۡتُمۡ وَكُنتُمۡ قَوۡمٗا مُّجۡرِمِينَ
31. Mpe тропа baye bapengwaki (bakolobaka na bango): Boye batangelaki bino mikapo mia ngai te? Kasi bosalaki lolendo. Ya soló bozalaki batomboki.
عربی تفاسیر:
وَإِذَا قِيلَ إِنَّ وَعۡدَ ٱللَّهِ حَقّٞ وَٱلسَّاعَةُ لَا رَيۡبَ فِيهَا قُلۡتُم مَّا نَدۡرِي مَا ٱلسَّاعَةُ إِن نَّظُنُّ إِلَّا ظَنّٗا وَمَا نَحۡنُ بِمُسۡتَيۡقِنِينَ
32. Mpe tango bazali koyebisa bango ete elaka ya Allah ezali ya sólo, mpe ya sólo, ngonga ena ezali na tembe te, bolobaki toyebaki yango te, tozalaki kornona yango pamba, mpe tondimaki na yango te.
عربی تفاسیر:
وَبَدَا لَهُمۡ سَيِّـَٔاتُ مَا عَمِلُواْ وَحَاقَ بِهِم مَّا كَانُواْ بِهِۦ يَسۡتَهۡزِءُونَ
33. Mpe akomonisa bango mabe na bango oyo basalaki, mpe maye bazalaki kotiola ekokueyela bango.
1 Lelo tobosani bino: Bótala suratu Twâ Hâ mokapo: 126.
عربی تفاسیر:
وَقِيلَ ٱلۡيَوۡمَ نَنسَىٰكُمۡ كَمَا نَسِيتُمۡ لِقَآءَ يَوۡمِكُمۡ هَٰذَا وَمَأۡوَىٰكُمُ ٱلنَّارُ وَمَا لَكُم مِّن نَّٰصِرِينَ
34. Mpe bakoyebisa bango: Lelo tobosani bino(1) ndenge bobosanaki mokolo mwa elaka mwa bino moye, mpe esika na bino ezali nde lifelo. Kasi bakozwaka mosungi te.
1 Lelo tobosani bino: Bótala suratu Twâ Hâ mokapo: 126.
عربی تفاسیر:
ذَٰلِكُم بِأَنَّكُمُ ٱتَّخَذۡتُمۡ ءَايَٰتِ ٱللَّهِ هُزُوٗا وَغَرَّتۡكُمُ ٱلۡحَيَوٰةُ ٱلدُّنۡيَاۚ فَٱلۡيَوۡمَ لَا يُخۡرَجُونَ مِنۡهَا وَلَا هُمۡ يُسۡتَعۡتَبُونَ
35. Nyoso wana mpo bozuaki mikapo mia Allah na liseki, mpe bomoyi ya mokili ekosaki bino. Mokolo wana bakobimisama okati na yango te mpe bakoyambama te, okati ya ngolu.
عربی تفاسیر:
فَلِلَّهِ ٱلۡحَمۡدُ رَبِّ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَرَبِّ ٱلۡأَرۡضِ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
36. Lokumu na Allah Nkolo ya likolo na mabele, Nkolo ya molongo mobimba.
عربی تفاسیر:
وَلَهُ ٱلۡكِبۡرِيَآءُ فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۖ وَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡحَكِيمُ
37. Mpe atonda na bonene okati ya likolo na mabele, mpe azali na bokasi mpe bwanya.
1 Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
عربی تفاسیر:
 
معانی کا ترجمہ سورت: سورۂ جاثیہ
سورتوں کی لسٹ صفحہ نمبر
 
قرآن کریم کے معانی کا ترجمہ - الترجمة اللينغالا - ترجمے کی لسٹ

ترجمة معاني القرآن الكريم الى اللغة اللينغالا، ترجمها زكريا محمد بالنغوغو.

بند کریں